Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g00 Avril nk. 15-17
  • Ndenge nini nakoki kosolola na bato?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge nini nakoki kosolola na bato?
  • Lamuká!—2000
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Tiká komityola
  • Sepelaká na bato
  • Zalá na bolingo
  • Nasala nini mpo natika kozala nsɔninsɔni?
    Mituna oyo bilenge batunaka
  • Ndenge ya koyeba kosolola na bato
    Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Bandakisa ya kolanda​—Lidia
    Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, Volimi 2
  • Nasala nini soki namiyoki lokola mwana etike?
    Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, Volimi 2
Makambo mosusu
Lamuká!—2000
g00 Avril nk. 15-17

Mituna oyo bilenge batunaka . . .

Ndenge nini nakoki kosolola na bato?

“Nakokaka kosolola na bato te. Nakanisaka ete soki nafungoli monɔkɔ, bato bakolinga ata koyoka ngai te. Mama na ngai azalaka nsɔninsɔni, nakanisi ngai mpe nazali bongo.”​—Artie

MBALA mosusu olingaka kozala mpenza nsɔninsɔni te​—mpe olingaka kosolola malamu na baninga, boye te? Osengeli komitungisa te soki olobaka mingi te. Kasi, kozala nsɔninsɔni koleka ekoki kozala mpenza mokakatano monene. Ezaleli ya ndenge wana ekoki kopekisa yo kosepela elongo na baninga. Mpe na miso ya bato, ekoki kozala mpasi mpo ozala na esengo, okoki kutu koyeba te ndenge nini okoki kosala makambo mosusu esika bato bazali.

Ata bato oyo bakómi mikóló, mbala mingi babundaka na ezaleli ya nsɔninsɔni. Barrya azali nkulutu na lisangá moko, kasi akokaka te koloba esika bato mingi bazali. Alobi ete: “Nandimaka te ete nakoki koloba likambo moko ya ntina.” Mwasi na ye Diane, azali mpe na mokakatano ya ndenge wana. Asalaka nini? alobi boye: “Nalingaka kozala esika moko na bato oyo balobaka, na bongo bango nde bakoki kobɛta masolo.” Wapi mwa makambo mosusu oyo ekoki kosalisa yo mpo okoka kosololaka na bato?

Tiká komityola

Liboso mpenza, osengeli naino kotalela lisusu makanisi na yo mpo na koyeba ndenge yo moko omimonaka. Omityolaka ntango nyonso mpe olobaka ete bato mosusu bakosepela na yo te to omonaka ete ozalaka na likambo moko te ya malamu mpo na koloba? Kokanisa ete ozali na ntina te ekoki kaka kopekisa yo kosolola na bato. Kutu, Yesu alobaki ete: “Olinga mozalani na yo lokola yo moko”​—kasi alobaki te ete olinga mozalani na yo na esika na yo moko! (Biso nde totɛngisi makomi; Matai 19:19) Yango wana, ezali malamu mpe ebongi komilinga na ndenge oyo elongobani. Yango ekoki kopesa yo makasi oyo osengeli na yango mpo na kosolola na bato.

Soki makanisi ya komona ete ozali na ntina te eyeli yo, tángá buku Mituna oyo bilenge batunaka​—Biyano bibongi,b mokapo ya 12, oyo motó ya likambo na yango elobi ete “Mpo na nini namimonaka ete nazali na ntina te?” Lisolo yango ekoki kosalisa yo oyeba ete ozali na bizaleli mpe na makoki oyo esepelisaka bato mosusu. Kutu, lokola ozali moklisto, yango emonisi ete Nzambe amonaka makambo ya malamu epai na yo! Yesu alobaki ete: “Moto akoki koya epai na ngai te bobele soko Tata, Motindi na ngai, akobenda ye.”​—Yoane 6:44.

Sepelaká na bato

Masese 18:1 elobi ete: “Ye oyo akomitangola na bamosusu akolukaka yango ekosepelisa ye moko.” Ya solo, soki ozali ntango nyonso kokima kozala esika moko na bato mosusu, okobanda komitalela kaka yo moko. Bafilipi 2:4 (NW) ezali kolendisa biso ete tosengeli ‘kotalela bobele bolamu na biso moko te, kasi mpe bolamu ya bato mosusu lokola.’ Ntango ozali kotalela bolamu ya bato mosusu mpe bamposa na bango, okokanisa makambo na yo moko mingi te. Mpe soki ozali komibanzabanza mpo na bato mosusu, yango mpe ekotinda yo oluka koyeba bango.

Tókamata ndakisa ya Ludia, mwasi oyo ayebani lokola moto malamu mpe moyambi ya bapaya. Biblia ezali koyebisa biso ete nsima ya koyoka maloba ya ntoma Paulo mpe kozwa batisimo, abondelaki Paulo mpe baninga na ye ete: “Soko bokanisi ete ngai nazali mondimi na Nkolo, bókɔta na ndako na ngai.” (Misala 16:11-15) Atako azalaki mondimi ya sika, Ludia alukaki koyebana na bandeko yango​—mpe na ntembe te azwaki mapamboli mingi mpo na yango. Ntango Paulo na Silasi babimaki na bolɔkɔ, bakendaki wapi? Likambo ya esengo, bakendaki lisusu na ndako ya Ludia!​—Misala 16:35-40.

Bobele bongo, okomona ete bato mingi bakokóma baninga na yo mpamba te ozali kosepela na bango. Ndenge nini okoki kobanda kosala bongo? Talá mwa makanisi oyo ekoki kosalisa yo.

● Kokenda mbangumbangu te. Kosolola na bato elimboli te kokóma kolobaloba lokola moto oyo alobaka mingi to mpe kokóma kotambolatambola mpo na kolobaloba. Salá milende mpo na kosolola na moto moko mpe kosolola bobele na moto moko na mbala moko. Okoki komityela mokano ya kobanda lisolo na moto moko mbala nyonso oyo okoyangana na likita ya boklisto. Meká kosɛkisa. Talaká mpe bato na miso.

● Yo nde bandá koloba. Okoki komituna, ‘Ndenge nini?’ Soki ozali mpenza kosepela na bato, ekozala mpasi te mpo na kozwa likambo ya koloba. Jorge, elenge mobali afandi na ekólo Espagne alobi ete: “Namoni ete, kaka kotuna bato nsango nini to ndenge nini mosala, esalisaka mpo na koyeba bango malamu.” Elenge moko na nkombo Fred apesi toli oyo: “Soki oyebi likambo ya koloba te, bandá na kotuna mituna.” Ya solo, okolinga te bato oyo ozali kosolola na bango bámiyoka lokola nde ozali kosambisa bango. Soki omoni moto azali koyanola na mituna na yo mpenza te, okoki koyebisa ye mwa makambo oyo etali yo moko.

Marie, mama ya elenge moko, alobi ete: “Namoni ete lolenge ya malamu koleka mpo na kosepelisa bato ezali ya kosala ete báloba makambo oyo etali bango moko.” Elenge Kate abakisi ete: “Ezali malamu kopesa bato longonya mpo balati malamu to mpo na eloko mosusu oyo emonani malamu. Yango ekosala ete bámiyoka ete balingaka bango.” Kasi, zalá sembo, mpe kolɛtɛ te. (1 Batesaloniki 2:5) Mbala mingi bato basepelaka na maloba ya kitoko, ya boboto mpe ya kosepelisa.​—Masese 16:24.

● Yokaká malamu. Biblia elobi ete: “Moto nyonso asengeli koyokaka malamu, kowelaka koloba te.” (Yakobo 1:19, NW) Kutu, kosolola elimboli kolobana elongo na moto mosusu​—kasi bobele koloba te. Yango wana, ntango ozali kosolola na moto, ezali malamu kolobaka mingimingi te! Bato basepelaka na bato oyo bayokaka malamu.

● Kɔtá na lisolo. Soki obandi komesana kosolola na moto mokomoko, salá sikawa milende ya koyeba kosolola esika bato mingi bazali. Awa lisusu, makita ya boklisto ezali esika ya malamu mpo na kokolisa likoki yango. Ntango mosusu lolenge ya malamu mpo na kokɔta na lisolo ya bato ebele ezali ya kokɔta na likambo oyo bazali kolobela. Ya solo, esengeli kozala na bososoli mpe na limemya. Komikɔtisa te na lisolo oyo etaleli bango mpenza. Kasi soki emonani polele ete lisolo yango ezali ya kobomba te, okoki kokɔta na yango. Esengeli kokeba, kokata bato maloba te mpe kolobaloba kaka yo moko te. Osengeli kobanda na koyoka. Ntango okomiyoka malamu, okoki kokɔtisa mwa maloba.

● Koluka ezaleli ya kokoka te. Na bantango mosusu bilenge bamitungisaka mingi soki balobi likambo moko oyo ebongi te. Elisa, elenge mwasi moko afandi na ekólo Italie alobi ete: “Nabangaka ntango nyonso ete soki nalobi likambo moko, na nsima ekokóma mabe.” Nzokande, Biblia ezali kokundolela biso ete biso nyonso tozali bato ya kozanga kokoka, yango wana tokoki koloba na ndenge ya kokoka te. (Baloma 3:23; kokanisá na Yakobo 3:2.) Elisa alobi boye: “Nayebi ete bazali baninga na ngai. Soki nasali libunga, bakomitya na esika na ngai.”

● Salaká mwa lisɛki. Ezali solo ete esalaka nsɔni soki olobi likambo oyo eyokisi moto mpasi. Kasi lokola Fred alobi yango, “soki ominanoli mpe omisɛki yo moko, okobosana noki. Soki ozali ntango nyonso kokanisa mwa libunga oyo osali, yango ekoki kotungisa yo mpe koyokisa yo mawa.”

● Zalá motema pɛtɛɛ. Yebá ete moto nyonso te akosepela na milende na yo mbala moko. Soki mwa libunga moke esalemi na lisolo, yango elingi koloba te ete molobani na yo asepeli na yo te to osengeli kotika koloba. Mbala mosusu azali na likambo moko oyo ezali kotungisa ye​—to azali nsɔninsɔni lokola yo. Soki esalemi bongo, ekoki kozala malamu kotikela ye mwa ntango mpo amesana na yo.

● Sololaká mpe na mikóló. Mbala mosusu, mikóló, mingimingi baklisto oyo bakɔmeli, bazalaka na boboto ntango bazali kosolola na bilenge oyo bazalaka nsɔninsɔni. Yango wana, kobanga te kobanda lisolo na moto oyo azali mokóló koleka yo. Kate alobi boye: “Soki nazali kosolola na mikóló namiyokaka malamu mpamba te nayebi ete mikóló bakotalela mabunga na ngai te, bakosɛka ngai te, to bakoyokisa ngai nsɔni te ndenge baninga na ngai bilenge basalaka yango.”

Zalá na bolingo

Atako makanisi oyo tolobeli ekoki kosalisa, ezalaka na nkisi moko te mpo na kosilisa ezaleli ya nsɔninsɔni mbala moko. Ya solo, ezali likambo ya tekiniki te to ya kokata nzela mokuse te. Mpo na kolonga ezaleli ya nsɔninsɔni, osengeli ‘kolinga mozalani na yo lokola yo moko.’ (Yakobo 2:8) Yango wana, yekolá komibanzabanza mpo na bolamu ya bato mosusu​—mingimingi mpo na bandeko na yo baklisto. (Bagalatia 6:10) Soki ozali mpenza kolinga bango na motema na yo, okotika ezaleli ya kobanga mpe okosolola na bango polele. Lokola Yesu alobaki yango, “monɔkɔ ekolobaka makambo oyo etondi na motema.”​—Matai 12:34, NW.

Barry, oyo tolobelaki na ebandeli, alobi ete: “Soki nayebi bato mosusu malamu, nakómaka mpe kosolola na bango malamu.” Na maloba mosusu, soki ozali kosala milende ya kosolola na bato, okomesana mpe kosolola na bato. Mpe ntango okozwa baninga ya sika mpe okoyoka ete bato mosusu mpe bandimaka yo, na ntembe te okomona ete esengelaki mpenza kosala milende!

[Maloba na nse ya lokasa]

a Wana ezali mpenza bankombo na bango te.

b Ebimisami na Batatoli ya Yehova.

[Elilingi na lokasa 17]

Kɔ́ta na lisolo!

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto