Nazali na esengo ya “kokende mosika”
LISOLO YA CLAIRE VAVY
MADAGASCAR, esanga oyo ezali na ntaka ya kilomɛtrɛ pene na 400 na Mozambique, ekólo moko ya Afrika ya Ɛsti, ezali na bangomba mpe na bazamba minene. Nabotamaki na Betoko II, mwa mboka moke na ɛsti ya esanga yango. Na mobu 1987, ntango nazalaki na mbula 15, nakendaki kotánga kelasi na Mahanoro, engumba moko pembeni ya mbu.
Na Mahanoro, nazalaki kofanda epai ya yaya na ngai Celestin oyo abandaki koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova. Mbula mibale na nsima nakómaki Motatoli. Nazwaki ekateli ya komipesa mobimba na kosalela Yehova Nzambe.
Nasali milende mpo nakokisa mikano na ngai
Moko na mikano na ngai ya liboso ezalaki ya kosalisa bandeko na ngai oyo bazalaki na Betoko II na elimo, mpe nazalaki kobondela Yehova mbala na mbala mpo na yango. Nzokande, nakokaki kozonga kuna kaka na ntango ya konje. Ezalaki mobembo moko ya mpasi ya kilomɛtrɛ 100. Na kilomɛtrɛ 40 ya ebandeli okoki kokende na motuka, kasi kilomɛtrɛ 60 oyo etikali okotambola kaka na makolo mpo nzela ezali ya bangomba mpe ya moke.
Nazalaki komata bangomba mingi ya mabangamabanga, mpe na bisika mosusu nzela ezalaki kokoka kaka lokolo moko. Soki natamboli banda ntɔngɔ tii mpokwa, nazalaki kosala pene na kilomɛtrɛ 40. Nazalaki komema mokumba oyo ezalaki kilo 15—mosusu na motó, mosusu na mokɔngɔ, mpe oyo etikali na mabɔkɔ. Nazalaki komema mingi mpenza mikanda oyo elimbolaka Biblia, oyo nazalaki kopesa bandeko na ngai mpe bato mosusu oyo basepelaki na yango. Na nzela mobimba, bato bakómaki kobenga ngai “mwasi ya mikumba.”
Na ebandeli, atako nazalaki kolobela bindimeli na ngai na esengo mpenza, bandeko na ngai baboyaki koyoka yango. Kasi mwa moke na nsima, bakómaki koyoka mpe bakómaki kotuna mituna mingi, kutu mbala mosusu tozalaki kokende kolala na ngonga ya mibale na butu.
Mobembo oyo nabosanaka te
Na mokolo ya 24 na sanza ya Desɛmbɛ 1990, nakendaki konje na Betoko II. Bandeko na ngai basepelaki ntango bamonaki ngai, mpo bakanisaki ete nayei mpo na fɛti ya Noele. Esengo na bango ebongwanaki mawa ntango nayebisaki bango ntina oyo nakokaki kosangana na bango te na fɛti yango. Bayokaki nsɔni mpo na koyebisa bato ya mboka likambo yango, mpo mboka yango mobimba ezalaka mpenza na bomoko. Yango wana, namonaki malamu ngai moko nayebisa bango. Kasi, nakosala yango ndenge nini?
Nayebaki eloko ya kosala te, mingi mpenza mpo nazalaki naino elenge. Nazalaki komituna soki ekozala malamu nalimbola bindimeli na ngai ntango bato bakoyangana na ndako-nzambe mokolo oyo ekolanda. Nabondelaki Yehova mingi mpo alakisa ngai ndenge ya kosala. Nsima na yango, natunaki yaya na ngai Paul, oyo azalaki moteyi na ndako-nzambe, ete: “Okanisi ete ekozala malamu lobi, nalimbwela bato na ndako-nzambe ntina oyo naboyi fɛti ya Noele?” Atunaki bato mosusu mpe bandimaki likanisi yango.
Na mokolo elandaki, batindaki moto moko aya kobenga ngai ntango misa esilaki. Nsima ya kobondela lisusu Yehova, namemaki mikanda oyo elimbolaka Biblia. Nabandaki koloba mpe napesaki bango nyonso matɔndi ndenge basalisaki ngai mpo napesaka Biblia motuya mingi. Nalimbolaki ete ntango nakendaki na Mahanoro nakobaki koyekola Biblia. Nalobaki ete nayebaki makambo mingi oyo Biblia eteyaka, oyo bateyaki biso yango liboso te.
Nasalelaki libaku yango mpo na kolimbola elikya oyo Biblia epesi ete bato bakozala na bomoi ya seko na paladiso awa na mabelé (Nzembo 37:29; Emoniseli 21:3, 4), ntina oyo mwa bato moke ya sembo bakokende na likoló (Yoane 14:2, 3; Emonseli 5:9, 10; 14:1, 3), mpe liteya ya Biblia oyo elobi ete bato oyo bakufá bayebi eloko te, mpo bazali lokola balali mpɔngi, yango wana bayokaka mpasi te (Mosakoli 9:5, 10; Yoane 11:11-14, 38-44). Namonisaki bango mpe ete baklisto ya siɛklɛ ya liboso bazalaki kosala fɛti ya Noele te mpe ete Noele eutaki na bapakano.
Na nsuka ya lisolo na ngai, bato mingi bamonaki ete makambo nalobaki ezali solo. Bamosusu kutu batunaki mituna mosusu. Na nsima, nalakisaki bango mikanda oyo namemaki mpe nalimbwelaki bango ete ezali mikanda oyo Batatoli ya Yehova babimisi mpo na koyekola Biblia. Nalobaki na bango ete nakosalisa moto nyonso oyo akolinga koyekola Biblia. Mingi bazwaki mikanda yango.
Bokutani moko ya kokamwa
Mwasi moko oyo nayebaki ye te apusanaki pene na ngai mpe alobaki na ngai ete: “Leki na ngai ya mwasi oyo afandaka na mboka mosusu, azali moto ya lingomba na bino.” Nakamwaki mpe natunaki ye ete: “Wapi?”
Ayanolaki ete: “Na Andranomafana.” Mboka yango ezali na ntaka ya kilomɛtrɛ 30 na Betoko II.
Nayebisaki mwasi yango ete leki na ye akoki kozala moto ya lingomba mosusu, mpamba te Batatoli ya etúká wana bayebanaki bango nyonso. Kasi, mwasi yango alobaki mpenza ete leki na ye ateyaki ye makambo ndenge moko na oyo ngai nalimbolaki na ndako-nzambe. Natunaki ye nkombo mpe adrɛsi ya leki na ye, mpo nazalaki na mposa makasi ya kokende mbala moko na mboka wana. Kasi, mama abondelaki ngai ete nazela mokolo moko to mibale, mpo mobembo yango ezalaki ya mpasi, esengelaki kotambola kaka na makolo. Mikolo mibale na nsima, ngai na yaya Charles tokendaki na Andranomafana.
Ntango tokomaki na mboka yango, totunaki bato ya mboka ete: “Batatoli ya Yehova bazalaka awa?” Nalɛmbaki nzoto ntango bayanolaki ete: “Awa ezali kaka na Lingomba ya Katolike, ya Pantekote mpe mangomba ya Communauté Évangelique Indépendante de Magascar.”
Na nsima, mwasi moko alobaki mwa makasi ete: “Soki bozali koluka Batatoli ya Yehova, ekozala kaka Marceline ná libota na ye.” Ezali mpenza nkombo oyo bayebisaki ngai naluka!
Moto moko akendaki kobenga Marceline. Ayaki mbala moko kasi azalaki na mwa kobanga. Mboka mobimba bazingaki biso, mpo bakanisaki ete tozali bato ya Leta oyo toyei koluka ye mpo na likambo moko. Nayaki koyeba nsima ete bato ya mboka wana banyokolaki Marceline ná libota na ye mpo bazali na lingomba oyo ekeseni na bato nyonso.
Marceline abengaki biso mwa pembeni mpo tósolola. Ntango natunaki ye soki azali Motatoli ya Yehova, andimaki. Na yango, akendaki kozwa buku Solo oyo ezali komema na bomoi ya seko, oyo Batatoli ya Yehova bazalaki koyekola na yango Biblia na ntango wana, ná bazulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya kala. Nyonso ezalaki mpenza ya kala mpe epasukapasuká. Natunaki ye ete: “Na mokolo ya lomingo oyo eleki, boyekolaki zulunalo oyo wapi?”
Azongiselaki ngai ete: “Oyo tozali na yango kaka yango wana; mpe toyekolaka yango mbala na mbala.” Na ntango wana nde nayebisaki Marceline ete ngai mpe nazali Motatoli ya Yehova. Asepelaki mingi! Ntango nayebisaki ye ete nalingi kokutana na moto oyo atambwisaka makita na bango, ayebisaki ngai ete moto yango afandaka na mboka mosusu liboso, mosika.
Bokutani mosusu ya kosepelisa
Na mokolo elandaki, ngai ná Marceline tokendaki kotala moto yango. Ntango tokómaki, akamwaki mingi mpe asepelaki komona biso. Azalaki nde Motatoli oyo autá na Toamasina, engumba moko oyo ezali pembeni ya mbu, na ntaka ya kilomɛtrɛ koleka 200, na nɔrdi-ɛsti. Azongaki na mboka ná libota na ye ntango balongolaki ye na mbalakaka na mosala na Toamasina. Ntango azongaki na mboka, abandaki kosakola, koyekola Biblia na bato, mpe kotambwisa makita.
Motatoli yango ná libota na ye basepelaki mingi komona bazulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya sika oyo nazalaki na yango. Nalakisaki mpe bango buku Okoki kozala na bomoi ya seko na mabele oyo ekobongwana paradis, oyo tozalaki kosalela mingi na ntango wana mpo na koyekola Biblia na bato. Ezalaki mbala ya liboso bámona yango. Na mokolo ya lomingo oyo elandaki, nakendaki lisusu na Andranomafana mpo na koyangana na makita elongo na bango. Lokola mwa etuluku wana eyebanaki te na biro ya filiale ya Batatoli oyo ezali na Antananarivo, mboka-mokonzi ya Madagascar, nalendisaki bango báyebisa yango na biro.
Kobanda na sanza ya Yanuali 1991, sanza na sanza nazalaki kolongwa na Mahanoro mpe kokende na Andranomafana mpo na kotikela bango bazulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya sika mpe mikanda mosusu. Esengelaki kotambola kilomɛtrɛ 130 mpo na kokende mpe kilomɛtrɛ 130 mpo na kozonga; nazalaki kotambola kilomɛtrɛ koleka 90 na makolo—komata mpe kokita bangomba, koleka na bazamba ya minene, mpe na ntango mbula ezali konɔka; esengelaki kosala makasi kotambola na pɔtɔpɔtɔ kozanga kokwea.
Mikumba na ngai ezalaki se kokóma kilo mingi mpo bato oyo bazalaki kosepela na mikanda mpe bazulunalo bazalaki se kokóma mingi. Na nsuka ya mobembo nyonso, atako nazalaki kolɛmba mingi mpe koyoka nzoto mpasi, kasi nazalaki na esengo mingi. Nazalaki mpenza na esengo ntango nazalaki komona bandeko ya etuluku yango bazali kosepela mingi na mikanda ya sika mpe na solo ya Biblia!
Nabandi mosala ya ntango nyonso
Na mokolo ya 1 sanza ya Sɛtɛmbɛ 1992, nakómaki mobongisi-nzela, ndenge Batatoli babengaka basakoli ya ntango nyonso. Nasalaki mosala ya mobongisi-nzela na Mahanoro, kasi nazalaki kosolola na bandeko na ngai na Betoko II na mikanda. Na ntango wana nabandaki koyekola na bango na nzela ya mikanda, mpe batunaki ngai soki nakolinga kozonga na mboka mpo na kosalisa bango. Nazalaki na mposa ya kozonga, kasi nalingaki naino koyeba mpenza soki bazwaki ekateli ya koyekola Biblia mpe kokola na elimo na motema mobimba. Yango wana naumelaki mwa ntango na Mahanoro na mosala na ngai ya mobongisi-nzela.
Na nsuka ya mobu 1993, nazwaki libaku ya kokɔta kelasi ya pɔsɔ mibale mpo na babongisi-nzela na Antananarivo. Nsima na yango, basɛngaki ngai natondisa lokasa ya kosɛnga kokóma mobongisi-nzela monene, mosala oyo esɛngaki kokende epai nyonso oyo bakokaki kotinda ngai na ekólo mobimba. Kasi, nakakatanaki mpo na kondima mosala yango, mpamba te nazalaki na mposa ya kosalisa bandeko na ngai na Betoko II, mboka oyo ezalaki mosika na lisangá. Yango wana nazongaki na Mahanoro, esika nazalaki kosala mosala ya mobongisi-nzela.
Ntango mokɛngɛli-motamboli ya Batatoli ya Yehova ayaki kotala biso, natunaki ye mpo nazonga kosalisa bandeko na ngai. Lokola lisangá moko esilaki kosalema na Andranomafana, mokɛngɛli apesaki ngai likanisi ete nakende kuna mpo nazala esika lisangá ezali mpe nakendaka kosakola na Betoko II. Nabandaki kosakola kuna na mokolo ya 1 sanza ya Sɛtɛmbɛ 1994. Na sanza yango, ngai na yaya na ngai Paulo, oyo azalaki koteya na ndako-nzambe, tokendaki na liyangani ya etúká. Eumelaki te tokómaki basakoli 30 na Andranomafana, mpe bato soki 65 bazalaki koyangana na makita na mokolo ya lomingo.
Kotambola esuki naino te
Mwa moke nsima ya kozonga na ngai na Betoko II, bandeko na ngai minei ya basi mpe ya mibali bakokisaki masɛngami mpe bakomaki basakoli, mpe eumelaki te bazwaki batisimo. Ntango nazongaki na Betoko II, nazalaki mbala na mbala kokende na makolo na mboka Anosibe An’ala kozwa mikanda mpe bazulunalo; mobembo yango ezalaki kilomɛtrɛ 50 mpo na kokende mpe kilomɛtrɛ 50 mpo na kozonga. Atako ezalaki mobembo moko oyo ezalaki kolɛmbisa ngai mingi, kasi ezalaki mosala ya mpunda te mpo nazalaki na esengo ya komona bato ya sika bazali kobakisama na lisangá na bamboka wana.
Lelo oyo, ezali na lisangá moko oyo ezali kokola malamu na Betoko II, oyo mokolo ya lomingo, bato soki 45 bayanganaka na makita. Bandeko na ngai nyonso na mboka wana bakómi Batatoli, mpe mingi kati na bango bazali babongisi-nzela ya sanza na sanza. Leki na ngai moko ya mobali azali mobongisi-nzela monene. Na mokolo ya 1 sanza ya Novɛmbɛ 2001, nakómaki mobongisi-nzela monene, mpe batindaki ngai na mboka Antanambao-Manompotsy. Kasi natikaki Betoko II na esengo na motema.
Ntango nabandaki koyekola solo ya Biblia na 1987, Batatoli bazalaki ata 3 000 te na Madagascar mobimba. Lelo oyo, bazali koleka 14 000. Ndenge moko na Batatoli mosusu mingi, ngai mpe nazali na esengo mpo na libaku oyo nazali na yango ya kosala mingi koleka mpo na kosalisa bato mosusu. Mpe nazali kotɔnda Yehova na ndenge apamboli milende na ngai na likambo yango.
[Bililingi na lokasa 20]
Mbala mingi nazalaki komema mikumba ya kilo koleka 15 na ntaka ya kilomɛtrɛ 60 mpo na kokende na mboka na biso
[Elilingi na lokasa 21]
Yaya Paul
[Elilingi na lokasa 22]
Ndeko na ngai Charles
[Elilingi na lokasa 22]
Ngai ná bandeko na ngai mosusu. Bango nyonso bazali sikoyo Batatoli ya Yehova