Makambo mazali koleka na mokili
Bamekoli miso ya nyamankɛkɛ
Zulunalo moko (The Australian) elobi ete “mpo na koyekola planɛti Mars malamu, kompanyi NASA esombaki masini moko oyo bato ya siansi na Australie basalaki; masini yango ezali lokola miso ya nyamankɛkɛ. Mpo na kosala masini yango, bato oyo basalaka bolukiluki na Iniversite ya Australie balandaki ndenge miso ya mayoyo ezalaka. Lapolo yango elobi ete “bato oyo basalaki masini ya ndenge wana na laboratware ya iniversite yango balekisaki bambula mingi mpo na koyekola ndenge mayoyo, nzoi mpe satonge esalelaka miso na yango mpo na komona liboso ntango ezali kopumbwa. Na nsuka, bayebaki ndenge nyamankɛkɛ yango emonaka ntango ezali kopumbwa mpe bazwaki mayele oyo esalisaki bango bámekola bango.” Kompanyi NASA elingi kokangisa miso yango oyo ezali lokola miso ya mayoyo, na masini moko ya moke oyo “ekobanda kopumbwa mbangu likoló ya etando ya planɛti Marsi, oyo etondi na bisika mosusu ngombangomba, bisika mosusu mabulu, kozanga ete etutana to epanzana, kaka ndenge nyamankɛkɛ etambolaka.” Soki elongi, “masini wana ekosalisa na koyekola ndenge mabanga etandami na lobwaku babengi Valles Marineris, lobwaku mozindo oyo eleki monene na baplanɛti nyonso oyo ebalukaka pembeni ya moi—oyo ezali na bolai ya kilomɛtrɛ 4 000 mpe bozindo ya kilomɛtrɛ 7. Nyonso wana mpo na koyeba ndenge mabele ya planɛti motane ebandaki.”
Balɛnɛ oyo elandaka oyo elobaka monɔkɔ mosusu
Zulunalo moko ya Canada (The Vancouver Sun) etuni motuna oyo: “Ndenge nini balɛnɛ babengi orque, oyo elekisaka bomoi na yango mobimba kaka elongo na bandeko na yango, esalaka mpo ebota te na bandeko ya makila moko? Barrett-Lennard, moto ya mayele ya siansi na Aquarium na Vancouver, alekisaki mbula nsambo na kolukaluka na makambo ya nzoto (génétique) mpe ba ADN 340 oyo akamataki na nzoto ya balɛnɛ ya Colombie britannique mpe ya Alaska, mpe amonaki ete balɛnɛ ya basi ezalaki kobota kaka na balɛnɛ ya mibali oyo eutaki epai mosusu,” kasi penepene te. Barrett-Lennard alobi ete “eloko moko te ekoki kotinda biso tóloba ete balɛnɛ yango ebotaka na bandeko ya makila moko. Pene na yango nyonso ebotaka kaka na balɛnɛ oyo elobaka monɔkɔ mosusu.” Zulunalo yango ebakisi boye: “Balɛnɛ wana eponaka balɛnɛ ya mobali to mwasi oyo euti mosika. Mpo na kozwa yango, ekoki kozala ete eyokaka mongongo to monɔkɔ ya balɛnɛ mosusu, mpe ekendaka epai ya balɛnɛ oyo ezali koloba monɔkɔ mosusu oyo ekeseni mpenza na oyo yango elobaka.”
Grand requin blanc esalaka mpe mibembo ya mosika
Zulunalo moko (The Daily Telegraph) ya Londres elobi ete: “Ntango balandelaki grand requin blanc na satelite, bamonaki ete mbisi yango, oyo eleki mbisi nyonso oyo elyaka misuni na monene, ekendaka mpenza mosika na kati ya mbu.” Likambo yango ya sika oyo zulunalo Nature elobaki, ekweisi makanisi oyo bato bazalaki na yango liboso mpo na mbisi yango. Atako okoki kokuta mbisi yango na mbu nyonso ya mokili, bazalaki kokanisa ete efandaka kaka pembeni ya mokili, mpo ekangaka nyama babengi phoque, mpe ekoki soki moke te kokenda mosika na esika yango efandaka. Nzokande, eleki mwa mikolo, na Californie, bato oyo basalaka bolukiluki balandelaki ba requin minei ya mibali mpe mibale ya basi, mpe bamonaki ete requin moko ekendaki mosika tii na bisanga ya Hawaii—kilomɛtrɛ 3 700 kolongwa na bokula ya Californie—ezalaki kotambola kilomɛtrɛ 70 mokolo moko. Bolukiluki yango emonisaki mpe ete mbisi yango ya monene, oyo ekitaka mingimingi te na mozindo koleka mɛtrɛ 30 ntango ezali pene na mokili, ekitaka ntango mosusu na bozindo mpenza na katikati ya mbu.
Kozanga mbongo ebɛlisi bato
Zulunalo moko (Clarín) elobi ete kokwea ya nkita na Argentine ezali kosala ete bato mingi ya mboka yango bátondana na balopitalo mpo na mikakatano ya bokolɔngɔnɔ ya nzoto oyo euti na mitungisi. Maladi oyo bazali kokende na yango na lopitalo ezali “mpasi na motó, komata ya tansyɔ, mwa bampota, maladi ya estoma, kozanga mpɔngi mpe mitungisi.” Monganga moko alobi ete “bato mosusu bazali kokwea kaka mpamba bongo.” Na lopitalo moko, bato oyo bazali koya epai ya monganga mpo na mitungisi, konyokwama na makanisi, mpe nsɔmɔ na motema, bakómaki ebele mpenza (300%) bobele na mikolo moke. Longola likambo oyo ete balopitalo etondi na bato oyo bazali kozela, minganga mpe mafulume basengeli koyeba ndenge ya kosolola na bato yango ya maladi, oyo batondi na nkanda mpo na mikakatano ya nkita. Bato mosusu ya maladi babɛtaki kutu minganga mpe mafulume mosusu. Babɛtaki lifulume moko na motó.
Mwámbé oyo eleki mbangu
Zulunalo moko ya Japon (IHT Asahi Shimbun) elobi ete “na Fujikyu Highland, esika moko ya masano, basalaki molulu ya bofungoli mwámbé oyo eleki mbangu na mokili mobimba. Mwámbé yango ekoki kobanda mbangu ya kilomɛtrɛ 172 na ngonga moko, na boumeli ya segɔnde soki mibale mpamba; soki obangaka mingi, komata te. Okoyoka lokola nde opumbwe na fize. Baoyo bamataka na mwámbé yango bayokaka ndenge bapilɔte ya mpɛpɔ ya etumba bayokaka. Heith Robertson, mokambi ya misala na kompanyi oyo esalaki masini wana, alobaki ete: “Ntango mpɛpɔ epumbwaka, ezwaka mbangu ya 2,5 g [mbala mibale na ndambo koleka nguya oyo ebendaka biloko nyonso na mabele to pesanteur]. Awa, mbangu yango ezali ya 3,6 g.” Bawagɔ na yango ezali kotambola na “bapinɛ ya mwa mpɛpɔ ya mike” mpe ezali kotambwisama na bamotɛrɛ misato ya makasi, oyo ezali na nguya ya 50 000 chevaux, mpe “ekokani na fize ya moke.”
Na Inde, likaya ezali kopesa bato maladi ya motema
Zulunalo moko (Mumbai Newsline) elobi ete: “Minganga minene ya motema [na Inde] bandimi ete kuna bato mingi bakómi kobɛla maladi oyo ebebisaka misisa ya motema. Monganga Ashwin Mehta, oyo atambwisaka misala mpo na bato ya maladi ya motema na lopitalo ya Jaslok, amonisi ete na kotalela makila na bango, bato ya Inde bazali na likama ya kosuka kaka na kobɛla maladi ya motema.” Ntina mpenza ya komitungisa ezali ete bilenge mingi bakómi mpe kobɛla “maladi ya motema mpo bazali komɛla likaya mingi.” Monganga P. Tiwari, mopesi-toli mpe monganga ya maladi ya motema na lopitalo ya Bombay, akanisi ete soki bibongiseli ya makasi ezwami te, mokolo mosusu Inde ekokóma ekólo oyo ekoleka na bato ya maladi ya motema. Zulunalo moko (The Times of India) elobi ete na Bangladesh, ekólo oyo ezali pene na Inde, mibali ebele (koleka 70%), oyo bazali na mbula kobanda 35 tii 49 bamɛlaka likaya mpe “bato bazali se komɛla makaya mingi, nzokande nkita ezali se kokita.” Mpo na mingi kati na bango, “soki basangisi mbongo nyonso oyo momɛli-makaya mokomoko abebisaka mpo na makaya, eleki mbala mibale mbongo oyo mwana mboka moko abimisaka mpo na kolata, kofutela ndako, komisalisa na monganga mpe kofuta kelasi ya bana.” Balobaka ete na ekólo yango ya bobola, bato milio 10,5 oyo balyaka malamu te, bakokaki kolya malamu soki básalelaka mbongo oyo babebisaka na makaya mpo na kosomba biloko ya kolya.
Bazali kaka kosɛnga bandako ya milaimilai
Zulunalo moko (U.S.News and World Report) elobi ete, “Nsima wana bato ya mobulu babukaki babuludingi mibale ya milai [na États-Unis], ba architectes mpe ba ingénieurs batikalaki minɔkɔ polele. Atako bato babangaki mwa moke, kasi basusu bazali kaka kosɛnga bátongela bango bandako ya milaimilai.” Bazali kosɛnga yango mpamba te na bisika mosusu, ezali mpasi mpo na kozwa mabele, mpe mabele ezali ntalo mingi. Lisusu, bingumba elingi kozala na bandako ya milaimilai mpo na lokumu na yango. William Mitchell, mokonzi ya eteyelo ya architecture et urbanisme na Institut de technologie du Massachusetts, alobi ete bandako milaimilai “epesaka lokumu, emonisaka ete botikali nsima te. Kasi, ba architectes bazali koyekola ndenge nini bakoki kosala mpo bandako yango ebatelama na makama. Bazali kokanisa ete esengeli kosala bifelo mpe maninisa oyo ekopanzana na bɔmbi te, kasi bisaleli yango ezali ntalo makasi mpe ezali kilo mingi. Na Chine, mibeko mpo na kotonga ndako esɛngaka ete na bandako ya milaimilai, nsima ya baetazi 15, básala “esika ya kokima,” elingi koloba etazi moko ya polele, oyo bato bakofanda wana te. Na bamboka mosusu, mibeko esɛngi kotya ascenseur moko oyo ekokóma tii na etazi ya likólo mpe ekozala kaka mpo na bato oyo babomaka mɔtɔ; esengeli kozala mpe na bisika ya koleka mpe basikalye oyo ebenganaka milinga. Bato oyo balingi kotonga ndako oyo ekoleka bandako nyonso ya mokili na molai na Chine (Shanghai World Financial Center), babandi kokɔtisa bibongiseli yango na plan na bango.
Makɛlɛlɛ makasi ebebisaka matoi
Zulunalo moko (Polityka) ya Pologne elobi ete: “Na Pologne, kati na bana 5 oyo bakómi na mbula ya kokɔta kelasi, moko ayokaka malamu te, mpe kati na mikóló 3, moko ayokaka malamu te.” Baankɛtɛ emonisi ete eloko ebebisaka matoi ya bato mingi ezali makɛlɛlɛ ya mituka, ya radio, ya televizyo mpe ya bamasini mosusu ya ndako. Guvɛrnema esalaki lapolo moko mpo na esika oyo bato bafandaka oyo elobaki boye: “Lokola mituka ekómi mingi na Varsovie, yango esali ete na balabala moko monene ya engumba yango, makɛlɛlɛ ekómá makasi mpenza (100 décibels). Makɛlɛlɛ oyo bana basalaka ntango bazali kosakana ekómaka mpe makasi ndenge wana. Masini ya kobɛta miziki na bisika oyo bato bakendaka komɛla masanga ekoki kokóma na makɛlɛlɛ makasi mpenza (120 décibels); yango ezali kaka mwa moke na nse ya makɛlɛlɛ ya makasi (130 tii 140 décibels) oyo esalaka matoi mpasi. Minganga ya matoi balobi ete ezali makɛlɛlɛ wana ya makasi nde esali ete bato báyokaka lisusu malamu te. Molakisi Henryk Skarżyński, oyo azali monganga ya matoi, ya zolo mpe ya mongongo na esika moko oyo bayekolaka matoi (Institut de physiologie et pathologie de l’audition), alobi ete: “Soki moto ayokaka malamu te, akozala na mikakatano makasi na makambo mosusu ya bomoi. Bato oyo bayokaka malamu te basilikaka noki, bazalaka na mikakatano mpo na koyekola [mpe] ezalaka mpasi mpo báyekola monɔkɔ ya bapaya.”