Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g98 Avril nk. 15-17
  • Nasengeli kosala nini mpo na ezaleli ya koponapona?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nasengeli kosala nini mpo na ezaleli ya koponapona?
  • Lamuká!—1998
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Batelá lolemo na yo!
  • Kozanga botosi oyo ebombami
  • Likama ya komitangola
  • Likama ya zuwa
  • Nakosala nini soki baboti na ngai baswanaka?
    Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, Volimi 2
  • Nakosala nini soki alingi ngai te?
    Lamuká!—1998
  • Mpo na nini mibeko ebeleebele boye?
    Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, Volimi 2
Lamuká!—1998
g98 Avril nk. 15-17

Mituna oyo bilenge batunaka . . .

Nasengeli kosala nini mpo na ezaleli ya koponapona?

“Naleki ndeko na ngai ya mwasi na mbula mibale ya kobotama mpe nyonso epesamelaka bobele ye. . . . Namonaka ete yango elongobani te.”​—Rébecca.a

NA NTANGO bazali kotyela ndeko na yo likebi mingi koleka, okoki mpenza komiyoka ete obwakami. Kasi, soki kati na libota mwana moko azali na makoki mingi koleka bana mosusu, to soki azali kokutana na mikakatano oyo mikeseni mpenza na oyo ya bana mosusu kati na libota, soki azali kosepela na makambo oyo baboti mpe basepelaka na yango to mpe azali na ezaleli ekokani mpenza na oyo ya bango, ekosengela mbala mosusu kosala milende makasi mpenza mpo ete baboti na yo batyela yo ata mwa likebi moke! Mpamba te wana ozali kokanisa mingi likoló na likebi oyo epesameli ndeko na yo, okoki komizindisa mpenza kati na mawa mpe nkanda.b

Kasi, Biblia epesi biso toli oyo: “Bóyoka nkanda nde [bósala, NW] lisumu te; bóloba na mitema na bino mpenza likolo na mbeto na bino mpe [bózala, NW] nyɛɛ.” (Nzembo 4:4) Nkanda ekoki komema yo na koloba likambo oyo ekoki koyokisa yo mawa na nsima. Omikundola lolenge Kaina akómaki na nkanda makasi na komona ngɔlu oyo Yehova amoniselaki ndeko na ye Abele. Nzambe akebisaki ye na maloba oyo: “Lisumu ezali kolala na ekuke na yo. Mposa na yango elingi kosimba yo nde ekoki ete oleka yango.” (Genese 4:3-16) Kaina apekisaki mayoki na ye te mpe nsuka na yango ezalaki likama monene!

Ya solo, elingi koloba te ete okokóma mobomi lokola Kaina, kasi ezaleli ya koponapona ekoki kopesa yo makanisi mpe mayoki ya mabe. Ekoki solo kozala ete makama mazali liboso na yo! Makama nini? Ndenge nini okoki kolonga yango?

Batelá lolemo na yo!

Wana azalaki na mbula 13, Carole azalaki komona lokola ete baboti na ye bazalaki kolinga mingi ndeko na ye ya mobali mpe bazalaki kosalela ye makambo na bokesene. Azali komikundola: “Nazalaki ntango nyonso koswana na mama na ngai, kasi yango ezalaki kobongisa makambo te. Lokola nazalaki koyoka te makambo oyo azalaki koloba na ngai mpe ye azalaki koyoka te makambo oyo ngai nazalaki koloba na ye, makambo mazalaki se kobeba.” Lokola bosilá mbala mosusu komona yango, konganga esalaka ete makambo mábeba lisusu koleka. Tozali kotánga na Baefese 4:31 ete: “Makambo nyonso na bololo mpe likunya mpe nkanda mpe kongala mpe kotɔnga málongwa na bino mpe makambo nyonso na mabe lokola.”

Ezali na ntina te ete otombola mongongo mpo ete báyoka yo. Kutu, matomba ya malamu mazwamaka nde na kolobáká na kimya nyonso. Masese 25:15 elobi ete: “Na motema molai okolonga kondimisa mokóló; lolemo na mongongo moke ekoki kobuka mokwa.” Soki emonani ete baboti na yo bazali komonisa ezaleli ya koponapona, kosilika te mpe koluka te kosambisa bango. Zelá ntango malamu mpe sololá na bango na kimya nyonso mpe na limemya.​—Talá Masese 15:23.

Soki ozali ntango nyonso kolobela mabunga ya baboti na yo to mpe kopamela bango mpo na “bokesene” oyo bazali komonisa, yango ekosuka se na kosilikisa bango mpe ekopusa bango ete báluka komilongisa. Na yango, yebisá bango nde likambo oyo ezali kotungisa yo na ntina na ezaleli na bango. (“Nayokaka mpasi mingi ntango bozali kotyela ngai likebi te.”) Yango ekopusa bango ete bázwa likambo oyo ozali koyebisa bango na motuya mingi. Lisusu, zalá “na koyoka noki” (Yakobo 1:19) Ekoki kozala ete baboti na yo bazali na bantina mpenza elongobani oyo bazali kotyela ndeko na yo likebi mingi koleka. Ntango mosusu azali na mikakatano oyo yo oyebi te.

Kasi osengeli kosala nini soki ozalaka pene ya kotomboka mpe ya koloba kozanga kokanisa ntango oyoki nkanda? Masese 25:28 ekokanisi “moto oyo ayebi kozala na bokonzi likoló na elimo na ye te” na mboka “ebukami mpe ezangi lopango,” moto yango akoki mpenza kokweisama na matindiki na ye moko oyo elongobani te. Nzokande, ye oyo azali na bokonzi likoló na elimo na ye akomonisa ete azali mpenza makasi! (Masese 16:32) Mpo na nini te kozela ete nkanda na yo ekita mpo na koyebisa mayoki na yo? Mbala mosusu ekozala malamu ete olekisa mokolo mobimba liboso ya koyebisa mayoki na yo. Na ntango nkanda ezali naino, okoki mpe ‘kolongwa wana,’ kokenda kotambola to mpe kosala mwa ngalasisi. (Masese 17:14, NW) Na kobateláká bibɛbu na yo, okomipekisa na kobimisa maloba ya kozokisa to mpe maloba mazangi bososoli.​—Masese 10:19; 13:3; 17:27.

Kozanga botosi oyo ebombami

Likama mosusu ya kopɛngola ezali bongo kozanga botosi. Nathalie, elenge mwasi ya mbula 16, amonaki ete soki lɛki na ye ya mobali asali mobulu na ntango ya boyekoli ya Biblia kati na libota, bazalaki kopesa ye etumbu te. Na yango, asilikaki mpo na “bokesene” wana, mpe na mbala moko abandaki koboya koyangana na boyekoli ya Biblia na libota. Esilá kokómela yo ete omonisa motó makasi to mpe oboya kopesa lisungi na yo mpamba te okanisaki ete bazalaki kosalela yo makambo na bokesene?

Soki ɛɛ, kobosana te ete botomboki motindo wana ya kobombama eyokani te na mobeko ya Biblia oyo esɛngi ete bana bákumisa baboti mpe bátosa bango. (Baefese 6:1, 2) Lisusu, kozanga botosi ekobebisa boyokani na yo na baboti. Eleki malamu kosolola na bango na ntina na mikakatano na yo. Masese 24:26 emonisi ete “ye oyo akozongisa maloba na sembo” akopesamela limemya epai na basusu. Nathalie asololaki na mama na ye na ntina na likambo oyo ezalaki kotungisa ye; bayokanaki mpe makambo mabongaki.

Likama ya komitangola

Lolenge mosusu ya mabe mpo na komonisa ete ozali kosepela te na ezaleli ya koponapona ezali bongo komitangola na libota na yo mpe koluka komipesa na bato oyo bazali libándá ya lisangá ya boklisto. Ezali yango nde ekomelaki Myriam, alobi ete: “Namitangolaki mpenza na libota na ngai mpe namipesaki na baninga oyo nazwaki na eteyelo. Nabimaki kutu elongo na bana mibali kozanga ete baboti na ngai báyeba yango. Kasi na nsima nakómaki konyokwama na makanisi mpe lisosoli na ngai ezalaki lisusu malamu te mpamba te nayebaki ete nazalaki kosala oyo elongobani te. Nazalaki na mposa ya kotika ezalela yango, kasi nazalaki koyeba te ndenge nini nakokaki koloba yango epai na baboti na ngai.”

Komitangola na libota na yo mpe na baklisto mosusu, ezali likama mingi mpenza wana otungisami na likambo moko mpe oyebi mpenza te nini osengeli kosala. Masese 18:1 ekebisi biso na maloba oyo: “Ye oyo akomitangola na bamosusu akolukaka yango ekosepelisa ye moko; akosilika na makambo nyonso na mayele.” Soki ozali kokakatana mpo na kosolola na baboti na yo, salá boninga elongo na moklisto moko oyo akokani mpenza na moto oyo alobelami kati na Masese 17:17: “Moninga akolingaka ntango nyonso; [azali] ndeko abotami mpo na ntango na mpasi.” Ezali kati na basangani ya lisangá oyo bakɔmeli mpenza na elimo nde ozali na mabaku mingi ya kozwa ‘moninga ya malamu.’

Myriam azwaki ‘baninga malamu’ na ntango oyo azalaki na bango mposa; alobi boye: “Ntango mokɛngɛli ya zongazonga ayaki kotala lisangá na biso, baboti na ngai balendisaki ngai ete nasakola elongo na ye. Ye mpe mwasi na ye bazalaka mpenza na makanisi ya kolonga, mpe batyelaki ngai likebi ya solosolo. Nakokaki kosolola na bango kozanga kobanga ete básambisa ngai. Bayebaki ete kobotama kati na libota ya boklisto elimboli te kozala moto ya kokoka.” Bilendiseli na bango, bakisa mpe batoli na bango ya mayele ezalaki mpenza makambo oyo Myriam azalaki na yango mposa!—Masese 13:20.

Likama ya zuwa

Tozali kotánga na Masese 27:4 ete: “Kosilika ezali na yauli mpe nkanda eleki na mabe; nde nani akotɛmɛla [zuwa, NW]?” Elulela mpe zuwa mpo na ndeko na bango oyo baboti basepelaka na ye mingi epusaki bilenge mingi na kosala makambo oyo malongobani te. Mwasi moko alobi ete: “Ntango nazalaki mwana moke, nazalaki na nsuki ya pɛpɛlɛ mpe ya mabe, nzokande ndeko na ngai ya mwasi azalaki na nsuki ebele mpe milai ekitá kino na lokɛto. Tata na ngai azalaki ntango nyonso kokumisa nsuki na ye . . . Na yango, mokolo moko na butu wana ndeko na ngai ya mwasi alalaki, nazwaki sizo oyo mama azalaki kokata na yango bilamba, nakendaki malembe kino na mbeto na ye mpe nakataki ye nsuki mingi mpenza.”​—Bazali bandeko kasi bambanda te (na Lingelesi), Adele Faber mpe Elaine Mazlish.

Ezali likambo ya kokamwa te ete Biblia etángi elulela kati na “misala na nzoto.” (Bagalatia 5:21; Baloma 1:28-32) Nzokande biso banso tozali na ‘mposa ya elulela.’ (Yakobo 4:5, NW) Soki omoni ete makanisi ya koluka kosala ndeko na yo mabe to mpe koluka kokitisa ye na lolenge moko to mosusu mazali koyela yo, mbala mosusu ezali nde elulela ‘ezali kolala na ekuke,’ na yo mpe mposa na yango elingi kosimba yo!

Osengeli kosala nini soki omoni ete makanisi mabe mazali koyela yo? Ya liboso, bondelá Nzambe mpo na kosɛnga ye elimo na ye. Tozali kotánga kati na Bagalatia 5:16 ete: “Bótambola na elimo mpe bópesa nzela na mposa na nzoto te.” (Talá mpe Tito 3:3-5.) Yango ekoki mpe kosunga yo na komanyola likoló na mayoki oyo ozali na yango mpo na ndeko na yo. Atako ozali koyokela ye nkanda, okoki mpenza koloba ete olingaka ndeko na yo soko moke te? Makomami mayebisi biso ete: “Bolingo . . . ezali na zuwa te.” (1 Bakolinti 13:4) Na yango, boyá makanisi oyo mazali kopusa yo na kozala na zuwa. Soki baboti na yo bazali kotyela ndeko na yo likebi mingi koleka, salá makasi ete osepela na ye elongo.​—Talá Baloma 12:15.

Na likambo oyo mpe, ekoki kozala na ntina ete osolola na baboti na yo. Soki basosoli ete basengeli kotyela yo likebi mingi, yango ekosalisa yo ete olonga zuwa na yo. Sikawa, osengeli kosala nini soki makambo mazali kobongwana te na ndako, soki koponapona ezali ntango nyonso komonana? Kosilikela baboti na yo, kongangela bango mpe komonisela bango botomboki ekobongisa makambo te. Meká ntango nyonso kozala pene mpo na kopesa lisungi na yo mpe komonisa botosi. Soki yango esengeli, luká lisungi ya baklisto oyo bakɔmeli kati na lisangá. Kasi, oyo ezali na ntina mingi koleka, bɛlɛmá epai na Yehova Nzambe. Omikundola maloba ya mokomi na nzembo oyo alobaki ete: ‘Ata tata mpe mama bakotika ngai, nde [Yehova] akolɔkɔta ngai.’—Nzembo 27:10.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Topesi bango nkombo mosusu.

b Talá lisolo “Mpo na nini nyonso bobele mpo na ndeko na ngai?” ebimaki na Lamuká ya 22 Ɔkɔtɔ́bɛ 1997 (na Lifalansé).

[Elilingi na lokasa 16]

Mpo na kobongisa makambo, esengeli mbala mosusu ete oyebisa mayoki na yo

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto