Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 10/06 nk. 6-9
  • Ndenge ya kotonga libala ya esengo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge ya kotonga libala ya esengo
  • Lamuká!—2006
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Landáká malako
  • Tyá moboko ya makasi
  • Tongá na biloko oyo ekozika na mɔtɔ te
  • Ntango mikakatano ebimi
  • Okoki kotonga libala ya esengo!
  • Nsima ya mokolo ya fɛti ya libala
    Ndenge ya kotikala na kati ya bolingo ya Nzambe
  • Libala—Likabo oyo euti na Nzambe
    Ndenge ya kotikala na kati ya bolingo ya Nzambe
  • Ndenge ya kokokisa ndai na yo ya libala
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Libala ezali likabo ya Nzambe ya bolingo
    “Bótikala na kati ya bolingo ya Nzambe”
Makambo mosusu
Lamuká!—2006
g 10/06 nk. 6-9

Ndenge ya kotonga libala ya esengo

“Moto . . . akosangana na mwasi na ye, mpe bango bakozala mosuni moko.” ​​—⁠GENESE 2:​24.

MOZALISI na biso, Yehova Nzambe, asalaki libala mpo mobali mpe mwasi báfanda libela na libela. Genese 2:⁠18, 22-⁠24 elobi ete: “[ Yehova] Nzambe alobaki ete, Ezali malamu te ete moto azala ye moko. Nakosalela ye mosungi mobongi na ye. [ Yehova] Nzambe azalisaki mwasi na mokwa molongolaki ye na moto, mpe ayaki na ye epai na moto. Moto alobaki ete, Oyo azali sasaipi mokwa na mikuwa na ngai, mpe mosuni na mosuni na ngai. Ye akobengama mwasi, zambi ye akamatami na mobali. Yango wana moto akotika tata na ye mpe mama na ye mpe akosangana na mwasi na ye, mpe bango bakozala mosuni moko.”

Ya solo, kotonga libala ya esengo, oyo ekoumela, ezali pɛtɛɛ te, kasi ekoki kosalema. Bato mingi oyo basali mbula 50, 60 to koleka bazali na esengo na mabala na bango. Nini esalisi bango? Basalaka makasi ntango nyonso mpo balongani na bango ‘bándima’ bango. (1 Bakolinti 7:​33, 34) Yango esɛngaka milende. Soki yo mpe ondimi kopesa ntango mpe kosala milende, okoki kotonga libala ya esengo, oyo ekoumela ntango molai.

Landáká malako

Motongi nyonso ya malamu akoki kobanda kotonga ndako te kozanga kotala liyemi. Ndenge moko, tokoki te kotonga libala ya esengo kozanga kolanda malako oyo Nzambe apesi na likambo yango. Malako yango ezali na Biblia. Ntoma Paulo akomaki ete: “Makomami nyonso epemami na Nzambe mpe ezali na litomba mpo na . . . kosembola makambo.”​—⁠2 Timote 3:​16.

Mibali ná basi bakoki koyeba lolenge ya kofanda malamu na mabala na bango soki batali ndenge Yesu azalaki na bayekoli na ye. Mpo na nini? Biblia ekokanisi boyokani oyo Yesu ná bato oyo bakoyangela elongo na ye na likoló na oyo ya mobali ná mwasi. (2 Bakolinti 11:⁠2) Yesu azalaki kolinga bayekoli na ye ntango nyonso, ata na ntango ya mpasi. “Alingaki bango tii na nsuka.” (Yoane 13:⁠1) Lokola azalaki mokonzi ya motema mawa, azalaki ntango nyonso kotalela esika makoki na bango esuki mpe bolɛmbu na bango. Azalaki soki moke te kosɛnga bango makambo oyo eleki bango.​—⁠Yoane 16:⁠12.

Ata ntango bayekoli na ye bazalaki kosala makambo oyo esepelisi ye te, azalaki kaka komonisela bango boboto. Azalaki kogangela bango te, kasi na komikitisa mpe na boboto, azalaki koluka nde kosembola bango. (Matai 11:​28-​30; Malako 14:​34-​38; Yoane 13:⁠5-⁠17) Na yango, soki otali malamumalamu ndenge Yesu azalaki kosalela bayekoli na ye makambo na boboto mpe ndenge bango mpe bazalaki kozongisela ye bolingo yango, okoyeba mpenza ndenge okoki kosala mpo na kotonga libala ya esengo.​—⁠1 Petelo 2:​21.

Tyá moboko ya makasi

Mikakatano oyo ezali lokola mopɛpɛ ekozanga te kobɛta na libala na yo. Yango ekomonisa soki libala na bino ezali makasi to te. Moboko ya makasi mpo na kotonga libala ya esengo ezali kozala sembo epai na molongani na yo. Yesu amonisaki ntina ya likambo yango ntango alobaki ete: “Oyo Nzambe asangisi, moko akabola bango té!” (Matié [Matai] 19:​6, Bible na lingala ya lelo oyo) Liloba “moto” elimboli mpe mobali ná mwasi oyo balapi ndai ya kotikala sembo moko epai na mosusu.

Bato mosusu bakoki komona ete kolapa ndai ya libala ezali mokumba monene. Lelo oyo, bato bazali kobala mpo na koluka matomba na bango moko, kasi te mpo na komipesa epai ya mosusu.

Nini ekoki kosalisa babalani bázala sembo moko epai ya mosusu? Ntoma Paulo akomaki ete: “Mibali basengeli kolinga basi na bango lokola nzoto na bango moko.” (Baefese 5:​28, 29) Na yango, ‘kosangisama’ esika moko ekoki kolimbola koluka bolamu ya molongani na yo ndenge olukaka oyo ya yo moko. Bato oyo babalá basengeli kotika momeseno ya koloba “eloko ya ngai,” “ngai nalobi,” kasi nde kolobaka “eloko ya biso,” “biso tolobi.”

Soki ozali kolonga mikakatano na libala na yo, okokóma na bwanya. Bwanya yango ekoki komemela yo esengo. Masese 3:⁠13 elobi ete: “Mapamboli epai na moto oyo azwi [ bwanya].”

Tongá na biloko oyo ekozika na mɔtɔ te

Mpo ndako eumela, esengeli kotongama malamu. Na yango, zalá na mokano ya kotonga libala oyo ekoumela. Salelá biloko oyo eumelaka, oyo ekoki kolonga komekama nyonso. Pesá motuya mingi na bizaleli lokola bwanya ya Nzambe, kokaba, bososoli, kobanga Nzambe, esengo, kozala na botɔndi mpo na mibeko ya Nzambe mpe komonisa kondima ya solosolo.

Esengo mpe bolamu na libala eutaka te na bomɛngo ya mokili oyo. Eutaka nde na motema mpe na makanisi, mpe Liloba ya Nzambe ekómisaka yango makasi. Toli oyo: “Tiká moto na moto akebaka na ndenge oyo azali kotonga” ebongi mpe na kati ya libala.​—⁠1 Bakolinti 3:⁠10.

Ntango mikakatano ebimi

Mpo ndako eumela, esengeli ntango nyonso kobongisaka yango. Ntango mobali ná mwasi na ye bazali ntango nyonso kopesana mabɔkɔ mpe bazali kopesana lokumu mpe limemya, libala na bango ekozala kaka makasi. Moimi mpe nkanda ekozala te.

Nkanda makasi, oyo ezali kosila te mpe koswana ekoki kosilisa bolingo na libala. Ntoma Paulo apesaki mibali toli oyo: “Bino mibali, bókoba kolinga basi na bino mpe bóyokelaka bango nkanda makasimakasi te.” (Bakolose 3:​19) Basi mpe basengeli kosalela toli yango. Ntango babalani bazali kosala makasi mpo na kopesana lokumu, komoniselana boboto mpe koyokelana, bakozala malamu mpe na esengo. Koboya kosilika makasimakasi mpe koswana ekoki kosala ete kowelana ezalaka te ntango mikakatano ebimi. Paulo alobaki ete: “Bózala na boboto na kati na bino, bóyokelanaka mawa mingi, kolimbisanáká na motema moko.”​—⁠Baefese 4:​32.

Ezali boni soki omoni ete bazali kondima yo te, kopesa yo nkanda to komona yo mpamba? Yebisá molongani na yo na motema mpiɔ likambo oyo ezali kotungisa yo. Ekozala malamu kotika bolingo ezipa mabunga ya mikemike.​—⁠1 Petelo 4:⁠8.

Mobali moko oyo akutani na mikakatano mingi na libala na ye oyo eumeli mbula 35 alobi ete, ata soki molongani na yo apesi yo nkanda ndenge nini, osengeli “soki moke te koboya kolobisa ye.” Abakisaki lisusu ete: “kotika mpe te kolinga ye.”

Okoki kotonga libala ya esengo!

Ya solo, kotonga libala ya esengo ezali pɛtɛɛ te. Kasi, soki babalani bazali kosala makasi mpo na kotya Nzambe na kati ya libala na bango, bolamu mpe kimya ekozala. Na yango, taleláká malamu boyokani oyo libota na yo ezali na yango na Nzambe; zalá sembo epai ya molongani na yo. Mpe kobosana te ete Yesu amonisaki ete soki libala ezali na esengo, lokumu esengeli kokende libosoliboso te epai ya mobali to mwasi, kasi nde epai ya Yehova Nzambe, ye oyo asalá libala. “Oyo Nzambe asangisi, moko akabola bango té!”​—⁠Matié [Matai] 19:​6, Bible na lingala ya lelo oyo.

MIKANDA MOSUSU YA KOTÁNGA

Buku Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota, oyo ebimisami na Batatoli ya Yehova, ezali kopesa makanisi oyo ekoki kosalisa mpenza mpo na kotonga libala ya esengo mpe ya malamu. Babalani mingi na mokili mobimba bamoni ete batoli euti na Biblia oyo ezali na mokanda yango esalisi bango bábongisa mabala na bango.​—⁠Talá na lokasa 32 ya zulunalo oyo.

[Etanda na lokasa 9]

Nini ekoki kosalisa yo otonga libala ya esengo?

◼ Yekoláká Biblia mbala na mbala na molongani na yo mpe bondeláká Nzambe mpo asalisa bino mpo na kosilisa mikakatano.​—⁠Masese 3:​5, 6; Bafilipi 4:⁠6, 7; 2 Timote 3:⁠16, 17.

◼ Osengeli kosangisa nzoto na moto mosusu te; kaka na molongani na yo.​—⁠Masese 5:​15-​21; Baebele 13:⁠4.

◼ Soki mikakatano ebimi to boyokani te na likambo moko, bólobelaka yango polelepolele, na bosembo mpe na bolingo.​—⁠Masese 15:​22; 20:⁠5; 25:⁠11.

◼ Sololáká na molongani na yo na boboto mpe na limemya; kosilikaka makasimakasi te, mpe kosalela maloba ya kotyola te.​—⁠Masese 15:⁠1; 20:⁠3; 21:⁠9; 31:⁠26, 28; Baefese 4:​31, 32.

◼ Na komikitisa nyonso, saleláká toli ya Biblia ata soki omoni ete molongani na yo azali kosala te oyo asengeli kosala.​—⁠Baloma 14:​12; 1 Petelo 3:​1, 2.

◼ Saláká makasi mpo na kolona bizaleli ya elimo oyo Biblia elobeli.​—⁠Bagalatia 5:​22, 23; Bakolose 3:​12-​14; 1 Petelo 3:⁠3-⁠6.

[Bililingi na lokasa 7]

Landáká malako oyo Nzambe apesi na Biblia mpo na libala

[Elilingi na lokasa 7]

Tiká ete bolingo ya solosolo mpe bosembo ezala moboko ya makasi na libala na yo

[Bililingi na lokasa 8]

Kolisá bizaleli ya elimo oyo ekoki kosalisa yo olonga mikakatano ya makasi

[Bililingi na lokasa 8]

Mpo libala ezala malamu, esengeli kobongisaka yango ntango nyonso

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto