Libala ekoki kolonga mikakatano?
“Oyo Nzambe akangisi esika moko moto akabola yango te.”—MATAI 19:6.
BANDAKO oyo ezalaki komonana makasi ebebaki. Ntango mipɛpɛ ya makasi ebɛtaki na mikolo oyo euti koleka na bisika mingi na mokili, bandako ya makasi eyebanaki.
Nzokande, mopɛpɛ ya ndenge mosusu ezali kobebisa libala, ebongiseli oyo eumeli koleka bibongiseli mosusu nyonso. Stephanie Coontz, moto moko ya mayele na makambo ya mabota alobaki ete: “Libala ebungisi esika na yango ya ntina mingi na bomoi ya bato.”
Yo mpe ozali komona mbongwana yango? Ozali mpenza komona ete libala ezali kobungisa esika na yango? Soki ezali boye, nini esali ete makambo ekóma bongo? Mpe nini ekoki kosalisa bato bábatela mabala na bango? Nini ezali mpenza kotya libala na likama?
Mabala ezali na likama
Mabala ekómá na likama banda kala. Bizaleli oyo baboti na biso ya liboso bakómaki na yango nde ememi mikakatano nyonso oyo tozali komona lelo na mabala. Adama ná Eva bakweaki na lisumu mpo balukaki kokokisa bamposa na bango ya mabe, mpe bongo “lisumu ekɔtaki na mokili.” (Baloma 5:12) Biblia emonisi ete nsima ya lisumu na bango, “makanisi nyonso kati na mitema na bango ezalaki bobele epai na mabe mikolo nyonso.”—Genese 6:5.
Makambo ebongwani mpenza te lelo oyo. Kati na makambo oyo ezali kobebisa libala, ezali mpe na mposa ya koluka kaka matomba na yo moko. Na mokili ya lelo oyo, epai bizaleli ya bato ebongwani, libala ezali komonana lokola eloko moko esilá ngala. Lokola na mikili mingi balɛmbisi mibeko oyo ezalaki kopekisa koboma libala, koboma mabala ezali lisusu te na nsɔmɔ oyo ezalaki na yango liboso.
Bato ya motema mɔtɔmɔtɔ, oyo balukaka kokokisa bamposa na bango nokinoki, bamonaka te makama ya koboma libala. Lokola bakosamaka na bilaka ya lokuta ya lipanda, bakanisaka ete koboma libala ekomemela bango esengo.
Basusu, soki bakutani na mikakatano makasi na mabala na bango, bakendeke epai ya banganga, bapesi-toli na mabala to batángaka babuku na bango. Likambo ya mawa, “bapesi-toli na mabala” mosusu lelo oyo bazali nde kotinda bato báboma mabala na esika ya kosalisa bango báyokana. Buku moko (The Case for Marriage) elobi boye: “Mpo na mbala ya liboso, libala, eloko oyo bato mingi bazali kosepela na yango, ekómi na likama makasi. Likama yango ekoki kouta na babalani bango moko to na makanisi ya ‘bapesi-toli’ oyo bakanisaka ete kokangama kaka na moto moko bomoi na yo mobimba ezali boombo.”
Makanisi ebongwani mpenza
Lelo oyo, bato bakómi mpe kotalela libala ndenge mosusu. Ekoki kozala ete omoni ete mabala ezali lisusu ndenge ezalaki kala te. Na esika babalani bázala sembo mpe básalisanaka, bakómi nde koluka moto na moto kokokisa kaka bamposa na ye moko. Zulunalo moko (Journal of Marriage and Family) elobi ete Ezaleli wana “ebandaki komonana na bambula ya 1960 mpe ekómaki makasi mpenza na bambula ya 1970.” Lelo oyo, bato bazali kobala lisusu mpenza te mpo na bolingo, mpo na kozwa moninga ya motema, mpo na kobota, to mpo na kozwa mosungi.
Makambo mingi ekɔtisi mbongwana makasi na libala na mikili mingi na mikolo oyo. Ya liboso, na bikólo mingi, na esika mibali bálukaka mpo na koleisa mabota mpe basi bábatelaka ndako, makambo ebongwani. Lokola basi mpe bakómi kosala, na mabota mingi babalani nyonso mibale basalaka. Ya mibale, bato bazali lisusu komona mabe te kobota bana ya makango mpe yango ezali kosala ete bana mingi bázala kaka na tata to mama. Ya misato, mabala ya makango ekómi mingi. (Talá etanda “Mabala oyo ezali na likama lisusu koleka.”) Ya minei, mabala ya mibali na mibali to basi na basi ekómi mingi mpe ezala Leta to mangomba bazali kondima yango. Makambo nyonso wana ebongoli nde lolenge na yo ya kotalela libala?
Mabala ekómi kokufa mingi
Tótala ndenge motángo ya mabala oyo ezali kokufa ezali se kobakisama na bikólo mosusu. Lapolo moko oyo euti kosalema na États-Unis emonisi ete “motángo ya mabala oyo ekufi ebakisami makasi na kati ya 1970 ná 1996.” Kati na mabala mitano oyo esalemaki, moko na yango ekufaki. Wapi mabala oyo ezali mpenza kokufa mingi? Balapolo emonisi ete mabala mingi (60 %) ekufaki na kati ya mbula zomi ya liboso.
Na bikólo mosusu mpe, motángo ya mabala oyo ezali kokufa ebakisami mpenza. Na Angleterre mpe na Pays de Galles, mabala 153 490 ekufaki na 2004. Na ekólo Australie, emonani lokola mabala mingi (40 %) ekokufa. Na ekólo Corée, motángo ya mabala oyo ekufaki ebakisamaki na 21 800 na mbula moko mpamba, kobanda na 2002 tii 2003, elingi koloba mabala 167 100 ekufaki. Na Japon, epai libala moko likoló ya minei ezali kokufa, elingi kokokana na mikili ya Mpoto. Moto moko ya mayele na makambo etali mabota na iniversite moko na Japon (Red Cross University) alobaki ete: “Kala, kaka mabala ya mabe mpenza nde ezalaki kokufa, kasi sikoyo ekómá lokola momeseno.”
Na bikólo mingi, mangomba oyo epiká misisa mpe bibongiseli mosusu ezalaki kosala ete mabala ekufaka mingi te. Kasi, lelo oyo bakoki lisusu kosala yango te. Na ndakisa, Lingomba ya Katolike epai batalelaka libala lokola eloko mosantu. Na 1983, balɛmbisaki mibeko oyo ezalaki kopekisa bato koboma libala. Banda wana, Bakatolike bakómá koboma mabala mingi.
Emonani polele ete bansinga oyo ezalaki kokanga libala ekómi kokatana. Kasi, bantina nyonso oyo mabala ezali kokufa eyebani te. Longola kobeba ya bizaleli ya bato, ezali na ntina mosusu monene oyo mabala ekufaka, oyo bato bayebi te.
Esika mokakatano yango ezali kouta
Biblia elobaka ete Satana Zabolo, tata ya moimi, azali na bopusi makasi na mokili. Mpo na nini? Mpo abwakamá awa na mabelé mpe azali na nkanda makasi. Na yango, azali mpenza na mokano ya kobimisa “mawa,” to yikiyiki makasi, mpe libala ezali kaka moko ya makambo oyo azali kosopela nkanda na ye.—Emoniseli 12:9, 12.
Mpo na kolobela ntango oyo Satana abwakamaki, Yesu alobaki: “Lokola botyoli-mibeko ekobakisama mingi bolingo ya bato mingi ekokóma mpiɔ.” (Matai 24:12) Ntoma Paulo mpe azongelaki likanisi yango na maloba oyo: “Bato bakozala bato oyo bamilingaka bango moko, bato balingá mbongo, bato ya lofundo, bato ya lolendo, batuki, bato bazangi botosi epai ya baboti, bato bazangi botɔndi, bato bazangi bosembo, bazangi bolingo ya libota, bandimaka boyokani te, bakoselaka bato makambo, bazangi komipekisa, bato ya kongala, bazangi bolingo ya makambo ya malamu, bato oyo batɛkaka bamosusu, bato ya motó makasi, bato bavimbi na lolendo, bato balingá bisengo na esika ya kozala bato oyo balingaka Nzambe.” (2 Timote 3:2-4) Ndenge bato mingi bamoni yango, bizaleli mabe wana ebandá kala, kasi lelo oyo ekómi lisusu makasi koleka.
Lokola mopɛpɛ makasi ezali kobɛta mabala, ndenge nini tokoki komibatela mpo tózala na libala ya esengo, oyo ekoumela? Lisolo oyo elandi ekoyanola na motuna yango.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 5]
“Na mikili oyo bato bameseni kobwaka biloko oyo ezali lisusu na ntina te, bakómi mpe na ezaleli yango na libala.”—SANDRA DAVIS, MOTO YA MIBEKO NA MAKAMBO YA LIBOTA
[Etanda/Elilingi na lokasa 4]
“Mabala oyo ezali na likama lisusu koleka”
Bato mingi bafandi esika moko kozanga ete bábalana. Lapolo ya ebongiseli moko (U.S. Centers for Disease Control and Prevention) emonisi ete mabala ya motindo yango ezali na “likama koleka mabala ya solo.” Bamosusu bafandaka esika moko mpo báyebana naino liboso ya kobalana. Kosala bongo elongolaka makambo oyo ekosala ete báyokana te mpe esalaka ete mabala na bango ezala malamu? Zulunalo moko oyo etalelaka makambo ya mabala mpe libota emonisi polele ete ezali bongo te. Kaka Zulunalo yango elobi boye: “Mabala mingi ya bato oyo bafandaki esika moko liboso bábalana ezali na mikakatano mingi, . . . mpe mabala ya ndenge wana ezali kokufa mingi koleka.”
[Etanda/Elilingi na lokasa 5]
Kozala na bomoi molai mpe libala
Lelo oyo, bato bakómi koumela mingi na bomoi. Atako likambo yango ezali malamu, ememeli mpe libala mokakatano. Kala, bato oyo babalani bazalaki kofanda esika moko tii liwa ekokabola bango; kasi lelo oyo, emonani ete mabala mingi ezali nde kokufa. Tótalela likambo moko ya mabe mpenza oyo ezali kotungisa basi oyo baumeli mingi na mabala na Japon. Zulunalo moko (The Washington Post) elobi ete minganga bazali kobenga yango “motungisi ya kofanda na mobali oyo azwá pansiɔ na mosala.” Mwasi moko oyo aumeli mbula 40 na libala alobaki ete ntango mobali na ye azwaki pansiɔ, ye alobaki na motema na ye ete: “Nakoboma libala sikoyo. Nazalaki koyoka mabe kosalelaka ye ntango auti na mosala. Kasi, kozala na ye na ndako ntango nyonso ezali mpasi koleka.”