Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g99 Juillet lok. 16
  • Lolenge ya bilamba oyo tolataka—Ezali mpenza na ntina?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Lolenge ya bilamba oyo tolataka—Ezali mpenza na ntina?
  • Lamuká!—1999
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mode elakisaka nini?
  • Tokómi wapi na mimeseno ya kolata?
  • Mpo na nini bato balingi mpenza kolata mpo na komilakisa?
  • Nalataka malamu?
  • Omilatisa na kozaláká na “makanisi malamu”
  • Elateli na yo ekumisaka Nzambe?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2016
  • Molato na biso mpe ndenge oyo tomonanaka na miso ya bato ezali na ntina
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
  • Molato mpe ndenge na biso ya kobongisa nzoto ezala ya mindɔndɔ te
    Mosala na biso ya Bokonzi—2002
  • Namonanaka ndenge nini na miso ya bato?
    Mituna oyo bilenge batunaka
Makambo mosusu
Lamuká!—1999
g99 Juillet lok. 16

Lolenge ya bilamba oyo tolataka—Ezali mpenza na ntina?

“NAYEBI te elamba nini nakolata!” Maloba ya ndenge wana emonisaka ete moto azali kosɛnga lisalisi, oyokaka yango? Ya solo, lelo oyo, bato oyo babimisaka midele ya bilamba bazalaka ntango nyonso na bolingo malamu mpo na kosalisa yo—to mpo na kobulunganisa yo lisusu mingi koleka—na midele na bango oyo euti kobima.

Ekómi lisusu mpasi koleka mpo na kopona molato, mpamba te na mikolo oyo, makambo ya mikolo oyo ekómi nde kopusa bato bálata mobulumobulu, kasi na lolenge malamu te. Mpo na mobulungano yango ya bambula ya 1990, zulunalo moko oyo elobelaka bilamba ekomaki ete: “Ekoki kozala malamu koyeba bobele te ete elamba yango ezali malamu, kasi mingimingi balingaka oyo ebebá, ekómá ya kala, balatá yango mingi mpe mingimingi enzuluká.”

Ɛɛ, na mikolo na biso, bapiblisite ya bopusi makasi, bavɛdɛti minene ya televizyo, baninga mpe bayebani, koluka lokumu na mosala mpe koluka koyebana, ezali makambo oyo ebulunganisi lolenge ya kolata ya bato, mingimingi ya bilenge. Basusu kati na bango kutu bayibaka mpo na kolata elamba oyo ebimi sika.

Midele ya bilamba mingi ya bambula ya 1990 ezali kouta na midele oyo eleká, lokola ya hippie na mikili ya Mpoto na bambula ya 1960. Kozala na mandɛfu milai mpe ya bosɔtɔ, kozala na nsuki milai mpe kosanyola yango te, kolata bilamba ya salite mpe oyo enzuluká, yango ezali mpenza lolenge ya kobwaka mimeseno ya bonkɔkɔ. Kasi, elateli yango ya botomboki ebimisaki boombo mosusu, ezali bongo bopusi ya baninga.

Mingi mpenza, molato esili kokóma elembo monene oyo bato bazali komonisa bomoto na bango. Bilamba, mingimingi batriko, ekómi lokola bitanda ya piblisite mpo na komonisa masano minene, bilombe ya masano, masɛki, maloba ya kolɛmbisa, matumoli, bizaleli malamu—to bizaleli mabe—mpe biloko ya mombongo. To ekoki kosalelama mpo na kokebisa to kobangisa bato mosusu. Talá motó ya likambo oyo euti kobima na zulunalo Newsweek oyo elobaki ete: “Makomi ya mabe—Elembeteli ya molato ya bilenge.” Lisolo yango etángaki maloba ya elenge moko ya mbula 21 oyo azalaki koloba mpo na makomi ya triko na ye: “Nalataka yango mpamba te eyebisaka bato ezaleli na ngai. Nakopesa moto moko nzela te ete ayebisa ngai nini nasengeli kosala mpe nalingi motungisi te.”

Makomi oyo ezalaka na ntolo to na mokɔngɔ ya triko moto moko alati ekoki kokesana na oyo moto mosusu alati. Nzokande, emonisaka bopusi ya baninga—ezala etuluku ya bato oyo balingi komonisa bomoto na bango to oyo bazali komonisa elimo ya botomboki, komikumisa, misala ya mbindo, to mobulu. Mobimisi moko ya midele ya bilamba atɔbɔlaka madusu na bilamba ya bakiliya na ye ndenge bango basɛngaka ye. Alobaki ete: “Bakoki kopona ete natɔbɔla bilamba na bango madusu oyo ekokani na oyo mondoki ya moke (revolver) etɔbɔlaka to na oyo ya mondoki ya bokila to ya bitumba (mitrailleuse). Nyonso wana ezali bobele makambo ya mikolo oyo.”

Mode elakisaka nini?

Jane de Teliga, mobimisi ya midele ya bilamba na Powerhouse Museum, na engumba Sydney, na ekólo Australie, alobi ete: “Mingimingi bilamba ezali mwango ya komonisa bomoto na yo mpe mimeseno ya bato oyo oyokanaka na bango.” Abakisi ete: “Na elateli na yo, ozali komonisa ete osili kopona bato oyo olingi mpo okóma mbala moko kolata lokola bango.” Dr. Dianna Kenny, profesere ya pisikoloji na Iniversite ya Sydney alobaki ete molato ezali na ntina mingi mpo na kokesanisa bato, ndenge moko na lingomba, bozwi, mosala, kelasi otángá mpe adrɛsi ya ndako. Zulunalo Jet elobi ete, na eteyelo moko na États-Unis oyo banakelasi pene na nyonso bazali mindɛlɛ, botomboki ebimaki bobele mpo ete “banakelasi ya basi oyo bazali mindɛlɛ bakómaki kokanga nsuki ya mabɔkɔ, kolata bilamba minene mpe komekola bizaleli mosusu ya miziki ya ‘hip-hop,’ oyo ezali bongo elateli ya Baindo.”

Bolingi-etuluka ezali mpe komonana na mimeseno ya bato ya bituluka mosusu ya mikemike na kati ya etuluka monene, na ndakisa, na likambo ya miziki. Zulunalo Maclean’s elobi ete: “Mbala mingi, bilamba emonisaka lolenge ya miziki oyo moto aponi: baalingá-miziki oyo ebéngami reggae balataka bilamba oyo engɛngaka mpe bikɔti ya Jamaïque, nzokande baoyo balingaka miziki oyo ebéngami rock grunge balataka bikɔti oyo ekangakamaka na motó lokola sosɛti mpe basimisi ya karokaro.” Kasi ezala ata elateli ya ndenge nini, kosomba bilamba ya wusuwusu, oyo bapasolá, oyo ya bibamba, oyo ekomonisa ete moto azali mobola, oyo ekopesa ye nkombo ya litiyo mpo alingaka kolata bilamba oyo bangomá te mpe enzuluká, nyonso wana esɛngaka mbongo mingi.

Tokómi wapi na mimeseno ya kolata?

Mopanzi-nsango Woody Hochswender alobi ete: “Makambo nyonso mabongwani, mazali lisusu te ndenge ozalaki kokanisa liboso. Molato ya mibali oyo ezalaki kala eloko ya monzɛlɛ makasi, ekómi sikoyo mpenza ntina te . . . Elamba nyonso ekómi kolatama lokola batii yango likoló ya nzete.” Nzokande, momeseno ya ndenge wana, ekoki kosala ete moto atalelaka elateli na ye te. To ekoki komonisa ete moto azali komitosa te to kotosa bato mosusu te.

Na lisolo moko oyo elobelaki ndenge banakelasi batalaka baprofesere na bango, zulunalo Perceptual and Motor Skills elobi ete, “atako banakelasi basepelaka na profesere oyo alati jeans, kasi batosaka ye mpenzampenza te mpe mbala mingi batalelaka ye lokola profesere oyo ayebi eloko te.” Zulunalo yango elobaki lisusu ete, “basepelaka na profesere ya mwasi oyo alati jeans, basololaka na ye kozanga nkaka, bamonaka ye lokola azali mayele mingi te, batosaka ye mpenza te, bamonaka ye lokola profesere te, mpe mingimingi balingaka ete azala bongo.”

Bobele bongo, na bisika ya mosala, ezali mpe na lolenge mosusu ya kolata: kolata na ndenge ya kobenda likebi ya bato. Na mikolo na biso, basi mingi bakómi koluka kozwa esika ya likoló. Marie, mwasi moko oyo azali mokonzi na kompanyi moko oyo ebimisaka mikanda, alobaki ete: “Nalataka mpo na kolakisa bango. Nalingi komata ngɛngɛ.” Abakisaki ete: “Nalingi komonisa bango ete nazali mwasi kitoko.” Marie alobi ya solo ete lobanzo na ye ya liboso ezalaka likoló na ye moko.

Na ntembe te milato oyo eyebani mingi emonanaka mpe na mangomba. Bamoko kati na baoyo balingá molato bakendaka na ndakonzambe mpo na kolakisa molato oyo euti kobima. Nzokande, lelo oyo, bakonzi ya mangomba, wana bazali kokamba misa balati basutani na bango ya milai, mbala mingi, basepelaka te ndenge ndakonzambe etondaka bobele na bato oyo balati jeans mpe bilamba mosusu ya wusuwusu.

Mpo na nini bato balingi mpenza kolata mpo na komilakisa?

Bapisikologe balobi ete kolata bilamba mobulumobulu—emonanaka mingimingi epai na bilenge—ezali koluka matomba na yo moko, mpamba te yango ebendaka likebi ya bato. Balobelaka yango lokola “momeseno ya elenge ya komimona lokola eloko oyo esengeli kobenda likebi ya bato mosusu.” Na yango, ezali lokola elenge mobali to elenge mwasi azali koloba ete: “Nakanisi bozali na mposa na ngai makasi mpenza lokola namiyokaka mposa ngai moko.”​—American Journal of Orthopsychiatry.

Bafilozofe oyo balobelaka mingimingi lokumu ya moto mpe batyolaka Nzambe, bango mpe bakolisi likanisi yango (oyo epalangani mingi mpo na mombongo), ete yo nde moto oleki bato nyonso na mokili mobimba. Mokakatano ezali ete bato yango oyo ‘baleki bato nyonso’ bazali pene na miliare motoba. Bamilio ya bato kati na mangomba ya boklisto basili mpe komipesa na lolenge yango ya koluka biloko ya mosuni wana bazali kosala milende mpo na kozala na “bomoi malamu na ntango oyo.” (Kokanisá na 2 Timote 3:1-5.) Lisusu, lokola bomoko ya libota ezali kobeba mpe bolingo ya solosolo ezali lisusu te, ekoki kokamwisa biso te ete bato mingi, mingi mpenza bilenge, bazali na elikya ata moke te mpamba te bazali se kolukaluka komonisa bomoto na bango mpe komiyoka kati na libateli.

Nzokande, bato oyo bazali komibanzabanza mpo na molato na bango mpe mpo na etɛlɛmɛlo na bango liboso ya Nzambe bamitunaka boye: Na meko nini nasengeli komekola mbongwana ya mimeseno ya kolata? Ndenge nini nakoki koyeba soki elateli na ngai ezali malamu? Molato na ngai ezali mabe na miso ya bato?

Nalataka malamu?

Bilamba oyo tolataka ezalaka mingimingi liponi ya moto na moto. Moto na moto aponaka eloko alingi mpe makoki na biso ezali ndenge moko te. Mpe mimeseno ya kolata ekesanaka esika na esika, mboka moko na mosusu, mpe klima moko na mosusu. Kasi ata ezalela na yo ezali ndenge nini, kobosana etinda oyo te: “Ntango ezali mpo na eloko na eloko mpe [ngonga, NW] mpo na likambo na likambo na nse na moi.” (Mosakoli 3:1) Na maloba mosusu, latá bilamba na kotaleláká ntango. Mpe etinda ya mibale yango oyo: “Otambola na bopɔlɔ esika moko na Nzambe na yo.”​—Mika 6:8.

Yango elingi koloba te ete tómityela mibeko makasimakasi, kasi nde tólata na lolenge oyo ‘ebongi mpenza malamu’ mpe oyo ezali komonisa “makanisi malamu.” (1 Timote 2:9, 10, NW) Zulunalo Working Woman elobi ete, mbala mingi, ezaleli yango elimboli komipesa, kopona eloko ya malamu mpe kozala na bonzenga. Motinda moko ya malamu ezali ete, ntango okɔti na ndako moko bilamba na yo ezala te eloko ya liboso oyo ekobenda likebi ya bato. Zulunalo Working Woman elobi lisusu ete: “Olata . . . na lolenge oyo bato bakotya likebi na bango likoló na bilamba na yo te kasi bámona nde bizaleli na yo.”

Zulunalo Perceptual and Motor Skills elobi ete: “Na mikanda mingi oyo etalelaka ntina ya molato, ndenge yango emonanaka na miso ya bato mpe ndenge epesaka litatoli kozanga koloba, mbala mingi emonanaka ete molato ya moto epesaka likanisi ya liboso mpo na koyeba bomoto na ye.” Bobele bongo, mwasi moko ya mbula koleka 40, oyo azalaki liboso kosalela bomwasi na ye mpo na kobenda likebi ya bato na elateli na ye, alobaki ete: “Namilukelaki nde makambo mingi mpamba te molato na ngai ezalaki kokesenisa ngai lisusu te mpo nazwa limemya lokola mwasi oyo asalaka to lokola mwasi nyonso. Ntango nyonso, na esika ya mosala, mibali bazalaki kobyanga ngai mpo tókenda kolya mwa eloko na bisika ya kozwa mopɛpɛ.” Mwasi moko oyo azali comptable alobeli molato oyo ekeseni na maloba oyo: “Natalaka ndenge mibali batalelaka basi oyo balataka malamu te, to oyo balataka lokola mibali. Mibali bamonaka bango lokola basi oyo balukaka mibali mpe na yango mibali bapesaka bango lokumu mpenza te.”

Elenge mwasi moko na nkombo Jeffie amonaki ete azalaki komikaba epai na mibali ntango akataki nsuki na ye modele ya mabe. Alobi ete: “Nakanisaki ete ezalaki bobele modele moko ‘ya ndenge mosusu.’ Kasi bato bakómaki kotuna ngai, ‘Ozali mpenza Motatoli ya Yehova?’ mpe yango eyokisaki ngai nsɔni.” Jeffie asengelaki komituna mwa mituna ya ntina. Ɛɛ, ezali ya solo ete ‘na makambo oyo etondi na motema’ ekosuka kolobama bobele na monɔkɔ te, kasi mpe molato na biso ekoloba yango, boye te? (Matai 12:34) Molato na yo emonisaka nini—ete ozali komibanzabanza mpo na kobenda likebi likoló na Mozalisi to likoló na yo moko?

Omilatisa na kozaláká na “makanisi malamu”

Talelá mpe bopusi oyo bilamba na yo ezali na yango likoló na yo moko. Molato makasi to molato eleki ndelo ekoki kokómisa moto lolendo, nzokande molato ya mobulumobulu ekoki komonisa makanisi mabe oyo ozalaka na yango, mpe batriko oyo ezali kosala piblisite ya bafilime oyo olingaka to bavɛdɛti ya masano to bilombe mosusu ekoki kopusa yo na kosambela bango—yango ezali losambo ya bikeko. Ɛɛ, bilamba na yo elobaka epai na bato mosusu—mpe eyebisaka bango bomoto na yo.

Bilamba na yo elobaka nini mpo na yo moko, olataka mpo na kobenda likebi ya bato to mpo na kolɛngola bato mosusu? Ozali kokolisa nde bizaleli oyo esengeli ete osala makasi mpo na kolonga yango? Lisusu, ozali koluka kobenda likebi ya bato ya lolenge nini? Toli oyo ezwami na Baloma 12:3 ekoki kosalisa biso mpo na kolonga elimo ya koluka matomba na biso moko, lolendo, mpe makanisi mabe. Na vɛrsɛ yango ntoma Paulo azali kopesa biso toli ete, “bóleka te komikanisa bino mpenza na motindo mobongi te. Kasi bómitánga na makanisi na sembo.” Kozala na “makanisi na sembo” elingi koloba kozala na makanisi mabongi.

Yango ezali mpenza na ntina mpo na baoyo bazali na mikumba mpe bato batyelaka bango motema. Ndakisa na bango ezali na bopusi makasi likoló na basusu. Na yango, baoyo bazali koluka kozwa mikumba na lisangá ya boklisto, bango na basi na bango, basengeli kozala na elateli ya bokatikati mpe oyo ekopesa bango limemya. Tokolinga soko moke te kozala lokola mobali oyo Yesu alobelaki na lisese ya elambo ya libala ete: “Ebimi mokonzi kotala babyangami, amoni moto oyo alati elamba na libala te.” Ntango ayebaki ete mobali yango azalaki na ntina te ya kolata elamba motindo wana, “mokonzi alobi na basungi ete, Kangá ye makolo, mpe mabɔkɔ, bwaká ye na molili na libándá.”​—Matai 22:11-13.

Na yango, ezali na ntina ete baboti, na maloba mpe na ndakisa, bákɔtisa na mitema ya bana na bango makanisi mabongi mpe liponi malamu ya molato. Yango elingi koloba ete na bantango mosusu baboti basengeli kozala ngwi wana bazali kotalela likambo yango elongo na bana na bango ya basi to ya mibali. Kasi oyo nde likambo ya kolendisa ntango bapesi biso longonya mpo na elateli mpe etamboli malamu ya bana na biso mpe ya biso moko!

Ɛɛ, basaleli ya Yehova basili kosikolama na lolendo, na ezaleli ya koluka milato ya ntalo makasi koleka, mpe ya komitalela mingi. Bamitambwisaka na mitinda ya Nzambe, kasi ya elimo ya mokili te. (1 Bakolinti 2:12) Soki ozali kolanda mitinda yango na bomoi na yo, okozala na mokakatano te mpo na kopona bilamba na yo. Lisusu, lokola elilingi kitoko na etanda moko, bilamba na yo ekobebisa bomoto na yo te, ekofingisa yo mpe te. Mpe lokola ozali kosala milende mpo na komekola Nzambe, bobele bongo okozwa to okokolisa kitoko ya elimo oyo eleki mpenza molato na yo.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto