Engebene Biblia
Esengeli kaka koboma libala?
NA Angleterre, sango moko atombeli boyei malamu na bato oyo bayei na molulu moko. Liboso na ye mobali moko mpe mwasi na ye batelemi, elongo na ebele ya baninga mpe bana. Bayei mpo na kobalana? Te! Molulu yango ezali nde mpo na koboma libala na bango. Ya solo, lokola bato bakómi koboma mabala mpambampamba, mangomba mosusu ekómi kosala milulu ya koboma mabala na ndako-nzambe!
Ozali kokana koboma libala na yo? Soki ezali bongo, okanisi ete koboma libala na yo ekosala ete okóma na bomoi moko ya esengo? Ezali nde na makambo oyo okoki kosala mpo na kozala na esengo na libala na yo?
“Bakozala mosuni moko”
Ntango Nzambe abalisaki mobali mpe mwasi ya liboso, alobaki ete moto “akosangana na mwasi na ye, mpe bango bakozala mosuni moko.” (Genese 2:24) Na yango, libala esengelaki kozala mpo na libela. Yango wana Yesu ayaki koloba ete “pite” ezali ntina bobele moko oyo makomami epesi moto nzela ya koboma libala mpe kobalana na moto mosusu.—Matai 19:3-9.a
Yango emonisi ntina ya kotosa ndai ya libala. Kasi okosala nini soki matata makasi ebimi na libala na bino?
Koboma libala ezali mpenza nzela ya bwanya?
Yesu apesaki etinda oyo esengeli kotalela na mozindo ntango tolingi kosala likambo moko, ntango alobaki ete: “Bwanya emonani moyengebene na misala na yango.” (Matai 11:19) Ndenge oyo ebele ya mabala ekómi kokufa lelo mbangumbangu kozanga bantina ya malonga, emonisi nini?
Linda Waite, profesɛrɛ ya sosioloji na Iniversite ya Chicago (États-Unis), oyo akambaki ekipi moko ya bato oyo bayekolaki mabala oyo ezalaka na esengo te, alobaki ete: “Bato mingi bazali kolekisa ndelo ntango bazali kolobela matomba ya koboma libala.” Ndenge moko mpe, profesɛrɛ Michael Argyle na Iniversite ya Oxford (Angleterre), nsima ya kolekisa mbula 11 na kotalela biyano ya bankoto ya bato oyo batunaki bango, amonaki ete “bato oyo mabala na bango ekufá to ekabwaná, bazalaki na esengo te.” Mpo na nini ezali bongo?
Atako koboma libala ekoki kosilisa makambo mosusu, ekoki mpe kobimisa makambo oyo etikaka mpasi na motema, oyo okoki kopekisa yango eloko te. Ya solo, ntango bayekolaki likambo yango, bamonaki ete koboma libala ekitisaka ntango nyonso te mpasi ya makanisi mpe epesaka nzoto kilo te.
Ata soki ozali na libala ya “malamu mpenza” te, kokangama na mobalani na yo ekoki komemela yo matomba nsima. Bato mingi oyo basalaka bongo basepelaka na nsima esengo. Profesɛrɛ Waite alobi boye: “Matata mingi ya libala eyaka kosila nsima, mpe babalani bakómaka na esengo.” Mpo na yango, ankɛtɛ moko emonisi ete bato 8 kati na bato 10 oyo “bazalaki na esengo te” na mabala na bango, kasi babomaki yango te, bakómaki na “mabala ya esengo” nsima ya mbula mitano. Ata soki matata ya makasi ebimi, ekozala malamu babalani báboma libala mbangumbangu te.
Makambo oyo okoki kosala
Baoyo bazali kokana koboma libala basengeli komituna soki batalelaka libala na ndenge esengeli. Televizyo, radio, mpe bazulunalo emonisaka bato oyo balingani mpe batondi na lolango, oyo bolingo na bango esukaka na mabala ya kafukafu mpe etondi na bisengo. Nzokande ntango bato babalani, soki makambo oyo bakanisaki epai ya babalani na bango ekokisami te, yango ekoki kobimisa matata makasi. Ntango matata ebimi, ekómaka lisusu makasi mpe ebakisaka mpasi na motema. Bolingo oyo bazalaki na yango ebongwanaka na nkanda mpe koyinana. Soki ekómi bongo, bato mosusu bamonaka ndenge mosusu ya kosala te kaka koboma libala.—Masese 13:12.
Na esika omitika na makanisi ya kolɛmbisa, luká nde kokóma moninga na bato oyo babatelaka libala na bango malamu. Bapesi baklisto toli ete: “Bókoba kobɔndisana mpe kolendisana.” (1 Batesaloniki 5:11) Kozanga ntembe, baoyo bazali na mikakatano na mabala na bango bazali na mposa ete baninga na bango baklisto balendisa bango.
Ntina ya kozala na bizaleli ya moto ya Nzambe
Ntoma Paulo akomaki ete: “Bólata bolingo ya motema oyo euti na mawa, motema malamu, elimo ya komikitisa, boboto mpe motema molai.” (Bakolose 3:12) Bizaleli ya moto na Nzambe ekoki kobatela libala ntango matata makasi ebimi.
Na ndakisa, Paulo akomaki boye: “Bókoba kokanga motema moto na moto na makambo ya mosusu mpe kolimbisana na motema moko soki moko na bino azali na likambo ná mosusu.” (Bakolose 3:13) Christopher Peterson, moto ya mayele na pisikoloji na Iniversite ya Michigan (États-Unis), alobi ete: “Kolimbisa ezali ezaleli oyo ekangani makasi na bolamu.”
Motema malamu, boboto, mpe kolimbisa, ememaka na bolingo, “ekanganeli ya kokoka.” (Bakolose 3:14) Kozanga ntembe, bolinganaki mingi liboso. Okoki kozongisa bolingo wana? Atako matata ekoki kozala ya ndenge nini, yika mpiko. Kobwaka elikya te. Kokangama na mobalani na yo mpe kosalela mitinda ya Biblia ekoki kopesa yo esengo oyo mbala mosusu okokaki kokanisa yango ata moke te. Ya solo, milende na yo na likambo oyo ekosepelisa Yehova Nzambe, Mobandisi ya libala.—Masese 15:20.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Na lisangá ya Batatoli ya Yehova, moto oyo mobalani na ye asali ekobo, ye moko nde azwaka ekateli ya koboma libala to kolimbisa. Talá Lamuká ya Ɔkɔtɔbɛ—Desɛmbɛ 1999, nkasa 5-9.