Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g96 Octobre lok. 3
  • Etuluku oyo ebimi na ntina na makámá

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Etuluku oyo ebimi na ntina na makámá
  • Lamuká!—1996
  • Masolo mosusu
  • Motángo ya bato bakimá mboka mozali sé kobakisama
    Lamuká!—1996
  • Tósalisa ‘bato oyo bafandi bapaya básalela Yehova na esengo’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2017
  • Bamilio ya bato bazali kokima Ukraine
    Makambo mosusu
  • Mokakatano yango mokosilisama ndenge nini?
    Lamuká!—1996
Makambo mosusu
Lamuká!—1996
g96 Octobre lok. 3

Etuluku oyo ebimi na ntina na makámá

ELIMBOLI nini kozala moto akimá mboka? Meká kokanisa ete ozali na bomoi ya kimya, kasi na mbala moko ezalela ya bomoi na yo ebongwani. Na mbalakaka, bazalani bakómi banguna. Basodá bazali koya mpo na kopunza mpe kotumba ndako na yo. Ozali bobele na miniti 10, mpo na kokanga bisaka mpe kokima mpo obatela bomoi na yo. Na bongo, okozwa bobele mwa sakósi moke mpamba te osengeli komema yango na ntáká ya bakilomɛtɛlɛ. Nini mpenza okotya kati na yango?

Ozali kokima na nsé ya lokito ya mandóki mpe ya bibwakeli ya misile. Osangani yo na basusu oyo bazali mpe kokima. Wana mikolo mizali koleka, kotambola na yo ekomi ya kobenda makolo, bakisa nzala ná mposa ya mai mpe kolɛmba makasi. Mpo okufa te, okosɛnga na nzoto na yo ete ebimisa makasi na yango nyonso atako olɛmbi makasi mpenza. Nsukansuka, olali mpɔngi na mabelé. Omikɔtisi kati na elanga moko mpo na kolukaluka mwa eloko ya kolya.

Okómi pene na mokili oyo ozali kolikya kozwa libateli, kasi bakɛngɛli-ndelo ya mboka bakotika yo oleka na bonsɔ́mi nyonso te. Bazwi sakósi na yo mpe babɔtɔli eloko nyonso ya motuya oyo bakokuta kati na yango. Okómi na esika mosusu ya bokɛngɛli mboka mpe okatisi ndelo. Batye yo kati na káa ya bato bakimá mboka, oyo etondi na bosɔtɔ mpe ezingelami na lopango ya bibende oyo ezali na nsɔ́ngɛ́ lokola makɔngá mpe ekangisami na nsinga ya bibende. Atako zingazinga na yo ezali na baninga oyo bazali komona bwale elongo na yo, ozali komiyoka ete ozali bobele yo moko mpe obulunganisami.

Ozali koyoka mpasi na motema lokola okabwani na libota na yo mpe na baninga na yo. Omimoni ete na makambo nyonso, osengeli na lisungi ya bato mosusu. Mosala ezali te, eloko ya kosala mpe te. Ozali kosala makasi mpo na kolónga mayoki ya kobungisa elikya nyonso mpe ya nkanda. Ozali komitungisa na ntina na bomoi na yo na mikolo mizali koya, awa oyebi ete kofanda na yo kati na káa ekozala mbala mosusu mpo na ntango mokuse. Atako boni, káa ezali ndako ya moto te​—ezali lokola ndako ya bozili to ndako ya boyambi bato na mibembo oyo moto te akolinga koumela kuna. Ozali komituna soki bakozongisa yo na makasi epai outaki.

Oyo ezali likambo ya mpasi lizali kokómela bamilió ya bato lelo. Engebene Ebongiseli ya Mabota Masangani mpo na bato bakimá mboka (H.C.R.), bato milió 27 basili kokima bitumba to minyoko. Likoló na motángo yango, bato milió 23 bazali kolongolama na mabelé na bango kati na mboka na bango mpenza. Nyonso wana epesi lapólo oyo ete moto moko likoló na bato 115 kati na mabelé asilá kokima mboka mpo na mikakatano. Mingi kati na bango ezali bongo basi mpe bana. Bato bakimá mboka, lokola bazali etuluku oyo ebimi na ntina na bitumba mpe makámá ndenge na ndenge, bazali bato basundolami kati na mokili oyo elingi bango te, mokili oyo ezali koboya bango, mpo na bizaleli na bango ya bomoto te kasi mpo na ezalela na bango ya bato bakimá mboka.

Komonana na bango ezali elembo ya mobulungano monene bipai binso kati na mokili. H.C.R. epesi litatoli oyo: “Bato bakimá mboka bazali elembo emonisi na bonene na yango mpenza kobebisama ya ezalela ya bomoi ya bato. Emonani polele ete bazali liyitá ya nsuka kati na monyɔlɔ́lɔ ya mikakatano oyo mizali na ebandeli mpe na mbuma oyo elakisi na meko nini mboka yango ekweisami na makambo matali ezalela ya bato mpe politiki. Kotaleláká bango nyonso na mobimba, bato bakimá mboka bazali mpenza emekeli ya ezalela mpenza ya bato ya mokili lelo.”

Banganga-mayele balobi ete mokakatano yango mokokani te na mosusu liboso na yango, awa mozali sé kokóla mpe elikya na oyo etali nsuka na yango emonani te. Nini esali ete makambo mákóma na ezalela motindo wana? Ezali na mwango mpo na kosukisa yango? Masoló malandi makotalela mituna wana.

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 3]

Mwana mobali na loboko ya mwasi: FƆTƆ́ UN 159243/J. Isaac

fɔtɔ́: U.S. Navy

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto