Nani akoki kotya kimya ya seko?
“Bakotula mipanga na bango ete mizala bitimweli, mpe makɔnga na bango ete mázala bikateli na matiti. Libota moko bakotombwela libota mosusu mopanga te, bakoyekola etumba lisusu mpe te.”
NSIMA ya kotánga mokapo oyo motyami likoló, oyo mouti na Yisaya, mokapo 2, vɛrsɛ 4, Rapport mondial sur le développement humain 1994, oyo ebimisamaki na P.N.U.D. (Programme des Nations unies pour le développement) ebakisaki ete: “Na kosilisama ya kowelana kati na banguya eleki minene [na 1990], emonanaki ete ntango ekómaki mpo na kokokisa esakweli wana. Nzokande, kino sikawa, elikya wana emonani likanisi mpamba.”
Kokutolama ya mosolo oyo mozali kobimisama mpo na makambo matali bitumba
Kokita ya elikya ya kimya euti mpe na likambo oyo ete mbongwana oyo esalamaki na makambo ya politiki kati na mokili mobimba elandanaki te na kokutolama monene ya mosolo oyo mobimisamaka mpo na makambo matali bitumba. Elingi koloba te ete kokita emonanaki te. Engebene mitángo ya O.N.U., mosolo oyo mozali kobimisama mpo na makambo matali bitumba kati na mokili mobimba mokitaki banda na motuya monene ya badolare miliare 995 na 1987 kino miliare 815 na 1992. Nzokande, miliare 815 ezali naino motuya monene. Ezali lifuti ya pene na katikati ya bato ya mokili mobimba!
Likambo mosusu, likanisi oyo ete esengeli kozala na mampinga mpo na kolikya na libateli, lizali kopekisa kolongolama ya bibundeli. Atako kowelana kati na banguya eleki minene esili, bato mingi, kati na mikili ya bozwi, bakanisi ete mosolo ya kobimisa mpo na libateli ya ekólo mosengeli komata. Na Febwáli 1993, M. James Woolsey, wana azalaki mokambi ya Central Intelligence Angecy, alobaki liboso ya Congrès américain ete: “Tosili koboma dalagona monene [U.R.S.S.], kasi tozali lelo oyo kobika kati na ngunda oyo etondi na banyoka ya ngɛngɛ mpe ya kobangisa ndenge na ndenge.”
Likanisi ya komibatela liboso ya badalagona mpe banyoka ya ngɛngɛ oyo bakoki kobima elobelamaki mpe na mikili ya bobóla mpo na kolóngisa ntina oyo mosolo mingi mozali kobimisama na ntina na makambo matali bitumba. Nzokande, P.N.U.D., emonisaki ete solo “mikili ya bobóla emikɔtisaka mpenza te kati na matátá mingi ya bikólo bikeseni, kasi motángo monene kati na yango esalelaka mampinga na bango mpo na kopesa nzela te na bonsomi ya bato na bango moko.” Lapólo ya P.N.U.D. emonisaki lisusu ete: “Kati na mikili ya bobóla bato oyo bazali kokufa mpo na bozangi ya ebongiseli ya kosunga bato (kolia malamu te to bozangi ya myango ya kopɛngola makɔnɔ) ezali likámá mbala 33 koleka likámá ya kokufa kati na etumba ebimisami na mokili moko ya bapaya. Nzokande, mikili yango mizali na mwayene ya basodá 20 mpo na monganga moko. Na makambo nyonso wana, emonani ete basodá bazali nde kolɛmbisa libateli ya moto na moto na esika ete bákólisa yango.”
Mombongo ya bibundeli na mokili mobimba
Na boumeli ya kowelana kati na banguya ileki minene, mikili mibale oyo mileki nguya mizalaki kotɛkisa bibundeli epai ya baninga na bango mpo na kolendisa boyokani, kotya bituluku ya basodá na bisika bibongisami mpe kopika bokonzi na bango. Mampinga ya mikili mingi makómaki makasi. Na ndakisa, lelo oyo mikili 33 mizali mokomoko na mituka ya bitumba koleka 1 000.
Lelo oyo, kowelana kati na banguya eleki minene esili, na yango likanisi ya boyokani ya politiki mpe ya myango ya komibatela elobelamaka mingimingi lisusu te kati na mombongo ya bibundeli. Nzokande, bopusi ya nkita ezali ntango nyonso makasi. Matomba ya kokokisa mazali! Lisusu, lokola mposa ya kozala na bibundeli ezali kokita, basáli-bibundeli bazali kondimisa Letá ete bolamu ya nkita mpe libateli ya misala esimbami na kotɛkisama ya bibundeli na mikili ya bapaya.
Makanisi ya zulunalo World Watch ezali ete: “Likambo ya kokamwa, na kolongoláká babɔmbi niklɛɛ́rɛ na bango, mikili ya nguya mizali koluka mbala na mbala kotɛkisa babɔmbi mpe bibundeli mingi na mosombi nyonso oyo akoki komonana.” Motángo na yango ezali boni? Engebene Institut international de Stockholm pour les recherches sur la paix, motuya ya bibundeli oyo bitɛkisamaki na mokili mobimba kobanda mobu 1988 kino 1992 ezalaki ya badolare miliare 151. Motɛkisi ya liboso ezalaki bongo États-Unis, elandani na mikili ya ex-Union soviétique.
Nsɔ́mɔ na ntina na babɔmbi ya niklɛɛ́rɛ ezali naino
Ezali boni mpo na babɔmbi ya niklɛɛ́rɛ? États-Unis mpe Union soviétique (to mikili ya ex-Union soviétique) basinyaki kɔntra F.N.I., (Forces nucléaires de portée intermédiaire) na mobu 1987, nde na mobu 1991 mpe mobu 1993, kɔntra mibale Strategic Arms Reduction (START) mpo na kokutolama ya bibundeli etyamaki mabɔkɔ.
Ekomamaki kati na bakɔntra START ete misile oyo etyami na mabelé oyo ezali na ogive koleka moko epekisami, mpe babɔmbi ya niklɛɛ́rɛ misato kati na minei oyo etyami likoló ya mituka to ebwakelo esengelaki kolongolama kobanda sikawa kino mobu 2003. Kasi, atako bobangi ya etumba ya misato ya mokili mobimba esili, ezali naino mingi, mpe ezali na likoki ya kobebisa mbala mingi biloko nyonso bizali na bomoi na mabelé.
Kopanzana ya bibundeli wana ezali kokólisa likámá ya moyibi ya biloko ya niklɛɛ́rɛ. Na ndakisa, Russie, ezali kopanza mpe kobomba soko ogive 2000 mbula na mbula, na kozwáká bongo maboke ya plutonium oyo ezali minene lokola likɔfi. Liboke wana, ezali eloko ya ntalo mpe esɛngi mayele mingi ya tekiniki, ezali eloko ya ntina mpo na kosala bɔmbi ya niklɛɛ́rɛ. Mingimingi lokola babatelaka yango na loposo ya acier mpo na kopekisa kopanzana na yango na mopɛpɛ, moyibi akoki komema yango kozanga mpasi kati na libenga. Soki nganga-mobulu moko azwi ata moko na yango mpe abakisi détonateur esika moko na yango, akoki kosala lisusu bɔmbi moko ya nguya makasi mpenza.
Koyikana ya bibundeli oyo esalemi na atome ezali mpe kobangisa. Mikili mitano miyebani ete mizali na yango—Chine, États-Unis, France, Royaume-Uni mpe Russie—kasi mikili misusu mingi mizali na likoki ya kozwa yango na lombango mpenza.
Wana mikili mingi mizali na bɔmbi atomike, likámá mpe ezali monene na boye ete moko akoki kosalela yango. Bibundeli wana bizali kopesa bazalani na biso nsɔ́mɔ. Búku La transformation de la guerre (na Lingelesi) emonisi ete: “Nguya na yango ezali na meko oyo ete soko tokokanisi yango na bibundeli oyo bindimámá, yango ekomonana lokola biloko ya masano ya bana mike.”
Kolongolama ya bibundeli mpe kimya
Ezali boni soki mikili milongoli bibundeli na yango ya makasi oyo bisalemi mpo na koboma? Kimya ekozala kati na mokili mobimba? Soko moke te. John Keegan, mokomi ya lisoló ya makambo matali bitumba alobi ete: “Uta mwa 9 Augústo 1945, bibundeli ya niklɛɛ́rɛ bibomi moto moko te. Bato milió 50 oyo bakufi kati na bitumba kobanda na dati wana, mingi kati na bango bakufi na bibundeli ya mikemike oyo bibimisami mingi mpe na mandoki ya nguya moke, na mokuse tokoki koloba ete, na bisaleli oyo ntalo na yango ezali mwa moke koleka ntalo ya baradió mpe bapile oyo etondi na mokili na eleko moko wana.”
Ndakisa moko euti koleka kala mingi te ya kosalelama ya bibundeli ya mike, kobomama ya nsɔ́mɔ oyo esalemaki na Rwanda, mokili oyo mpo na yango, búku World Book Encyclopedia (ebimeli ya mobu 1994) elobi ete: “Ndambo monene ya bato bazali bakatolike. . . . Biteyelo mingi ya ebandeli mpe ya ntei ezali ya lingomba ya katolike to mpe mangomba mosusu ya boklisto.” Nzokande, bato nkóto nkáma mitano babomamaki na mbɛli kati na mokili yango. Na bongo, emonani mpenza ete kimya ya mokili mobimba etaleli te kokitisama ya bibundeli ya niklɛɛ́rɛ. Esengeli ete likambo moko oyo lileki mateya ya mangomba ya mokili lisalema.
Bokóli ya bowelani kati na bitúlúká
Mme Sadako Ogata, haut-commissaire ya Mabota Masangani mpo na bato bakima mboka, alobaki ete: “Nsima ya kosilisama ya bowelani kati na nguya eleki minene, tokanisaki ete mikakatano nyonso mikosilisama. Tososolaki te oyo ebombamaki na kowelana kati na nguya ileki minene—mikili ya nguya mizalaki kokonza to kosɛngisa botosi ya mitindá epai na mikili oyo mizali na nsé ya bopusi na yango. . . . Na bongo, nsima ya bowelani kati na nguya eleki minene tozali komona kobima monene ya matátá kati na bitúlúká mingimingi mpo na makambo matali bonkɔkɔ, matátá oyo maumeli mbala mosusu uta liboso ya Etumba ya liboso ya Mokili mobimba.”
Makanisi motindo moko mamonisamaki na mokomi mikanda mpe mokomi lisoló ya bato, Arthur Schlesinger, molóngi ya Prix Pulitzer : “Ezaleli moko ya koyinana ezali kokitana mosusu. Kolimwa ya ezaleli ya kopekisa bonsomi ya makanisi na myango ya makasi na Mpótó ya Ɛ́sti mpe na ex-Union soviétique ezali kopesa nzela na koyinana kati na bitúlúká, banamboka, mangomba mpe nkóta, koyinana oyo ezwi moboko na yango kati na lisoló ya bato mpe na makanisi. . . . Soki ekeke ya 20 ezalaki ekeke ya bowelani na oyo etali mikano ya pólitiki, ekeke ya 21 ebandi na elembo ya ekeke ya bitumba ya bitúlúká.”
Engebene mitángo ya O.N.U., batángaki bitumba 82 kobanda mobu 1989 kino 1992, mingi kati na yango na mikili ya bobóla. Na mobu 1993, mikili 42 mizwaki bitumba mpe mikili 37 mizwaki mobulu na makambo ya politiki. Bobele na ntango yango, Mabota Masangani—kobimisáká pene na mosolo na yango nyonso—masalaki milende kati na bitinda bobele 17 mpo na kotya kimya kasi milende yango mimonanaki mpamba. Emonani polele ete ebongiseli wana ekotya kimya te na mokili.
Mikakatano oyo mizali kolongola elikya
Na esika ete bázala na makanisi ya kokende liboso, bazalani na biso mingi bazali kotalela mikolo mizali koya na bobangi. Na lokasa ya liboso ya zulunalo The Atlantic Monthly ya Febwáli 1994, maloba oyo mokuse mamonisi makanisi na bato likólo na bambula oyo ezali koya: “Mabota malɛmbi na komɛma bozito ya ebele ya bato bakima mboka bauti na bitúká oyo ezingelo mpe ezaleli ya bato ebebisami. . . . Bitumba bizali kobima mpo na kowela biloko bizangi ntina, mingimingi mai, mpe bitumba yango moko elandani mpenza na mobulu, bitúlúkú ya bayibi koyengayenga na ebele na mandoki, nzokande bazali kondongwana na mampinga oyo mabongisami na baluki ya mbongwana mpo na libateli na bango moko.”
Yango elingi koloba ete kimya ya seko ekoya te? Ezali bongo te! Lisoló oyo lilandi likomonisa bantina mpo na yango tokoki kozala na elikya mpo na mikolo mizali koya.
[Etanda na lokasa 5]
Mangomba mazali esaleli mpo na kimya?
Ntango mabota mamikɔtisaka na bitumba, mangomba mateyaka lisusu te makambo matali kimya mpe bondeko. Na oyo etali Etumba ya liboso ya Mokili mobimba, Frank P. Crozier, Général de brigade na mokili ya Angleterre, alobaki ete: “Mangomba ya boklisto maleki na lokoso ya kolinga kosopama ya makila, na bongo biso tosaleli yango na bonsomi mpenza.”
Na boumeli ya lisoló ya bato, ngambo ya mangomba kati na bitumba ebongwani te. Na ndakisa, talá maloba oyo ya koyambola ya mokomi na lisoló ya bato, mokatolike E.I. Watkin: “Atako ezali mpasi kondima yango, tokoki te kowangana to kobosana na ntina na litomba euti na kolendisama ya lokuta to bosembo ya mayele mabe, likambo oyo eyebani na lisoló ya bato ete na misala, baepiskɔ́pɔ bapesaka ntango nyonso mabɔkɔ na bitumba nyonso oyo bisalemaka na biyangeli ya mikili na bango.” Tótánga lisusu makanisi oyo mauti na zulunalo Sun ya Vancouver, ya Canada, ete: “Bolɛmbu oyo pene na mangomba nyonso ezali na yango etaleli likambo ya komikɔtisa na bitumba . . . Etumba nini oyo toyoka te ete babundi ya káa mokomoko bazali kondima ete Nzambe azali na ngámbo na bango?”
Na ntembe te, na esika ete mazala esaleli mpo na kimya, mangomba ya mokili mazali kopesa mabɔkɔ na bitumba mpe na kobomana—makambo ya nsɔ́mɔ oyo mauti kosalema na Rwanda ezali elakiseli monene.
[Etanda na lokasa 6]
Bozoba ya bitumba
Kati na búku na ye Nazwaki kimya te (na Lingelesi) ebimisamaki na 1936, Webb Miller, mopanzi-nsango Moamerika, akomaki ete: “Likambo ya kokamwa, mobulungano ya nsɔ́mɔ ya mokili na boumeli ya [Etumba ya liboso ya Mokili mobimba] eyaki kosala ngai mpasi na kotaleláká mbindo mpe bozoba na yango, bobele mbula mwambe nsima ya kosila na yango.” Ezalaki ntango oyo mopanzi-nsango wana azongaki na esika ya etumba na Verdun, epai akanisi ete motángo ya bato 1 050 000 bakufaki na etumba yango.
Miller akóbaki ete: “Na boumeli ya etumba, nakosamaki, lokola bamilió ya bato mosusu. Etumba wana ya mokili mobimba ebimisaki bobele matátá mosusu ya sika. Bato milió mwambe na ndambo bakufaki bobele mpamba, bamilió mosusu bamonaki makambo ya nsɔ́mɔ oyo ekoki kolobelama te, bamilió mosusu banyokwamaki, bazangaki biloko na bango, bamonaki mpasi. Nyonso wana mpo na bomikosi monene.”
Mbula misato nsima ya kobima ya búku yango, Etumba ya mibale ya Mokili mobimba ebandaki. Talá makanisi ya zulunalo The Washington Post: “Matátá ya ekeke ya 20 ezali ‘bitumba ya bato banso’ oyo ebomi basodá mpe basivíli. . . . Na bokokanisi, bitumba ya bato ya bikeke ya kala oyo tolobelaka ete bazangaki sivilizasyo ezalaki bobele mwa matátá mikemike mpenza.” Engebene makanisi ya nganga-mayele moko, bitumba mpe botɔmbɔki ya basivíli ebomi bato milió 197 uta mobu 1914.
Nzokande, bitumba mpe botɔmbɔki yango nyonso ememeli bato kimya te ata mpe esengo te. Lokola zulunalo The Washington Post elobi yango, “ebongiseli moko te ya politiki to ya nkita na ekeke oyo esili kolónga kobɔndisa bato to kokokisa bamposa na bango.”
[Elilingi na lokasa 7]
Mama oyo azali kati na bankámá ya bankóto ya bato oyo babomamaki na Rwanda, mingi mpenza na baoyo bazali basangani ya lingomba na bango
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Albert Facelly/Sipa Press