Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 10/06 nk. 16-18
  • Mpo na nini mai ya mbu ezalaka mungwamungwa?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mpo na nini mai ya mbu ezalaka mungwamungwa?
  • Lamuká!—2006
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mpo na nini mungwa ya mbu ekitaka te?
  • Likambo ya kokamwa
  • “Euti na biloko oyo eleki pɛto”
    Lamuká!—2007
  • Mungwa ezali eloko moko ya ntina mingi
    Lamuká!—2002
  • Oyebaki yango?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Ba-océan
    Lamuká!—2023
Lamuká!—2006
g 10/06 nk. 16-18

Mpo na nini mai ya mbu ezalaka mungwamungwa?

SOKI batandi mungwa nyonso ya mbu na mabelé mobimba, ekomata ngomba na bolai ya mɛtrɛ koleka 150, oyo ekokani na ndako ya baetazi 45. Soki totali mai ya pɛto ya miluka mpe bibale ndenge na ndenge oyo esopanaka na mbu, mungwa yango eutaka wapi? Bato ya mayele bayebi sikoyo ete mungwa yango eutaka bisika ndenge na ndenge.

Mungwa mosusu eutaka na mabelé oyo tonyataka. Ntango mai ya mbula ezali koleka na mabelé mpe na mabanga, ememeka mungwa mpe biloko mosusu oyo ekómaka mungwa na miluka mpe bibale mpe nyonso ekendaka kosopana na mbu (1). Mai ya pɛto oyo tomɛlaka ezalaka na mungwa moke, yango wana toyokaka yango te.

Mungwa mosusu eutaka na nse ya mabelé ya mbu. Mai ya mbu ekɔtaka na nse ya mabelé na banzela mikemike; soki ezwi mɔtɔ makasi, ememaka mungwa. Mabelé esanzaka mai wana ya mungwa mpe ebimisaka yango na mbu (2).

Longola yango, bangomba ya mɔtɔ oyo ezalaka na nse ya mbu ebwakaka pɔtɔpɔtɔ ya mɔtɔ na kati ya mbu, mpe pɔtɔpɔtɔ yango ememaka mungwa na mbu (3). Mungwa mosusu eutaka na mopɛpɛ oyo ememaka biloko ndenge na ndenge na mabelé mpe ebwakaka yango na mbu (4). Nyonso wana esalaka ete mai ya mbu ezala na biloko nyonso oyo ekómisaka yango mungwamungwa. Nzokande, mungwa oyo tolambelaka (Chlorure de Sodium) nde elekaka mingi (85 %). Yango nde ntina ya liboso oyo mai ya mbu ezalaka mungwamungwa.

Mpo na nini mungwa ya mbu ekitaka te?

Mungwa ya mbu ekitaka te mpamba te mai ya mbu oyo emataka na londende ezalaka pɛto. Mungwa etikalaka na mbu, mpe mungwa mosusu eutaka na libándá mpe esopanaka na mbu. Emonani ete mungwa oyo ebimaka mpe ezongaka lisusu na mbu ekokanaka. Yango ebimisi motuna oyo: mungwa wana ekendaka wapi?

Banyama mikemike elyaka biloko mingi oyo ekómaka mungwa. Na ndakisa, banyama ya mai lokola mbɛmbɛ, sanya to kosakosa elyaka mungwa oyo ekembisaka mikuwa mpe mposo na bango (calcium). Matiti ya mikemike oyo ebimaka na mbu ebendaka mungwa oyo ekómisaka matiti yango makasi (silice). Banyama mikemike elyaka banyama mpe milona oyo epoli. Ntango banyama yango mpe milona ekufaka to elyamaka, nzoto na bango ebimisaka mungwa oyo, na nsima ekendaka kofanda na nse ya mbu (5).

Longola makambo oyo touti kolobela, ezali mpe na balolenge mosusu oyo mungwa elongwaka na mbu. Na ndakisa, pɔtɔpɔtɔ mpe biloko mosusu ya mabelé oyo mai ya bibale ememaka na mbu mpe oyo bangomba ya mɔtɔ esanzaka ebendaka mungwa mosusu ya mbu mpe ekendaka kofanda na nse ya mbu. Mungwa mosusu mpe ekangamaka na mabanga. Na balolenge ekeseni, mungwa mingi ekendaka kofanda na nse ya mbu (6).

Bato mingi ya mayele balobaka ete mungwa ebimaka mpe ezongaka lisusu na mbu ntango mabelé yango moko ezali kobongwana. Mabelé ya makasi ekabolamá na biteni mineneminene. Na bisika mosusu, biteni yango ekutanaka mpe moko ekɔtaka na nse ya mosusu, mpe ekitaka na esika ya mɔtɔ. Mbala mingi, ntango biteni yango ekutanaka, oyo ya mbu ekɔtaka na nse ya oyo ya mokili mpe ememaka mungwa na yango. Na ndenge yango nde mabelé ya makasi ebongwanaka mokemoke (7). Koningana ya mabelé, bangomba ya mɔtɔ mpe mabulu mozindo oyo esalemaka ntango biteni ya mabelé ekabwanaka ezali lolenge misato oyo mabelé ya makasi ebongwanaka.a

Likambo ya kokamwa

Mungwa ya mai ya mbu ekesanaka esika na esika mpe mbala mosusu eleko na eleko. Mungwa ya mai ya Mbu Motane mpe ya golfe persique ezalaka makasi koleka oyo ya mai nyonso, mpamba te mai na yango mingi ekómaka londende. Na bisika oyo mai ya pɛto ya bibale to ya mbula esopanaka na mbu, mai ezalaka mungwa makasi te. Ezali mpe ndenge moko na pôle nord mpe pôle sud, epai mai ya mabanga enyangwanaka. Nzokande, ntango mai yango ekómaka mabanga, mai ya mbu ekómaka mungwa makasi. Atako bongo, mungwa ya mbu ekitaka te.

Ngɛngɛ (PH) ya mai ya mbu ezalaka na kati ya 7, 4 mpe 8, 3 (oyo ya makila ya moto ezalaka pene na 7, 4). Soki mezire wana ekiti to emati, mbu ekoki kokóma na likama monene. Yango nde likambo ezali kobangisa bato mingi ya mayele lelo oyo. Bagaze oyo bato bazali kosalela (dioxyde de carbone) ebebisaka mopɛpɛ mpe ekendaka na mbu, epai esanganaka na mai mpe ekómaka ngɛngɛ makasi (acide carbonique). Na yango, misala ya bato ekoki kobakisa mokemoke ngɛngɛ na mai ya mbu.

Toyebi makambo nyonso te oyo esalaka ete mai ya mbu ekitaka te. Makambo oyo touti komona emonisi mpenza bwanya ya Mozalisi oyo amibanzabanzaka mpo na misala na ye.​—⁠Emoniseli 11:⁠18.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Talá na lisolo: “Les fonds marins livrent leurs secrets,” na Lamuka! ya 22 Novɛmbɛ 2000.

[Etanda/Bililingi na lokasa 16, 17]

(Mpo na komona ndenge ezali, talá na zulunalo)

Mbula

↓↓

↓↓

4 Mopɛpɛ

1 Mungwa ↓

na mabanga ↓ 6 Pɔtɔpɔtɔ oyo ngomba

․․․↓․․․․․․․․․․․․․․↓․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․ya mɔtɔ esanzaka․․

3 Mɔtɔ oyo eutaka 5 Matiti ya mikemike↓

MBU na bangomba ya nse oyo ebimaka na mbu

ya mbu ↓ ↓

↑ ↓ ↓

2 Esika mɔtɔ ya ↑ ↓ ↓

nse ya mbu eutaka ↑ ↓ ↓

․․․․․․․․․․↑․․․․․․․․․․․․↑․․․MABELÉ YA MBU․․․․↓․․ ․․․․․↓․․․․

↑ ↑ 7 ←← ESIKA OYO

BITENI YA MABELÉ

↑ MABELÉ YA MAKASI ←← EKUTANAKA

↑ ←←

․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․․

[Eutelo ya bililingi]

Euti na: © Science VU/Visuals Unlimited; éruption: REUTERS/Japan Coast Guard/Handout

Matiti ya mikemike: Dr. Neil Sullivan, USC/NOAA Corps; Fɔtɔ ya ngomba ya mɔtɔ: Dept. of Interior, National Park Service

[Etanda/​Etanda na lokasa 18]

Mungwa ya mai ya mbu

Atako bato ya mayele bayekoli mai ya mbu uta bambula mingi, bayebi naino te makambo na yango nyonso. Nzokande, balongi kokesenisa biloko ndenge na ndenge oyo ezwami na kati ya mungwa. Biloko yango, yango oyo:

[Etanda]

55% Chlore

30.6% Sodium

7.7% Sulfate

3.7% Magnesium

1.2% Calcium

1.1% Potassium

0.4% Bicarbonate

0.2% Brome

mpe biloko mosusu lokola borate, strontium, mpe fluor.

[Etanda/​Elilingi na lokasa 18]

Mungwa makasi koleka oyo ya mbu

Mai mosusu ezali na mungwa makasi koleka oyo ya mbu. Ndakisa ya liboso ezali Mbu Ekufá oyo ezali na mungwa makasi koleka mbu nyonso na mabelé. Mai oyo esopanaka na Mbu Ekufá oyo ezalaki kobengama Mai ya Monana, ememaka mungwa mpe biloko mosusu. (Mituya 34:​3, 12) Lokola bokula ya Mbu Ekufá ezalaka na nse mingi koleka bisika nyonso na mabelé, na eleko ya molunge, kaka londende nde ekoki kokitisa yango na milimɛtrɛ 25 ya nivo ya mbu mokolo na mokolo.

Na yango, mai ya Mbu Ekufá ezali na mungwa mbala soki zomi koleka mai ya Mbu ya Meditelane. Lokola mungwa ekómisaka mai kilo mingi, babɛti-mai bakoki kotepa likoló ya mai. Kutu, bakoki kolala na mokɔngɔ mpe kotánga zulunalo kozanga kozinda.

[Etanda na lokasa 18]

Mungwa epɛtolaka mopɛpɛ

Bato ya mayele balobi ete biloko oyo ebebisaka mopɛpɛ likoló ya mabelé epekisaka mbula ebɛta. Kasi, oyo ezalaka likoló ya mbu nde ebɛtisaka mbula. Yango ezali bongo mpamba te oyo ya mbu ezalaka mungwangwa.

Matanga ya mai oyo esanganaka na mopɛpɛ mabe ezalaka mikemike mpenza, yango wana enɔkisaka mbula te; etikalaka na mopɛpɛ na likoló. Mungwa oyo ezalaka na kati ya londende ebendaka matanga mikemike ya mai mpe ekómisaka yango matanga ya minene. Yango nde enɔkisaka mbula mpe epɛtolaka mopɛpɛ.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto