Nazangaki elikya, na nsima nakómaki na esengo
YA VICENTE GONZÁLEZ
Ntango bato ya kartye na biso bayokaki ete namibɛtaki masasi mbala minei mobimba kasi nakufaki te, bakómaki kobenga ngai elima. Kasi, nazalaki mpenza elima te. Tiká nayebisa bino ntina oyo nalingaki komiboma.
NABOTAMAKI na 1951 na engumba Guayaquil, na Équateur. Baboti na biso batongaki ndako na pembeni ya mbu. Mabota ya babola bazwaki bisika na ndenge na bango mpe batongaki bandako na bambu mpe na manzanza. Lokola bandako yango etongamaki na bisika ya pɔtɔpɔtɔ, batongaki yango lokola mitalaka. Tozalaki na kura te, tozalaki kolamba na mbambola, mpe tozalaki kotambola pene na kilomɛtrɛ mobimba mpo na kotoka mai ya komɛla.
Mpo na kokokisa bamposa ya libota, bayaya na ngai babandaki kosala ntango bazalaki naino bana mike. Ntango nazalaki na mbula 16, nakataki kelasi mpe nazwaki mosala ya momemi-mikanda na biro moko. Ngai ná baninga na ngai tokómaki komɛla masanga mpe kosala pite. Ntango lisosoli na ngai ezalaki kotungisa ngai, nazalaki kokende kotubela. Sángo azalaki koloba na ngai boye: “Mwana, otubeli malamu mpenza.” Na nsima, azalaki koloba na ngai nazonga kozanga ete asunga ngai. Kasi, nazalaki kozongela kaka makambo yango. Nsukansuka, namonaki ete momeseno wana ya kosalaka masumu mpe kotubelaka ezalaki lisusu na ntina te mpe natikaki kokende na ndako-nzambe. Kaka na ntango yango, namonaki ete bosembo ezali te na kati ya bato. Ebele ya babola bazalaki komona mpasi mpo na kozwa eloko ya kobikela mpe mwa bato moke oyo bazali bazwi bazali na bomengo. Bomoi ezalaki na ntina te. Nazalaki koyeba te ndenge bomoi na ngai ekozala.
Mokolo moko, namonaki bandeko na ngai minei ya basi bazali kotánga mikanda ya Batatoli ya Yehova. Ngai mpe nabandaki kotánga yango. Kasi, buku Solo oyo ezali komema na bomoi ya seko ebendaki mpenza likebi na ngai. Buku yango elimbolaki mateya mingi ya Biblia na ndenge moko ya polele. Nalobaki na motema ete, ‘Oyo ezali solo!’ Kasi, ndenge nayaki komona yango mbula 15 na nsima, kosalela solo ezali pɛtɛɛ tɛ.
Ntango nakómaki na mbula 22, nabandaki kosala na banki moko. Mokolo mosusu, moninga na ngai moko ya mosala alakisaki ngai ndenge azalaki kobimisa mbongo na mayele na banki mpe azalaki kozongisa yango. Ngai mpe nabandaki kosala lokola ye. Nabimisaki mbongo ebele mpe namonaki ete nakokoka lisusu te kozipa lidusu yango. Lokola namonaki ete nakokoka te kofuta mbongo yango, nakómaki kaka mawamawa. Na yango, namonaki malamu nayebisa likambo yango na banki mpe na nsima namiboma.
Natindelaki banki mokanda, nasombaki mwa mondoki ya moke mpe nakendeki na esika moko oyo bato bazalaki te na libongo, namibɛtaki masasi mibale na motó mpe mibale na ntolo. Atako nazokaki makasi, nakufaki te. Moto moko ya velo amonaki ngai mpe amemaki ngai mbangu na lopitalo. Ntango nabikaki, basambisaki ngai mpo na moyibi mpe batyaki ngai na bolɔkɔ. Ntango nabimaki, nakómaki koyoka nsɔni mpe mpasi na motema, lokola Leta ayebaki ngai lokola moto mabe. Lokola nabikaki na masasi minei wana, bato ya kartye bakómaki kobenga ngai elima.
Nazwi libaku ya kobongwana
Na ntango wana, Paul Sánchez, misionɛrɛ moko ya Batatoli ya Yehova ayaki kotala ngai. Eloko ya libosoliboso oyo ebendaki likebi na ngai epai na ye ezali kosɛka na ye. Paulo azalaki moto oyo atalelaka makambo na lolenge malamu mpe nandimaki koyekola Biblia na ye. Nalobaki na motema ete, ‘Mbala mosusu akosalisa ngai nazwa esengo mpe nayeba ntina ya bomoi.’
Na lisalisi ya Paulo, nayebaki ete Nzambe azali na mokano moko mpo na bato mpe ete baoyo balingaka mpe batosaka ye bakofanda mokolo mosusu na paladiso awa na mabelé. (Nzembo 37:29) Nayebaki mpe ete kozanga bosembo mpe bobola eutaka epai ya Nzambe te, kasi yango eutaki nde na botomboki ya bato. (Deteronome 32:4, 5) Mateya wana ya solo ezalaki lokola mwinda na bomoi na ngai. Koyekola Biblia ezalaki likambo mosusu, kasi mpo nabongola bomoto na ngai, ezalaki nde mama ya likambo.
Nazwaki mosala na kompanyi mosusu mpe batyaki ngai na kɛsi ya mbongo. Nakweaki lisusu na motambo ya koyiba. Ntango namonaki ete nakokoka lisusu kobomba moyibi na ngai te, nakimaki mbula mobimba na engumba mosusu. Nalukaki kobima mpo nakende na ekólo mosusu, kasi esimbaki te mpe nazongaki epai na biso.
Nakutanaki lisusu na Paul, mpe tozongelaki koyekola Biblia. Na mbala wana, nazwaki ekateli ya kosalela mitinda ya Biblia mpe kosalela Yehova. Na yango, nayebisaki Paulo ete liboso nazalaki moyibi, mpe ye apesaki ngai toli ya polele. Atángelaki ngai bavɛrsɛ mingi, na ndakisa Baefese 4:28, oyo elobaka ete: “Tiká moyibi ayiba lisusu te, kasi tiká nde asala mosala makasi.” Namonaki ete esengeli nayebisa ete nayibaki mpe nandima bitumbu.
Ntango nazalaki kokanisa, nabandaki kosala mosala na ngai moko ya mabɔkɔ. Mokolo mosusu, mobali moko ayaki esika nazalaki kosala mpe asalaki lokola asepeli na liyemi moko oyo nasalaki. Nzokande, azalaki polisi mpe azalaki na mokanda mpo na kokanga ngai. Mpo na mbala ya mibale, nasambaki mpe nakɔtaki bolɔkɔ. Paul ayaki kotala ngai mpe nalakaki ye ete, “Nakoyokisa yo nsɔni te na milende oyo osali mpo na kosalisa ngai nayeba Biblia.” Tokobaki koyekola ntango nazalaki na bolɔkɔ.
Nakokisaki maloba na ngai
Nsima ya kobima, nazwaki ekateli ya kosalela Yehova na motema na ngai mobimba, mpe nakokisaki maloba na ngai na mbula mibale oyo elandaki. Na 1988, nazwaki batisimo mpe nakómaki Motatoli ya Yehova. Lokola nalingaki kofuta nyongo ya ntango oyo nabungisaki, nakómaki mobongisi-nzela mpe nazalaki kosala makasi mpo na kopesa litatoli epai ya bilenge ya mobulu.
Etuluku moko ya bilenge ya mobulu bazalaki na momeseno ya kokomakoma na bifelo ya Ndako ya Bokonzi na biso. Lokola nayebaki bilenge yango mpe epai bazalaki kofanda, nakendeki kotala bango, nalimbwelaki bango ntina ya Ndako ya Bokonzi, mpe na boboto nyonso, nasɛngaki bango ete bámemyaka esika na biso ya losambo. Banda wana, batikaki kokoma na bifelo ya Ndako ya Bokonzi.
Mokolo mosusu, ntango tozalaki kobongisa Ndako ya Bokonzi mpe kolongola langi oyo ezalaki liboso, Fernando, elenge moko Motatoli amonaki bakomi na efelo “Ligbɔlɔlɔ” (La Rana, na monɔkɔ ya Espagnol). Alobaki ete, “Ngai moto nakomaki yango.” Fernando akomaki nkombo na ye wana na Ndako ya Bokonzi ntango azalaki na kati ya bilenge ya mobulu. Sikoyo, ye moko azalaki koboma yango.
Mbala ya liboso oyo namonaki Fernando, alangwaki bangi. Mama na ye atindaki ye na bolɔkɔ mbala mibale, kasi abongwanaki te. Mama na ye alɛmbaki, akendaki mpe atikaki ye moko na ndako. Fernando atɛkaki biloko nyonso ya motuya, ezala baporte, maninisa mpe manzanza ya ndako, mpo kaka asomba bangi. Nakutanaki na ye mokolo moko na nzela, napesaki ye mwa masanga ya sukali mpe nasɛngaki ye tóbanda koyekola Biblia. Andimaki tóyekola, mpe nasepelaki mingi komona ete andimaki solo. Atikaki baninga na ye ya mobulu, atikaki komɛla bangi, abandaki koyangana na makita, mpe mosika te azwaki batisimo.
Ntango ngai ná Fernando tozalaki kosakola ndako na ndako, mbala mingi bato oyo bazalaki koyeba biso bazalaki koloba ete, “Ligbɔlɔlɔ!” to “elima!” Bazali kosala nini awa? Bazalaki kokamwa komona moto ya mobulu ná moyibi bakómi koya kotala bango na Babiblia na mabɔkɔ.
Mokolo moko, ngai nazalaki kosolola na mobali moko mpe Fernando azalaki kosolola na moto mosusu ya pembeni. Mobali yango alakisaki mosapi epai ya Fernando mpe alobaki na ngai boye: “Omoni mwana mobali wana? Atyaká ngai mondoki na motó.” Nayebisaki ete Fernando atiká makambo wana mpe akómá kolanda mitinda ya Biblia. Na nsima, ntango Fernando asilisaki kosolola na moto yango, nabengaki ye mpe nalakisaki ye epai ya mobali yango. Mobali yango alobaki boye: “Mwana, nazali kopesa yo longonya mpo na mbongwana oyo osali na bomoi na yo.”
Nakoki koyeba lisusu te bambala boni bato balobaki makambo ndenge wana mpo na ngai ná Fernando. Yango esalaki ete litatoli epesama malamu mpe bato mingi bakóma koyekola Biblia. Ngai ná Fernando tomonaka yango lokumu kozala Batatoli ya Yehova.
Likambo ya ntina mingi na bomoi na ngai
Na 2001, ntango nakómaki na mbula 50, nakamwaki mpe natondaki na esengo ntango babengaki ngai na Eteyelo mpo na kobongisa basungi, oyo esalemaki na ekólo Pérou. Eteyelo yango epesaka Batatoli ya makoki mateya ya mozindo na boumeli ya pɔsɔ mwambe, oyo esalisaka bango na mosala na bango.
Makambo nyonso na eteyelo yango ezalaki kitoko; kasi likambo moko nde ezalaki kobangisa ngai: Koloba liboso ya bato. Bana kelasi mingi oyo bazalaki bilenge basalaki masolo ya kitoko mpe bazalaki kobanga te. Kasi, ntango ngai nalekaki liboso mpo na kosala lisolo na ngai ya liboso, lokola banda bomwana na ngai nazalaki komona ete nakoki kosala eloko ya malonga te, makolo, mabɔkɔ mpe mongongo na ngai ebandaki kolɛnga. Kasi, Yehova asalisaki ngai na nzela ya elimo santu na ye mpe ya bandeko. Molakisi na biso moko atyelaki ngai likebi mpe na nsima ya kelasi ayaki kosalisa ngai na kobongisa masolo na ngai. Likambo eleki ntina, asalisaki ngai nayeba kotyela Yehova motema. Na nsuka ya kelasi, mpo na mbala ya liboso na bomoi na ngai, nazalaki lisusu na mokakatano te kosala masolo liboso ya bato ebele.
Lisolo oyo nasalaki na liyangani ya etúká oyo esalemaki na Guayaquil nde emonisaki ete natiki kobanga. Liboso ya bato 25 000, nayebisaki ndenge nakómaki Motatoli. Ntango nazalaki koloba, nakamwaki komona ete ngai mpenza nazali kolendisa bato ebele bongo, mpe mongongo na ngai ebandaki kolɛnga. Na nsima, ndeko moko oyo ayaki na liyangani yango ayaki pembeni na ngai mpe alobaki ete, “Ndeko González, ntango ozalaki kobɛta lisolo na yo, bato nyonso balelaki.” Mokano na ngai ezalaki kaka ete lisolo na ngai elendisa bato oyo mbala mosusu bazali kobunda mpo na kotika banzela na bango ya kala.
Lelo oyo, nazali nkulutu mpe mobongisi-nzela ya sanza na sanza mpe nazali na esengo mpo nasalisi bato 16 bákóma na boyebi ya solosolo ya Biblia. Nazali mpe na esengo makasi mpo baboti mpe bandeko na ngai ya basi minei bamipesi epai na Yehova. Mama atikalaki sembo epai ya Nzambe kino liwa na ye na 2001. Nazali mpenza na botɔndi epai na Yehova na ndenge apesi ngai nzela ya koyeba ye, mpe namoni ete lolenge eleki malamu ya komonisa botɔndi na ngai ezali ya kobenga basusu bápusana penepene na ye.—Yakobo 4:8.
[Elilingi na lokasa 12]
Fernando, Ligbɔlɔlɔ, elenge ya mobulu oyo nasalisaki
[Elilingi na lokasa 12]
Paul Sánchez, misionɛrɛ oyo ayekolaki na ngai Biblia
[Elilingi na lokasa 13]
Vicente González lelo oyo