Mokakatano ya Lingomba ntango Brésil ezalaki na mabɔkɔ ya Portugal
EUTI NA MOKOMI NA BISO NA BRÉSIL
NA MOKOLO ya 30 Novɛmbɛ 1996, bato oyo bakendaki na likita monene ya mangomba (Conférence mondiale sur la mission et l’évangélisation), likita oyo lisangá ya mangomba masangani (Conseil oecuménique des Églises) ebongisaki, bayanganaki na libongo moko ya masuwa na engumba Salvador, na Brésil. Soki baponaki esika wana, ezalaki mpamba te. Na bikeke oyo eleká, bamilio ya bato ya Afrika batɛkamaki baombo na libongo wana. Ntango sango moko alobelaki mobembo ya nsɔmɔ oyo baombo yango bazalaki kosala amonisaki ete: “Mbu oyo etondi na mpisoli na bango.” Na mokolo wana ya ntina mingi oyo bazalaki kokanisa likambo yango, mingi bamonisaki mawa na bango mpo na likambo oyo molobi moko abengaki yango ete mokumba ya boklisto na likambo ya nsɔmɔ ya kokanga bato na boombo. Ndenge nini lingomba emikɔtisaki na likambo ya kotɛka mpe kosomba baombo na ntango Brésil ezalaki na mabɔkɔ ya Portugal?
“Kobikisa milimo oyo ebungá”
Na mobu 1441—mbula pene na 60 liboso ete bato mosusu bákóma na Brésil—Antão Gonçalves, moto moko ya ekólo Portugal oyo azalaki kosala mibembo na mbu, azalaki moto ya liboso ya kokanga mpe komema bato ya Afrika na Portugal. Na eleko ya Moyen Âge, bato mingi bamonaki mabe moko te na likambo ya kokómisa bakangami ya bitumba baombo, mingi mpenza baoyo lingomba ezalaki kobenga “bapakano.” Kasi, na boumeli ya mbula ntuku mibale ya kimya oyo elandaki, esengelaki koyebisa ntina oyo bazalaki kotɛka mpe kosomba baombo. Basusu balobaki ete ndenge bazalaki kosomba baombo na Afrika, bazalaki nde “kobikisa milimo oyo ebungá,” mpo bazalaki kolongola bapaya wana na bomoi na bango ya bopakano.
Mobeko babengi Romanus Pontifex, oyo Pápa Nicolas V abimisaki na mokolo ya 8 Yanuali 1455, epesaki nzela na likambo ya kosomba baombo, atako likambo yango epalanganaki mingi na ntango wana. Na ndenge yango, lingomba epekisaki te mombongo ya kotɛka mpe kosomba baombo. Na esika ya kopekisa yango, bakonzi mosusu ya lingomba bazalaki nde kolendisa likambo yango ndenge João Dornas Filho, moto ya mayele na makambo ya kala na ekólo Brésil amonisi yango. Yango wana, ntango Ba-Portugais babandaki koyangela Brésil, nzela esilaki kofungwama mpo ete boombo epalangana na ekólo yango mobimba.
“Eloko mosusu ya kosala ezalaki te”
Na mobu 1549, basango ya Ba-Jésuites oyo bakómaki sika basepelaki te ndenge bakutaki ete bato oyo bazalaki kosala misala mingi ya makasi na Brésil ezalaki nde baombo, oyo bato bazwaki bango na ndenge oyo eyokani te na mibeko. Bakóló mabelé bakangaki bango kaka na makasi mpo básalelaka bango misala na baferme mpe na bilanga na bango ya koko. Na mobu 1550, Manuel de Nóbrega, sango-mokonzi ya Ba-Jésuites akomaki ete: “Lisosoli ya bato mingi ezali kimya te mpo na baombo oyo bazali na bango.” Atako bongo, bakóló mabelé bazalaki kolinga te kotika bato na bango ya misala, ata soki yango ekokaki kosala ete lingomba eboya kolimbisa masumu na bango.
Kasi eumelaki te, Ba-Jésuites oyo bazalaki na Brésil bakómaki na mokakatano monene. Lokola bazalaki na mbongo mingi te, bakómaki na mokakatano mpo na kosala misala na bango ya kosalisa bato. Eloko bamonaki malamu ezalaki se kosala bilanga na mabelé oyo guvɛrnema epesaki bango mpe kosalela mbongo oyo bakozwa na bilanga yango mpo na kotambwisa misala ya lingomba. Kasi, banani bakosalela bango misala na bilanga yango? Jorge Couto, moto ya mayele na makambo ya kala na ekólo Portugal alobi boye: “Eloko mosusu ya kosala ezalaki te; esɛngaki kaka kozwa baombo, bato moindo, mpo básalela bango misala wana—atako likambo yango ebimisaki ntembe na oyo etali bizaleli malamu, ntembe oyo sango-mokonzi ya Ba-Jésuites na Brésil akangelaki matoi.”
Ba-Jésuites bapesaki mabɔkɔ na ebele ya bakóló mabelé oyo bazalaki kosɛnga baombo ya Afrika na molende mpenza. Emonanaki ete Ba-Indiens oyo bakangamaki baombo bazalaki na mokakatano mpo na komesana na mosala makasi ya bilanga; mbala mingi, bazalaki kotomboka to mpe bazalaki kokima na zamba.a Kasi, bato ya Afrika, bamekaki bango na bilanga ya koko na bamboka oyo Portugal ezalaki koyangela na bisanga ya Atlantique. Mokomi moko ya ntango wana amonisaki ete, “Bango bazalaki kokima soki moke te mpe bazalaki na esika ya kokende te.”
Yango wana, lokola bakonzi ya mangomba bazalaki kolendisa likambo ya kosomba baombo na Afrika, mombongo yango ekómaki monene. Brésil ekómaki kotya miso mingi na mombongo wana ya kosomba baombo na nzela ya Mbu Atlantique. Na mobu 1768, ferme moko monene ya Ba-Jésuites na Santa Cruz ezalaki na baombo 1 205. Basango mosusu—Ba-Bénédictins ná Ba-Carmélites—bazwaki mpe eteni monene ya mabelé ná baombo ebele. Na ekeke ya 19, Joaquim Nabuco, moto ya Brésil oyo azalaki koluka kosilisa boombo, agangaki ete: “Bamonastɛrɛ etondi na baombo.”
Lokola mosala ya bilanga ezalaki kotinda bato báluka kowelana na basusu, mbala mingi bakóló baombo oyo bazalaki kosala na mabelé ya lingomba bazalaki kosalisa baombo yango misala makasi kozanga kopema. Stuart Schwartz, profesɛrɛ ya makambo ya kala, alimboli ete ata ebele ya bakonzi ya lingomba oyo baboyaki likambo ya konyokola baombo, “bazalaki mpe kozwa bato ya Afrika na valɛrɛ mingi te,” mpe “bazalaki koloba ete disipilini, fimbo, mpe mosala makasi ezali nzela kaka moko mpo na kosilisa biyambayamba, gɔigɔi mpe moto makasi ya baombo yango.”
“Mateya mpo na kolongisa likambo ya boombo”
Lokola bakonzi ya mangomba bazalaki kosala makasi mpo na koyokanisa mitinda ya boklisto ná misala oyo bazalaki kosalisa baombo mpo na matomba na bango moko, bazwaki likambo ya kolongisa boombo—ndenge moto moko ya teoloji apesi yango nkombo mateya mpo na kolongisa likambo ya boombo. Lokola bakangami mingi bazalaki kokufa na kati ya kɔbɛ ya masuwa epai batondisaki bango, mpe bazalaki kozwa bamaladi ndenge na ndenge, lingomba ezwaki ekateli ya kobatisaka bato yango ya Afrika liboso ya komema bango na Amerika.b Na ntembe te, liboso ya kobatisa bango, bazalaki mpenza te koteya bango mateya ya lingomba.—Talá etanda “Kokómisa bato baklisto kaka na mbala moko?”
Ezala ndenge nini, baombo yango bazalaki na ntango mingi te ya kosala misala ya lingomba na bango ya sika mpo bazalaki kosala banda ntɔngɔ tii mpokwa mpe bazalaki na bomoi mokuse mpenza. Kasi, mateya ya lingomba, na ndakisa oyo elobaka ete “molimo mpe nzoto ekabwanaka,” ezalaki kokitisa bango mitema. Bakonzi ya mangomba bazalaki kokanisa boye: ‘Ya solo, bato wana ya Afrika bazalaki komona bwale na boombo, kasi milimo na bango ezalaki na bonsomi. Yango wana baombo yango basengelaki kondima minyoko na bango na esengo, komona yango lokola mokano ya Nzambe ya kobongisa bango mpo na nkembo.’
Nzokande, lingomba ezalaki koyebisa bakóló baombo ete bazali na mokumba ya kotikela baombo na bango nzela bákendaka misa, bátosaka bafɛti ya lingomba mpe bábala. Basango bazalaki koloba ete konyokola baombo ezali malamu te, kasi bazalaki mpe ekɛngɛ mpe bazalaki te kolobela mingi likambo ya koyokela bango mawa koleka. Sango moko ya Ba-Jésuites apesaki etinda oyo: “Bósalela fimbo, minyɔlɔlɔ mpe bibende ya makolo, soki esɛngi bongo; kasi bósala yango na ndenge elongobani mpe ya kolekisa ndelo te; bokomona ete motó makasi ya basali ekoumela te kosila.”
Bato oyo bazalaki na likanisi ya kosalela mayele mosusu mpo na kobongola bato ya Afrika, longola mayele wana ya monyoko, bazalaki mingi te. Nzokande, baoyo bazalaki kolongisa boombo bazalaki komonisa lokola ete kosomba bato ya Afrika mpo bákóma baombo ezalaki nde lolenge moko ya komonisela bango boboto! Moko ya bato yango ezalaki Azeredo Coutinho, episkɔpɔ ya Brésil. Na makambo oyo alobaki na molende mpenza mpo na kokɔtela boombo, oyo ebimaki na mobu 1796, Coutinho atunaki boye: “Eleki nde malamu lingomba ya boklisto etika [bato ya Afrika] bákufa na bopakano mpe na losambo ya bikeko, na esika ya kokɔtisa bango na lingomba na biso ya bosantu?” Kaka na likanisi yango, António Vieira, sango moko ya lokumu ya Ba-Jésuites, alendisaki bato yango ya Afrika boye: “Bópesa Nzambe matɔndi mingi ndenge . . . amemi bino awa [na mboka oyo], esika oyo, ntango bakoteya bino kondima, bokozala na bomoi ya baklisto mpe bokobika.”
Motuya ya boombo
Lingomba ekanisaki ete ndenge endimaki likambo ya boombo, ezalaki nde “kobikisa milimo.” Nzokande, kozanga koyeba, ezalaki nde kobongisa nzela na bokabwani, mpamba te bato ya Afrika balingaki mpenza te kotika mimeseno ya bonkɔkɔ na bango mpe bindimeli na bango. Yango wana, lelo oyo bato mingi na Brésil basangisaka bindimeli mibale, elingi koloba bandimaka Lingomba ya Katolike mpe mimeseno ya bonkɔkɔ na bango ya Afrika.
Ata soki bakanisaki ete lingomba esalaki malamu ndenge endimaki boombo mpo na mikakatano ya nkita ntango Brésil ezalaki na mabɔkɔ ya Portugal, na nsima, likambo yango ekómaki likama ya monene. Ndenge bato mingi bakufaki mpe banyokwamaki na boombo, bato mingi bazali komituna soki lingomba yango ezali solo koteya bizaleli malamu, mituna oyo ekoki kozwa eyano ya malonga te. Ndenge moto moko ya mayele na makambo ya kala amonisi yango, baoyo bazalaki kolendisa boombo bazalaki na likanisi ndenge moko na bato oyo mosakoli Yisaya alobeli, ete: “Babengaka mabe ete malamu mpe malamu ete mabe.”—Yisaya 5:20.
Konyokola bato na boombo eyokani te na Biblia
Biblia emonisi polele ete Yehova Nzambe andimaka te ‘moto azala na bokonzi likoló na mosusu mpo na kopesa ye mpasi,’ yango etaleli mpe boombo ya konyokola basusu. (Mosakoli 8:9) Na ndakisa, Mobeko oyo Nzambe apesaki Yisalaele elobaki ete soki okangi moto mpe otɛki ye, bakopesa yo etumbu ya liwa. (Exode 21:16) Ezali ya solo ete basaleli ya Nzambe na ntango ya kala bazalaki mpe na baombo, kasi boombo yango ezalaki te ya konyokola bato ndenge tomoni yango na lisolo oyo. Kutu, ndenge baombo mosusu na Yisalaele bazalaki kondima kotikala epai ya bakóló na bango na ntango oyo bazalaki na lotomo ya kokende emonisi polele ete boombo epai ya basaleli ya Nzambe ezalaki te ya konyokola bato. (Deteronome 15:12-17) Yango wana, soki bato bazwi ndakisa ya boombo epai ya bana ya Yisalaele mpo na koluka kolongisa makambo ya bonyama oyo esalemaki na boumeli ya lisolo ya bato na likambo ya boombo, bazali mpenza nde kobongola ndimbola ya Makomami.c
Na kati ya Liloba na ye, Biblia Mosantu, Yehova Nzambe apesi elaka ete etikali moke, lolenge nyonso ya boombo esila. Tokoki mpenza kozala na esengo ete na mokili ya sika oyo Nzambe alaki, bato bakobanga lisusu eloko te, bakozala lisusu na boombo te epai ya bakóló oyo bazangi mawa. Na esika ete ezala bongo, “bakofanda mpe na nse, moto na moto na nse ya [nzete na ye ya vinyo mpe na nse ya nzete na ye ya figi, NW], moto moko akobangisa bango te.”—Mika 4:4.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Buku moko (The World Book Encyclopedia) emonisi ete “Ba-Indiens mingi bakufaki na bamaladi ya mindɛlɛ. Mingi mosusu babundaki na Ba-Portugais mpe babomamaki.”
b Mbala mosusu bazalaki kobatisa baombo yango lisusu soki bakómi na Brésil.
c Lokola na Bokonzi ya Loma boombo ezalaki ebongiseli moko ya makambo ya nkita, baklisto mosusu bazalaki na baombo. Kasi, ata soki mibeko ya Loma ezalaki koloba nini, Makomami ezali komonisa ete baklisto bazalaki te konyokola baoyo bazalaki kosala epai na bango. Na esika ya kosala bongo, basengelaki kotalelana lokola “bandeko.”—Filemona 10-17.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 23]
Yehova Nzambe alaki ete etikali moke, lolenge nyonso ya boombo esila
[Etanda/Bililingi na lokasa 21]
MPO NA NZAMBE TO MPO NA MATOMBA?
Fernão de Oliveira, moto ya mayele na Portugal na ekeke ya 16, alobaki ete eloko etindaki mindɛlɛ básombaka baombo ezalaki nde lokoso, kasi molende ya losambo te. Masuwa oyo ezalaki kouta Mpoto ezalaki komema biloko ya mindɛlɛ mpe kosomba baombo na mabongo ya Afrika na biloko yango. Na nsima, bazalaki komema baombo yango na Amerika, epai bazalaki kotɛka bango na sukali, oyo bazalaki komema yango na Mpoto mpo na kotɛka yango kuna. Mombongo wana ya kobaluka na bakɔntina misato epesaki matomba mingi na bato ya mombongo yango mpe na bakonzi ya Portugal. Ezala bakonzi ya lingomba bazwaki mpe matomba mingi na mombongo yango, mpamba te basango bazalaki kofutisa mbongo mpo na kobatisa moto nyonso ya Afrika, liboso ya komema ye na Amerika.
[Etanda na lokasa 22]
KOKÓMISA BATO BAKLISTO KAKA MBALA MOKO?
Hugh Thomas, moto ya mayele na makambo ya kala, akomaki boye na buku na ye Kotɛka baombo (na Lingelesi): “Na ebandeli ya ekeke ya 17, bakómaki kobatisa baombo ya Afrika liboso ya komema bango na boombo. Ndenge ezalaki kosalema, baombo yango bazalaki kolanda ata liteya moko te liboso ya kobatisa bango, mpe mingi na bango, to mpe pene na bango nyonso bazalaki bato oyo, naino bayoká te ete ezali na Nzambe moko ya boklisto. Bapesaki bango batisimo yango kaka mpo na kopesa.”
Profesɛrɛ Thomas amonisi ete bazalaki komema baombo yango na ndako-nzambe, epai katekisi moko—mbala mingi ye moko mpe moombo—azalaki koyebisa bango na monɔkɔ ya mboka ete sikoyo bokómi bato ya lingomba mosusu. Profesɛrɛ Thomas abakisi ete: “Nsima na yango, sango moko azalaki koleka na kati ya baombo yango, wana batikali minɔkɔ polele mpe azalaki kopesa moto na moto nkombo na ye ya moklisto oyo asilaki kokoma yango na lokasa. Azalaki mpe kotya mwa mungwa na lolemo na bango, na nsima azalaki konyakela bango mai mosantu. Mpo na kosukisa, azalaki ntango mosusu koloba, wana moto mosusu azalaki kobongola, ete: ‘Sikoyo, bómimona ete bokómi bana ya Klisto. Bolingi kokende na mabelé ya Ba-Portugais, epai bokoyekola makambo ya lingomba. Bóbosana bamboka na bino. Bólya lisusu mbwa te, mpoko te, mpe mpunda te. Bósepela na ndenge oyo
[Elilingi na lokasa 21]
Pápa Nicolas V
[Credit Line]
Culver Pictures
[Elilingi na lokasa 23]
Johann Rugendas amonaki na miso ndenge bazali kobɛta baombo, na ekek ya 19
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 23]
Mayemi ya boombo na nkasa 13 mpe 15: De Malerische Reise in Brasilien de Johann Moritz Rugendas, cortesia da Biblioteca Mário de Andrade, São Paulo, Brasil