Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g02 Juillet nk. 14-19
  • Ndɔtɔ na ngai ekokisamaki

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndɔtɔ na ngai ekokisamaki
  • Lamuká!—2002
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ntango ya komitalela lisusu
  • Lisolo elongo na tata
  • Bomoi na ngai na Prague
  • Nasengeli kopona kati na makambo mibale
  • Mabe oyo balingaki ekómela ngai elongi te
  • Nazwi mapamboli mpo na ekateli na ngai
  • Nazali kosalela Nzambe elongo na mobali na ngai
  • Nazwi mpenza makambo oyo Bakoministe bazalaki kolaka
  • Natambolaki na kondima epai na Nzambe kati na mokili moko ya Koministe
    Lamuká!—1996
  • ‘Ata lolemo na bato na likɛkuma ekoloba mbango mpe polele’
    Lamuká!—1996
  • Batata mibale​—⁠Napona oyo wapi?
    Lamuká!—1998
Lamuká!—2002
g02 Juillet nk. 14-19

Ndɔtɔ na ngai ekokisamaki

LISOLO YA ALENA Z̆ITNÍKOVÁ

Ntango nazalaki naino kokola na ekólo Tchécoslovaquie, moko ya bikólo oyo ezalaki kotambwisama na Union soviétique, libota na biso ezalaki kozela na motema likoló mokili ya kimya oyo Bakoministe bazalaki kolaka. Nzokande, ndɔtɔ ya Bakoministe ya kosala mokili moko ya bomoko mpe ya esengo esukaki ntango Union soviétique epanzanaki na 1991. Tiká nayebisa bino lolenge ndɔtɔ na ngai ekokisamaki na motindo mosusu.

NABOTAMAKI mokolo ya 12 Sɛtɛmbɛ 1962, na libota moko ya Bakoministe ya solosolo. Tozalaki kofanda na Horní Benešov, mboka moko moke oyo ezalaki na ntaka ya kilomɛtrɛ soki 290 na mboka-mokonzi Prague. Tata na ngai azalaki mpenza kotya motema na mateya nyonso ya Bakoministe mpe yango ekɔtelaki ye mpenza. Azalaki mpe kosalela mateya yango mpo na kobɔkɔla biso, elingi koloba ngai na lipasa na ngai ya mwasi mpe bayaya na biso mibale ya mibali. Azalaki koteya biso ete soki tosali mosala na bosembo mpenza mpe soki tolandi mitinda oyo etali bizaleli malamu na bomoi na biso, tokoki kopesa mabɔkɔ mpo na kosala mokili moko ya malamu mpenza. Azalaki kotalela boyangeli ya Bakoministe lokola motindo ya boyangeli oyo ezali malamu koleka mosusu nyonso mpe azalaki kopesa yango mabɔkɔ mpenza.

Tata azalaki mbala mingi kokende na makita epai bazalaki kokumisa boyangeli ya Bakoministe. Azalaki kotyola mangomba mpamba te mangomba ya boklisto ezalaki na bokosi mingi, yango wana ateyaki biso ete Nzambe azalaka te mpe tondimaki liteya yango. Tata azalaki kondima ete nsukansuka, ntango moto na moto akokóma na ndako na ye mpe na biloko ya kolya mingi, bato nyonso bakozala malamu mpenza mpe bakofanda na kimya. Nayokaki elikya wana kitoko mbala na mbala ntango nazalaki kokola. Nazalaki kondima makambo nyonso oyo Tata azalaki koteya biso, bongo ngai mpe nazwaki mokano ya kosimba boyangeli ya Bakoministe.

Ntango nazalaki naino mwana moke, namibongisaki mpo na kokɔta na ebongiseli ya bilenge ya Bakoministe, oyo bazalaki kobenga bango Bilenge Bapiɔniɛ. Bazalaki kolendisa bapiɔniɛ bázala na bizaleli malamu mpe bámonisa bolingo ya ekólo. Nazalaki na mbula libwa ntango nalapaki ndai ya bapiɔniɛ mpe bapesaki ngai litambala moko ya motane mpo nakangaka na nkingo. Bapesaki mpe ngai nzela ya kolata inifɔrmɛ moko oyo bapiɔniɛ bazalaki kolata na mikolo ya milulu minene. Nasalaki nyonso mpo nazala piɔniɛ moko oyo azali kopesa basusu ndakisa. Ntango baninga na ngai ya kelasi bazalaki kosalela elobeli moko ya mbindo, nazalaki kopamela bango; nazalaki koyebisa bango ete bana basi oyo bazali bapiɔnɛ balobaka bongo te.

Nzokande, na nsima nabandaki komona ete mingi kati na baoyo bazalaki koloba ete bazali Bakoministe bazalaki kosala te makambo oyo Bakoministe bazalaki koloba. Na esika báboya makanisi ya kozala na lokoso mpe bilulela oyo bato bazalaka na yango, bango bazalaki koyiba biloko ya Leta. Mingi kati na baoyo bazalaki kolendisa baninga básala mosala mpo na bolamu ya bato mosusu, bango moko bazalaki kosala bongo te. Kutu, lisese oyo epalanganaki mingi: “Ye oyo azali koyiba te, azali nde koyiba libota na ye.” Nakómaki komituna, ‘Mpo na nini bokosi epalangani boye? Mpo na nini bato bazali komipesa lisusu te na kotombola mateya kitoko ya Bakoministe? Mpo na nini milende oyo ezali kosalema ezali kolonga te?’

Ntango ya komitalela lisusu

Ntango nazalaki na mbula soki zomi na motoba, nalekisaki konje ya monene elongo na moninga moko ya kelasi, nkombo na ye Alena. Na mpokwa moko, Tanya, moninga moko ya Alena, ye azalaki mokóló, ayaki kotala biso. Alobaki na biso boye: “Sikoyo, nasengeli koyebisa bino likambo moko ya ntina mingi koleka. Nandimi sikoyo solosolo ete Nzambe azali.” Tokamwaki mingi na ndenge akómaki na likanisi wana. Nsima ya kokamwa, totunaki ye mituna ebele. “Makambo nini endimisi yo yango?” “Azalaka ndenge nini?” “Afandaka wapi?” “Mpo na nini asalaka eloko te?”

Tanya ayanolaki na mituna nyonso oyo totunaki ye. Ayebisaki biso ete mokano mpenza ya Nzambe na ebandeli ezalaki ete mabele ezala paladiso mpo bato báfanda wana, mpe amonisaki ndenge oyo nsukansuka mokano yango ekokokisama. Ntango alakisaki biso na kati ya Biblia elaka ya mabele moko ya pɛto esika bato ya bizaleli malamu mpe ya nzoto kolɔngɔnɔ bakofanda, mpe bakosalisana, mpo na ngai makambo nyonso wana ekokanaki na bilaka oyo nazalaki kondima banda kala. Kasi, nayebaki malamu ete, soki bayebisi tata ete makambo kitoko wana ekosalema na nzela ya Bokonzi ya Nzambe, kasi na nzela ya boyangeli ya Bakoministe te, akosepela te.

Ntango nazalaki na mbula motoba to nsambo, mwana mwasi moko oyo azalaki kofanda pene na biso amemaki ngai na ndako-nzambe, kozanga ete baboti na ngai báyeba yango. Sango abɛtaki lisolo moko kitoko ya Biblia, mpe nasepelaki na yango mingi na boye ete nalingaki koyeba makambo mosusu. Nazwaki ata mikanda mosusu ya lingomba mpo na kotánga. Ntango nayebisaki baboti na ngai, bapekisaki ngai makasi ete nameka lisusu kokende ndako-nzambe te, mpe bapasolaki mikanda nyonso oyo namemaki na ndako. Mpo natika mpo na libela likambo yango, tata abɛtaki ngai fimbo.

Nsima ya likambo yango, nkombo ya Nzambe ezalaki kotángama lisusu te na libota na biso. Mpe nakómaki kokanisa ete bobele bazoba, bato oyo batángá te nde bandimaka Nzambe mpe ete lingomba euti nde na makanisi ya bato. Na eteyelo bazalaki kotángisa biso ete lokola moto akokaka te kokanga ntina ya makambo mosusu, yango etindaki bato bábimisa likanisi ete ezali na Nzambe moko boye nde asalaki makambo yango. Kasi sikoyo, nazalaki liboso ya Tanya, mwasi moko ya mayele, oyo azalaki kutu molakisi; atako bongo ye azalaki kondima ete Nzambe azali. Nakanisaki ete, ‘Na nyonso oyo alobi, solo ekoki kozanga te!’

Ndenge Tanya azalaki koloba endimisaki biso solo ete andimaki mpenza makambo oyo azalaki koloba. Na bongo totunaki, “Tanya, nini endimisi yo ete Nzambe azalaka solo?”

Ayanolaki ete: “Biblia. Mituna nyonso oyo botunaki, biyano na yango ezali na Biblia. Bolingi koyeba yango malamu?”

Nayebaki ete baboti na ngai bakosepela te soki nabandi koyekola Biblia. Kasi, nazalaki mpenza na mposa ya koyeba makambo mosusu. Yango wana, Tanya apesaki ngai adresi ya Ludmila, mwasi moko Motatoli ya Yehova oyo azalaki kofanda penepene na biso na Horní Benešov. Ntango nazalaki kotalela elongo na Ludmila bilaka ya Nzambe oyo etali paladiso oyo ekozala awa na mabele, nazalaki komituna, ‘Nini endimisi ngai ete makambo yango ekosalema solo?’

Ludmila ayebisaki ngai ete nasengeli koyeba Nzambe malamumalamu mpo nakoka kondimela ye mpe bilaka na ye. Boyekoli na biso endimisaki ngai ete mabele mpe mitindo ndenge na ndenge ya bomoi oyo ezali na mabele ebimaki yango moko te. Nasengelaki kaka kondima ete Mozalisi moko ya mayele mingi asengeli kozala. Namonaki ndenge Biblia elobaka makambo oyo elongobani, wana elobi ete: “Ndako nyonso etongami na moto, kasi oyo atongaki biloko nyonso ezali Nzambe.”​—Baebele 3:4, NW.

Nalingaki ete libota na biso eyeba mpe makambo yango. Kasi, na makanisi na ngai nayebaki ete ekosepelisa bango te; yango wana nazwaki ekateli ya koyebisa bango makambo yango na nsima. Bongo, mokolo moko, mama amonaki na kati ya biloko na ngai lokasa moko oyo ekweaki na Biblia moko ya kala oyo bapesaki ngai. Baboti na ngai batungisamaki mingi mpo na yango.

Lisolo elongo na tata

Ntango tata ayaki mpenza koyeba ete nazalaki kosolola na Batatoli ya Yehova, asɛngaki nabima ngai na ye mpo na kotambola mpe kosolola. Alobaki na ngai na makasi nyonso ete: “Osengeli sikoyo kokata boyokani nyonso na bato wana. Soki okati te, nakokoka te kosala mosala na ngai ya mokambi ya mboka. Okobebisa mosala na ngai. Ekosɛnga natika mosala wana mpe nazonga na izine esika nazalaki kosala liboso. Okosambwisa libota mobimba.”

Nazongisaki ete: “Kasi, tata, Biblia ezali buku moko malamu, mpe ezali na toli ya malamu oyo etali makambo ya bomoi.”

Tata alobaki boye: “Te, Alenka, nazalaka na mposa ata moke te ya Biblia to ya Nzambe mpo nazala na esengo. Nasalaki makambo nyonso na mabɔkɔ na ngai moko. Moto moko te asalisaki ngai. Nakamwi ndenge okómi kondima makambo wana ya bozoba! Ebongi ozala na bomoi moko ya solosolo, obala, mpe obota bana. Bongo okomona ete ozali na mposa ya Nzambe te mpo ozala na esengo.”

Lokola tata alobaki likambo yango na motema moko mpenza, yango esimbaki motema na ngai. Mpo na mwa ntango nakómaki kotyela kondima na ngai oyo ezwaki naino te misisa ya makasi ntembe. Ya solo, nayebaki tata banda kala koleka Batatoli ya Yehova, mpe na ndako na biso, eloko moko te ezalaki kobangisa ngai. Nandimaki mpenza ete tata azali na mikano ya malamu. Nayebaki ete alingaki ngai mingi, yango wana nalakaki ye ete nakotika koyekola Biblia. Mwa moke na nsima, nasilisaki kelasi ntango nazalaki na mbula 18, mpe nakendeki kosala na Prague, mboka-mokonzi ya ekólo na biso.

Bomoi na ngai na Prague

Nazwaki mosala na banki moko, mpe nazalaki kozela na motema likoló nayeba bomoi ya solosolo oyo tata alobaki ete Bakoministe bakotya. Kasi, nsima ya ntango moke, namonaki ete ata na engumba bato bazalaki na esengo mingi te koleka bato ya bamboka mike. Kutu, bomoi ya mbindo, bokosi, moimi mpe milangwa nde epalanganaki mingi.

Nsukansuka, Motatoli moko, oyo azalaki kofanda pene ya ndako na biso na Horní Benešov, ayaki na Prague, mpe asalaki nyonso mpo ete nakutana na Batatoli. Ezalaki na lolenge wana nde nazongelaki boyekoli na ngai ya Biblia na Prague na mwasi moko, nkombo na ye Eva. Nsima ya boyekoli nyonso, Eva azalaki kotuna, “Olingi naya lisusu na pɔsɔ oyo ekolanda?” Azalaki soki moke te kondimisa ngai makanisi na ye na makasi, atako mbala mosusu nazalaki kotuna ye ete alingaki kosala nini soki ye nde azalaki na esika na ngai.

Azalaki koloba: “Nakoki te koyebisa yo soki nalingaki kosala nini.” Na nsima azalaki kobenda likebi na ngai na likambo moko na Biblia, yango ezalaki kosalisa ngai nazwa ekateli. Likambo oyo ezalaki kotungisa ngai mingi ezalaki boyokani na ngai elongo na baboti na ngai mpo bazali kosepela te, bongo natunaki ye soki nasengeli kotika kokutana na bango. Eva afungolaki Exode 20:12, esika Biblia elobi ete tosengeli kokumisa baboti na biso. Bongo atunaki ngai boye: “Kasi, elingi nde koloba ete tosengeli soki moke te kotya moto mosusu liboso ya baboti na biso?”

Lokola nayebaki mpenza ndenge ya kozongisa te, afungolaki Biblia na vɛrsɛ oyo Yesu Klisto alobaki ete: “Moto oyo alingi tata to mama koleka ngai abongi na ngai te.” (Matai 10:37, NW) Bongo nakangaki ntina ete atako baboti na ngai babongi kozwa lokumu, kasi esengeli kolinga mingi koleka Yesu Klisto na Tata na ye oyo azali na likoló. Na likambo na likambo, Eva azalaki ntango nyonso kolakisa ngai etinda moko ya Biblia oyo ebongi, mpe azalaki kotika ngai moko nazwa ekateli.

Nasengeli kopona kati na makambo mibale

Na nsima, na sanza ya Sɛtɛmbɛ 1982, nakɔtaki na iniversite moko na Prague mpo na koyekola makambo ya bilanga. Kasi, eumelaki te mpo namona ete nakokaki te kotya likebi oyo ebongi na mateya na ngai ya iniversite mpe nzela moko na yango namipesa mpe ndenge nalingaki na boyekoli na ngai ya Biblia. Na yango nayebisaki moko ya baprofɛsɛrɛ na biso ete nalingi kolongwa na iniversite. Alobaki na ngai boye: “Nakotinda yo epai ya moto oyo akoki komitya na esika na yo mpe kosalisa yo.” Azwaki bibongiseli mpo nasolola na mokambi ya iniversite.

Mokambi yango ayambaki ngai na motuna oyo: “Mpo na nini moyekoli na biso ya mayele mingi alingi kolongwa na iniversite?”

Nayanolaki ete: “Mpo nazali kozwa lisusu ntango te ya kosala makambo mosusu oyo esepelisaka ngai.” Lokola na ntango wana, bakonzi ya Leta bapekisaki mosala ya Batatoli ya Yehova na Tchécoslovaquie, nalingaki te koyebisa ye ntina oyo nakanaki kolongwa. Kasi, nsima ya kosolola na ye soki ngonga mibale, namonaki ete nakoki kotyela ye motema. Yango etindaki nayebisa ye ete nazali koyekola Biblia.

Alobaki boye: “Yekolá Biblia mpe mateya ya Marx. Na nsima, poná nini okolanda.” Emonanaki lokola azalaki nde kolendisa ngai nayekola Biblia!

Mabe oyo balingaki ekómela ngai elongi te

Nzokande, kaka na mokolo oyo elandaki, profɛsɛrɛ wana elongo na mokambi ya iniversite bakendeki tii na mboka epai baboti na ngai bazalaki mpo na kokutana na bango. Bayebisaki bango ete nazali kolanda makambo ya mwa lingomba moko mabe oyo bapekisi yango, mpe bayebisaki bango ete nalingi kolongwa na iniversite. Mokambi ya iniversite ayebisaki tata ete: “Soki mwana na bino azwi ekateli ya kolongwa na iniversite, tokosala nyonso mpo azwa mosala te na Prague, mpe akozonga epai na bino mpo atika makambo ya mwa lingomba wana.”

Na sanza ya Yanuali 1983, nalongwaki na iniversite. Moninga moko oyo azalaki mpe koyekola Biblia asalisaki ngai nazwa ndako ya kofutela epai ya mwasi moko mobange. Lokola nayebaki te ete mokambi ya iniversite akendeki epai ya baboti na ngai mpe nayebaki te nini oyo alakaki tata, nazalaki koyeba te mpo na nini milende nyonso oyo nazalaki kosala mpo na kozwa mosala ezalaki kolonga te. Mokóló ndako oyo nazalaki kofutela alingaki mpe koyeba mpo na nini ezalaki bongo; yango wana, kozanga ete ayebisa ngai, akendeki epai na mokambi ya iniversite mpo na koyeba mpo na nini nalongwaki na iniversite.

Ayebisaki ye boye: “Zalá na bokɛngi! Azali moto ya mwa lingomba moko mabe oyo babengi Batatoli ya Yehova. Yango wana alongwaki na iniversite. Asengeli kozonga na ndako na bango mpe kotika lingomba yango. Nakosala nyonso ete azwa mosala te awa na Prague!”

Ntango mokóló ndako azongaki na butu yango, abengaki ngai mpe alobaki ete: “Alenka, lelo nakendeki na iniversite na bino.” Nakanisaki ete esili mpo na ngai, akosɛnga ngai nakanga bisaka na ngai mpe nabima na ndako na ye na butu wana kaka. Kasi alobaki boye: “Nasepeli te na makambo oyo mokambi ya iniversite azali kosala. Okoki kolanda lingomba oyo olingi; likambo eleki ntina mpo na ngai ezali nde etamboli na yo. Nakosalisa yo ozwa mosala.” Na butu wana, nabondelaki Yehova mpe napesaki ye matɔndi mpo na lisalisi na ye.

Eumelaki te, tata ayaki na Prague mpo akamata ngai mpe azonga na ngai epai na biso. Kasi na mbala wana maloba na ye endimisaki ngai te. Kondima na ngai epai na Yehova mpe bilaka na ye ezalaki na misisa makasi mpenza. Na nsuka, tata atikaki ngai mpe azongaki, mpe mpo na mbala ya liboso na bomoi na ngai, namonaki ye aleli. Atako bokutani yango esalaki ngai mpasi na motema, yango esalaki ete nakóma mpenza pene na Yehova koleka liboso. Nalingaki ete nazala moto na ye mpe nasalela ye. Na yango, na mokolo ya 19 Novɛmbɛ 1983, namonisaki polele ete namipesi na Yehova na nzela ya batisimo kati na saani moko monene ya komisukola (baignoire) na ndako moko na Prague.

Nazwi mapamboli mpo na ekateli na ngai

Na nsima, nakómaki kopesa lisalisi mpo na kobimisa mikanda ya Batatoli ya Yehova, oyo epekisamaki. Mosala yango ezalaki kosɛnga bokɛngi makasi, mpamba te bakonzi bazalaki kokanga mpe kotya na bolɔkɔ baoyo bakutaki bango na mosala yango. Mokumba na ngai ya liboso ezalaki ya kobɛta na masini Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo ebongolamaki na monɔkɔ ya Tchèque. Nsima na yango, bazalaki kopesa bazulunalo yango na Batatoli mpo na boyekoli na bango ya Biblia.

Nsima ya mwa ntango, basɛngaki ngai nakɔta na etuluku ya bandeko oyo bazalaki kokutana na ndako moko na Prague mpo na kobongisa babuku. Balongolaki bakiti mpe biloko mingi mosusu oyo ezalaki na eteni moko ya ndako mpe na katikati na yango batyaki mesa moko ya molai esika tozalaki kosangisa lokasa mokomoko ya buku. Na nsima tozalaki kokangisa yango na colle to kosɔna yango mpo ekóma buku. Mbala na mbala nazalaki kokanisa ete ekozala likambo ya esengo mpenza kosala mosala yango ntango nyonso.

Ntango nazalaki piɔniɛ na ebongiseli ya bilenge Bakoministe, nazalaki komeka kosalisa bana bákóma bato malamu koleka. Lokola nazali Motatoli ya Yehova, nazali kokoba kosalisa bilenge mpe nasili kosalisa ebele kati na bango bákóma basaleli ya Yehova oyo bazwi batisimo. Atako naino moto moko te na libota na biso akómi Motatoli, nazwi batata, bamama mpe bandeko mibali mpe bandeko basi ebele ya elimo, ndenge Biblia elakaki yango.​—Malako 10:29, 30.

Na 1989, boyangeli ya koministe ekweaki mpe boyangeli ya demokrasi ekitanaki yango na ekólo na biso. Mbongwana yango esali ete mibeko ya mboka epesa Batatoli ya Yehova bonsomi ya losambo; na bongo, tokoki sikoyo koyangana mpo na koyekola Biblia na bisika ya kobombana te, tokoki kosakola ndako na ndako kozanga kobanga ete bakokanga biso, mpe tokoki kosala mibembo na mboka mopaya mpo na mayangani oyo esangisaka bandeko ya mikili mingi. Lisusu, tomitungisaka te ete bato ya sirɛtɛ bakotunatuna biso mituna, bakokanga biso to bakobangisa biso!

Nazali kosalela Nzambe elongo na mobali na ngai

Na 1990, tobalanaki na Petr, ye mpe moklisto lokola ngai. Na sanza ya Aprili 1992 biso nyonso tokokisaki mokano na biso ya kokóma babongisi-nzela, ndenge Batatoli babengaka baoyo bapesaka ntango na bango nyonso mpo na kosakola. Na nsima, na sanza ya Yuni 1994, babengaki biso mpo na kosala na filiale ya Batatoli ya Yehova na Prague. Sikoyo, na esika ya kosala mikanda oyo elimbolaka Biblia na kobombana, tozali kokokisa matomba ya elimo ya bato ya République tchèque mobimba na ndenge ya polele.

Eleki mwa bambula, ngai na Petr totondaki na esengo ntango baboti na ngai bandimaki koya kotala esika tofandaka mpe tosalaka elongo na bandeko mosusu soki 60 oyo basalaka na filiale na biso. Nsima ya kotalatala esika tolalaka mpe babiro na biso, tata alobaki boye: “Ya solo, namoni ete bolingo ya solosolo ezali kati na bino.” Wana ezalaki maloba ya kitoko koleka oyo nakokaki koyoka na monɔkɔ ya tata na ngai.

Nazwi mpenza makambo oyo Bakoministe bazalaki kolaka

Elikya na biso ya kofanda na mokili moko malamu mingi na nzela ya boyangeli ya Bakoministe ezalaki bobele ndɔtɔ mpamba. Lisolo ya bato emonisi ete ata milende oyo bato basali na bosembo nyonso elongi te kobimisa libota ya bato oyo bazali mpenza sembo. Nandimi solo ete bato mosusu mingi bakososola ete moto akoki kozala na bomoi ya esengo te soki Nzambe asalisi ye te.​—Yilimia 10:23.

Mbala na mbala, nakanisaka elikya oyo tata azalaki na yango mpo na ngai ete nazala na oyo abengaki “bomoi ya solosolo,” oyo ye ateyaki biso ete ekoya na nzela ya boyangeli ya Bakoministe. Kasi, nayebi sikoyo na boyekoli na ngai ya Biblia ete oyo Biblia ebengi “bomoi ya solosolo” to bomoi na mokili ya sika mpe ya sembo oyo Nzambe alaki, yango nde elaka kaka moko ya solosolo oyo bato bakoki kotyela motema. (1 Timote 6:19, NW) Nazali koloba bongo mpamba te, bato oyo bazali kosala milende ya solosolo mpo na kotosa mateya ya Biblia na bomoi na bango, atako basalaka masumu mpe bazangi kokoka, bazali na likoki ya kofanda na kimya na ndenge moko ya kokamwa mpenza. Bazali kolonga mikakatano nyonso oyo bazali kobimisela bango mpo na kobebisa bomoko oyo ezali kati na bango to mpo na kosala ete bátika kokangama na Yehova, Nzambe na bango.

Likambo yango ekɔtaki makasi na motema na ngai ntango ngai na mobali na ngai tozwaki libaku ya kozala kati na bapaya oyo babengamaki na molulu ya bofungoli bandako ya sika ya filiale ya Batatoli ya Yehova pene na engumba Lviv, na ekólo Ukraine, na mokolo ya 19 Mai 2001. Kuna nakutanaki na Batatoli mosusu oyo bazalaká mpe Bilenge Bapiɔniɛ kati na ebongiseli ya bilenge Bakoministe. Lokola ngai, bango mpe batyaki elikya ete boyangeli ya Bakoministe nde ekotya kimya mpe bomoko ya solo kati na bato ya mokili mobimba. Vladimir Grigoriev, oyo azali sikoyo kosala elongo na mwasi na ye na filiale ya Russie, azalaki mpe moko ya Bilenge Bapiɔniɛ wana.

Sikawa ezali mpenza likambo ya kokamwa na komona ete na esika wana, oyo ezalaki kaa epai Bilenge Bapiɔniɛ bazalaki kolekisa konje na bango, Batatoli ya Yehova batongaki filiale na bango ya sika. Lokola bisika ezalaki mingi te mpo na bato nyonso, bobele bato 839 oyo bautaki na bikólo 35 nde bazalaki wana na programɛ ya bofungoli bandako yango ya sika. Nzokande, na ntɔngɔ oyo elandaki bato 30881 bayanganaki na stade ya Lviv mpo na kolanda na mokuse makambo oyo elobamaki na programɛ ya mokolo ya liboso.a Basusu kati na bango bautaki mosika mpe basalaki mobembo ya ngonga motoba to koleka mpo na kozala wana.

Nzokande, ntango bato yango bayokaki ete ebongiseli ezwami mpo bákoka kotala bandako ya filiale na bango ya sika, bakɔtaki na ebele ya babisi oyo eyaki na bango na stade. Na nsima ya midi babisi yango ebandaki kokóma na biro ya filiale, esika bayambaki ngai na mobali na ngai mpe tozwaki libaku ya kolekisa butu moko wana. Liboso ete tókóma na mpokwa, bandeko wana ya bolingo koleka 16000 basilisaki kotambolatambola mpe kotala, bakɔtaki lisusu na babisi na bango mpe babandaki mobembo na bango ya kozanga epai na bango, mobembo oyo mpo na basusu esengelaki kozala molai!

Na Ukraine, lokola mpe na bamboka mosusu ya Mpoto ya Ɛsti, bamilio ya bato bazalaki kondima ete kaka Bakoministe nde bazalaki na likoki ya kosala mokili moko ya sika epai kimya ekozala. Nzokande, lelo oyo, na Ukraine mpamba, bato koleka 120000 bamipesi na mosala ya koyebisa basusu nsango ya Bokonzi ya Nzambe. Na ntembe te, mingi kati na biso oyo kala tozalaká Bakoministe tosili kondima ete boyangeli wana ya Nzambe nde ezali elikya kaka moko ya solo oyo ekotya bondeko mpe kimya ya solosolo kati na bato nyonso!

[Maloba na nse ya lokasa]

a Bato mosusu 41 143 bayanganaki bobele na ntango yango na stade ya Kiev, na ntaka ya kilomɛtrɛ 500 na Lviv, epai bayokaki na mokuse makambo oyo elobamaki na mokolo ya liboso, na programɛ ya bofungoli bandako ya sika. Soki basangisi mituya wana mibale, epesi 72 024; yango ezali motuya oyo eleki mituya nyonso ya mayangani nyonso oyo Batatoli ya Yehova basili kosala na ekólo Ukraine.

[Elilingi na lokasa 14]

Ntango nazalaki na mbula 10, mwa moke nsima ya kokóma Elenge Piɔniɛ ya Bakoministe

[Elilingi na lokasa 18]

Ngai na mobali na ngai Petr

[Elilingi na lokasa 18]

Vladimir, piɔniɛ ya kala ya Bakoministe oyo nakutanaki na ye na molulu ya bofungoli filiale ya Ukraine

[Elilingi na lokasa 19]

Bato koleka 30000 balandaki na mokuse programɛ ya bofungoli

[Elilingi na lokasa 19]

Bato koleka 16000 batalaki bandako ya filiale

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto