Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g97 Avril lok. 31
  • Monyoko oyo basi bazali kozwa

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Monyoko oyo basi bazali kozwa
  • Lamuká!—1997
  • Masolo mosusu
  • Ndenge nini Nzambe atalelaka mobulu?
    Lamuká!—2003
  • Mobulu ekosila mokolo mosusu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2016
  • Bazali kosalela basi makambo na bosembo te
    Lamuká!—1998
  • Elikya nini ezali mpo na basi na mikolo mizali koya?
    Lamuká!—1998
Makambo mosusu
Lamuká!—1997
g97 Avril lok. 31

Monyoko oyo basi bazali kozwa

EUTI NA MOKOMANI NA BISO NA NIGERIA

LONGWA kobotama na bango kino liwa, basi bazali konyokwama na mobulu, engebene lapólo ya Mabota Masangani oyo ebéngami Human Development Report 1995. Bolukiluki oyo ezali kosalema na mokili mobimba emonisi makambo oyo malandi:

Liboso ya kobotama. Na mikili mosusu, bato bazali kosala baekizamɛ́ mpo na koyeba soki mwana oyo azali na libumu azali mobali to mwasi. Mingimingi, bazali kosopa zemi oyo bayebi ete mwana azali mwasi.

Na bomwana. Na Barbade, na Canada, na Hollande, na Nouvelle-Zélande, na Norvège mpe na États-Unis, mwasi moko likoló na basi misato azali kotatola ete abebisamaki na bomwana na ye to na bolenge na ye. Mbula na mbula, na Azia mpe bipai mosusu, pene na milió moko ya bana​—mingi koleka bana basi​—bazali kokamatama na makasi mpo na kosala bondumba. Na mokili mobimba, bazali kosala bamilió ya bana basi lipaso ya mpasi na binama ya kobota.

Na ntango bakómi mikóló. Na Chili, na Mexique, na Corée mpe na Papouasie Nouvelle-Guinée, basi mibale ya mabala likoló na misato bazali kobɛtama na mibali na bango. Na Canada, na Nouvelle-Zélande, na Royaume-Uni mpe na États-Unis, mwasi moko likoló na motoba asili kobebisama.

Na bobangé. Na Bangladesh, na Brésil, na Kenya, na Thaïlande mpe na Papouasie Nouvelle-Guinée, mwasi moko likoló na mibale azali kobomama, ezala na baoyo bazali kosangisa na bango nzoto to na baoyo bazalaki kosangisa na bango nzoto liboso. Na Afrika, na Amerika ya Súdi, na États-Unis mpe na bisanga mingi ya Mai Monene ya Pacifique, kobɛtama ya basi na mibali na bango ezali likambo monene oyo lizali kopusa bango na komiboma.

Monyoko oyo basi bazali kozwa endimisi mpenza ete tozali kobika na “mikolo ya nsuka,” oyo engebene Biblia bato bakozala “babebisi,” “bato na nkó,” mpe “bato na matata.” (2 Timoté 3:1-5, New American Bible) Ebongi ete tómonisa botɔ́ndi epai na Yehova Nzambe mpamba te apesi biso elaka ete nsima na “mikolo ya nsuka” oyo etondi na mobulu, akotya mokili ya sika ya kimya kati na yango bato na mabelé “bakofanda na kimya mpe moto akobangisa bango te.” (Ezekiele 34:28; 2 Petelo 3:13) Na Bokonzi ya Nzambe, Yesu Klisto “akobikisa mobola oyo akonganga mpe moto na mawa oyo azali na mosungi te. Akosikola milimo na bango na kati na konyokola mpe na kongala.”​—Nzembo 72:12, 14.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto