Engebene Biblia
Mposa makasi ya biloko ya mokili elimboli nini?
BATO babotamaka na likoki ya kolinga makambo ya Nzambe mpe na mposa ya kosambela. Nzokande, moto asalemá na mputulu ya mokili, yango wana asengelaka na biloko ya mokili mpe azali na likoki ya kosepela na biloko yango ya mokili. Baklisto mosusu bazali mpenza na biloko ebele. Yango elingi nde koloba ete bazali na mposa makasi ya biloko ya mokili mpe bazali mpenza bato ya elimo te? Epai mosusu, tokoki nde koloba ete baoyo bazali babola bakoki te kozala na mposa makasi ya biloko ya mokili mpe bango nde bazali bato ya elimo koleka?
Na ntembe te, yo mpe okondima ete ezali kaka te mpo moto azali na bozwi to na biloko ebele nde elakisi ete azali na mposa makasi ya biloko ya mokili. Na lisalisi ya bandakisa ya Biblia oyo elandi, tótalela eloko babengi mpenza mposa makasi ya biloko ya mokili mpe ndenge nini tokoki kokima makama oyo yango ememaka na elimo.
Bazalaki na bozwi mpe na lokumu
Basaleli mosusu ya sembo ya Nzambe oyo bazalaki na bomoi na ntango Biblia ezalaki kokomama bazalaki na bozwi mpe na lokumu. Na ndakisa, Abalayama “azalaki mozwi na biloko mingi, na bangɔmbɛ mpe na palata mpe na wolo.” (Genese 13:2) Yobo ayebanaki lokola “moto oyo alekaki bato nyonso na monene na epai na ebimelo na ntango” mpo azalaki na bibwɛlɛ mingi mpe na basali ebele. (Yobo 1:3) Bakonzi ya Yisalaele, na ndakisa Davidi mpe Salomo, bakómaki mpenza bato ya bomɛngo.—1 Ntango 29:1-5; 2 Ntango 1:11, 12; Mosakoli 2:4-9.
Na ekeke ya liboso, lisangá ezalaki mpe na baklisto oyo bazalaki na bomɛngo. (1 Timote 6:17) Biblia elobeli Lidia, oyo azalaki “motɛkisi ya bilamba ya motane-moindo, moto ya engumba Tyatila mpe mosambeli ya Nzambe.” (Misala 16:14) Langi ya motane-moindo mpe bilamba oyo bazakaki kotya langi yango ezalaki ntalo makasi mpe mbala mingi ezalaki kaka bato minene to bato ya mbongo nde bazalaki kosomba yango. Yango wana, ekoki kozala ete Lidia ye moko mpe azalaki na mwa bozwi.
Nzokande, basaleli mosusu ya sembo ya Yehova oyo bazalaki na bomoi na ntango Biblia ezalaki kokomama bazalaki mpenza babola. Makambo lokola koningana ya mabelé, mopɛpɛ makasi, mpela, to makama mosusu mpe liwa ekɔtisaki mabota mosusu na bobola. (Mosakoli 9:11, 12) Ezalaki pɛtɛɛ te mpo na baklisto oyo bazalaki kokelela, komona baninga na bango baklisto mosusu na bomɛngo mpe na biloko mingi! Atako bongo, ekokaki kozala malamu te babola báloba ete bandeko wana ya bomɛngo bazali na mposa makasi ya biloko ya mokili to bákanisa ete babola nde bazalaki kosalela Nzambe na motema mobimba. Mpo na nini? Tótalela esika mposa makasi ya biloko ya mokili eutaka mpenza.
Kolinga mbongo
Buku moko oyo elimbolaka maloba elobi ete kozala na mposa makasi ya biloko ya mokili elimboli “kolinga mingi biloko ya mokili na esika ya kolinga mingi makambo oyo ekolisaka mayele to makambo ya Nzambe.” Yango wana, mposa makasi ya biloko ya mokili eutaka nde na motema na biso, na makambo oyo totyaka na esika ya liboso na bomoi na biso, mpe na makambo oyo ebendaka mingi likebi na biso. Bandakisa mibale ya Biblia oyo elandi ekomonisa yango polele.
Yehova apesaki Baluku, oyo azalaki mokomeli ya mosakoli Yilimia, toli ya makasi mpenza. Emonani lokola ete Baluku azalaki mobola, na kotalela ndenge makambo ezalaki na Yelusaleme mpe lokola azalaki kotambola bisika nyonso elongo na mosakoli Yilimia, oyo bato bazalaki kolinga ye te. Atako bongo, Yehova alobaki na Baluku boye: “Ozali nde koluka makambo minene mpo na yo moko? Luká yango te.” Ekoki kozala ete Baluku abandaki kokóma na mposa makasi ya biloko ya mokili, komitungisa mingi mpo na bozwi mpe bomoi malamu oyo basusu bazalaki na yango. Yehova ayebisaki Baluku abosana te ete akobikisa ye ntango Yelusaleme ekobebisama, kasi akobatela biloko na ye te.—Yilimia 45:4, 5.
Yesu apesaki ndakisa ya moto moko oyo azalaki mpe kolinga mingi biloko ya mokili. Moto yango atyaki makanisi na ye nyonso na bomɛngo na ye, na esika ya kosalela biloko oyo azalaki na yango mpo na mosala ya Nzambe. Moto yango ya bomɛngo alobaki boye: “Nakobuka bandako na ngai ya kobomba biloko mpe nakotonga oyo ya minene koleka, . . . mpe nakoloba na molimo na ngai ete: ‘Molimo, ozali na biloko ebele ya malamu oyo ebombami mpo na bambula mingi; pemá, lyá, mɛlá, misepelisá.’ ” Na nsima, Yesu alobaki boye: “Kasi Nzambe alobaki na ye ete, ‘Zoba, na butu oyo bakosɛnga yo molimo na yo. Boye, nani akozwa biloko oyo otondisi esika moko?’ Ezali mpe bongo mpo na moto oyo abombi eloko ya motuya mpo na ye moko kasi azali moto ya bomɛngo te epai ya Nzambe.”—Luka 12:16-21.
Liteya nini tokoki kozwa na masolo wana mibale? Masolo yango esalisi biso na koyeba ete moto azalaka na mposa makasi ya biloko ya mokili kaka te mpo azali na biloko ebele, kasi nde soki azali kokanisa ete yango nde eleki ntina. Ntoma Paulo alobaki boye: “Baoyo balingaka kaka kozala bato ya bomɛngo bakweaka na kati ya komekama mpe na motambo mpe na bamposa mingi ya bozoba oyo eyokisaka mpasi, oyo ezindisaka bato na kati ya libebi mpe na likama. Mpo bolingo ya mbongo ezali mosisa ya makambo mabe ya lolenge nyonso, mpe na kokolisáká bolingo wana bamosusu babungisami nzela uta na kondima mpe bamitɔbɔlitɔbɔli na ebele ya bampasi.” (1 Timote 6:9, 10) Kolinga kaka kozala moto ya bomɛngo mpe kolinga biloko ya mokili nde esika likambo eutaka.
Osengeli komitalela
Baklisto bakebaka ete bákwea te na motambo ya kokóma na mposa makasi ya biloko ya mokili, ata soki bazali bazwi to babola. Nguya oyo bozwi ezali na yango ekosaka bato mpe ekoki kolɛmbisa baklisto na elimo. (Matai 13:22) Soki tozali kokeba te, mposa ya biloko ya mokili ekoki mokemoke kozwa esika ya makambo ya elimo mpe yango ekomemela biso makama minene.—Masese 28:20; Mosakoli 5:10.
Yango wana, baklisto basengeli kolukaka koyeba biloko nini mpe makambo nini mpenza ezali na esika ya liboso na bomoi na bango. Bázala na moke to mingi, bato ya elimo basalaka makasi mpo na kolanda toli ya Paulo, oyo elobi ete bátya elikya na bango te “na bomɛngo oyo ekoki kobunga lelo to lobi, kasi nde epai ya Nzambe oyo apesaka biloko nyonso beboo mpo biso tósepela.”—1 Timote 6:17-19.