Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 1/06 nk. 24-27
  • Biloko ya masano na ntango ya kala mpe lelo oyo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Biloko ya masano na ntango ya kala mpe lelo oyo
  • Lamuká!—2006
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ndenge biloko ya masano ebandá
  • Masano mpe biloko ya masano ezali na ntina nini?
  • Koyeba kopona biloko ya masano
  • Mpo na nini te kosala biloko ya masano yo moko?
  • Ntina oyo tosengeli kosala mosala
    Yekolá epai ya Moteyi Monene
  • Litomba ya masano oyo esalisaka mwana akolisa mayele
    Lisalisi mpo na libota
  • Eloko nini ezali mpenza na ntina?
    Yekolá epai ya Moteyi Monene
Lamuká!—2006
g 1/06 nk. 24-27

Biloko ya masano na ntango ya kala mpe lelo oyo

PHILIPa ná baninga na ye, oyo bazali mpe bana mike, bazali kotala ndenge bale na bango oyo bauti kotonga ezali kodendadenda na mabelé. Babandi kobɛta bale na bango na esengo mpenza. Mike azali kokamwa ndenge mwa vuatire na ye ezali kobalukabaluka ntango azali kofinafina telekomande oyo asimbi na lobɔkɔ na ye. Akoki kosala ete mwa vuatire yango ekende liboso to ezonga yango nsima ndenge alingi. Andrea ná baninga na ye oyo bazali mpe bana mike bazali kosakana na kati ya ndako, mpe ntango bazali kolatisa bana-popi na bango bilamba ná basapato, bazali kolobela ndenge oyo bakobanda kolata ntango bakokóma mikóló.

Bana oyo nyonso bazali kosalela nini? Biloko ya masano oyo ntango mosusu balekisaka ngonga mingi mpo na kosakana na yango. Ntango mosusu, soki mwana alingi eloko moko ya lisano mingi​—⁠na ndakisa mwana-popi ya bilamba oyo ezali lokola ngombolo (ours)​—⁠akangamaka na yango na boumeli ya bambula mingi. Akoki kutu kotya fɔtɔ na yango esika moko na bafɔtɔ ya libota. Ndenge nini biloko ya masano ebandá? Mpo na nini biloko yango ezali na ntina mingi mpo na bana?

Ndenge biloko ya masano ebandá

Buku moko elobi boye: “Mbala mingi, eloko ya lisano ezali eloko oyo mwana asalelaka mpo na kosakana. Emonani ete banda kalakala, bato ya bamboka ndenge na ndenge bazalaki kosalela biloko ya masano mpe bazalaki na masano ya ndenge na ndenge. Biloko ya masano ezali ndenge na ndenge: mosusu ezali mindɔndɔ te, mosusu ezali mindɔndɔmindɔndɔ, mosusu ezali kaka mwa nzete mpamba oyo mwana alɔkɔti mpe akómi kosalela yango lokola mwa mpunda na ye, mosusu ezali bamasini oyo ezali na biteni ebele ebele oyo basali yango na mayele ya siansi ya mikolo oyo.” Na bongo, eloko nyonso oyo moto akoki kosalela mpo na kolekisa ntango to kosakana na yango, ekoki kokóma eloko ya lisano. Lokola moto nyonso asepelaka kosakana, ekoki kozala ete bato babandá kosalela biloko ya masano banda kala mpenza.

Na ndakisa, bakundolaki bana-popi​—⁠to biteni na yango​—⁠na bisika oyo Babilone mpe Ezipito ya kala ezalaká. Ekoki kozala ete mwana-popi ezali eloko ya lisano ya libosoliboso oyo bato babandá kosakana na yango. Bale mpe ezali eloko mosusu ya lisano oyo bato babandá kosalela yango banda kala. Atako toyebi mpenza te ntango oyo bato babandá kosalela bale, kasi bakundolaki, na lilita ya mwana moko ya Ezipito ya kala, libanga moko oyo ezalaki na banzela mpe bili moko ya libanga oyo bazalaki kolekisa na banzela ya libanga yango.

Eleki sikoyo mbula soki nkoto misato, na Grèce, bazalaki kosakana na biloko ya masano oyo babengi yoyo oyo esalemi na mabanga mpe emonani ete bato ya Chine mpe bazalaki kosakana na yango na ntango ya kala. Na Loma, bana bazalaki kosakana na bana-popi oyo baningisaka yango na bansinga (pantin) mpe bazalaki kosakana na biteni ya mpɛmbɛ ya nzoku oyo bakatá yango mitindo ndenge na ndenge mpe basengelaki kokangisa oyo ezali motindo moko. Na Grèce mpe na Loma, bana mibali bazalaki kosakana na mwa makalo ya mike, yango emonisi ete banda kala bana basakanaka na mwa biloko ya mike oyo ekokani na biloko oyo ememaka bato mpe mikumba. Na ndako moko epai babombaka biloko ya kalakala, batyá ekeko moko ya nyama oyo basalá na mabelé likoló ya mwa pusupusu oyo ezali na bapinɛ, mpe ekoki kozala ete bana bazalaki kosakana na yango na Mexique ya kala. Likambo ya kokamwa ezali ete, longola bapinɛ wana, bamoná naino te bapinɛ mosusu na Mexique ya ntango wana. Na eleko babengi Moyen Âge, bato bazalaki kosala bale ya libungutulu to oyo ezali lokola paipai na mabenga ya masuba ya nyama (vessie) oyo bavimbisi. Ndenge kaka babɛtaka bale lelo oyo, na ntango wana mpe bazalaki kobɛta babale wana na mabɔkɔ to na makolo mpo na kotya mongete.

Na nsima, na ekeke ya 18, mpo na kofungola bato mayele, bato ya Angleterre babimisaki lisano ya kokangisa malamu biteni ya biloko oyo bapanzipanzi mpo na kobimisa eloko moko boye. Bato mingi bakómaki kosala lisano yango na ebandeli ya ekeke ya 20. Na ntango wana mpe, bato mingi bakómaki kosalela bakrɛyo ya langi. Kaka na États-Unis, kompanyi moko esalaki bakrɛyo wana miliare 100. Ndenge omoni yango, biloko mosusu ya masano oyo tozali na yango lelo oyo ebandá kala mpenza, mpe esalá mosala monene na bomoi ya bato.

Masano mpe biloko ya masano ezali na ntina nini?

Mokanda moko, oyo ebimisami na ebongiseli moko ya Leta mpo na kosalisa bato báyeba kopona biloko ya masano oyo bakoki kosomba, elimboli ntina ya biloko ya masano na maloba oyo: “Mwana nyonso alingaka kosakana. Na makambo mingi, masano esalisaka bana báyekola mpe bákola na nzoto mpe na makanisi, mpe báyeba kofanda na bato. Soki mosala ya mwana ezali kosakana, tokoloba ete biloko ya masano ezali biloko na ye ya mosala, mpe ete biloko ya masano oyo ebongi ekoki kosalisa ye asala mosala na ye malamu.”

Soki bato mingi basepelaka na biloko ya masano, ezali libosoliboso mpo bana balingaka yango mingi mpo na kosakana. Kasi, biloko yango esalisaka mpe mwana akola malamu. Talá bandakisa oyo: ntango mwana moke azali kotindika mwa vuatire ya lisano, azali kokolisa makasi na ye ya nzoto. Ntango azali kobɛta silikoti (mokambe), azali kosalisa nzoto na ye ezala pɛpɛlɛ. Ntango atɛlɛmi kaka na lokolo moko liboso abɛta bale to ntango azali kopusa velo, yango ezali kosalisa ye akweaka mpambampamba te. Mpe ntango azali kotonga mwa ndako ya lisano to eloko mosusu, to koyema, azali koyekola kosala makambo na bosikisiki.

Ezali boni mpo na mayele ya mwana? Mwana akómaka na makoki ya koloba malamu ntango azali kosala masano oyo esɛngaka mpe koyemba to kobɛta mwa lisolo, na ndakisa ntango azali kobɛta silikoti to azali kobɛta lipate. Ntango mwana azali kotonga mwa ndako to eloko mosusu, azali kotosa mibeko ya lisano moko, azali kokangisa malamu biteni ya biloko oyo bapanzipanzi mpo na kobimisa eloko moko boye, kosala mwa bateyatre, to kolata to kopakola biloko mpo bato báyeba ye te, azali kokolisa makoki na ye ya kokanisa mpe ya kosala makambo ya sika. Ezali mpe bongo ntango azali kosalela bibɛtɛli ya miziki to kosala misala ya mabɔkɔ.

Likambo mosusu ya ntina ezali ete masano esalisaka bana báyeba kofanda na bato​—⁠bayeba kosala na boyokani elongo na basusu, na ndakisa, ntango basalaka baekipi mpo na kobɛta bale. Doktɛrɛ Bruce Duncan Perry alobi ete: “Mwana ayekolaka koyeba bato oyo afandaka na bango esika moko mpe yango ekoki kosalisa ye ayeba mpenza komitya na esika ya basusu mpe alukaka kaka matomba na ye moko te. Ntango azali kosakana elongo na bana mosusu, azali koyekola mitinda oyo esalisaka moto afanda malamu na basusu, bakisá mpe makambo oyo ekoki kosalisa ye ayeba komipekisa mpe kokanga motema soki azwi te likambo oyo alingaki ntango azali elongo na bato mosusu.”

Bana basalelaka mpe biloko ya masano mpo na komekola makambo oyo bamonaka mikóló bazali kosala. Aristote, filozofe moko ya Grèce, alobaki boye: “Moto nyonso alingaka komekola basusu mpe ezaleli yango emonanaka banda bomwana.” Na masano ya bana, bamekolaka makambo mingi oyo bato basalaka, mpe yango esalisaka bana báyekola makambo yango. Tózwa ndakisa ya mwana mwasi ya moke oyo azali kobondela mwana-popi na ye mpo alala, kaka ndenge mbala mosusu akosala bambula mingi na nsima na mwana ya solo. To mbala mosusu, azali kolamba liyoto mpe kokabola yango na baninga na ye. Ndenge moko mpe, bana mibali bazali kopusa mwa “mituka” na bango mpe bazali kosala makɛlɛlɛ lokola motɛrɛ ya motuka; na ndenge yango, bazali koyekola kotambwisa motuka ntango bakokola. Nzokande, ezali na makambo oyo osengeli kotalela ntango ozali koponela mwana na yo biloko ya masano. Mpo na nini?

Koyeba kopona biloko ya masano

Zulunalo moko ya Londres (The Daily Telegraph) elobi ete: “Lelo oyo, biloko ya masano ekómi kolobela mingi makambo ya mobulu mpe koboya kotosa mibeko.” Atako ezali bongo te mpo na biloko nyonso ya masano, kasi lisolo moko oyo ebimaki na zulunalo moko ya Mexique (La Jornada) emonisaki ete biloko ya masano oyo bana basalelaka banda kala ezali komonana lisusu mingi te mpe oyo ekómi komonana mingi ezali nde oyo “emonisaka bato oyo misuni ya nzoto evimbavimbá. . . oyo bazali komonana ete bazali bato ya mobulu.” Na lisolo yango, bazongelaki maloba ya Patricia Ehrlich, profesɛrɛ mpe moto na mayele na Iniversite ya Xochimilco, oyo alobaki ete biloko mingi ya masano oyo batɛkaka lelo oyo eteyaka bato likanisi ya komonela basusu, ya kosalela makasi, kobundisa bato, komonisa ete ozali na bokonzi, kokonza bato mpe kobangisa bango.

Ebongiseli moko ya États-Unis ya bato ya mayele ya pisikoloji na biteyelo emonisi ete kopesa mwana biloko ya masano oyo ezali kotinda na mobulu “ekoki kosala ete ayekola malamu te mpe akola malamu te; mpe ekoki komemela ye makama mingi.” Baankɛtɛ emonisi ete masano ya video mpe ya ordinatɛrɛ oyo emonisaka mobulu ekoki kotinda mwana akóma na ezaleli ya nkandankanda mpe kotinda ye asalaka makambo oyo mibeko epekisi. Na bongo, mokóló nyonso oyo azali na mokumba ya kobɔkɔla mwana, asengeli kosala nyonso aponela ye biloko ya masano oyo ebongi.​—⁠Talá etanda na lokasa 26.

Bamasini oyo ezali kobima mikolo oyo esali ete bábimisa biloko ya masano ya ndenge na ndenge mpe ya mindɔndɔmindɔndɔ. Kasi, bato nyonso te nde bazali na mbongo ya kosomba biloko yango, mpe mbala mosusu bana baumelaka te kolɛmba biloko yango. Longola yango, biloko yango mosusu ezalaka na litomba moko te mpo na bana. Leanne, mama moko oyo azali kobɔkɔla bana mitano kaka ye moko na Australie, alobi boye: “Bana na ngai ya mibali oyo bakoli balandaka makambo balobaka na bapiblisite mpe mbala mingi basɛngaka ngai nasombela bango masano ya ordinatɛrɛ ya ntalo mingi. Kasi, namonaka ete basakanaka mingi mpe basalaka ngalasisi mingi soki bazali kosakana na kati ya lopango, na mwa nzete oyo basalelaka na lisano ya base-ball oyo ezali kutu na ntalo mingi te mpe na bale oyo basali na ndembo. Namonaka ete biloko ya masano oyo ezali na mindɔndɔ mingi te eumelaka mingi mpe esalisaka bana na ngai básalela mayele na bango mingi.”

Mpo na nini te kosala biloko ya masano yo moko?

Soki ozali mwana mpe ozali na mbongo te ya kosomba biloko ya masano oyo ezali kobima sika, okoki kaka kozala na esengo soki osaleli mayele na yo mpe makoki na yo ya kosala biloko ya sika. Na bamboka mingi, bana mike lokola yo basalaka bango moko biloko oyo basakanaka na yango.

Talá bililingi oyo ezali na bankasa oyo. Omoni te ete bana oyo bazali kosakana mpenza? Kosangisa mwa biloko mpo na kosala “motuka” lokola oyo wana ezalaka pɛtɛɛ te. Osengeli kozwa biteni ya nsinga ya mabende mpe kogumba yango mpo na kosala lolenge ya motuka olingi. Mpo na kosala bapinɛ, okoki kokata eloko moko ya ndembo to ya plastiki mpo ebimisa biteni oyo ezali libungutulu. Okanisi nini mpo na engbunduka oyo ya milangi ya ji mpe ya manzanza ya miliki? Okanisi nini mpo na motuka wana ya mabaya? Kati na biloko ya masano oyo, okoki kutu kopusa mosusu, na ndakisa tukutuku wana oyo basali na Afrika. Bana yango bamoni ete mpo básakana malamu, esɛngi kaka te bázala na biloko ya masano ya ntalo mingi. Mpe bayebi ete kosala biloko ya masano yo moko ezali mpe kosakana. Mpo na nini te komeka kosala biloko yango yo moko?

[Maloba na nse ya lokasa]

a Oyo ezali bankombo topesi bango kopesa.

[Etanda/Elilingi na lokasa 26]

Eloko ya lisano oyo ebongi ezali . . .

● Oyo ekoki na mbula ya mwana, na mayele na ye, na makasi na ye, mpe oyo ekobimisela ye likama te

● Oyo basali yango malamu mpe ezali makasi (bana bapanzapanzaka biloko)

● Oyo ezali kitoko mpe ekobenda likebi ya mwana

● Oyo ekotinda mwana na kosala makambo ya sika mpe na kokanisa

● Oyo ezali ntalo mingi te

● Oyo ezali na pwazɔ te

[Etanda/Elilingi na lokasa 27]

Mpo biloko ya masano ebimisa makama te . . .

● Tyá biloko ya masano ya bana ya mikóló na esika oyo bana ya mike bakokóma te

● Tángá malamumalamu makambo mpe malako oyo bakomaka likoló ya biloko yango mpo makama ebima te, elongo na mwana na yo soki likoki ezali

● Teyá mwana na yo ná baninga na ye ndenge malamu ya kosalela mpe ya kobomba biloko ya masano

● Kosomba te biloko ya masano ya makɛlɛlɛ, oyo ekoki kosala makɛlɛlɛ ya makasi koleka

● Taláká biloko yango mbala na mbala mpo na koyeba soki ezali kaka malamu. Mbala mingi, esɛngaka kobongisa eloko ya lisano oyo ebebi to kobwaka yango mbala moko

● Biloko ya masano oyo ekoki kobimisa makama, na ndakisa oyo esɛngaka kobwaka eloko moko mpo ekende kotuta eloko to esika moko boye, to biloko ya mopotu mpe biloko ya masano oyo esalaka na kura, esengeli kaka bana ya mikóló nde básalela yango mpe soki mokóló moko azali wana

● Esengeli te kotikela bana ya mike biloko ya masano oyo ezali na biteni mikemike mpo bakoki komɛla yango

[Elilingi na lokasa 24]

Nkɔsi ná mboke likoló ya pusupusu, na milenɛrɛ ya mibale, L.T.B., Iran

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Nkɔsi ná mboke: Erich Lessing/Art Resource, NY

[Elilingi na lokasa 25]

Mwana-popi ya mabelé, na mobu soki 600 L.T.B., Italie

[Elilingi na lokasa 25]

Eloko ya lisano oyo babengi “toupie”, na mobu soki 480 L.T.B., Grèce ya kala

[Elilingi na lokasa 25]

Mwana-popi ya nkasa ya masangu, Amerika liboso ya lipanda

[Elilingi na lokasa 25]

Bakrɛyo ya langi, na ebandeli ya bambula ya 1900, États-Unis

[Bililingi na lokasa 26]

Bana ná biloko ya masano oyo bango moko basali

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 25]

Mwana-popi ya mabelé: Erich Lessing/Art Resource, NY; eloko ya lisano oyo babengi toupie: Réunion des Musées Nationaux/ Art Resource, NY; mwana-popi ya nkasa ya masangu: Art Resource, NY

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto