Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g03 Juillet lok. 14
  • Zwá ntango ya kolala!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Zwá ntango ya kolala!
  • Lamuká!—2003
  • Masolo mosusu
  • Nzoto na yo esengeli na mpɔngi
    Lamuká!—1995
  • Nasala nini mpo nalalaka mingi?
    Mituna oyo bilenge batunaka
  • Yebá kopona mpo nzoto na yo ezala kolɔngɔnɔ
    Lamuká!—2004
Lamuká!—2003
g03 Juillet lok. 14

Zwá ntango ya kolala!

Nani akotya ntembe ete kolala malamu na butu ezali nkisi makasi mpo na kozala ntango nyonso nzoto kolongɔnɔ? Tokanisi, moto moko te. Nzokande, mpo na bato mingi mpɔngi ezali mpenza na ntina mingi te. Shawn Currie, oyo azali monganga oyo ayekolaka bizaleli ya bato mpe profesɛrɛ-molandi na Iniversite ya Calgary, na Canada, alobi ete: “Kasi na mokolo oyo elandi, okoyoka mpasi na yango.” Soki olali mingi te, okoki kolamuka nkandankanda mpe ntango mosusu na esengo te.

Zulunalo moko (Calgary Herald) elobi ete: “Bato ya siansi bakanisaka ete mpɔngi ebongisaka bɔɔngɔ mpo ezonga kosala malamu, mpe moto akobaka koyekola makambo ata ntango azali kolala.” Profesɛrɛ Currie alobi ete: “Na butu, obakisaka makoki na yo ya kosimba makambo na motó mpe makambo oyo oyekolaki na moi ekozwa mokomoko esika na yango na bɔɔngɔ. Soki tozwi ntango ya kopema ndenge wana te, tozali kolɛmbisa makoki na biso ya koyekola makambo.” Epai mosusu, alobi ete “ntango olali mingi, na ntembe te yango ekosala ete mayoki na yo ezonga na esika na yango.”

Na yango, bangonga boni moto asengeli kolala? Atako bato mingi ya mayele balobaka ete moto asengeli kolala mpenzampenza bangonga 8, Profesɛrɛ Currie alobi boye: “Bato nyonso bazalaka na mposa ya kolala na boumeli ya bangonga ndenge moko te.” Yango wana, apesi toli ete moto na moto asengeli koyeba makambo akosala mpo alala malamu. Kasi, ndenge nini kosala yango, mingi mpenza bato oyo mpɔngi esilaka bango na butu? Talá mwa batoli oyo elandi:

◼ Liboso ya kolala, sukolá mai ya mɔtɔ

◼ Salaká mwa ngalasisi mbala mingi na pɔsɔ; kasi kosala ngalasisi ya makasi te liboso ya kolala.

◼ Lalá na ndako oyo ezali kimya, molili, mpe na mwa malili.

◼ Meká kolamukaka ntɔngɔ nyonso na ngonga moko mpo omesanisa nzoto na yo kolala ndenge wana.

Lokola mpɔngi ezali na ntina mingi mpo na kolongɔnɔ ya nzoto, kosakana na yango te, tyá yango na molɔngɔ ya makambo oyo ezali na ntina mingi.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto