Nkoma ya batángi
Bilenge oyo bazali konyokwama na makanisi Nayokaki mpenza esengo ntango nazwaki nimero ya Lamuká! oyo ezalaki na masolo “Lisalisi mpo na bilenge oyo bazali konyokwama na makanisi”! (8 Sɛtɛmbɛ 2001, ebimeli ya Lifalanse) Nazali kobunda na maladi yango banda bambula mingi. Matɔndi mingi mpo na lisalisi oyo bopesi ngai na ntango ya mpasi.
L. D., France
Nazali lifulume ya mwasi, nasalisaka maladi ya bana mike. Bato mingi batyolaka likama ya konyokwama na makanisi, kasi bino te. Nasɛngaki zulunalo yango nkama moko. Nalingi kokabola yango epai ya minganga nyonso oyo basalisaka maladi ya bana mike mpe baoyo basalisaka maladi ya motó na etúká na biso.
B. P., États-Unis
Minganga bamonaki ete bandeko mingi na libota na ngai bazali konyokwama na makanisi. Koyeba ete yango ezali maladi kasi bolɛmbu te, esalisaka bango mingi mpo bámiyoka lisusu ete bazali bato lokola bato nyonso. Makanisi oyo bopesi ekosalisa biso nyonso tózala na motema mawa mpo na bango mpe tósalisa bango.
C. M., Canada
Ntango kaka nazwaki zulunalo oyo, nabandaki mbala moko kotánga yango. Mpe natangisaki mpisoli ya esengo ndenge namonaki ete bolingaka bilenge mingi mpe bosalelaki nkasa 12 mobimba mpo na lisolo yango. Matɔndi mingi mpenza!
M. M., Autriche
Lisolo yango esalisaki ngai mingi mpo nakitisa motema mpe kimya ya motema na ngai ezonga. Lisusu, esalisi ngai nayeba ete ezali mpe na bato mosusu oyo bazali konyokwama na maladi yango. Nazali kobondela Yehova abɔndisa mpe asalisa bato nyonso oyo bazali konyokwama na makanisi.
Y. T., Japon
Nakobomba zulunalo yango mosika na ngai te. Ezali mpenza makambo oyo bilenge na biso bazali na mposa na yango, mpe nakanisi ete zulunalo yango ekosalisa bilenge mingi mpe baboti na bango na kosilisa maladi wana, ndenge mpenza bobengi yango. Mbala mosusu ekobikisa bomoi ya bato mingi.
R. F., États-Unis
Namiyokaki mpenza malamu ntango nayebaki ete mpasi ya makanisi eutaka te na bolɛmbu moko boye ya elimo. Motema na ngai ekitaki mpe nalelaki ntango natángaki ete “Yehova azali penepene na baoyo mitema na bango etutami.”—Nzembo 34:18, NW.
A. I., Japon
Nazali na mbula 16, mpe na boumeli ya bambula mingi nanyokwamaki na makanisi mbala na mbala. Zulunalo yango ezalaki mpenza eloko oyo nazalaki na mposa na yango! Nazwi mpenza toli oyo nazalaki na mposa na yango na masolo yango.
L. B., Australie
Ntango nazalaki elenge, nazalaki konyokwama na makanisi, kasi nayebisaki baboti na ngai te to mpe moto mosusu te ete nalingaki komiboma. Yango ezalaki libunga monene. Ezali na ntina mingi kozwa lisalisi ntango ozali konyokwama na makanisi. Matɔndi mingi na ndenge bozali komibanzabanza mpo na bilenge.
S.G.C., États-Unis
Kosala bibende Nasalaka na kompanyi moko ya bibende, mpe napesaki mokambi ya mosala na ngai Lamuká! oyo ezalaki na lisolo: “Mosali moko makasi na motema malamu” (8 Sɛtɛmbɛ 2001, ebimeli ya Lifalanse). Alobaki ete atako lisolo yango ezali kolobela likambo moko ya makasi, kasi ezali polele mpe sikisiki, mpe ezali na maloba ya makasi mingi te. Masolo ya ndenge wana epesaka biso likoki ya kosalisa bato mosusu báyeba Lamuká!
G. B., Italie
Lokola nautaki kosilisa koyekola mosala ya bibende na kompanyi moko, mpo natángaka kelasi ya makambo ya bibende, nazalaki mpenza na mposa te ya kotánga lisolo moko oyo ezali kolobela mosala ya bibende. Kasi nakamwaki mingi na lolenge bolobeli likambo yango ya molai mpe ya makasi na ndenge ya pɛtɛɛ mpenza.
M. F., Allemagne