Salelá televizyo na mayele
LISANGÁ moko oyo etalelaka makambo ya bapanzi-sango na États-Unis ebimisaki lapolo moko (Not in the Public Interest—Local TV News in America) oyo elobi ete televizyo nde “ebetelaka bana masapo, yango nde etikalaka kokɛngɛla bango ntango baboti na bango bazali te mpe yango nde ebongolaka makanisi ya bato. Televizyo ezali bipai nyonso . . . Ezali lokola milinga ya likaya oyo epanzani na mopɛpɛ.” Kopema milinga ya likaya oyo epanzani na mopɛpɛ, epesaka maladi, ndenge moko mpe, kolekisa ntango mingi liboso ya televizyo mpo na kotala nyonso oyo bazali kolakisa ebebisaka mpenza bato, mingimingi bana.
Lapolo yango elobeli ndenge bazali kolakisa na televizyo koboma bato mpe mobulu; ebakisi ete “baankɛtɛ mingi emonisi ete bafilme ya mobulu ebebisaka makoki ya bana ya koyekola, etindaka bango básala mobulu mpe bázanga boboto.” Na 1992, Lisangá ya minganga ya Amerika (Association médicale américaine) elobaki ete “makambo ya mobulu oyo bazali kolakisa na televizyo ezali likama mpo na bokolɔngɔnɔ ya nzoto ya bilenge.”
Ndenge nini okoki kosala ete makambo mabe oyo bazali kolakisa na televizyo ebebisa bana na yo te? Lapolo yango epesi toli oyo euti na masangá mingi oyo etalelaka bokolɔngɔnɔ ya nzoto ya bato, oyo elobeli ndenge ya kosalela televizyo na mayele. Toli yango esangisi mpe makambo oyo elandi.
◼ Salá programɛ ya ntango oyo osengeli kotala televizyo na yo. Poná bangonga oyo bana basengeli kotala televizyo mpe ngonga oyo basengeli kotala yango te. Kotyela bana televizyo na chambre te.
◼ Tyá kalati ya mokili mobimba pembeni ya televizyo mpo bana balukaka bamboka oyo bazali kotala na televizyo.
◼ Taláká televizyo na bana na yo mpo okoka kolimbwela bango makambo mosusu, na ndakisa, komonisa bango bokeseni kati na makambo ya solo mpe makambo oyo ezali bobele makanisi mpamba ya bato. Mbala mingi, bana mingi oyo bazali na nse ya mbula zomi bakokaka te kokesenisa makambo yango.
◼ Na kati ya ndako, kotya televizyo na esika ya polele te, oyo moto nyonso akoki komona yango. Tyá yango na kati ya armware moko, esika okoki kobomba yango. Ekozala mwa mpasi mpo bana báfungola yango mpe básakana na yango ndenge balingi.