Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g03 Octobre lok. 30
  • Nkoma ya batángi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nkoma ya batángi
  • Lamuká!—2003
  • Masolo mosusu
  • Nkoma ya batángi
    Lamuká!—2003
Lamuká!—2003
g03 Octobre lok. 30

Nkoma ya batángi

Bapolisi Nalingi kopesa bino matɔndi mpo na masolo “Bapolisi​—⁠Mpo na nini tosengeli na bango?” (8 Yuli 2002, na Lifalanse) Papa na ngai akufaki na likama ya motuka eleki sikoyo mbula misato. Bapolisi mibale nde bayaki koyebisa biso nsango yango, basalisaki biso mpe balobaki ete bango mpe bayoki mawa mpo na liwa yango. Moko kutu asimbaki mama ntango mama azalaki kolela. Nandimi mpenza ete ezalaka pɛtɛɛ te mpo bapolisi básala misala ya ndenge wana, kasi tolingaki kosala nini soki bango bazalaki te?

D. E., États-Unis

Masolo oyo elobeli bapolisi etindi ngai nátuna motuna. Motatoli ya Yehova akoki kosala mosala ya polisi? Nakanisi ete soki matata ebimi, ekosɛnga ye asimba mondoki mpe abɛta yango, mpe akoki ntango mosusu koboma moto.

J. S., Australie

Eyano ya “Lamuká!”: Masolo na biso na Lamuká! wana ezalaki komonisa kaka misala mosusu ya malamu oyo bapolisi basalaka mpo na kopekisa mobulu, mpe makambo mosusu ya ntina oyo basalaka. Batatoli ya Yehova mingi baboyaka misala oyo ekoki kosɛnga bango básimba mindoki, mpamba te balingaka te kosopa makila to koboma moto. (Exode 20:13; Matai 26:​51, 52) Kasi, esengeli koyeba ete bato mingi oyo basalaka misala ya Leta oyo ezali na mokumba ya kotinda bato bátosa mibeko, basɛngisami te kosimba mindoki, ezala ya lolenge nini, mpe ezali na bikólo mosusu oyo bapolisi mingi bazalaka na mindoki te.

Nauti kosilisa kotánga masolo oyo emonisi ete tosengeli na bapolisi. Masolo yango ekomamaki malamu mpenza mpe ezalaki komonisa limemya mpo na mosala makasi oyo bapolisi bazali na yango ya komeka kotya mwa kimya na mokili oyo etondi na mobulu. Na bambula ya 1970, nazalaki mokɛngɛli-motamboli, mpe ntango tokendaki elongo na mwasi na ngai kotala lisangá moko na kartye moko ya bobola, tofandaki na mwa ndako moko, na nse ya Ndako ya Bokonzi moko oyo ekómaki mpenza ya kala. Molunge ezalaki makasi, yango wana totikaki lininisa mwa moke polele mpo mopɛpɛ ekɔta. Na ngonga ya mibale ya butu, mwasi na ngai alamusaki ngai mpo bato mibale bazalaki libándá pembeni ya lininisa. Nayokaki bango bazali kosolola. Moko alobaki ete lininisa oyo ezalaka polele te. Mosusu alobaki ete, na ntembe te, moto moko azali na kati mpamba te vuatire ezali libándá. Bazalaki bapolisi, mpe emonanaki ete bazalaki kolekaleka wana mpo na kokɛngɛla Ndako ya Bokonzi. Nsima na yango, tolalaki mpe tobangaki lisusu eloko te!

P. S., États-Unis

Masolo oyo elobeli bapolisi eyei mpenza na ntango ebongi​—⁠mingi mpenza nsima ya mikolo oyo bateroriste bakweisaki bandako mibale ya milai (World Trade Center) mpe ndako moko ya monene ya Leta (Pentagone) na États-Unis. Nakanisi ete kobanda wana tokómi na limemya mingi mpo na bapolisi, babomi-mɔtɔ, mpe basali mosusu ya Leta oyo basalaka mosala ya kobatela bato mpe biloko na bango, kaka mpo na terorizme te kasi mpe mpo na makambo nyonso ya mobulu.

H. B., États-Unis

Kofanda ndako moko Banda kala, nazalaki kokanisa ete mokolo mosusu lisolo moko ekobima oyo ekolobela likambo ya kofanda ndako moko. Ntango natángaki lisolo “Mituna oyo bilenge batunaka . . . Ndenge nini nakoki kozwa moninga ya kofanda na ye ndako moko?” (22 Mai 2002, na Lifalanse), nakamwaki mingi ntango natángaki ete bato mosusu balingaka te kokóma moninga ya motema ya moto oyo afandi na ye ndako moko to kotambola na ye bisika nyonso, mpe ete yango ezali mabe te. Longola yango, moto oyo ofandi na ye ndako moko akoki kosalisa yo mingi na makambo ya mbongo mpe na misala ya ndako. Natɔndi bino ndenge boteyi ngai nátalela likambo yango na bokatikati.

S. M., Japon

Nsima ya pɔsɔ mibale, nakobanda kofutela ndako elongo na moninga moko Motatoli na engumba Dresde. Nasengeli koloba ete toli malamu ya masolo oyo elobeli likambo ya kofanda ndako moko, oyo ebimaki na Lamuká! ya 22 Aprili, ya 22 Mai mpe ya 22 Yuni 2002 (ebimeli ya Lifalanse), elobeli makambo nyonso mpe eyei mpenza na ntango oyo ebongi. Bótika te kobimisa masolo ya kitoko ndenge wana!

R. P., Allemagne

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto