Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g98 Avril nk. 13-14
  • Myango motoba ya kobatela kolɔngɔnɔ

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Myango motoba ya kobatela kolɔngɔnɔ
  • Lamuká!—1998
  • Masolo mosusu
  • Makambo motoba mpo na kobatela bokolɔngɔnɔ na yo
    Lamuká!—2004
  • Makambo 7 ya kosala mpo na kobatela bilei mpe kolya bilei ya malamu
    Makambo mosusu
  • Ndenge ya kosala mpo nzoto ezala malamu
    Lamuká!—2015
  • Lolenge nini okoki kotambwisa bato ya ndako na yo?
    Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota
Makambo mosusu
Lamuká!—1998
g98 Avril nk. 13-14

Myango motoba ya kobatela kolɔngɔnɔ

EUTI NA MOKOMANI NA BISO NA NIGERIA

ENGEBENE Ebongiseli ya Mabota Masangani mpo na kolɔngɔnɔ ya nzoto (Organisation mondiale de la santé) (O.M.S.), pene na bato 25 likoló na monkama oyo bazali kofanda na mikili ya bobola bazali komɛla mai ya pɛto te. Bato koleka 66 likoló na monkama​—elingi koloba soko miliare 2,5​—bazali na batwalɛti ya malamu te. Mpo na mingi kati na bango, yango ezali komema makɔnɔ mpe liwa.

 Na ezaleli motindo wana, kobatela bopɛto ezali mpenza mokakatano monene. Nzokande, soki okómisi bopɛto lolenge na yo ya bomoi, okomibatela na makɔnɔ mingi. Talá myango motoba oyo okoki kosalela mpo na komibatela yo moko mpe libota na yo ete bózwa mikrobe te oyo ekoki kokɔta na nzoto mpe kobebisa kolɔngɔnɔ ya nzoto.

1. Sukolá mabɔkɔ na yo na sabuni nsima ya kouta na twalɛti mpe liboso ya kosimba bilei.

Lolenge malamu ya kopɛngola makɔnɔ ezali ya komindimisa ete sabuni mpe mai ezali ntango nyonso wana mpo ete moto nyonso kati na libota asukolaka mabɔkɔ. Sabuni mpe mai elongolaka mikrobe na mabɔkɔ​—mikrobe oyo ekokaki kokɔta na bilei to na monɔkɔ. Mpo ete mbala na mbala bana mike bakɔtisaka misapi na monɔkɔ, kosukola mabɔkɔ na bango mbala na mbala ezali na ntina, mingimingi liboso ya kopesa bango bilei.

Ezali mpenza na ntina kosukola mabɔkɔ na sabuni nsima ya kouta na twalɛti, liboso ya kosimba bilei, mpe nsima ya kosukola mwana oyo auti kosumba.

2. Kɔtaka na twalɛti.

Mpo na kopɛngola kopalangana ya mikrobe, ezali malamu kozala na twalɛti ya malamu. Makɔnɔ ebele, mingimingi pulupulu, eutaka na mikrobe ya nyei ya bato. Mikrobe yango ekoki kokɔta na mai ya komɛla to na bilei, ekoki kokangama na mabɔkɔ to na bisaleli mpe na bisika oyo bizali kosalelama mpo na kolamba to kokabola bilei. Ntango esalemi bongo, bato bakoki komɛla mikrobe yango mpe kozwa makɔnɔ.

Mpo na kopɛngola yango, esengeli kosalela twalɛti. Nyei ya banyama esengeli kozala mosika na ndako mpe mosika na bisika mai ya kosalela ezali. Okoki kokamwa na koyeba ete nyei ya bana mike ezalaka na makama mingi koleka nyei ya mikóló. Na bongo, esengeli mpe koteya bana mike ete básalelaka twalɛti. Soki bana bazali kosumba bipai nyonso, nyei na bango esengeli kolongolama nokinoki mpe kobwaka yango na twalɛti to kokunda yango.

 Twalɛti esengeli kozala pɛto mpe esengeli kozipama.

3. Salelá mai ya pɛto.

Mabota oyo bazali na mai ebele ya pɛto, oyo eutaka na pɔmpi, bazwaka makɔnɔ mingi te lokola mabota oyo bazali na mai yango te. Baoyo bazali na mai ya pɔmpi te bakoki kobatela bokolɔngɔnɔ ya nzoto na bango na kozipáká mabulu ya mai na bango mpe na kobwakáká mai ya bosɔtɔ mosika na mai oyo ezali kosalelama mpo na komɛla, kosukola nzoto mpe kosukola biloko. Ezali mpe na ntina ete banyama bázalaka mosika na ndako mpe mosika na mai ya komɛla.

Mwango mosusu ya komibatela na makɔnɔ ezali ya kosala ete nzungu, katini, mpe mbeki oyo esalelamaka mpo na kobomba mai ezalaka ntango nyonso pɛto. Na ndakisa, ezali malamu mingi kotya katini likoló na esika ete etikala elali na mabelé.

Mai ya komɛla oyo mabombamaka na ndako masengeli kotyama na bibombelo ya pɛto oyo bizali na bizipeli. Kɔpɔ oyo ekosalelama mpo na kozwa mai na bibombelo yango esengeli mpe kozala pɛto. Kopesa nzela te na bato ete bátya misapi na kati ya mai ya komɛla to bámɛla na kotyáká monɔkɔ na kati ya ebombelo.

4. Soki ozali na esika ya kozwa mai ya pɛto te, esengeli kotɔkisa yango liboso ya komɛla.

Na moseseno mai ya komɛla ya malamu ezali oyo eutaka mingimingi na pɔmpi ya malamu. Emonani ete mai oyo mautaka na bisika mosusu mazalaka na mikrobe mingi, ata soki mazali komonana sangisangi.

Kotɔkisa mai ebomaka mikrobe. Na bongo, ntango otoki mai na liziba, na moluka to na tánki, ezali malamu kotɔkisa yango mpe na nsima kotika yango ekóma mpiɔ liboso ya komɛla yango.Mai ya komɛla ya pɛto ezali na ntina mingi mpenza mpo na bana mike, mpamba te nzoto na bango ezali na makoki mingi te ya kobundisa mikrobe lokola oyo ya mikóló.

Soki likoki ya kotɔkisa mai ya komɛla ezali te, tyá yango na bidɔ to na molangi oyo ezali na ezipeli. Na nsima, tyá yango na moi na boumeli ya mikolo mibale liboso ya komɛla yango.

5. Tika ete bilei na yo bizala pɛto.

Bilei oyo esɛngaka te ete elambama liboso ya kolya yango esengeli kosukolama malamu. Bilei mosusu ya kolamba bisengeli koumela na mɔ́tɔ, mingimingi nyama.

Ezali malamu mingi kolya bilei noki nsima ya kolamba yango; na lolenge wana ekozwa ntango ya kobeba te. Soki okolya yango nsima ya ngonga mitano, osengeli kosala ete ezala sé na mwa mɔtɔ to kotya yango na frigo. Liboso ya kolya yango, osengeli konyangwisa yango lisusu.

Emonanaka mingimingi ete misuni ya nyama ya mobesu ezalaka na mikrobe, na bongo esengeli kotika yango te pembeni ya bilei oyo esili kolambama. Nsima ya kolamba nyama ya mobesu, sukolá bisaleli mpe bisika nyonso ya kuku oyo yango etyamaki.

Bisika ya kolamba bilei esengeli kozala ntango nyonso pɛto. Esengeli kozipa bilei mpe kobomba yango mosika na nzinzi, mpoko mpe banyama mosusu.

6. Esengeli kotumba to kokunda bosɔtɔ.

Nzinzi, oyo epalanganisaka mikrobe, elingaka kobotama na esika bosɔtɔ ya bilei ebwakami. Na yango, bosɔtɔ esengeli kotikala na mabelé te. Bosɔtɔ ya mokolo na mokolo esengeli kotumbama to kokundama, to kolongola yango na mwango mosusu.

Na kosaleláká myango yango, okoki komibatela mpe kobatela libota na yo na makɔnɔ lokola pulupulu, kolera, tifoidɛ, banyama ya libumu, ngɛngɛ oyo eutaka na bilei, mpe makɔnɔ mosusu mingi.

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Eutelo : Mwa buku ‘Savoir pour sauver’, ebimisami na UNICEF, UNESCO mpe O.M.S.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto