Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g00 Juillet nk. 9-12
  • Boombo ya mikolo oyo​—Etikali moke esila!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Boombo ya mikolo oyo​—Etikali moke esila!
  • Lamuká!—2000
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Kobongola bizaleli
  • Bato bakozala ndenge moko mpe bakopesana lokumu
  • Boyangeli mosusu
  • Omemyaka lokumu na bango?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Tókumisa Yehova na etamboli ya lokumu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Omemyaka basusu wana ozali kopesa bango toli?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Moto nyonso akoki kozala na lokumu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
Makambo mosusu
Lamuká!—2000
g00 Juillet nk. 9-12

Boombo ya mikolo oyo​—Etikali moke esila!

“Bonsomi ya moto moko ezali mwa ndambo ya bonsomi ya bato na mokili mobimba. Soki obebisi bonsomi ya moto moko obebisi bonsomi ya bato na mokili mobimba.”​—Victor Schoelcher, mopanzi-nsango mpe moto ya politiki na ekólo France, 1848.

BAKOMI ya zulunalo Courrier de l’UNESCO batunaki motuna oyo: “Eloko nini etindaka moto ntango nyonso ete amonaka bato mosusu mpamba, anyokolaka bango mpe atyolaka bango? Mpe ndenge nini bazali kopesa bato etumbu te mpo na mbeba monene oyo bazali kosalela baninga ata nsima ya kobimisa mibeko oyo ezali kobatela ntomo ya bato na eleko na biso?”

Eyano ezali pɛtɛɛ te. Lokoso etindaka bato mosusu bázwaka bana mike na mosala mpo na kofutaka bango mbongo moke mpe kolanda momeseno ya kosalisa bamosusu misala makasi mpo na kofuta banyongo. Bato balobaka ete lokola bilenge basi mosusu bazali babola mpe bakɔtá kelasi te, yango ezali kotinda bango bábanda bondumba to bákɔta mabala na makasi. Mibeko ya mangomba mpe makambo ya bonkɔkɔ epesaka nzela na boombo mpo na milulu. Bato oyo bakendaka na Bangkok to na Manille bobele mpo na kosangisa nzoto na bilenge basi to na bilenge mibali oyo bazali na sida te, mbala mingi, ezalaka bato ya mbindo oyo bazali na bizaleli mabe. Makambo nyonso wana ezali komonisa bizaleli ya mokili oyo bato bazali ‘komilinga bango moko, balingi na mosolo, . . . bazangi bolingo, . . . bazangi komipekisa, babomi,’ ndenge emonani na maloba ya Paulo, ye ayebaki malamu mibeko oyo ezalaki kobatela ntomo ya bato na ekeke ya liboso. (2 Timote 3:1-5, NW) Makambo yango ezali komonisa ete mokili “oyo egunzami ekoki kosembolama te, oyo ezangi ekoki kotángama te,” soki tozongeli maloba ya Salomo, ye azalaki mokonzi na ntango ya kala.​—Mosakoli 1:15.

Kobongola bizaleli

Yango elingi koloba ete eloko moko ekosalema te mpo na kosilisa boombo mpo na libela​—ezala lolenge na yango ya kala to oyo ya mikolo na biso? Te, ezali bongo te!

Biro ya Haut Commissaire ya ONU na makambo matali ntomo ya bato elobi ete boombo ezali “ezaleli,” ebakisi ete: “Ata nsima ya kolongola boombo, bilembo na yango etikalaka. Ekoki kotikala na lolenge ya ezaleli​—ezala epai ya bato oyo bazalaki baombo mpe bakitani na bango to epai ya bakitani ya baoyo bazalaki bankolo ya baombo​—bambula mingi na nsima wana Leta asilaki kolongola yango.”

Yango wana, mpo na kosilisa boombo, esengeli kobongola makanisi ya bato​—mitema ya bato​—na mokili mobimba. Mpe yango esɛngi koteya bato mateya mosusu​—koteya bato ete bálingana mpe bámemya lokumu ya bazalani na bango. Yango elimboli kosalisa bato bálongola lokoso oyo ezali na mitema na bango mpe básalela mitinda ya bizaleli malamu. Nani akoki kopesa mateya ya ndenge wana? Biro ya Haut Commissaire ya ONU na makambo matali ntomo ya bato elobi ete “moto nyonso asengeli kopesa mabɔkɔ mpo mokili ebongwana, mbongwana yango ekosala ete bato bányokwama lisusu te.”

Batatoli ya Yehova bazali koteya bato na mokili mobimba. Bato ya motema malamu bazali koteyama ete bákanga miso te na likambo ya konyokola bato. Bamilio ya bato na bikólo koleka 230 bazali koteyama mpo na kopesa bazalani na bango lokumu. Mpo na nini mosala yango ya koteya bato ezali kobimisa matomba malamu?

Ezali mpo ete mateya na bango eutaka na Biblia, buku oyo Mokeli ya bato akomisaki. Buku yango ezali komonisa ete esengeli kopesa bato lokumu. Bato oyo bayekolaka Biblia na lisalisi ya mateya ya Batatoli ya Yehova bayebaka ete Yehova, Mokeli na biso, ye moko azali Nzambe ya lokumu. (1 Ntango 16:27) Apesaka bikelamu na ye nyonso lokumu. Ezala mibali to basi, bato ya mposo nyonso, ya mitindo nyonso, ezala babola to bazwi.​—Talá etanda “Bonsomi mpe lokumu ya moto​—Eutaki wapi?”

Bato bakozala ndenge moko mpe bakopesana lokumu

Biblia ezali koteya ete “na nkɔkɔ moko” Nzambe “abotisi mabota nyonso na bato kofanda na mikili nyonso na nse.” (Misala 17:26) Na yango, moto moko te akoki koloba ete azali na bokonzi likoló ya mozalani na ye to azali na lotomo ya kosalela ye lokola moombo. Bato oyo basalaka milende ya koyekola Biblia bakómaka koyeba ete “Nzambe akokabolaka bato te; kasi kati na mabota nyonso, oyo akobangaka ye mpe akosalaka boyengebene ayambami na ye.” (Misala 10:34, 35) Bayebi ete Nzambe alingaka bato ya mokili mobimba, mpamba te moto nyonso azali na libaku malamu ya kozala na boyokani elongo na ye. Ya solo, “Nzambe alingaki mokili na motindo boye ete apesi [Mwana mobotami-bobele-moko, NW] na ye ete moto na moto oyo akondima ye abebisama te kasi ete azala na bomoi na seko.”​—Yoane 3:16.

Mateya yango ya Biblia ebongolaka mpenza bomoto ya moto. Na lisalisi ya mateya yango, mitema mpe makanisi ya bato ekoki “kozala ya sika mpenza.” (Efese 4:22-24, Boyokani ya Sika) Elendisaka bango bápesa bazalani na bango lokumu na limemya, mpe ‘básalela bato nyonso malamu.’ (Bagalatia 6:10) Moto moko te akoki kozala moklisto ya solosolo mpe konyokola mozalani na ye, ezala ata nani to nani. Batatoli ya Yehova bazali na esengo ya kozala na ebongiseli ya boklisto ndenge lisangá ya boklisto ezalaki na ekeke ya liboso, oyo kati na yango ‘Moyuda azalaki te, Mogreke azalaki te, moombo azalaki te mpe nsomi azalaki te.’ Bango nyonso bazalaki lokola moto “moko kati na Klisto.”​—Bagalatia 3:28.

Boyangeli mosusu

Nzokande, mpo na kosilisa lolenge nyonso ya boombo mpo na libela, esengeli ete mbongwana monene esalema na bisika bato bafandi. Organisation internationale du travail elobi ete mpo na kosilisa momeseno ya konyokola bato esengeli “kobongola ebongiseli oyo ezali kokanga miso” na makambo ya ndenge wana. Ebongiseli yango epesi likanisi ete mikili mingi esala na bomoko mpe na boyokani, mpe na nsima mokili mobimba bándima komikɔtisa na programɛ yango.

Yango ezali mpenza kosɛnga bokonzi moko oyo ekozala na makoki ya koyangela mabele mobimba, bokonzi oyo ekokoka kopesa bonsomi na mokili mobimba. Boutros Boutros-Ghali, secrétaire général ya kala ya ONU, alobaki ete mikakatano oyo ezali konyokola mokili na biso esengeli kosila nde “na mokili mobimba.” Kasi moto moko te andimi ete yango ekoki kosalema. Makambo oyo ezali kosalema emonisi ete bato mingi oyo bazali na bokonzi batalelaka mingimingi matomba na bango moko mpe mikano na bango moko, yango wana ezali mpenza mpasi ete mokili mobimba ekoka koyokana na ndenge wana.

Nzokande, Biblia​—kaka buku wana oyo eteyaka bamilio ya bato ete bátosa mpe bápesa bazalani na bango lokumu​—ezali kolakisa ete Nzambe akani kotya boyangeli ya ndenge wana na mokili mobimba. Na kati ya Biblia, okokuta bilaka ebele oyo ezali kolobela mokili ya sika ya bosembo. (Yisaya 65:17; 2 Petelo 3:13) Bato nyonso oyo balingaka Nzambe te mpe balingaka bazalani na bango te, Nzambe akolongola bango na mabele. Amonisi ete azali na mokano ya kotya bokonzi ya mokili mobimba oyo ekoyangela bato mpe mabele na bosembo. Na kati ya libondeli ya Tata na Biso, Yesu ayebisaki biso tósambelaka mpo na boyangeli yango.​—Matai 6:9, 10.

Na ntango oyo boyangeli yango ekobanda mosala, likambo ya konyokola bato mpe lolenge nyonso ya boombo ekosila, mpamba te Klisto, Mokonzi, akoyangela na “kosambisa-sembo mpe na boyengebene.” (Yisaya 9:7) Banyokwami bakobɔndisama na ntango ya boyangeli na ye ya sembo, mpamba te Biblia elobi ete: “Akobikisa mobola oyo akonganga mpe moto na mawa oyo azali na mosungi te. Akoyokela moto na bolɔzi mpe mobola mawa; akobikisa milimo na babola. Akosikola milimo na bango na kati na konyokola mpe na kongala.”​—Nzembo 72:12-14.

Soki ozali na mposa ya komona ndenge boombo ekosila​—na lolenge na yango nyonso​—tosɛngi yo oyekola makambo mosusu mingi oyo etali mokano ya Nzambe mpo na kotya boyangeli yango oyo ekosikola mokili mobimba na boombo. Batatoli ya Yehova ya esika oyo ofandi bakosepela kosalisa yo.

[Etanda/Elilingi na lokasa 11]

BONSOMI MPE LOKUMU YA MOTO—EUTAKI WAPI?

Biso nyonso tobotamá na mposa ya kozala na lokumu mpe na bonsomi. Kofi Annan, secrétaire général ya ONU, alobelaki makanisi ya bato ya mokili mobimba ntango atunaki ete: “Nani akoki kondima te ete biso nyonso tozali koluka bomoi oyo ezangi kobanga, oyo ezangi minyoko mpe ezangi koponapona? . . . Ntango nini oyoká moto oyo azali na bonsomi azali kosɛnga ete bálongola bonsomi na ye? Epai wapi oyoká moombo azali kobunda mpo bato bázala na boombo?”

Makanisi ya ndenge wana ezali ya sika te. Ntango abwakaki likanisi ya koloba ete bato mosusu babotamá mpo bázala baombo, Sénèque, moto moko ya filozofi ya mboka Loma na ekeke ya liboso, akomaki na mokanda Lettres à Lucilius ete: “Yebá ete moto oyo ozali kobenga ete moombo na yo abotamá mpe lokola yo, azali na nse oyo lokola yo, apemaka mpema lokola yo, azali na bomoi mpe akokufa lokola yo!”

Imam ʽAlī, moto oyo Bamizilima balobaka ete azali mokitani ya minei na nsima ya Mahomet, alobaki ete bato nyonso “bazalisamaki ndenge moko.” Saʽdī, moto ya Perse, mokomi ya maloba ya ntɔki na ekeke ya 13, alobaki ete: “Bana ya Adama bazali bato ya libota se moko mpe basalemaki na eloko kaka moko. Ntango mokili ezali konyokola moko na bango, baoyo mosusu bakoki kozala na kimya te.”

Lisolo ya kala, oyo Nzambe akomisaki na Biblia ezali kolobela lokumu ya bato nyonso. Na ndakisa, Genese 1:27 elobeli ndenge moto asalemaki: “Nzambe azalisaki moto na elilingi na ye mpenza, azalisaki bango mobali mpe mwasi.” Mozalisi na biso azali Nzambe ya bonsomi. Ntoma Paulo alobaki ete: “Esika elimo ya Yehova ezali, bonsomi ezali.” (2 Bakolinti 3:17, NW) Lokola asalaki moto na elilingi na ye, Yehova apesaki ye makanisi ya kozala na ntina, komiyoka ete azali na ntina mpe kozala na lokumu. Ntango akosikola bikelamu na ye na “boombo na libebisi,” akosala mpe ete bato bázala na bonsomi mpe na lokumu ya ndenge wana libela na libela.​—Baloma 8:21.

[Elilingi na lokasa 9]

Moto nyonso azali na lotomo ya kozala na lokumu mpe na bonsomi

[Bililingi na lokasa 10]

MATEYA YA BIBLIA ELOBELAKA NA NDENGE YA MALAMU LIKAMBO YA KOBATELA LOKUMU YA BATO MPE EPESAKA ELIKYA YA MOKILI YA SIKA MPO NA MIKOLO EZALI KOYA

Boyekoli ya Biblia na libota moko na Bénin

Ba “chutes” ya ebale Nil na Éthiopie ezali kopesa biso makanisi ndenge paladiso ekozala

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto