Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g98 Octobre nk. 28-29
  • Makambo mazali koleka na mokili

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makambo mazali koleka na mokili
  • Lamuká!—1998
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bobola mpe ezingelo
  • Kozanga elikya ezali likama
  • Ntango oyo bato balekisaka na nzela
  • Ngonga na Moyen-Orient
  • Bobangi mpo na kokwea ya lokota ya Lifalanse
  • Etumba mpo na kosukisa momeseno ya kopesaka kanyaka
  • Mbinzo ekómi kolyama mingi
  • Mabe ya likaya ebebisaka bato mosusu te?
  • Bikangeli elongwi na Sphinx
  • Olyaka mbinzo?
    Lamuká!—2007
  • Komɛla likaya ezali lisumu?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Nasengeli koyeba nini na likambo ya komɛla makaya?
    Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, Volimi 1
Lamuká!—1998
g98 Octobre nk. 28-29

Makambo mazali koleka na mokili

Bobola mpe ezingelo

Atako bokoli ezali komonana na makambo ya nkita, bato koleka miliare 1,3 bazali naino kobikela na mosolo oyo ezali na nse ya dolare mibale na mokolo. Lapolo moko ya Mabota Masangani (ONU) elobi ete, bobola ezali bobele koumela te kasi ezali mpe kokóma makasi mingi koleka. Bato koleka miliare moko bazali lelo kozwa biloko moke mpenza mpo na kobikela koleka ndenge yango ezalaki mbula 20, 30, to 40 liboso. Zulunalo UNESCO Sources emonisi ete mokakatano yango ezali kopusa bato ete bábebisa ezingelo, mpamba te “bobola esalaka ete bato bákatakata bazamba mpe básalela biloko bizalisami mpe yango ezali kobebisa milende nyonso oyo mizali kosalema mpo na kobatela biloko yango mpo na ntango molai. Lolenge bato bazali kosalela biloko bizalisami, emonani ete na bisanga Antilles, nsima ya mbula soko 50, zamba ekozala lisusu te . . . Soki totaleli ekólo na ekólo, ezalela yango ezali lisusu mabe koleka: Na ndakisa, nsima ya mbula soko 30, ekólo Philippines ekozala lisusu na bazamba te, nsima ya mbula soko 16, ekólo Afghanistan ekozala lisusu na bazamba te mpe nsima ya mbula soko 15, ekólo Liban ekozala lisusu na bazamba te.”

Kozanga elikya ezali likama

Zulunalo The Times ya Londres ekomi ete: “Bato ya siansi balobaka ete . . . kozanga elikya ekoki kosala mabe na motema lolenge moko na komela makaya 20 mokolo na mokolo. Bolukiluki moko esalemaki na boumeli ya mbula minei epai na mibali soko 1 000 ya mibu 40 kino 60 na ekólo Finlande, emonisaki ete kozanga elikya ezalaki kokolisa likama ya kozwa maladi oyo ebéngami athérosclérose, to maladi oyo ekómisaka misisa makasi.” Bolukiluki yango emonisaki ete makanisi ya moto ekoki kozala na bopusi mingi likoló na bokolɔngɔnɔ ya nzoto na ye. Dr. Susan Everson, motambwisi ya bolukiluki yango, alobaki ete: “Mbala mingi tomonaka ete boyokani ezali kati na mayoki, makanisi ya moto mpe bokolɔngɔnɔ ya nzoto na ye. Minganga basengeli koyeba ete kozanga elikya ezali mabe mpe engalisaka maladi. Bato basengeli koyeba ete ntango bazali na mayoki ya kozanga elikya, basengeli koluka lisalisi.”

Ntango oyo bato balekisaka na nzela

Zulunalo La Repubblica elobi ete bato oyo bafandi na bingumba minene na ekólo Italie, lokola nzela etondaka na mituka balekisaka ntango mingi mpo na kokende na mosala to kokende na eteyelo mpe kozonga na ndako. Balekisaka mpenza ntango boni? Engebene Legambiente, ebongiseli ya makambo matali ezingelo na ekólo Italie, bato oyo bafandi na engumba Naples balekisaka miniti 140 na nzela mokolo na mokolo. Yango ezali komonisa ete moto oyo afandi na engumba Naples oyo mwayene ya bomoi na ye ezali mibu 74, akobungisa mibu 7,2 na nzela. Moto oyo afandi na Rome alekisaka miniti 135 mokolo na mokolo na nzela, akobungisa mbula 6,9 na nzela. Ezaleli yango ezali mpe malamu te na bingumba mosusu. Bato oyo bafandi na engumba Bologne bakobungisa mbula 5,9 ya bomoi na bango na nzela, mpe bato oyo bafandi na engumba Milan bakobungisa mbula 5,3 na nzela.

Ngonga na Moyen-Orient

Zulunalo The New York Times elobi ete, mbongwana ya ngonga ezalaka mbala mosusu mokakatano epai na bato ya Moyen-Orient. Na ndakisa, na ekólo Iran, uta bambula mingi, “bamɔntre ezalaka na ngonga misato na miniti ntuku misato koleka ngonga oyo etyami na Greenwich, nzokande na bikólo mosusu mingi, babakisaka to bakitisaka bobele na bangonga ya mobimba. “Mpo na kolanda nsango na 5:00 ya ntɔngɔ na lolaka ya BBC, osengeli kofungola radio na 8:30 mpe kosala makasi ete olanda te kobɛta ya ngonga ya Big Ben oyo ekomeka kokosa mɔntre na yo.” Nzokande, na momeseno, mpo na koleka na ngonga ya eleko ya mpiɔ, yango esalemaka na wikende ya nsuka ya Sɛtɛ́mbɛ. Na mobu moleki, ekólo Israël esalaki yango na mwa 13 Sɛtɛ́mbɛ. Koyeba mikolo ya wikende ezalaka mpe mokakatano. Na bikólo mingi ya Golfe Persique, batalelaka Mwaminei mpe Mwamitano lokola mikolo ya wikende. Nzokande, na ekólo Égypte mpe na bikólo mosusu ya zingazinga, mikolo ya wikende ezali Mwamitano mpe Mwapɔsɔ, na ekólo Liban ezali Mwapɔsɔ mpe Mwalomingo. Zulunalo Times emonisi ete “Mosali mobembo oyo akómi na engumba Abou Dabi na Mwamisato na midi mpe azwi mpɛpɔ mpo na kokende na engumba Beyrouth na Mwamitano na mpokwa akozwa wikende ya mikolo minei. Nzokande, alinga-mosala akoki bobele kosala mobembo na kozongáká epai autaki.”

Bobangi mpo na kokwea ya lokota ya Lifalanse

Zulunalo Le Figaro elobi ete batindami ya bikólo oyo Lifalanse ezali kolobama bayanganaki na likita moko ya mikolo misato na engumba Hanoï, na ekólo Viêt Nam mpo na molulu ya “kopalangana ya Lifalanse na mokili mobimba.” Lifalanse elobamaka na bato koleka milio 100. Wana ezalaki na lokumu mingi na ekeke ya 17, Lifalanse ezalaki lokota ya bato ya politiki na mikili mingi. Zulunalo yango elobi ete, “Kati na mikili ya Mpoto oyo ekabwanaki mpo na bitumba mpe bowelani, esukaki na mikanda ya boyokani mpe ya kimya oyo ekomamaki na Lifalanse.” Nzokande, lelo oyo Lifalanse “ezali koluka kozongela esika na yango kati na mokili.” Soki Lifalanse ezali kolobama lisusu mingi te ekoki kozala mpo ete Lingelesi nde ekómi kolobama mingi, mingimingi lokola Lingelesi ezali lokota ya makambo ya mombongo. Mpo na koluka kokolisa Lifalanse, prezida ya France alendisaki balobi ya Lifalanse ete bátya yango na ebongiseli ya bapanzi-nsango oyo ebéngami autoroute de l’information. Nzokande, ntango amonisaki bobangi na ye mpo na Lifalanse, moto moko ya politiki alobaki ete: “Lifalanse ezali lisusu kosepelisa bato na mokili mobimba te, ezala bapanzi-nsango to bato ya politiki. Kozanga bosepeli yango ezali kutu komonana na France koleka na mikili mosusu.”

Etumba mpo na kosukisa momeseno ya kopesaka kanyaka

Na ekólo Chine ebéngamaka huilu; na ekólo Kenya ebéngamaka kitu kidogo; na ekólo Mexique babéngaka yango una mordida; na Russie nde vzyatka; mpe na Moyen-Orient balobaka bakchich. Na bikólo mingi, kanyaka ekómá momeseno, mpe mbala mosusu ezali nzela bobele moko ya kosala mombongo, ya kozwa biloko, to ya kolonga na likambo. Nzokande, eleki mikolo mingi te, bikólo 34 bityaki mabɔkɔ na mokanda moko mpo na kolongola momeseno ya kopesa kanyaka na makambo ya mombongo na mikili mingi. Kati na bikólo yango ezalaki mpe na basangani 29 ya ebongiseli ebéngami Organisation de coopération et de développement économiques, bakisa mpe bikólo Argentine, Brésil, Bulgarie, Chili mpe Slovaquie. Bibongiseli mibale ya minene na makambo matali mosolo na mokili mobimba​—Banque mondiale mpe Fonds monétaire international, ekamataki mpe meko mpo na koluka kosukisa momeseno ya kopesa basali ya Leta kanyaka. Meko yango ekamatamaki ntango ankɛtɛ moko ya Banque mondiale emonisaki ete bakompanyi ya mombongo 40 likoló na monkama kati na bikólo 69 ezalaki kopesa kanyaka. Na bongo, bibongiseli yango mibale ezwi ekateli ete bikólo oyo ezali kozwa meko te mpo na kosukisa momeseno ya kanyaka, ekopesa yango mosolo te.

Mbinzo ekómi kolyama mingi

Uta kala, mbinzo eyebani ete ezalaka bilei ya babola oyo bafandi na sudi ya Afrika, epai oyo batalelaka yango lokola bilei ya ntina mpo na proteine na yango. Babéngaka mbinzo yango na bankombo ya nzete oyo yango elyaka nkasa na yango. Na Apríli mpe na Desɛ́mbɛ, basi balokotaka mbinzo yango mpe na nsima batɔkisaka yango mpe bakaukisaka yango na moi. Proteine na yango, mafuta na yango, vitamini na yango mpe calories na yango epesaka nzoto makasi lokola oyo ya mbisi mpe ya nyama. Nzokande, sikawa, mbinzo yango ezali kolyama mingi na barestora ya Afrika ya Sudi. Bosepeli yango esili mpe kokóma na Mpoto mpe na États-Unis, mpe yango ezali kobangisa bato ya mboka ya zamba na Afrika. Mpo na nini bazali kobanga? Zulunalo The Times ya Londres elobi ete, “Lokola bato bakómi kolinga mbinzo yango mingi kuna, bato ya bamboka yango bazali kobanga ete ekosila. Kutu mbinzo yango emonanaka lisusu te na bazamba ya bikólo Botswana mpe Zimbabwe.”

Mabe ya likaya ebebisaka bato mosusu te?

Engebene bolukiluki moko oyo euti kosalema, likaya ekoki kobebisa ntango nyonso misisa oyo etambwisaka makila na nzoto. Kati na The Journal of the American Medical Association, bolukiluki emonisi ete komela likaya mpe kopema milinga na yango ekoki kobebisa misisa. Bolukiluki yango esalemaki epai na mibali mpe basi 10 914 oyo bazalaki na mbula longwa na 45 kino 65. Etuluku ya bato yango ezalaki na bameli-likaya, bameli oyo batiká, bato oyo bamelaka te kasi bazalaka mbala na mbala to na mwa bantango esika moko na bameli-likaya. Na lisalisi ya ultrasons, balukiluki bamekaki bonene ya mosisa ya nkingo ebéngami carotide. Bazongelaki lisusu mwango yango nsima ya mbula misato.

Lokola bazalaki kokanisa ete ekozala bongo, misisa ya bameli minene ya likaya ekómaki makasi​—50 % epai na baoyo bazalaki komela na mwayene pake moko ya likaya na mokolo na boumeli ya mbula 33. Misisa ya bameli oyo batiká ekómaki makasi na lombangu ya 25 % koleka ya bato oyo bamelaka likaya te​—ezalaki mpe bongo mpo na basusu oyo batiká komela esili koleka mibu soko 20. Epai na baoyo bamelaka likaya te kasi bazalaka esika moko na bameli-likaya, misisa ekómaki makasi mbala 20 % koleka baoyo bazalaka esika moko te na bameli-likaya. Engebene bolukiluki yango, milinga ya bameli-likaya ebomaka bato soko 30 000 kino 60 000 mbula na mbula na États-Unis.

Bikangeli elongwi na Sphinx

Nsima ya mbula nsambo ya misala, balongoli bibende oyo ezingaki ekeko ya Sphinx na Egypte. Ahmad al-Haggar, mobateli ya biloko ya kala na etúká yango alobaki ete: “Kobongisama ya Sphinx, kobanda 1990 kino 1997, esɛngaki mabanga nkóto monkama.” Nzokande, abakisaki ete mosala yango makasi esali eloko te mpo na kobongisa elongi ya “ekeko yango monene oyo esalemi na mabanga mpe ezali ndambo-moto ndambo-nkosi.”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto