Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g98 Avril nk. 22-25
  • Babinga: Bato oyo bafandi kati na zamba

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Babinga: Bato oyo bafandi kati na zamba
  • Lamuká!—1998
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Koluka koyeba makambo mosusu na ntina na Ba Pygmées
  • Mobembo ya liboso epai na Babinga
  • Bomoi ya mokolo na mokolo, libala mpe libota
  • Losambo
  • Bato ya mayele
  • Solo ya Biblia ekómi epai ya Batswa
    Lamuká!—2004
  • Mpasi na ntango ya bitumba eteyá ngai makambo mingi na bomoi
    Lamuká!—2005
  • “Banzete ya Yehova etondi na mai”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
Lamuká!—1998
g98 Avril nk. 22-25

Babinga: Bato oyo bafandi kati na zamba

EUTI NA MOKOMANI NA BISO NA RÉPUBLIQUE CENTRAFRICAINE

YAKÁ kotala Babinga, Ba Pygmées ya République centrafricaine, epai biso tofandi. Mbala mosusu osilá koyoka to kotánga likambo moko na ntina na Ba Pygmées, kasi ekoki kozala ete ozwá naino libaku ya kokutana na bango te. Soki oyei na Bangui, mboka-mokonzi ya République centrafricaine, mobembo ya ngonga soko mibale na motuka ekokómisa yo kino esika bango bazali.

Batatoli ya Yehova bazali na nsango moko ya ntina mingi mpo na bato ya mabota nyonso, ya bikólo nyonso, ya mposo nyonso mpe ya bituluka nyonso. Kati na mosala na biso ya boklisto, tosakolaka nsango malamu epai na bato ya mitindo nyonso. Ata mpe epai na Ba Pygmées.​—Emoniseli 14:6.

Na bongo, yaká elongo na biso kotala lolenge ya bomoi na bango mpe lolenge basepelaka na nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe, oyo ekotya Paladiso awa na mabelé. Ekozala mokolo kitoko mpe ya esengo mpo na yo.

Koluka koyeba makambo mosusu na ntina na Ba Pygmées

Liboso ya kokenda, ezali na ntina mpo na biso ete tóluka koyeba makambo mosusu na ntina na bato oyo tokotala. Babuku oyo ekomamaki na bato oyo bafandaki na boumeli ya basanza esika moko na Ba Pygmées ezali, bakomi yango bayekolaki mimeseno na bango, lolenge na bango ya kosambela mpe misala na bango.

Kotánga masolo matali bato yango ya boboto mpe ya boninga mpe na nsima kokenda kotala bango ekopesa biyano na mituna mingi, na ndakisa: Ba Pygmées bautaki wapi? Makambo nini tokoki koyeba na ntina na bango? Bafandaka wapi? Nini ekesenisaka bango na bato mosusu ya Afrika? Lolenge nini bayokanaka na bato mosusu?

Diksionere Webster’s Third New International elobi ete Ba Pygmées bazali “etuluku moko ya bato ya Afrique équatoriale oyo bolai na bango elekaka mɛtɛlɛ 1,50 te . . . Bafandaka na boninga mpenza elongo na baindo mosusu mpe balobaka nkota ya baoyo bafandi penepene na bango. Ekanisami ete Ba Pygmées ya Afrika bazali libota moko te na Ba Negritos.” Diksionere yango elobi lisusu ete Negritos (elimboli “mwa baindo”) “bazalaka na Oseania mpe na sudi-ɛ́sti ya Azia.”

Liloba “pygmée” euti na liloba ya Greke oyo elimboli “bolai ya lipeko moko.” Ba Pygmées babikelaka na bokila mpe na mbuma ya zamba. Ekanisami ete Ba Pygmées nyonso na mokili mobimba bazali soko 200 000.

Serge Bahuchet mpe Guy Philippart de Foy bayebisi biso makambo mosusu ya ntina kati na buku na bango Pygmées​—peuple de la forêt (Ba Pygmées​—Bato oyo bafandaka kati na zamba). Balobi ete, Ba Pygmées bafandaka kati na bazamba minene ya République du Congo, République démocratique du Congo, Gabon, Cameroun, mpe République centrafricaine, mpe bakoki kutu komonana mosika epai ya ɛ́sti na Rwanda mpe na Burundi.

Moto moko te ayebi na bosikisiki epai Ba Pygmées bautá to na eleko nini. Basalelaka soko moke te liloba “Pygmée” mpo na komilobela bango moko. Na République centrafricaine, babéngaka bango mingimingi Babinga, kasi na bikólo mosusu bayebani na bankombo lokola Bakola, Babongo, Baaka, Bambɛzɛlɛ, Batwa mpe Bambuti.

Mobembo ya liboso epai na Babinga

Tolongwaki na Bangui na ntɔngɔntɔngɔ, soko na ngonga ya nsambo, na motuka ebéngami Land Cruiser, mpo na kokenda epai ya súdi na M’Baiki/ Mongoumba. Nzela yango ebongisami na gudrɔ́ bobele na bolai ya kilomɛtɛlɛ 100 ya liboso. Ezalaki malamu lokola tozalaki na motuka oyo pinɛ́ nyonso minei etambwisami na motɛlɛ, mpamba te nzela yango ezalaki moselu nsima ya mbula oyo enukaki na butu.

Totambolaki na motuka na nzela ya bazamba minene mpe na bamboka mike oyo bipai nyonso na nzela bato batɛkaka biloko na bango likoló ya bamesa ya mike. Okoki komona bazali kotɛka bitabe, makemba, mananasi, kwanga, madesu mpe nguba. Kuna nzala ezali te. Mabelé kitoko mpe mpiɔ oyo ezali kuna ezali kobimisa biloko mingi mpenza. Na nsima, tokómi mbala moko na “mboka” to káa ya liboso ya Babinga.

Bandako na bango izali mpenza mikemike oyo izali na mwa ekuke ekoki koingela bobele na kongunzama. Basi batongaka bandako yango na banzete mpe bankasa ya zamba. Mwa bandako ya mikemike soko 10 to 15 isali molɔngɔ́ ya zolongano. Mwa bandako yango izalaka bobele mpo na kolala to mpo na kobombana na ntango ya mbula makasi. Bomoi ya mokolo na mokolo balekisaka yango mingimingi na libándá.

Totɛlɛmaki mpe tobimaki na motuka mpo na kopesa basi oyo tomonaki mbote, mokomoko amemaki mwana na loketo na ye. Ntango bayoki lokito ya motuka na biso, mibali mosusu bayaki mbangu kotala soko tozali banani mpe soko tolingi nini. Bazalaki na bambwa na bango, mokomoko ezalaki na mwa ebende moke ya ngonga na nkingo.

Tomikundolaki bolukiluki oyo tosalaki oyo emonisaki ete nyama oyo Ba Pygmées babɔkɔlaka ezali bobele mbwa. Bambwa yango ezali baninga na bango ya bokila. Mpe kobanda na mabelé kino likoló ya nzete, nyama ya koboma izali mingi. Lokola buku Pygmées​—peuple de la forêt emonisi yango, banyama yango ezali bongo ndɛkɛ, makako, nzoku, nzale, mitomba, mboloko, nsombo, bisende, mpe banyama mosusu mingi. Moto nyonso asengeli kozala na mbwa na ye.

Ntango tosololaki na bato yango, tosalelaki buku Mokanda mpo na Masolo ya Biblia mpe mwa buku Sepela na bomoi ya seko na mabele!a Mikanda yango mizali komonisa ete na mikolo mizali koya mabelé makokóma paladiso na bazamba ya kitoko, epai kuna maladi mpe liwa ekozala lisusu te. (Emoniseli 21:4, 5) Mikanda yango mizali mpe na lokota Sango, lokota oyo elobamaka na bato pene na nyonso (90 %) na ekólo yango, bakisa mpe Babinga. Bato yango ya boboto, ezala epai oyo bafandi, bazalaka na momeseno ya koloba lokota ya bituluka ya Afrika oyo bazali pene na bango. Yango ezali na ntina mpamba te epesaka nzela ya kosala na bango mombongo.

Na mbala moko, mibali mpe basi mingi bazingi biso, bazalaki kotala na likebi mpenza elilingi moko nsima na mosusu mpe kolanda bandimbola oyo tozalaki kopesa. Lokola Batatoli ya Yehova bakendaki kotala bango esili koleka bambula, bayebi biso ete tozali Batatoli ya Yehova. Bazali kosepela kozwa mikanda. Nzokande, mokakatano na bango ezali ete bayebi kotánga te. Na boumeli ya bambula, bakonzi ya Leta mpe bibongiseli mosusu basalaki milende mpo na kolakisa bango kotánga mpe kokoma, kasi bobele mpamba. Kelasi ebongisamaki mpo na bana na bango. Biteyelo yango bitambwisamaki na boumeli ya mwa ntango, kasi na nsima bana mingi bakimaki. Molakisi moko oyo azalaki kotángisa Babinga alobaki ete ntango bazali na kelasi bazali mpenza bana ya mayele, kasi nsima ya basanza mingi, bakimaka. Kasi, bakonzi ya mboka mpe bato mosusu bazali kosala milende mpo na kokóba kokɔtisa bango na kelasi.

Batatoli ya Yehova bayebani na lolenge bazongelaka bato oyo bamonisi bosepeli na Liloba ya Nzambe. Kasi tozalaka na elikya te ete na mbala ya nsima tokokutana na Babinga oyo tosololaki na bango liboso, mpamba te bafandaka esika moko te. Na bantango mosusu bakɔtaka na bazamba minene na boumeli ya basanza mingi. Milende oyo esalemaki mpo na kofandisa bango esika moko elongaki te. Ya solo, bazali mpenza bato oyo bafandaka kati na zamba monene. Kolekaleka mpe koboma nyama ezali lolenge ya bomoi na bango, mpe eloko moko te ekoki kobongola bomoi yango.

Bomoi ya mokolo na mokolo, libala mpe libota

Na momeseno, mibali basalaka bokila mpe basi balukaka biloko ya kolya, biloko nyonso oyo ezali kobima na zamba: mayebo, misisa ya nzete, mbuma, nkasa, nyamankɛkɛ, ndɔngɛ, mafuta ya nzoi, mpe kobosana mbinzo te eloko oyo bango balingaka mingi mbinzo. Biloko wana nyonso basengelaka na yango mpo na kolya mpe mpo na kotɛka. Bituluka mosusu ya bato oyo bafandaka pembeni ya Ba Pygmées, oyo mbala mingi babéngaka bango Grands Noirs (Baindo Bingambe), mingimingi basengelaka na Ba Pygmées mpo na kozwa biloko wana. Ba Pygmées bazwaka epai na bango nzungu, mbeli, bipasola mpe makwangola, mongwa, mafuta ya mbila, kwanga, makemba, mpe na mawa nyonso makaya, lotoko mpe bangi. Makaya, lotoko mpe bangi ezali mpenza kopesa bato yango ya boboto kwɔkɔsɔ monene. Mbala mingi bakɔtaka banyongo mpo na kozwa biloko yango, mpe mokemoke yango ebebisaka bomoi na bango.

Na momeseno, mibali bazalaka na mwasi moko. Nzokande, baumelaka te koboma libala na bango to kokabwana na mobalani na ye mpo na kobala mwasi mosusu. Tata to moto oyo azali mokóló na mboka bapesaka ye limemya mingi koleka. Apesaka mitinda te, kasi balandaka toli na ye. Okomona ete Ba Pygmées balingaka bana na bango. Tata mpe mama bamemaka bana na bango mingi mpenza. Bana yango ya mike bazalaka ntango nyonso elongo na baboti na bango bipai nyonso bazali kokenda mpe bazali kosala, ezala na mosala, na bokila to na ntango bazali kobina.

Na butu, mwana ya moke alalaka na katikati ya baboti. Na moi, baboti, bandeko mibali, bandeko basi, banɔkɔ, bankɔkɔ bakɛngɛlaka bana mike, mpe lisusu, batyaka likebi na mboka mobimba. Kokenda kotala baboti mpe biboto esalemaka mingi. Nyonso wana esalaka ete mabota mázala na bokangami makasi. Na mikili ya Mpoto, boyokani kati na mabota ezali mpenza malamu te to ezali te, kasi awa makambo mazali ndenge mosusu.

Atako Ba Pygmées bafandaka esika moko te na bato mosusu ya Afrika, kasi bazali na bango na boyokani na makambo matali mombongo. Longola bokutani oyo basalaka na makambo ya mombongo mbala na mbala, basɛngaka na bango kosala lokola basáli na bilanga ya kafe mpe ya kakao. Bamoko basalaka na boumeli ya mwa bapɔsɔ, na nsima soki bazwi lifuti na bango, bazongi na zamba mpo na ntango molai. Oyebi, mbala mosusu kafe oyo omelaki na ntɔngɔ ya lelo eutaki na mosala ya Ba Pygmées ya République centrafricaine, boye te?

Losambo

Ba Pygmées bazali bato oyo bamipesi na makambo ya losambo, kasi biyambayamba mpe bonkɔkɔ ezali koyangela bomoi na bango ya losambo. Milulu na bango esangisaka miziki, nzembo (yodler), mpe mabina. Buku Ethnies​—droits de l’homme et peuples autochtones (Bituluka​—Ntomo ya bato mpe bankolo-mboka) epesi ndimbola oyo: “Mpo na bato ya zamba monene, Nzambe akelaki mokili, elingi koloba zamba. Nsima ya kokela babalani ya liboso . . . , azongaki na likoló mpe azali lisusu kosepela na makambo ya bato te. Sikawa, elimo moko ya nguya, nzambe ya zamba, azali kosala na esika na ye.” Ya solo, maloba yango makeseni mpenza na ndimbola oyo ezali kati na Biblia na ntina na Nzambe mpe mokano na ye.​—Genese, mokapo 1, 2; Nzembo 37:10, 11, 29.

Bato ya mayele

Emonanaka ete bato mosusu batyolaka to bamonaka Ba Pygmées lokola bato mpamba, batalelaka bango lokola bazali na ntina te mpe bazali na mayele te. Kasi Patrick Meredith, profɛsɛrɛ ya psychophysique na Iniversite ya Leeds na Angleterre alobi ete: “Soki omoni Ba Pygmées na bisika bafandi lolenge bazali kosala gbagba ya nsinga mpe bazali na bomoi malamu okoki komituna soki kozala na mayele elimboli nini.”

Toyebi ete bato nyonso bauti na babalani ya liboso, Adama na Eva. Misala 17:26 elobi ete: “Na nkɔkɔ moko [Adama] [Nzambe] abotisi mabota nyonso na bato kofanda na mikili nyonso na nsé.” Mpe Misala 10:34, 35 elobi ete: “Nzambe akokabolaka bato te; kasi kati na mabota nyonso, oyo akobangaka ye mpe akosalaka boyengebene ayambami na ye.” Na yango, tolingi komema solo ya Biblia epai na bato yango mpo ete bango mpe bákoka kozala na elikya ya kobika na ntango oyo mosika te mabelé mobimba ekobongolama paladiso kitoko na bazamba minene.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.

[Bililingi na lokasa 25]

1. Kosakola nsango malamu ya Biblia epai na Babinga;  2. Mobinga oyo azali mosáli ya bikeko ya nzete; 3. ndako ya Babinga

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto