Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g02 Avril nk. 9-11
  • Libala esengeli kokangisa mwasi na mobali mpo na libela

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Libala esengeli kokangisa mwasi na mobali mpo na libela
  • Lamuká!—2002
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ekangisaka mwasi na mobali mpo na libela
  • Nsima ya mokolo ya libala
  • Kolinga mpe kokumisa
  • Kotalela mabunga te
  • Nsima ya mokolo ya fɛti ya libala
    Ndenge ya kotikala na kati ya bolingo ya Nzambe
  • Soki libala elingi kopanzana
    Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota
  • Mokristo akoki kosala nini mpo na kozala na libala ya malamu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2016
  • Kumisá libala, ebongiseli oyo Nzambe atyá
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2018
Makambo mosusu
Lamuká!—2002
g02 Avril nk. 9-11

Libala esengeli kokangisa mwasi na mobali mpo na libela

NA KOTALELA ndenge bafilme mingi esukaka, emonanaka ete libala ezali mokano moko kitoko. Tomonaka mbala mingi na bafilme ete nsukansuka mwasi na mobali bakutanaka, babalanaka, mpe nsima na yango, bafandaka “na esengo mpo na libela.” Mpe filme esukaka wana.

Kasi, na kotalela mpenza ndenge makambo ezalaka, libala ezalaka nsuka te, kasi ebandeli ya bomoi ya sika oyo babalani bakolekisa elongo. Mpe ndenge Mosakoli 7:8 elobi yango, “nsuka ya likambo eleki ebandeli na yango.”

Ekangisaka mwasi na mobali mpo na libela

Esengeli kotala mosika. Libala esengeli kobanda na ndenge moko malamu mpenza mpo eumela mpe epesa esengo. Soki te, mitungisi oyo eyaka nsima ya mokolo ya libala ekoki kozala makasi koleka oyo ezalaki liboso ya libala. Moklisto asengeli te kobala na likanisi na motó ete: ‘Soki libala yango ebongi te, nakoboma yango.’ Esengeli kotalela libala lokola ebongiseli oyo ekangisaka mwasi na mobali mpo na libela.

Yango mpe Yesu amonisaki polele ntango ayanolaki na motuna oyo batunaki ye na likambo etali koboma libala. Alobaki ete: “Botángá te ete moto oyo azalisaki bango na ebandeli asalaki bango mobali mpe mwasi mpe alobaki ete, ‘Mpo na ntina yango nde moto akotika tata na ye mpe mama na ye mpe akokangama na mwasi na ye, mpe bango mibale bakozala mosuni moko kaka’? Na bongo bazali lisusu mibale te, kasi mosuni moko kaka. Na yango, oyo Nzambe akangisi esika moko moto akabola yango te.”​—Matai 19:4-6, NW.

Nsima ya mokolo ya libala

Ezali solo ete, na bomoi ya moklisto, likambo ya liboso oyo eleki ntina ezali komipesa na Nzambe, mpe ya mibale ezali libala. Komipesa na Nzambe, oyo batisimo emonisaka polele na miso ya bato, ekangisaka moto na Mozalisi na ye mpo na libela. Libala mpe emonisaka na miso ya bato ete moto oyo amipesi na moto oyo kuna​—mpo na libela. Ekoki mpenza kosalema te ete moto oyo azali naino na ntembe makasi amipesa na Nzambe to andima kofanda na moto moko na libala. Yango wana, moto oyo azali kokana kobala asengeli kotalela malamumalamu bindimeli, mikano, bizaleli mpe bomoto ya moto oyo alingi kobalana na ye.

Na ntango bozali komilɛngɛla mpo na libala, bizaleli lokola boboto, koyeba kotyela bamposa ya basusu likebi liboso ete bango moko bámonisa yango, mpe koyeba kosala elongo na basusu, ezalaka mpenza na ntina. Nsima ya mokolo ya libala, bizaleli yango ezalaka lisusu na ntina mingi koleka mpo libala ezala malamu. Soki bato babalani sika balinganaka makasi, kasi nsima ya mokolo ya libala basengeli mokolo na mokolo kobosana te ete bolingo “elukaka matomba na yango moko te.” Soki mbula na mbula bazali ntango nyonso komoniselana bolingo, “bolingo esilaka soki moke te.” (1 Bakolinti 13:5, 8, NW) Soki bolingo ya ndenge wana, elingi koloba, bolingo oyo esilaka te ezali, ekozala mpasi te mpo na babalani bámonisa mbuma ya elimo ya Nzambe oyo ezali na bizaleli lokola motema molai, boboto, malamu, bopɔlɔ, mpe komipekisa. Bizaleli yango esengeli kozala mpo libala ezala malamu.​—Bagalatia 5:22, 23, NW.

Likambo oyo eleki mpasi ezali nde kokoba komonisa bizaleli wana nsima ya mokolo ya libala. Kasi, mpo na kolonga kosala yango, sɛkɛlɛ yango oyo: Lingá molongani na yo mpe ndimá komipimela makambo mosusu mpo na bolamu na ye.

Yesu alobaki ete, na mibeko nyonso oyo bapesaki bato, mibale nde eleki monene: ya liboso ezali kolinga Yehova, mpe ya mibale ezali “kolinga mozalani na yo lokola yo moko.” (Matai 22:39, NW) Mpo na moto oyo abali, mozalani na ye ya liboso mpenza ezali mobalani na ye, mpamba te eloko moko te na mokili ekoki kokangisa bato mibale lokola libala.

Kasi, kozala na boyokani makasi na nzoto ekoki te, esengeli boyokani yango ezala mpe na mayoki. Ezali te mpo bato mibale bakómi mosuni moko nde bakozala mpe na makanisi ndenge moko. Mpo ete kosangisa nzoto esepelisa mpenza babalani, mitema mpe makanisi na bango esengeli mpe kosangana. Mbala mingi, mpo libala ezala malamu esɛngaka komipimela makambo mosusu mpo na bolamu ya molongani na yo. Kasi, nani nde asengeli komipimela makambo mosusu? Mobali to mwasi?

Kolinga mpe kokumisa

Liloba ya Nzambe esɛngi biso ete: “Mpo na kopesana lokumu bózala bato ya liboso.” (Baloma 12:10, NW) Soki likoki ezali, omipimela makambo mosusu mpo na bolamu ya mobalani na yo liboso ete asɛnga yo yango. Kutu, soki bapesi eloko nsima ya kosɛnga yango mbala na mbala, eloko yango ezalaka lisusu mpenza na ntina te. Na esika ezalaka bongo, na kati ya libala, mobalani mokomoko asengeli kolona momeseno ya kozala moto ya liboso ya kokumisaka molongani na ye.

Na ndakisa, Biblia ezali kosɛnga mibali ‘bápesaka basi na bango lokumu lokola epai ya mbɛki oyo eleki pɛtɛɛ, oyo ya bomwasi, . . . mpo mabondeli na bango ekangisama nzela te.’ (1 Petelo 3:7, NW) Soki mobali azali kopesa mwasi na ye lokumu te, Nzambe mpe akondima mabondeli na ye te. Kasi, kopesa mwasi lokumu elingi mpenza koloba nini? Elingi koloba kotalelaka ye na makambo nyonso, koyoka makanisi na ye, mpe na makambo ndenge na ndenge kotika ete mbala mingi ye aponaka liboso. Mwasi mpe akoki kopesa mobali na ye lokumu kaka ndenge wana, asengeli kosala nyonso mpo ete azala molongani oyo azali mpenza kopesa mobali na ye mabɔkɔ.​—Genese 21:12; Masese 31:10-31.

Liloba ya Nzambe elobi ete: “Mibali basengeli kolinga basi na bango lokola nzoto na bango moko. Moto oyo azali kolinga mwasi na ye azali komilinga ye moko, mpo ata moto moko te ayinaka mosuni na ye moko; kasi aleisaka nde yango mpe alɛngɛlaka yango, ndenge Klisto mpe asalaka epai ya lisangá.” Klisto azalaki na bolingo ya ndenge nini mpo na bayekoli na ye? Andimaki kokufa mpo na bango. Biblia elobi mpe ete: “Tiká ete mokomoko na bino [mibali] mpenza alinga mwasi na ye bongo lokola amilingaka ye moko.” (Baefese 5:28-33, NW) Mpe Liloba ya Nzambe eyebisi basi ete ‘bálinga mibali na bango, . . . bátosaka mibali na bango mpo liloba ya Nzambe efingama te.’​—Tito 2:4, 5, NW.

Kotalela mabunga te

Lokola bato nyonso babotamaka na ezaleli ya kozanga kokoka, basalaka mabunga. (Baloma 3:23; 5:12; 1 Yoane 1:8-10) Na esika ete okómisaka mabunga ya basusu minene, landá nde toli ya Biblia oyo elobi ete: “Likambo eleki ntina mpenza, bólinganaka makasi, mpamba te bolingo ezipaka ebele ya masumu.” (1 Petelo 4:8, NW) Ezali malamu kokanisa ntango nyonso te mabunga mikemike ya basusu, esengeli nde kobosana yango. Okoki mpe kosala bongo ata mpo na mabunga ya minene. Bakolose 3:12-14 (NW) elobi ete: “Bólata bolingo ya motema oyo euti na mawa, boboto, komikitisa, bopɔlɔ mpe motema molai. Soki moko na bino azali na moto mosusu likambo, bóyikanaka mpiko mpe bólimbisanaka na motema moko. Kaka ndenge Yehova alimbisaki bino na motema moko, bino mpe bósala bongo. Kasi, likoló ya makambo nyonso wana, bólata bolingo, mpo yango ezali ekanganeli ya kokoka mpo na bomoko.”

Mbala boni tosengeli mpenza kolimbisa mabunga mpe mwa bambeba ya mobalani na biso? Petelo atunaki Yesu ete: “‘Nkolo, mbala boni ndeko na ngai asengeli kosalela ngai lisumu mpe ngai nasengeli kolimbisa ye? Tii na mbala nsambo?’ Yesu alobaki na ye ete: ‘Nalobi na yo te, Tii na mbala nsambo, kasi, Tii na mbala ntuku nsambo na nsambo.’” (Matai 18:21, 22, NW) Lokola Yesu alobelaki likambo yango mpo na bato oyo bazali babalani te, emonani ete kolimbisa ezali mpenza na ntina mingi mpo na babalani!

Atako eleki sikoyo mwa bambula, bato mingi bakómi kotyola ebongiseli oyo tobengi libala, ata ndenge nini, ebongiseli yango ekozala kaka, mpamba te Nzambe nde moto atyaki yango mpe nyonso oyo asalá ezali “malamu mingi.” (Genese 1:31) Libala ekosila ngala te. Lisusu, libala ekoki kozala ya malamu, mingimingi mpo na baoyo bazali kotosa mpe kotalela mibeko ya Nzambe. Kasi motuna yango oyo: Mwasi na mobali oyo babalani bakotosa elaka oyo bapesanaki mokolo ya libala, ete bakolingana mpe bakopesana lokumu? Yango ezali likambo ya lisɛki te, kasi bosengeli kosala makasi mpo libala na bino ezala malamu. Mpe, milende nyonso bokosala mpo na yango ekozanga te kobota mbuma malamu!

[Etanda na lokasa 10]

KOBOMA LIBALA MPE KOKABWANA

Nzambe, Mobandisi ya libala, asalaki yango mpo ete ezala ebongiseli oyo ekokangisa mwasi na mobali mpo na libela. Kasi Makomami eyebisi ntina oyo ekoki kopesa moto nzela ya koboma libala mpe kobalana na moto mosusu? Yesu ayanolaki na motuna yango na maloba oyo: “Nazali koloba na bino ete moto nyonso oyo abomi libala na mwasi na ye, soki mpo na pite te, mpe abali mosusu azali kosala ekobo.” (Matai 19:9, NW) Ntina kaka moko oyo ekoki kopesa nzela na moto oyo abali aboma libala mpe abalana na moto mosusu ezali ekobo ya molongani na ye.

Lisusu, na 1 Bakolinti 7:10-16, atako Biblia ezali kolendisa babalani bázala ntango nyonso elongo, ezali mpe kopesa nzela na kokabwana. Bato mosusu, nsima ya kosala milende mpo na kobatela libala na bango, bamonaka ete bazali na likambo mosusu ya kosala te, kaka kokabwana. Wapi bantina, oyo endimami na Makomami, oyo ekoki kopesa mwasi to mobali nzela ya kozwa ekateli ya kokabwana na mobalani na ye?

Ntina ya liboso ezali koboya na nko nyonso kokokisa bamposa ya libota. Ntango mobali abali, andimaka kozwa mokumba ya kokokisa bamposa ya mwasi na ye mpe ya bana na ye. Mobali oyo azali koboya na nko mpenza kokokisa bamposa ya mosuni ya libota na ye “awangani kondima mpe azali mabe koleka moto oyo azangi kondima.” (1 Timote 5:8, NW) Mpo na yango, kokabwana ekoki kosalema.

Ntina ya mibale ezali konyokola mobalani mingi mpenza. Soki mobali moko azali konyokola mwasi na ye, mwasi yango akoki kokabwana na mobali na ye. (Bagalatia 5:19-21; Tito 1:7, NW) “Molimo [ya Nzambe] eyini ye oyo alingi mobulu.”​—Nzembo 11:5.

Ntina mosusu mpo na kokabwana ezali kotya mpenza elimo ya mondimi moko na likama​—elingi koloba kotya boyokani na ye na Nzambe na likama. Ntango mwasi to mobali azali kotɛmɛla mobalani na ye, mbala mosusu kopekisa ye na makasi, mpe yango ezali kopesa ye lisusu nzela te ete akoba na losambo ya solo mpe etii elimo na ye na likama, mpo na yango bandimi mosusu bamonaka malamu bákabwana na babalani na bango.a​—Matai 22:37; Misala 5:27-32.

Kasi, soki moto alingi koboma libala mpo na makambo ya ndenge wana, asengeli kobala lisusu te. Mpo na Biblia, ntina kaka moko oyo endimami ya koboma libala, oyo epesaka mpe moto nzela ya kobalana na moto mosusu, ezali bongo ekobo to “pite.”​—Matai 5:32.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Novɛmbɛ 1988, ebimeli ya Lifalanse, nkasa 22-23, oyo elobelaki kokabwana.

[Elilingi na lokasa 9]

Esengeli kotalela libala lokola ebongiseli ya libela na libela

[Elilingi na lokasa  10]

Yesu alobaki ete tosengeli kolimbisa “mbala ntuku nsambo na nsambo”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto