Engebene Biblia
Libala ekoki kobatelama nsima ya ekobo?
“Nazali koloba na bino ete soko ye nani akolongola mwasi na ye, soko mpo na pite te, mpe akobala mosusu, azali kosala ekobo.”—MATAI 19:9.
NA MALOBA wana Yesu Klisto apesaki nzela epai na moklisto koboma libala na mobalani oyo asali ekobo.a Nzokande, ezali boni soki mobalani oyo asali likambo te aponi kobatela libala na bango mpe soki babalani mibale bayokani kotonga lisusu boyokani na bango? Mikakatano nini ezali liboso na bango, mpe ndenge nini bakoki kolónga yango? Tótala lolenge Biblia ezali kosalisa na kozwa biyano na mituna yango.
Ndako ebukani
Libosoliboso tosengeli koyeba bonene ya mbeba oyo ekobo ebimisi. Lokola Yesu klisto alimbolaki yango, Mobandisi ya libala alingaki ete mobali mpe mwasi bázala “bato mibale te kasi mosuni moko.” Abakisaki ete: “Oyo nde Nzambe asili kotonga, tiká te ete moto akangola yango.” Ɛɛ, libala ebongisami mpo na kokangisa bato kasi mpo na kokabola bango te. Ntango moto abebisi ndai ya libala na kosaláká ekobo, mikakatano mikolanda na nsima.—Matai 19:6; Bagalatia 6:7.
Yango ekopesa mpasi epai na mobalani oyo asali likambo te. Makámá ya ekobo ekoki kokokanisama na mopɛpɛ makasi oyo ebukaka bandako. Monganga Shirley P. Glass alobaki ete: “Ebele ya bato ya maladi oyo nasalisaki bango balobaki ete elingaki kozala pɛtɛɛ mpo na bango na koyikela likambo yango mpiko soki babalani na bango bakufaki.” Ya solo, baoyo babalani na bango basili kokufa bakoki koboya likanisi wana. Nzokande, ezali solo ete ekobo epesaka mpasi mingi. Mpota ya likambo yango esilaka soko moke te epai na bato mosusu.
Na kotalela mpasi motindo wana, moto akoki komituna, ‘Ekobo esengeli kotya nde nsuka na libala?’ Mbala mosusu te. Maloba ya Yesu na ntina na ekobo mamonisi ete mobalani oyo azali sembo azali na bantina engebene Makomami ya koboma libala, kasi yango ezali lisɛngisi te ete asala bobele bongo. Babalani mosusu bazwaki ekateli ya kotonga mpe koyeisa makasi eloko oyo ebukanaki, na kosaláká mbongwana esengeli—atako eloko moko te ezali kolóngisa ekobo.
Ya solo, ezali malamu koleka kosala mbongwana ebongi wana babalani nyonso mibale bazali sembo moko epai na mosusu. Nzokande, ata ntango kozanga bosembo emonani, babalani mosusu oyo basali likambo te baponaka kobatela libala na bango. Ezala ete likatami motindo oyo etongami na makanisi malamu, mobalani oyo asali likambo te asengeli kotalela malamumalamu bozito ya makambo oyo makoya na nsima. Na lolenge yango akotalela bamposa ya bana na ye, bamposa na ye moko ya elimo, ya mayoki, ya nzoto, mpe ya mosolo.b Ekosɛnga na ye ete azala na mayele mpo na kotala soki libala na ye ezali na likámá to ezali na likámá te.
Libala ekoki kobikisama?
Liboso ya komeka kotonga lisusu ndako oyo ebukani na mopɛpɛ makasi, motongi asengeli kondimisama soki ekoki kobongisama. Bobele bongo, liboso ya koluka kotonga boyokani oyo ebebi na kozanga bosembo, babalani—mingimingi ye oyo asali mabe te—akolinga kondimisama na bibongiseli bizwami mpo na kozongisa boyokani mpe bosembo kati na libala.
Likambo moko ya kotalela ezali soki mobalani oyo asali likambo amonisi kobongola motema ya solosolo, to “azali naino kosala ekobo na motema na ye.” (Matai 5:27, 28) Atako alaki kobongwana, azali kokakatana mpo na kotika etamboli na ye ya mbindo? (Exode 20:14; Levitike 20:10; Deteronome 5:18) Azali naino na miso páípai? Azali kogangela mwasi na ye mpo na ekobo asalaki? Soki ezali bongo, milende mpo na kozongisa bosembo na libala motindo oyo mikolónga te. Epai mosusu, soki atiki misala ya mbindo, andimi ngambo ya mabe asalaki, mpe amonisi ete andimi na motema mobimba kotonga lisusu libala na bango, mwasi na ye akoki komona ntina mpo na kolikya ete bosembo ya solosolo ekoki kozonga mokolo mosusu.—Matai 5:29.
Lisusu, mwasi oyo azali sembo akoki mpe kolimbisa? Yango elingi koloba te ete azali te na likoki ya komonisa mayoki na ye ya mpasi na ntina na makambo oyo mauti kosalema to komonisa ete azali komona mbongwana te. Yango elimboli ete akosala makasi, na ntango ekoki, kolongola nkanda. Bolimbisi motindo yango ezwaka ntango kasi ekoki kosunga na kotya moboko makasi likoló na yango libala ekotongama lisusu.
Bólongola “bosɔtɔ” nyonso
Nsima wana mobalani ya sembo azwi ekateli ya kobatela libala na bango, matambe nini babalani basengeli kosala? Bobele lokola bosɔtɔ ezwami zingazinga na ndako oyo ebukani na mopɛpɛ makasi esengeli kolongwa, “bosɔtɔ” nyonso oyo ezingi libala esengeli kolongolama. Yango ekoki kosalema na mobimba soki babalani bazali komonisana mayoki moko epai na mosusu. Masese 15:22 elobi ete: “Myango ikokufa wana bato na toli bazangi.” Liloba ya Liebele libongolami na “myango” epesi likanisi ya boyokani mpe elobelami “koyangana monene” kati na Nzembo 89:7. Yango ekosangisa, bobele masoló ya likolólikoló te, kasi masoló ya sembo mpe ya mozindo oyo na boumeli na yango mobali mpe mwasi bazali komonisa moko epai na moninga mayoki ya mozindo.—Masese 13:10.
Na ndakisa, mwasi ya sembo akoki kozala ntango mosusu na mituna mingi ya kotuna na mobali na ye. Yango ebandaki ndenge nini? Eumelaki ntango boni? Moto mosusu nani ayebi likambo yango? Ya solo, ekozala mpasi mingi na motema mpo na babalani wana bazali kolobela likambo oyo. Nzokande, mobalani ya sembo akoki komona ete boyebi ya makambo oyo ezali na ntina mpo na kozongisa bosembo kati na libala. Soki bongo, eleki malamu ete mobalani oyo asali mbeba ayanola na bosembo mpe atalela mayoki ya moninga. Asengeli kolimbola makambo yango na bolingo mpe na boboto, kobateláká na makanisi ete mokano ya lisoló ezali ya kobikisa kasi ya kozokisa te. (Masese 12:18; Baefese 4:25, 26) Bango mibale bakozala na mposa ya kobomba sɛkɛlɛ́, komipekisa, mpe koyoka mpo na kokata ntina wana bazali komonisa mayoki na bango na ntina na makambo oyo masalemaki.c—Masese 18:13; 1 Bakolinti 9:25; 2 Petelo 1:6.
Baoyo bazali Batatoli ya Yehova bakoki koluka lisalisi ya bankulutu ya lisangá. Ya solo, mpo na baklisto, masumu lokola ekobo esengeli komonisama nokinoki epai ya bankulutu, oyo batyami mpo na bolamu ya elimo ya babalani mpe ya lisangá. Ekoki kozala ete ntango akosolola na bankulutu, ye oyo asali ekobo amonisi kobongola motema ya solo mpe na bongo akoki kotikala na lisangá. Na likambo lokola oyo, bankulutu bakolanda kopesa lisungi epai na babalani nyonso mibale.—Yakobo 5:14, 15.
Kotonga lisusu
Nsima wana babalani babateli mayoki na bango na lolenge ekoki, bazali na likoki ya kotonga lisusu miboko ya makasi ya libala na bango. Bazali na mposa ya kosolola makambo ya ntina. Epai oyo bolɛmbu emonani, basengeli kosala mbongwana ya solosolo.
Libosoliboso ye oyo asali mabe nde azali na mposa ya kosala mbongwana. Nzokande, ye oyo azali sembo akosala makasi mpo na koyeisa lisusu makasi bisika oyo ezali na bolɛmbu kati na libala. Elingi koloba te ete mbeba ya ekobo euti epai na ye to ekoki kotalelama mpamba—lisumu motindo oyo ekoki kotalelama mpamba te. (Kokanisa Genese 3:12; 1 Yoane 5:3.) Yango elingi nde koloba ete ezalaki na makambo oyo masengelaki kobongisama kati na libala. Kotonga lisusu ezali mwango ya kosangisa biloko oyo bikabwani. Bozali na mposa ya koyeisa makasi lokumu na bino mpe mikano na bino? Botalelaki misala ya elimo na bopɔtu? Mwango oyo ya koluka koyeba bolɛmbu mpe kosala mbongwana ezali na ntina mpo na kotonga lisusu libala oyo ebebaki makasi.
Libateli
Ata ndako oyo etongami malamu esɛngaka libateli ya ntango nyonso. Yango ezali mpenza na litomba, mpo na kobatela boyokani oyo etongami lisusu. Babalani bakopesa nzela te na kolekisa ntango mpamba ete elɛmbisa ekateli na bango ya kosimba makatami na bango ya sika. Na esika ete babúngisa makanisi soki bakutani na makambo ya mikemike, lokola momeseno ya masoló bobele ya mikuse, ekosengela ete bázongisa momeseno ya kosolola malamu mpe kokoba kokende liboso.—Masese 24:16; Bagalatia 6:9.
Likoló na nyonso, mobali mpe mwasi bakopesa esika monene na mimeseno na bango ya elimo, bakondima te ete yango, to libala na bango, ezala nsima ya misala misusu. Nzembo 127:1 elobi ete: “Soko ezali [Yehova] te oyo akotongaka ndako, basali bakosala wana bobele mpamba.” Lisusu, Yesu akebisaki: “Moto na moto oyo akoyokaka maloba na ngai nde akotosaka yango te akokokana na moto na ebɛbɛ oyo atongi ndako na ye likoló na zɛ́lo. Mbula enoki mpe mpela eyei mpe mipɛpɛ mipɛpi mpe ibɛti ndako yango mpe ekwei. Kokwea na yango ezalaki mpe monene mpenza.”—Matai 7:24-27.
Ɛɛ, soki mitindá ya Biblia mityolami mpo ete ezali mpasi na kotosa yango, libala ekotikala kotɛngatɛnga ntango bosembo na yango ekomekama lisusu. Nzokande, soki mobali mpe mwasi babateli mitindá ya Biblia na makambo nyonso, libala na bango ekozwa lipamboli ya Nzambe. Bakozwa lisusu nguya makasi oyo ekopusa bango na bosembo ya libala—mposa ya kosepelisa Mobandisi ya libala, Yehova Nzambe.—Matai 22:36-40; Mosakoli 4:12.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Bantina ya moboko ezali mpo na yango moto akoki kopona koboma libala na mobalani oyo asali ekobo. Mpo na kozwa bandimbola mingi na likambo yango, talá lisoló “Engebene Biblia—Ekobo-Esengeli kolimbisa to kolimbisa te” na Lamuká! ya 8 Augústo 1995 (ebimeli ya Lifalansé).
b Tozali kotalela mobalani oyo asali ekobo lokola ete ezali mobali. Moto moko amonisaki ete motuya ya mibali oyo bazali kosala ekobo ezali mbala mibale koleka oyo ya basi. Nzokande, mitindá milobelami mizali na bokatikati ata soki mobalani oyo asali likambo te azali mobali moklisto.
c Mpo na koyeba makambo mosusu na ntina na koyokamela malamu, talá Lamuká! ya 22 Yanuáli 1994, nkasa 6-9, mpe ya 8 Desɛ́mbɛ 1994, nkasa 10-13 (ebimeli ya Lifalansé).