Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g03 Juillet nk. 15-17
  • Kobimisa mungwa ya mbu na molunge ya moi mpe mopɛpɛ

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kobimisa mungwa ya mbu na molunge ya moi mpe mopɛpɛ
  • Lamuká!—2003
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • “Eloko ya motuya”
  • Kobimisa mungwa na molunge ya moi
  • Etikalaki moke mosala yango elimwa
  • Mungwa ezali eloko moko ya ntina mingi
    Lamuká!—2002
  • “Euti na biloko oyo eleki pɛto”
    Lamuká!—2007
  • Oyebaki yango?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
Lamuká!—2003
g03 Juillet nk. 15-17

Kobimisa mungwa ya mbu na molunge ya moi mpe mopɛpɛ

EUTI NA MOKOMI NA BISO NA FRANCE

NA BOKULA ya mbu, na bisika ya maimai oyo ekaboli mbu ná mokili, okomona ebele ya maziba oyo ezali kozwa langi ndenge na ndenge ya likoló, ezali kolanda ndenge likóló ezali kobongwana. Mobimisi-mungwa (paludier) atɛlɛmi katikati ya maziba yango, azali kobenda mungwa oyo ezali na mai mpe kosala mwa mabondo ya mikemike ya mpɛmbɛ oyo ezali kongɛnga na moi. Awa na bisika ya maimai na Guérande mpe na bisanga ya Noirmoutier mpe ya Ré, oyo ezali na bokula ya mbu ya Atlantike, babimisi-mungwa ya France bazali kobimisa mungwa naino na ndenge ya bonkɔkɔ.

“Eloko ya motuya”

Na France, babandaki kobimisa mungwa na maziba yango na bokula ya mbu ya Atlantike soki na ekeke ya misato ya ntango na biso (T.B.). Kasi, mosala yango ekómaki monene kaka na nsuka ya eleko ya Moyen Âge. Lokola Mpoto ekómaki na bato mingi na ntango wana, esengelaki kobimisa mungwa mingi mpo bazalaki kosalela yango mpo na kobatela nyama mpe mbisi ete epɔla te. Na ndakisa, mpo na kobatela batɔni minei ya mbisi babengi harengs, ezalaki kosɛnga tɔni moko ya mungwa. Lokola nyama ezalaki ntalo makasi mpe babola bazalaki kokoka kosomba yango te, bazalaki kolya mingi makayabo. Masuwa oyo ezalaki kouta na bisika nyonso na Mpoto ya Nɔrdi, ezalaki kosɛma na mabongo ya Bretagne mpo na kozwa ebele ya mungwa oyo babomi-mbisi bazalaki na yango mposa mpo na kobatela mbisi na bango.

Lokola “eloko ya motuya” wana ezalaki kopesa mbongo mingi, yango ezangaki te kobenda likebi ya bakonzi ya France. Na mobu 1340, babimisaki mpako moko etali mombongo ya mungwa, oyo babengaki gabelle, nkombo oyo eutaki na liloba ya Arabe qabālah, oyo elimboli mpako. Lokola bato mingi bazalaki kolinga kofuta mpako yango te, yango ebimisaki botomboki oyo ezalaki kosuka na kosopana ya makila. Likambo oyo bato mingi bazalaki komona mabe ezalaki ete mungwa yango ezalaki ntalo makasi mpe batindaki bango na makasi básomba mwa ndambo, ezala bazali na yango mposa to te. Longola yango, bato minene, na ndakisa bakonzi ya mboka mpe bakonzi ya mangomba, bazalaki kofuta mpako yango te. Bituká mosusu, lokola Bretagne, ezalaki kofuta mpako yango te, mpe mosusu esengelaki kofuta bobele ndambo ya minei ya mpako yango. Yango esalaki ete ntalo ya mungwa na etúká moko ekesene makasi na etúká mosusu; na etúká moko mungwa ekokaki kozala ntalo makasi mbala 40 koleka etúká mosusu.

Ezali bongo likambo ya kokamwa te soki bato mingi bakómaki kolekisa mungwa na ndenge ya moyibi. Kasi, baoyo bazalaki kokanga bango, bazalaki kozwa etumbu makasi. Bazalaki kotumba bango na ebende ya mɔtɔ mpo etika elembo na nzoto, to kotinda bango kosala lokola baombo na masuwa ya mokonzi, ata kokatela bango etumbu ya liwa. Na ebandeli ya ekeke ya 18, soki tozwi baombo 100 oyo bazalaki konyokwama na misala na bamasuwa ya mokonzi, 25 bazalaki bato oyo bakangaki bango bazali kolekisa mungwa na ndenge ya moyibi, basusu bakangaki bango mpo na makambo mosusu, basusu ezalaki basoda oyo bakimá mosala ya soda, to Baprotesta oyo banyokolaki bango nsima ya kolongolama ya mobeko babengi édit de Nantes.a Ntango Mbongwana (Révolution française) esalemaki na Fance na mobu 1789, moko ya makambo oyo basɛngaki ete bálongola libosoliboso ezalaki bongo mpako wana ya mungwa, oyo bato bayinaki yango mpenza.

Kobimisa mungwa na molunge ya moi

Lolenge oyo babimisaka mungwa na France, na bokula ya mbu ya Atlantike, ebongwani te kobanda bikeke mingi. Ndenge nini babimisaka mungwa kuna? Kobanda na eleko ya automne tii na printemps, mobimisi-mungwa amipesaka na mosala ya kozongisa mabele na nduka oyo ekaboli maziba, kobongisa banzela ya kolekisa mai na maziba yango, mpe kopɛtola maziba esika mungwa ekangamaka. Soki kaka eleko ya molunge (été) ebandi, moi, mopɛpɛ, komata mpe kokita ya mai ya mbu ekosala ete maziba wana, ntango mai na yango ezali kokauka, epesa mungwa. Ntango mai ya mbu emati, ekokɔta na liziba ya liboso, oyo babengaka vasière, epai etɛlɛmaka mpe ebandaka kokauka mokemoke na molunge ya moi. Na nsima, mai yango ekoleka malɛmbɛmalɛmbɛ na maziba mosusu, epai ekokoba kokauka. Wana mai yango ebandi kokóma mungwa makasi, biloko babengi algues microscopiques ekobotama ebele kati na mai, mpe mai ekokóma motane. Ntango ba algues yango ezali kokufa, epesaka mungwa nsolo ya malasi babengi violette. Na ntango mai yango ya mungwa ekokóma na maziba epai mungwa ekokangama, ekómaka mpenza mungwa makasi. Na ebandeli, litrɛ moko ya mai yango epesaka bagramɛ ya mungwa 35, kasi na nsuka ekómaka na bagramɛ 260.

Lokola bisika yango oyo babimisaka mungwa ezalaka mpenza makasi te, ebongi te kosalela bamasini kuna, ndenge basalaka na bokula ya Méditerranée, na Salin-de-Giraud mpe na Aigues-Mortes. Na lisalisi ya nzete moko ya molai lokola rato, mobimisi-mungwa abendaka mungwa oyo ekangami pembenipembeni ya maziba, akebaka mpe ete apanza te mabelé na nse ya maziba yango. Mungwa yango, oyo ezalaka naino mwa mwindo mpo na mabelé, esɛngaka bákaukisa yango liboso. Mbala mingi, mobimisi-mungwa moko azalaka na maziba soki ntuku motoba, mpe mokomoko ebimisaka pene na tɔni moko na ndambo ya mungwa na mbula moko.

Na bantango mosusu, okomona mwa mabondo ya mungwa, lokola mbula mpɛmbɛ ebimi likoló na mai. Mungwa wana, oyo eyebani na nkombo ya fleur de sel, ebimaka kaka moke na boumeli ya mbula mobimba, kasi bato ya France balingaka mingi kolamba na yango.

Ya solo, nyonso wana etalelaka ndenge makambo etamboli na mobu wana. Moto moko, oyo kala azalaki mobimisi-mungwa yango, alobi boye: “Soki mobu wana ezali malamu te, mungwa mpe ekobima mingi te. Na ndakisa, na mobu 1950, mbula ebɛtaki na boumeli ya eleko mobimba ya molunge. Tozwaki mpenza eloko te, ata ndambo te ya kotondisa ekɔti moko.” Pascal, oyo azali mobimisi-mungwa na Guérande, alobaki boye: “Na mobu 1997, nabimisaki batɔnɛ 180 ya mungwa ya mbuma mineneminene mpe batɔni 11 ya ‘fleur de sel.’ Kasi, mobu oyo [1999], ezalaki malamu te. Nabimisi bobele batɔni 82 mpamba.” Nzokande, soki mpe moi eleki makasi, mungwa ekobima malamu te, mpamba te molunge ekokaukisa mai kozanga ete mungwa ekangana.

Etikalaki moke mosala yango elimwa

Na ekeke ya 19, ntango bakompanyi minene ya mungwa efungwamaki, mosala ya kobimisa mungwa na bokula ya Atlantike ekitaki mpenza. Lokola basalaki banzela ya malamu, bakompanyi ya mungwa na bokula ya Méditerranée etondisaki mboka na mungwa oyo ezalaki na ntalo moke. Longolá yango, bakokaki kobimisa batɔni ya mungwa koleka milio 1,5 mbula na mbula na etúká ya Méditerranée. Na bambula ya 1970, lokola babimisi-mungwa na bokula ya Atlantike bazalaki koteka lisusu mungwa na bango malamu te mpo bakopanyi minene eyaki kotondana wana, mosala na bango ekitaki mingi mpenza mpe emonanaki lokola ete ekolimwa.

Kasi, na bambula oyo, “eloko ya motuya” wana ezongeli valɛrɛ na yango. Bato bakómi mpe kopesa yango valɛrɛ mingi mpamba te bato mingi bakómi mpenza koyeba ete esengeli kobatela zamba, mai mpe bikelamu ya bomoi na bisika wana ya maziba ya mungwa mpe kobatela nkita ya mboka. Bisika wana ezali na nzete ná matiti ndenge na ndenge mpe bandɛkɛ oyo esalaka mibembo milai eyaka kopema wana​—⁠oyo eyebani lelo oyo ete ebatelami na mibeko.

Longola nyonso wana, bisika wana bato babebisi yango te mpe banda kala, mosala ya kobimisa mungwa ebongwani te mpe basalelaka bamasini te. Yango wana ezali kobenda baturiste mingi oyo balukaka esika ya kimya mpo na komipemisa. Tóbosana mpe te ete na eleko oyo bato bakómi komitungisa mingi mpo na kobeba ya mai, mopɛpɛ mpe biloko ya kolya, bato mingi bakosepela kosomba mungwa oyo basali kozanga kobakisa bankisi. Na mokili oyo ekómi lokola kaka mboka moko, mpe oyo misala ekómi ya kowelana, mbala mosusu babimisi-mungwa ya ekólo France bazali mpe na esika mpo na mosala na bango wana, oyo eumeli bikeke mingi.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Augusto 1998, nkasa 25-29, ebimisami na Batatoli ya Yehova.

[Etanda na lokasa 16]

MUNGWA MPE KOLƆNGƆNƆ NA YO YA NZOTO

Mbala mingi balobaka ete kolya mungwa mingi ematisaka tansyo, oyo esalaka ete moto akangama motema. Yango wana minganga mingi bapesaka toli ete esengeli te kolya mungwa koleka gramɛ motoba na mokolo.

Nzokande, ntango bayekolaki lisusu likambo yango na mikolo oyo euti koleka, bamoni ete bato oyo babɛlaka tensyo, ata soki bazali kolya mungwa mingi te, tansyo ekokita mpenza te, mpe bato oyo babɛlaka tensyo te, tensyo na bango ekomata te soki bazali kolya mungwa mingi. Zulunalo moko (Lancet, 14 Marsi 1998) elobelaki ankɛtɛ moko oyo emonisaki ete bato oyo balyaka mungwa mingi te bakangamaka motema mingi koleka baoyo balyaka mungwa. Ankɛtɛ yango esukisaki ete “mbala mosusu makama oyo ebimaka mpo na koboya kolya mungwa ezali mingi kasi matomba ezali mingi te.” Zulunalo moko (Canadian Medical Association Journal, 4 Mai 1999 [CMA]) eyebisi ete: “Lelo oyo esengeli te kopekisa bato oyo bazali kobɛla tansyo te kolya mungwa, mpamba te eloko moko te endimisi biso ete soki moto aboyi kolya mungwa, akobɛla tansyo te.”

Yango elingi nde koloba ete kolya mungwa mingi to te ezali na ntina te? Ndenge kaka ezalaka mpo na biloko mosusu nyonso oyo tolyaka, likambo ya ntina ezali nde bokatikati. Kutu, zulunalo oyo tolobeli awa likoló (CMAJ) epesi toli ete esengeli koboya kolya mungwa mingi, kotya mungwa koleka te na biloko, mpe ntango ozali kolya kobakisa mungwa te na biloko na yo. Nzokande, soki obɛlaka tansyo to ozalaka na maladi ya motema, landá toli ya monganga na yo.

[Karte na lokasa 15]

(Mpo na komona yango, talá mokanda)

Guérande

ESANGA YA NOIRMOUTIER

ESANGA YA RÉ

[Elilingi na lokasa 16]

“Fleur de sel”

[Elilingi na lokasa 16]

Engumba na esanga ya Ré

[Elilingi na lokasa 17]

Ndenge bazwaka “fleur de sel”

[Elilingi na lokasa 17]

Maziba esika babimisaka mungwa

[Elilingi na lokasa 17]

Mobimisi-mungwa moko na Noirmoutier

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 15]

© Cliché Bibliothèque nationale de France, Paris

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 17]

Na likoló: Index Stock Photography Inc./Diaphor Agency; na lobɔkɔ ya mwasi: © V. Sarazin/CDT44; na kati mpe na lobɔkɔ ya mobali: © Aquasel, Noirmoutier

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto