Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g03 Janvier nk. 8-11
  • Tólanda ndakisa ya baklisto ya ekeke ya liboso

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tólanda ndakisa ya baklisto ya ekeke ya liboso
  • Lamuká!—2003
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Tózala na bomoi “engebene Klisto”
  • Bakabwani na mokili
  • “Kotosa Nzambe lokola azali moyangeli na esika ya kotosa bato”
  • Liteya oyo tokoki kozwa
  • Bomoi ya malamu ezali kozela biso
  • “Bazali bato ya mokili te”
    Tósambela Nzambe kaka moko ya solo
  • Mosika te, mokili mozangi bitumba
    Lamuká!—1996
  • Baklisto bakɔtaka na makambo ya mokili te na mikolo oyo ya nsuka
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Mangomba nyonso masepelisaka Nzambe?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
Makambo mosusu
Lamuká!—2003
g03 Janvier nk. 8-11

Tólanda ndakisa ya baklisto ya ekeke ya liboso

“Bókeba: mbala mosusu ekoki kozala na moto moko oyo akomema bino lokola nyama na ye ya kolya na nzela ya filozofi mpe na bokosi ya mpambampamba engebene mimeseno ya bato, engebene makambo mikemike ya mokili kasi engebene Klisto te.”​—⁠Bakolose 2:⁠8.

EZALI na maloba wana nde ntoma Paulo akebisaki baklisto ya ekeke ya liboso mpo na makama ya kolanda bilandelá mayele ya bato. Bakokaki to kolanda litambwisi ya Yesu mpe bantoma na ye, litambwisi oyo basilaki kozwela yango matomba mingi, to kokóma baombo ya mateya ya bato, mateya oyo ebongwanaka ntango nyonso, oyo mpe esilaki konyokola bamilio ya bato mpe komonisa bango mpasi.​—⁠1 Bakolinti 1:​19-21; 3:​18-20.

Tózala na bomoi “engebene Klisto”

Eleki sikoyo mbula soki nkóto moko, basoda oyo babundaki bitumba ya croisades bakangaki ntina te ete kozala na bomoi “engebene Klisto” esuki kaka te na koloba ete ozali sembo epai na Yesu Klisto. (Matai 7:​21-23) Yango elimboli nde kozala na bomoi oyo eyokani mpenza na mateya ya Yesu, ndenge ezali na kati ya Biblia, Liloba ya Nzambe oyo epemami. (Matai 7:​15-20; Yoane 17:17) Yesu Klisto alobaki ete: “Soki botikali kaka na kati ya liloba na ngai, bozali mpenza bayekoli na ngai.” (Yoane 8:31) Alobaki lisusu ete: “Bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai, soki bozali na bolingo na kati na bino.”​—⁠Yoane 13:⁠35.

Bato oyo babundaki bitumba ya croisades bakangamaki mpenzampenza nde na motambo ya “bokosi ya mpambampamba engebene mimeseno ya bato.” Mpe ezali likambo ya kokamwa te soki bato mpamba bakosamaki, mpamba te bakonzi ya mangomba na bango, ata kutu baepiskɔpɔ na bango, “bayebanaki lokola basoda.” Buku moko (Cyclopedia of Biblical, Theological, and Ecclesiastical Literature) ya McClintock mpe Strong elobi ete “bakonzi ya mangomba bakómaki mpenza na elimo ya kobunda, na boye ete mbala nyonso oyo ezalaki kosɛnga ete bábunda bitumba mpo na litomba moko boye, bazalaki kokakatana te mpo na kobunda.”

Nini ememaki bango na etamboli wana ya mabe? Nsima ya liwa ya bantoma na ekeke ya liboso, bakonzi ya mangomba oyo bapɛngwaki batikaki mpenza kolanda mateya ya Klisto, ndenge Liloba ya Nzambe esakolaki yango. (Misala 20:​29, 30) Lingomba yango oyo ebebaki, emikɔtisaki ntango nyonso na makambo ya Leta. Balobaka ete, na ekeke ya minei, Constantin, amperɛrɛ ya Loma, andimaki kokóma moklisto ntango akómaki pene ya kokufa. Na nsima, buku yango (Cyclopedia) elobi lisusu ete, “lokola batyaki bɛndɛlɛ ya ekulusu na esika ya bɛndɛlɛ ya bikeko, yango etyaki moklisto nyonso na mokumba ya kosala mosala ya soda.”

Nzokande, baklisto bazalaki mpenza na mokumba ya ndenge wana te. Kasi “maloba ya kondimisa” ya mateya ya filozofi ememaki bango na kobuka mpenza mibeko nyonso oyo ezalaki komonisa Klisto. (Bakolose 2:⁠4) Tii lelo, bato mosusu basalelaka makanisi mosusu ya lokuta mpo na kolongisa bitumba mpe matata. Kasi, buku yango (Cyclopedia) elobi lisusu ete mpo na moto oyo azali mpenza na ezaleli ya kokangama na Nzambe, “kokɔta na bitumba oyo ezali konyokola bato, lokola bitumba oyo ezalaki kosalema mingi na ntango ya kala mpe oyo ya ntango na biso, ekoki ata moke te koyokana na . . . mitinda ya boklisto.”

Na boumeli ya bikeke mingi, mangomba oyo ezali ya boklisto te emipesaki mpe na bitumba. Kaka ndenge mangomba ya boklisto basalaki, bango mpe babomaki bandimi ya mangomba na bango moko, to ya mangomba mosusu, kaka mpo bazalaki bato ya ekólo mosusu, ya masangá mosusu ya politiki mpe ya lingomba mosusu. Babundisaki bato mosusu to bakanelaki bango mpo na kotinda bango na makasi bándima bindimeli na bango. Mpo bákokisa mokano na bango wana, basusu babomaki mpenza bato ebele ndenge esalemá naino te liboso. Bango mpe bakeseni soki moke te na mangomba ya boklisto.

Bakabwani na mokili

Mpo na nini baklisto ya ekeke ya liboso bakɔtaki te na bitumba ya ntango na bango oyo ebomaki bato mingi mpe na makambo ya politiki? Mitinda mibale ya ntina mingi esalisaki bango. Ya liboso, etinda oyo Yesu apesaki ntoma Petelo ntango Petelo asalelaki mopanga mpo na kobunda ete bákanga Yesu te: “Zongisá mopanga na yo na esika na yango, mpo baoyo nyonso bakamataka mopanga bakokufa na mopanga.” (Matai 26:52) Ya mibale, maloba oyo Yesu alobaki na Pilato ntango atunaki ye soki bokonzi na ye ezali ya lolenge nini: “Bokonzi na ngai ezali ya mokili oyo te. Soki bokonzi na ngai ezalaki ya mokili oyo, mbɛlɛ basaleli na ngai babundi mpo nakabama te epai ya Bayuda. Kasi nde, bokonzi na ngai euti awa te.”​—⁠Yoane 18:⁠36.

Ndenge nini baklisto ya ekeke ya liboso basalelaki mitinda wana? Bakabwanaki mpenza na mokili, baboyaki kokɔta na makambo ya mokili, bakɔtaki te na makambo ya politiki mpe na mosala ya soda. (Yoane 15:​17-19; 17:​14-16; Yakobo 4:⁠4) Baboyaki kobundisa bazalani na bango. Makambo eleká emonisi polele ete baklisto ya ekeke ya liboso baboyaki kokɔta, ezala na ngámbo ya Bayuda oyo bazalaki kobundela ekólo na bango, ezala na mampinga ya bokonzi ya Loma. Longola yango, bamekaki mpe soki moke te koyebisa bakonzi ya politiki makambo oyo basengeli kosala, mpamba te ezalaki likambo na bango te.​—⁠Bagalatia 6:⁠5.

Na ekeke ya mibale ya ntango na biso (T.B.), Justin le Martyr akomaki na ntina ya baklisto oyo ‘batulaki mimpanga na bango ete mizala bitimweli.’ (Mika 4:⁠3) Mpo na kopesa eyano na baoyo bazalaki kotya ntembe na ndenge oyo baklisto bazalaki kokɔta te na makambo ya bitumba, Tertullien atunaki boye: “Ekoki nde kondimama na mibeko kosimbaka mompanga, na ntango Nkolo alobi ete ye oyo akosimba mompanga akokufa na mompanga?”

“Kotosa Nzambe lokola azali moyangeli na esika ya kotosa bato”

Lokola baklisto ya ekeke ya liboso baboyaki kokende bitumba, bamilukelaki mikakatano mingi. Koboya kokende bitumba ezalaki likambo oyo bato bazalaki kosala te na ntango wana. Celse, monguna ya baklisto atyolaki bango ndenge baboyaki kokende bitumba. Mpo na ye, moto nyonso asengelaki kokende etumba soki bakonzi basɛngi yango. Atako bayinaki bango makasi mpenza, baklisto ya ekeke ya liboso baboyaki kolanda mateya ya filozofi oyo ezalaki kotɛmɛla mateya ya Klisto. Balobaki ete: “Tosengeli kotosa Nzambe lokola azali moyangeli na esika ya kotosa bato.”​—⁠Misala 4:19; 5:⁠29.

Batatoli ya Yehova na ntango na biso balandi ndakisa na bango. Na ndakisa, na Allemagne na ntango ya Banazi, Batatoli baboyaki mpenza na motema moko kokɔta na bitumba ya Hitler, oyo ebomaki bato ebele. Bandimaki konyokwama makasi, ata kutu kokufa, na esika ya kobuka mibeko na kokɔtáká na makambo ya politiki. Buku Ya banzambe mpe ya bato (na Lingelesi) epesi lapolo ete ‘Batatoli mingi bakɔtaki bolɔkɔ mpe Banazi babomaki mingi kati na bango’ mpo bakangamaki kaka na mitinda ya Biblia. Na yango, kati na bamilio ya bato oyo babomamaki na etumba ya mibale ya mokili mobimba, ata Motatoli ya Yehova moko te abomaki moto. Na esika ya koboma bato mosusu, Batatoli bazalaki nde kondima kokufa mpo na bato mosusu, ndenge mingi kati na bango basalaki.

Liteya oyo tokoki kozwa

Liteya nini tokoki kozwa na makambo oyo eleká? Na ntembe te, moko na yango ezali oyo: mayele ya bato ememaka ntango nyonso na koyinana mpe kosopa makila. Mosakoli 8:9 elobi solo ete: “Moto moko azali na bokonzi likoló ya mosusu mpo na kopesa ye mpasi.” Liloba ya Nzambe eyebisi ntina monene ya likambo yango, ntango elobi na Yilimia 10:23 ete: “Nzela ya moto ezali kati na ye moko te, ekoki na motamboli te ete [atambwisa] makolo na ye [ye] moko.” Te, Nzambe akelá bato te mpo básala makambo na ndenge na bango moko, kozanga ye, mpe makambo yango etambola malamu. Apesá bango likoki wana te. Ebele ya makambo oyo eleká emonisi yango.

Toyebi ete, mokomoko na biso azali na likoki te ya kobongola makambo oyo bakonzi ya mokili bazali kosala, ndenge bazali kozongela makambo ya nsɔmɔ oyo eleká; tozali mpe te na ndingisa ya komeka kondimisa bango bálanda nzela moko boye. Kasi, tosɛngisami te kokɔta na matata na bango mpe kosangana na yango. Yesu alobaki mpo na bayekoli na ye ete: “Bazali bato ya mokili te, ndenge ngai mpe nazali moto ya mokili te.” (Yoane 17:14) Mpo na kosangana te na kowelana ya mokili oyo, tosengeli kotika ete Biblia, Liloba ya Nzambe, etambwisa biso, kasi te mayele ya bato, oyo ebongwanaka ntango nyonso.​—⁠Matai 7:​24-27; 2 Timote 3:​16, 17.

Bomoi ya malamu ezali kozela biso

Liloba ya Nzambe, oyo ebongi na kotyela motema, esuki kaka te na kongɛngisa biso na makambo ya kala mpe ya mikolo oyo. Ezali mpe kopesa litambwisi ya solosolo mpo na mikolo ezali koya. (Nzembo 119:105; Yisaya 46:​9-11) Ezali lisusu kolimbolela biso polele mokano ya Nzambe mpo na mabele. Akopesa nzela te ete bato báboma mokili oyo na kosaleláká na ndenge ya mabe banguya makasi oyo siansi mpe mayele ya tekiniki ezali kopesa bango. Akosala ete mabele oyo ekóma Paladiso, ndenge akanaki yango na ebandeli.​—⁠Luka 23:⁠43.

Mpo na likambo yango, Liloba ya Nzambe elobi ete: “Basembwi bakofanda na mokili mpe bato malamu bakotikala na yango. Kasi bato mabe bakolongolama na mokili mpe bato na masumu bakobikolama wana.” (Masese 2:​21, 22) Etikali moke, makambo yango esalema, mpamba te ntango oyo ya yikiyiki ezali elembo oyo emonisi ete tozali kobika na “mikolo ya nsuka” ya ebongiseli ya makambo mabe ya ntango oyo. (2 Timote 3:​1-5, 13) Kozanga ntembe, mikolo yango ya nsuka etikali ya kotánga; elingi kokóma mpenza na nsuka na yango. Esakweli ya Biblia eteyi biso ete: “Mokili ezali koleka mpe ndenge moko mposa na yango, kasi moto oyo azali kosala mokano ya Nzambe azali kotikala libela na libela.”​—⁠1 Yoane 2:17; Danyele 2:⁠44.

Etikali moke, Nzambe ‘abebisa baoyo bazali kobebisa mabele’ mpe alongola mokili ya lelo, oyo etondi na mobulu, atya na esika na yango mokili moko ya sika, epai “boyengebene ekofanda.” (Emoniseli 11:18; 2 Petelo 3:​10-13) Na nsima, mpo na baoyo bakotikala na bomoi, “akopangwisa mpisoli nyonso na miso na bango, mpe liwa ekozala lisusu te, ná mawa ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te.” (Emoniseli 21:​1-4) Bitumba mpe mobulu ekosila mpo na libela, ntango esakweli oyo ezali na Yisaya 2:4 ekokokisama na mobimba na yango: “Bakotula mipanga na bango ete mizala bitimweli, mpe makɔnga na bango ete mazala bikateli na matiti. Libota moko bakotombwela libota mosusu mopanga te, bakoyekola etumba lisusu mpe te.” Yo mpe, okoki kozala na bomoi wana ya kitoko mpe ya seko na mikolo ezali koya, soki ozwi liteya na makambo eleká.​—⁠Yoane 17:⁠3.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 11]

Batatoli ya Yehova balandaki ndakisa ya baklisto ya ekeke ya liboso

[Elilingi na lokasa 8]

Yesu alobaki ete Bokonzi na ye ezali ya mokili oyo te

[Elilingi na lokasa 10]

Liloba ya Nzambe elaki bomoi ya seko mpe ya kokoka na paladiso

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto