Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g96 Juillet nk. 28-29
  • Makambo mazali koleka na mokili

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makambo mazali koleka na mokili
  • Lamuká!—1996
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Motángo ya bakufi mozali komata epai na basi bameli-makaya
  • Bilangwiseli kati na biteyelo ya Allemagne
  • Basáli-mibembo milai
  • “Lisangani ya mokili mobimba oyo lizangi mayoki”
  • Ntango mapokopoko (frelons) makufaka na molungé
  • Ekulusu​—Elembo ya mobulu?
  • Nyamankɛ́kɛ ibéngami puces d’eau iyei kosunga
  • Kobosanama ya lisumu
  • “Bilembo” mpo na diamá
  • Kebá na misala ya mɔ́tɔ!
  • “Bɔmbi oyo ekopasuka nsima”
  • Makambo mazali koleka na mokili
    Lamuká!—2002
Lamuká!—1996
g96 Juillet nk. 28-29

Makambo mazali koleka na mokili

Motángo ya bakufi mozali komata epai na basi bameli-makaya

Engebene mitángo ya bolukiluki moko oyo mibimisamaki kati na Revue canadienne de santé publique, likaya esili koboma basi 13 541 na Canada na mobu 1991, nzokande na mobu 1985 bakufaki 9 009. Eyebisami ete, na mobu 2010 likaya ekoboma basi mingi koleka mibali, soki mimeseno ya mikolo oyo mizali se kokóba. Kati na zulunalo Toronto Star, tozali kotánga ete na mobu 1991, likaya ebomaki bato 41 408 (mibali 27 867 mpe basi 13 541). Profɛsɛrɛ Michael Thun ya Société américaine de cancérologie amonisi ete na États-Unis, motángo ya basi oyo bazali kokufa na kansɛr ya mimpúlúlú eyikanaki mbala motoba kobanda bambula ya 1960 kino bambula ya 1980. Balukiluki basukisi engebene zulunalo Globe and Mail, ya Toronto ete “likaya ezali ntina eleki monene mpo na kufa ya mbalakaka na États-Unis.”​—The Globe and Mail, Toronto, Canada.

Bilangwiseli kati na biteyelo ya Allemagne

Ankɛ́tɛ moko esalemaki epai na bilenge 3 000 na nɔ́rdi ya Allemagne emonisi bokóli ya kosalela bilangwiseli kati na biteyelo ya mokili yango. Engebene zulunalo Focus, oyo epesaka nsango pɔ́sɔ na pɔ́sɔ, pene na katikati ya banakelasi ya mibu 17 basili komɛla bilangwiseli, mpe pene na mwana moko likoló na misato amelaka yango mbala na mbala. Profɛsɛrɛ Peter Struck alobi ete “kati na biteyelo mingi ya ntei na Hambourg, tokoki kokuta bilenge ya mibu 16 to mibu 17 oyo bazali ntango nyonso kosalela bilangwiseli ya kopesa molangwa to ya kopesa mpɔngi.” Mpo na nini kobendama makasi motindo wana na bilangwiseli? Engebene makanisi ya profɛsɛrɛ Klaus Hurrelmann, makambo misato mazali kopusa bilenge ete bámilangwisaka: kozanga kosepela na bomoi, bopusi ya baninga mpe likanisi ya kozanga komimona na motuya.

Basáli-mibembo milai

Ndɛ́kɛ moko ebéngami albatros oyo ezalaki koyengayenga esalaki mobembo ya bakilomɛ́tɛlɛ 26 000 na boumeli ya mikolo 72, mpe nyama moko ebéngami phoque gris etambolaki bakilomɛ́tɛlɛ 5 000 na boumeli ya basanza misato. Mpiko motindo wana eyebanaki na mwango ya kotyáká likoló ya albatros mpe phoque oyo eponamaki, radioémetteur moko ya moke oyo esalemi mpo na kolanda na nzela ya satellite kotambola ya banyama yango. Albatros oyo etángami awa likoló ekokisaki na libaku moko bakilomɛ́tɛlɛ 3 000 na boumeli ya mikolo minei na Pacifique Sud. Zulunalo The Times ya Londres emonisi ete phoque, ebɛtaki mai bakilomɛ́tɛlɛ 100 na mokolo longwa na Écosse kino bisanga Féroé, etambwisamaki na liyoki moko ya sikisiki mpenza ya kolanda nzela na mai monene. Nini epusaki bapoti-mbangu wana mibale ete básala mibembo yango ya milaimilai? Lisoló eyanoli ete: Boluku bilei.

“Lisangani ya mokili mobimba oyo lizangi mayoki”

Kati na zulunalo New York Times ya Ɔkɔtɔ́bɛ oyo eleki tozali kotánga boye: “Na pɔ́sɔ eleki, na boumeli ya mikolo misato, bakonzi ya politiki ya bakɔntiná nyonso bayanganaki na libaku ya bokundoli mibu 5O ya Mabota Masangani (Nations unies) mpo na kosala masukúlu ya kafukafu matali ezalela ya mokili.” Nzokande, emonani ete eloko moko ya ntina ezangaki kati na mingi na “masukúlu wana ya kafukafu”​—bosembo. “Lokola bato ya politiki basalaka yango bipai binso, bapesaki bilaka oyo bakokokisa yango te mpe babwakaki mokumba ya kozanga kolónga likoló na basusu.” Nsima ya kotánga baprezidá mwambe oyo maloba na bango makeseni mpenza na bizalela ya mikili na bango, zulunalo elobaki na mokuse nsango na bango ya ntina ete: “Mokili, bosaná makambo ngai nazali kosala, nde yoká oyo nazali koloba.” Likambo ya kokamwa ezali te ete uta ntango wana zulunalo U.S.News & World Report emonisi Mabota Masangani lokola “lisangani ya mokili mobimba oyo lizangi mayoki.”

Ntango mapokopoko (frelons) makufaka na molungé

Zulunalo Science News ekomaki ete: Apis cerana japonica [monzoi] asilikaka mpo na matumoli ya Vespa mandarinia japonica [lipokopoko] na kobomáká ye na molungé ya nzoto na ye. Soki bamoni ete lipokopoko moko liyei esika bazali, nzoi babendaka ye kati na zúmbu (nid) na bango, kuna bankámá ya basáli bakokanga ye mpe bakomisangisa zingazinga na ye. Na nsima, “na koningisáká nzoto na bango, bakomatisa molungé kino dégrés 47 (47 °C), na boumeli ya miniti soko 20.” Mwango wana mozali na likámá te mpo na bango, mpamba te bayikaka mpiko kino na molungé ya 50 °C. Nzokande mapokopoko nyonso mamitikaka kozwama na motambo yango te. Lokola mapokopoko “20 to mapokopoko 30 makoki koboma lipinga ya nzoi 30 000 na ngonga 3,” mapokopoko bakoki kolónga nzoi soki bazali mingi. Zulunalo Science News emonisi ete “na libaku motindo wana mapokopoko mabotolaka zúmbu, mabebisaka nkei (larves) mpe mankau (nymphes).”

Ekulusu​—Elembo ya mobulu?

Kati na zulunalo Dallas Morning News tozali kotánga boye: bateolojiɛ́ mosusu bazali komituna, na komonáká mobulu oyo mokangami na ekulusu, soki ezali likambo lilongobani ete etalelama lokola elembo ya boklisto. Bazali kolendisa kosalelama ya bilembo oyo bimonisaka bomoi ya Yesu, kasi oyo bimonisaka liwa na ye te. Catherine Keller, na eteyelo ya teoloji na Inivɛrsité ya Drew na Madison, New Jersey, na États-Unis alobi ete ekulusu “elendisaka losambo ya bawei. Moto moko te akolinga kiti ya lotiliki to nsinga ya koboma basali-mabe ete ezala elembo ya kondima. Nzokande ezali yango oyo tolingaki kosalela soki Yesu abomamaki na Letá lelo oyo.”

Nyamankɛ́kɛ ibéngami puces d’eau iyei kosunga

Kati na zulunalo Independent ya Londres tozali kotánga ete puces d’eau ekoki kozala mwango mpo na kobongisa kobebisama ya mingala ya mai. Yango emonisami na ebongiseli moko ya kopɛtola mai oyo ezali kosalema. Babiolojiste balongolaki mbisi ya batóne 9,5 oyo izalaki komileisa na puces d’eau longwa na libeke moko ya Norfolk, na Angleterre. Na bongo, puces d’eau ibotanaki mingi mpe ilyaki matiti mabéngami algues oyo mazalaki kobebisa etíma. Libeke ya milóna misusu ya mai oyo mizalaki naino komonana te, mibimaki, mpe bandɛkɛ lokola foulques mpe cygnes bayaki lisusu. Na nsuka, mbisi ikozongisama. Ekanisami ete bokatikati na biloko bizwami na ezingelo (écosystème) mobimba ekobonga lisusu na nsima ya mibu mitano. Bato oyo batalelaka makambo ya ezingelo na Mpótó bazali kozela mpenza matomba ya mwango yango.

Kobosanama ya lisumu

Zulunalo Newsweek etuni ete “likambo nini likómeli lisumu?” “Likambo litali lisumu ya moto na moto liyokanaka mpenza lisusu te na masukúlu ya mangomba oyo maboyi kolobela mabe ya bato lelo oyo na États-Unis.” Bato ya parwasɛ “balingaka te mateya oyo mazali kozokisa mayoki na bango mpenza” mpe epai na bakatolike “ntubela ya mbala na mbala epai na sángo ekómi lelo oyo molulu moko ya kala.” Bakonzi ya mangomba oyo bazali kowelana bazali kobanga noki bakokimisa bandimi na bango. Mingi engebene zulunalo yango “bazali na momeseno ya kokweisa mabe ‘ya ntango oyo’ na ndakisa koponapona mposo [mpe] koponapona kati na basi ná mibali. Kasi likambo ya kokamwa bakangi monɔkɔ na makambo matali moto na moto​—na ndakisa koboma libala, lolendo, lokoso mpe enzombo.”

“Bilembo” mpo na diamá

Basi ya Grande-Bretagne bazali na babiju ya diamá milió 39, oyo ezali na motuya pene na miliare 90 ya francs français, mpe mbula na mbula, babiju ekokani na motuya ya koleka miliare 2 ya francs eyibamaka mpe ezwamaka lisusu te. Ebende oyo esimbi diamá enyangwisami na mbala moko. Na nsima mabanga makamatami. Uta sikawa, batúli bakoki kokɔtisa mbeba ya libanga mokomoko kati na ordinatɛrɛ (diamá mibale ekokanaka te), “bilembo” wana bikomonisama na faisceau laser ya nguya moke. Engebene zulunalo The Sunday Times ya Londres, likoki bobele moko ya kopɛngola mwango yango ezali mpo na moyibi kotúla lisusu diamá yango, mosala ya ntalo mingi, oyo mpe ekitisaka motuya na yango.

Kebá na misala ya mɔ́tɔ!

Kati na lapólo Morbidity and Mortality Weekly Report (MMWR) tozali kotánga makambo oyo minganga balobi: “mbula na mbula pene na bato 12 000 bazali kosalisama na bisika ya lisungi na lombangu kati na mpitalo na États-Unis mpo na bampota euti na mintɛitɛi (étincelles).” Engebene makanisi ya lapólo esalemi na Consumer Product Safety Commission mpo na bambula 1990 kino 1994, 20 % ya bampota yango ezali ya miso. MMWR emonisi ete bampota yango ezali “mbala mingi ya minene mpe oyo ekoki mpenza kopesa lolandá (cécité) to komona malamu te libela.” Esengeli koyeba lisusu ete bampota ya miso ekoki kozala mingi epai ya baoyo bazali zingazinga koleka basali na misala ya mɔ́tɔ.

“Bɔmbi oyo ekopasuka nsima”

Zulunalo Focus elobi ete lelo oyo bingumba bizali kosangisa pene na 45 % ya bato ya mokili mobimba, mpe na mobu 2000, ekoki kokoma na 50 %. Bitúká mingi ya Italie, ya nɔ́rdi ya Mpótó mpe ya ɛ́sti ya États-Unis bizali na motángo ya bato mingi. Na Afrique du Sud, na Chine, na Égypte mpe na Inde, bisika ya bato mingi bitongami kati na bamboka ya zámba. Bililingi oyo bikamatamaki na satellites bimonisi ete bobele 3 % kino 4 % ya mabelé ezali bingumba bibongisami. Nzokande, na motángo ya bato milió 61 oyo bakendaka kofanda na bingumba mbula na mbula (oyo esalemaka mingi na mikili ya bobóla), motángo ya bato na bingumba mozali kokóla, mpamba te, zulunalo Focus elimboli ete “bingumba bikólaka mbango te lolenge moko na bato na yango.” Mpe ebakisi ete: “Ezalela wana ezali mpenza bɔmbi oyo ekopasuka nsima.”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto