Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g05 8/7 nk. 26-27
  • Bótyela bana likebi oyo basengeli na yango

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bótyela bana likebi oyo basengeli na yango
  • Lamuká!—2005
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bóteya bana kozanga kosilikisa bango
  • Bófandaka elongo na bana na bino
  • Teyá mwana na yo uta azali naino moke mpenza
    Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota
  • Baboti​—Bóbɔkɔla bana na bino na bolingo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • “Bosilikisa bana na bino te”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Lolenge ya kozala na libota oyo ezali makasi na elimo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
Makambo mosusu
Lamuká!—2005
g05 8/7 nk. 26-27

Engebene Biblia

Bótyela bana likebi oyo basengeli na yango

MWANA ya Nzambe azalaki na ntango ya kolekisa elongo na bana? Bayekoli na ye mosusu bakanisaki ete azalaki na ntango te. Mokolo moko, bamekaki kopekisa bana mike koya pene na Yesu. Yesu alobaki boye: “Bótika bana mike báya epai na ngai; bómeka te kopekisa bango.” Na nsima, na bolingo mpenza, ayambaki bana mwa mingi mpe asololaki na bango. (Malako 10:​13-16) Na ndenge yango, Yesu amonisaki ete azalaki kotyela bana likebi. Ndenge nini baboti lelo oyo bakoki kalanda ndakisa na ye? Soki bazali koteya bana na bango malamu mpe kolekisa ntango elongo na bango.

Ezali solo ete baboti ya malamu basalaka nyonso oyo bakoki mpo bana na bango bázala malamu mpe banyokolaka bango te. Tokoki ata koloba ete baboti nyonso ‘balingaka’ bana na bango, bazalaka na limemya mpo na bango mpe bapesaka bango kilo. Nzokande, Biblia ekebisi biso ete na mikolo na biso, bato mingi bakozala na “bolingo ya libota” te. (2 Timote 3:​1-3) Ata baboti oyo balingaka mpenza bana na bango mpe basalaka nyonso mpo na bango, basengeli ntango nyonso koluka koyeba makambo nini mosusu bakoki kosala mpo na kokokisa mokumba na bango. Yango wana, mitinda ya Biblia oyo elandi, ezali mpenza makundoli ya malamu mpo na baboti oyo bazali koluka bomoi ya malamu mpenza mpo na bana na bango.

Bóteya bana kozanga kosilikisa bango

Mokolo moko, Robert Coles, oyo azali molakisi mpe monganga ya maladi ya motó, alobaki boye: “Mwana akolaka na bizaleli ya malamu mokemoke. Ngai nakanisi ete mposa yango ya kozala na bizaleli malamu eutá na Nzambe.” Nani asengeli kokokisa mposa wana ya kozala na bizaleli malamu?

Na Baefese 6:⁠4, Makomami epesi toli oyo: “Bino, batata, bósilikisaka bana na bino te, kasi bókoba kobɔkɔla bango na disipilini mpe na makebisi ya Yehova.” Omoni ndenge vɛrsɛ yango epesi tata mokumba ya kokɔtisa bolingo ya Yehova na mitema ya bana mpe koteya bango bázala na limemya mozindo mpo na mibeko na ye? Na vɛrsɛ ya liboso ya Baefese mokapo 6, ntoma Paulo alobelaki tata ná mama ntango ayebisaki bana ‘bátosaka baboti na bango.’a

Na ntembe te, soki tata azali te, mama nde asengeli kokokisa mokumba wana. Bamama mingi oyo babɔkɔlaka bana bango moko balongaki kobɔkɔla bango na disipilini mpe na makebisi ya Yehova Nzambe. Nzokande, soki mama yango abali, mobali na ye moklisto nde asengeli kozwa mokumba yango. Mama asengeli kotosa ebongiseli yango ntango bazali koteya bana mpe kopesa bango disipilini.

Ndenge nini bopesaka bana na bino disipilini mpe boteyaka bango kozanga ete “bósilikisaka” bango? Nkisi ezali te, mpamba te mwana na mwana azali na ndenge na ye. Kasi, baboti basengeli kokeba mingi na lolenge na bango ya kopesa disipilini, basengeli ntango nyonso komonisa ete balingaka bana na bango mpe bapesaka bango limemya. Likambo oyo ezali kobenda likebi ezali ete mokanda ya Bakolose 3:​21 ezongeli lisusu likambo yango ya kosilikisa bana te. Na vɛrsɛ yango, bakebisi lisusu batata na maloba oyo: “Bósilikisa bana na bino te, mpo bálɛmba nzoto te.”

Baboti mosusu bagangelaka bana na bango. Na ntembe te, yango esilikisaka bana yango. Nzokande, Biblia epesi toli ete: “Tiká makambo nyonso ya bololo ya koyokisa mpasi mpe nkanda mpe nkɛlɛ mpe koganga mpe maloba ya kofinga elongolama epai na bino.” (Baefese 4:​31) Biblia elobi mpe ete “moombo ya Nkolo asengeli te kobunda, asengeli nde kozala na boboto epai ya bato nyonso.”​—⁠2 Timote 2:​24.

Bófandaka elongo na bana na bino

Kotyela bana na bino likebi oyo basengeli na yango elimboli mpe kondima kotika makambo mosusu oyo bosepelaka kosala mpe makambo mosusu oyo bolingaka, mpo na bolamu na bango. Biblia elobi ete: “Maloba oyo malakeli ngai yo lelo makozala na motema na yo, mpe [osengeli, NW ] kolakisa yango na etingia na bana na yo, mpe okosolola mpo na yango wana ekofanda yo na ndako, mpe wana ekotambola yo na nzela, mpe wana ekolala yo, mpe wana ekotɛma yɔ.”​—⁠Deteronome 6:​6, 7.

Lelo oyo, lokola makambo oyo ezali kosɛnga mbongo ekómi mingi, baboti bazwaka ntango te ya kofanda elongo na bana na bango mokolo mobimba. Nzokande, mokanda ya Deteronome enyati mpenza ete baboti ‘basengeli’ kozwa ntango ya kolekisa elongo na bana na bango. Kosala bongo ezali kosɛnga kobongisa ntango na yo malamu mpe kondima kotika makambo mosusu. Kasi, esengeli mpenza kotyela bana likebi ya ndenge wana.

Tótalela ankɛti moko oyo basalaki epai ya bilenge koleka 12 000. Na nsuka, bato oyo basalaki ankɛti yango bamonaki ete: “Bolingo makasi kati na mwana mpe moboti ezali nkisi oyo eleki malamu mpo mwana azala nzoto kolɔngɔnɔ mpe yango ekobatela ye akóma te na bizaleli mabe oyo ekotya ye na likama.” Ya solo, bana balingaka baboti bátyelaka bango likebi. Mokolo moko, mama moko atunaki bana na ye boye: “Soki ezali na eloko moko oyo bolingaka mingi oyo bokoki kosɛnga, bokosepela kosɛnga nini?” Bango nyonso minei bazongisaki: “Kofanda mingi na Papa mpe Mama.”

Na yango, kozala moboti ya malamu elimboli kosala makasi mpo na kokokisa bamposa ya bana na yo, ezala mpe mposa na bango ya makambo ya elimo mpe kokóma mpenza moninga na bango ya motema. Elimboli kosalisa bana bákóma mikóló ya makoki, oyo bamemyaka bato, mpe oyo bazali sembo, oyo basalelaka bato mosusu makambo na boboto mpe oyo bapesaka Mozalisi na bango lokumu. (1 Samwele 2:​26) Ya solo, baboti ya malamu ezali baoyo bateyaka bana na bango mpe bapesaka bango disipilini na ndenge oyo Nzambe azali kosɛnga.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Awa, Paulo asalelaki liloba ya Grɛki gonéusin, oyo euti na liloba goneus, oyo elimboli “moboti.” Kasi na vɛrsɛ 4 asalelaki liloba ya Grɛki patérés, oyo elimboli “batata.”

[Elilingi na lokasa 27]

Kogangela mwana ekoki koyokisa ye mpasi mingi

[Elilingi na lokasa 27]

Bólekisaka ntango na bana na bino

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto