Elikya—Ezali mpenza na ntina na bomoi ya moto?
DANIEL azalaki na mbula zomi mpamba, kasi mbula mobimba azalaki kobundana na maladi ya kansɛr. Minganga na ye bazalaki lisusu na elikya te, ndenge moko mpe bandeko ná baninga na ye. Kasi Daniel azalaki kaka na elikya. Azalaki kokanisa ete akokola mpe akozala moto ya mayele oyo alukaka ndenge ya kosalisa bamaladi mpe mokolo mosusu akopesa mabɔkɔ na koluka nkisi ya kosilisa maladi ya kansɛr. Elikya na ye ekómaki lisusu makasi ntango bayebisaki ye ete monganga moko oyo ayebi kosalisa malamu motindo ya kansɛr oyo ye azalaki kobɛla, akouta mboka mosusu mpe akoya kosalisa ye. Kasi, ntango mokolo yango ekómaki, monganga yango azwaki lisusu likoki ya koya te, mpo likoló ezalaki malamu te mpo na kosala mobembo. Elikya nyonso oyo Daniel azalaki na yango ekweaki na mai. Mpo na mbala ya liboso, akómaki mawamawa. Akufaki nsima ya mwa mikolo.
Monganga moko, oyo ayekolaki ndenge oyo elikya mpe kozanga elikya esalaka na bokolɔngɔnɔ ya nzoto ya moto nde abɛtaki lisolo ya Daniel. Ekoki kozala ete osilá koyoka masolo mosusu ya ndenge wana. Na ndakisa, moto moko akómi mobange mpe akómi pene ya kokufa, kasi azali kozela na mposa makasi likambo moko ya esengo—ekoki kozala moto oyo ye alingaka nde akoya kotala ye to etikali moke asala anivɛrsɛrɛ ya likambo moko boye. Ntango kaka likambo oyo azalaki kozela esalemi mpe eleki, akoumela te kokufa. Nini epesaka bato yango makasi ya koumela bongo? Elikya ekoki mpenza kopesa moto makasi ndenge bato mosusu bakanisaka yango?
Minganga mingi oyo bayekolaka likambo yango balobaka ete makanisi ya kolonga, elikya, mpe makanisi mosusu ya malamu ezalaka na ntina mingi na bomoi ya moto mpe na bokolɔngɔnɔ na ye ya nzoto. Kasi, bato mosusu bandimaka mpenza likambo yango te. Bato mosusu oyo bayekolaka likambo yango balobaka ete wana ezali kaka ndenge bato oyo bayebi siansi te bakanisaka. Bango batingamá na likanisi ete maladi nyonso oyo moto abɛlaka eutaka kaka na nzoto, kasi na makanisi te.
Ya solo, ntembe oyo ete elikya esalaka eloko te na bomoi ya moto ebandi lelo te. Eleki sikoyo bankoto ya bambula, ntango basɛngaki Aristote, moto ya filozofi na Grèce, alimbola liloba elikya, alobaki ete: “Ezali ndɔtɔ oyo moto alɔtaka wana azali kotambola.” Mpe mwa pene na eleko na biso, Benjamin Franklin, oyo azalaki mokonzi moko monene ya Leta na États-Unis, alobaki na ndenge ya kotyola ete: “Ye oyo atyaka motema ete elikya ekoleisa ye akokufa na nzala.”
Na yango, elikya esalaka mpenza nini na bomoi ya moto? Tokoki nde koloba ete elikya ezalaka ntango nyonso kaka makanisi mpamba ya kozwa eloko moko, mpe ete ezali kaka nzela ya koluka komibɔndisa to ezali se ndɔtɔ mpamba? To, tozali nde na bantina ya solosolo ya kotalela elikya lokola ndɔtɔ te, kasi lokola eloko oyo biso nyonso tosengeli na yango mpo na kozala nzoto kolɔngɔnɔ mpe na esengo, eloko oyo eutaka na makambo ya solo mpe oyo epesaka bolamu mpenza?