Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 10/06 nk. 19-21
  • Nakosala nini na bomoi na ngai?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nakosala nini na bomoi na ngai?
  • Lamuká!—2006
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • ‘Kanisáká malamu mpo na nzela oyo olingi kolanda’
  • ‘Kanisá Mozalisi na yo’
  • Lukáká lisalisi
  • Nakosala nini na bomoi na ngai?
    Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, Volimi 2
  • Tókanisaka basali ya ntango nyonso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
  • Bilenge​—Bokosala nini na bomoi na bino?
    Bilenge—Bokosala nini na bomoi na bino?
  • Yo mpe okoki komipesa?
    Mosala na biso ya Bokonzi—2001
Makambo mosusu
Lamuká!—2006
g 10/06 nk. 19-21

Mituna oyo bilenge batunaka . . .

Nakosala nini na bomoi na ngai?

“Liboso, nazalaki komitungisa te mpo na bomoi na ngai. Kasi, ntango nakómaki pene na kosilisa kelasi, namonaki ete nalingi kokɔta na bomoi ya solo, oyo ekosɛnga ngai moko nakóma komilukela.”​—⁠ Alex, elenge ya mbula 17.

NTANGO ozalaki naino mwana, bomoi ya ndenge nini ozalaki kokanisa ete okozala na yango ntango okokola? Ndenge nini omonaka makanisi yango lelo? Ozali nde komituna soki okobanda kobikela ndenge nini, lokola okómi mokóló? Soki ezali bongo, kokanisa te ete ozali yo moko. Buku moko (Career Coaching Your Kids) elobi boye: “Moko ya mikakatano ya minene oyo bilenge bakutanaka na yango ezali ya kopona mosala oyo bakosala na bomoi na bango.”

Epai mosusu, ekoki kozala ete obandi naino komituna te soki okosala nini na bomoi na yo. Mbala mosusu makanisi na yo nyonso ekendaka kaka na kosakana mpe kosepelisa nzoto. Koluka kosepelisa nzoto ezali mabe te, mpamba te Biblia ezali kosɛnga yo “osepela na bomoi ntango ozali naino elenge!” (Mosakoli 11:​9, Contemporary English Version) Nzokande, sikoyo nde ntango oyo ebongi mpo na kobanda kokanisa soki okosala nini na bomoi na yo. Masese 14:15 elobi boye: “Moto ya mayele akotala malamu na nzela ekokende ye.” Ndenge nini okoki kotala nzela na yo?

‘Kanisáká malamu mpo na nzela oyo olingi kolanda’

Kanisá ete olingi kokende na mboka moko ya mosika. Na ntembe te okoluka liboso koyeba nzela oyo eleki malamu. Ezali se ndenge moko ntango ozali kotalela bomoi na yo. Michael, elenge mobali moko oyo azali kosala na biro ya filiale moko ya Batatoli ya Yehova, alobi boye: “Makambo ya kopona ezalaka ebele.” Lokola makambo ya kopona ezalaka ebele, ndenge nini okoki koyeba oyo ya malamu? Michael abakisi boye: “Mikano na yo nde ekosalisa yo.”

Talelá mokano na yo lokola mboka oyo olingi kokende. Okokóma na mboka yango te soki obandi kaka koyengayenga. Ekozala malamu oluka naino koyeba nzela ya mboka yango. Soki osali bongo, okolanda mpenza toli ya Masese 4:​26: “Kebá mpo na nzela ya makolo na yo.” Bible na lingala ya lelo oyo elobi na vɛrsɛ yango boye: “Kanisaka malamu po na nzela oyo olingi kolanda.”

Lobilobi, ekosɛnga ozwa bikateli na makambo lokola losambo, mosala, libala, kobota mpe bongo na bongo. Okozala na mokakatano ya kopona te soki oyebi epai ozali kokende. Mpe ntango ozali kopona bomoi oyo olingi kolanda, ezali na likambo moko oyo osengeli kobosana te.

‘Kanisá Mozalisi na yo’

Soki olingi mpenza kozala na esengo, osengeli kolanda maloba ya Mokonzi Salomo oyo: “Kanisa mozalisi wa yo ntango ozali naino elenge.” (Mosakoli 12:​1, Liloba lya Nzambe) Ntango ozali kopona banzela oyo okolanda na bomoi na yo, osengeli koluka kosepelisa Nzambe.

Mpo na nini yango ezali na ntina? Biblia elobi na Emoniseli 4:​11 boye: “Yehova, ɛɛ Nzambe na biso, obongi kozwa nkembo mpe lokumu mpe nguya, mpamba te yo ozalisaki biloko nyonso, mpe mpo na mokano na yo yango ezalaki mpe ezalisamaki.” Ɛɛ, bikelamu nyonso, na likoló mpe awa na mabelé esengeli kotɔnda Mozalisi. Otɔndaka ye na ndenge apesá yo “bomoi mpe mpema mpe biloko nyonso”? (Misala 17:​25) Mpo na nyonso wana, omonaka te ete osengeli kotɔnda ye?

Lokola bakanisaka Mozalisi na bango, bilenge mingi na kati ya Batatoli ya Yehova bamipesá na mosala ya mobongisi-nzela. Mpo na koloba solo, kopona mosala ya mobongisi-nzela ezali mokano oyo eleki malamu, mpe ezali na matomba beboo. (Malaki 3:​10) Kasi, ekosɛnga okanisa malamu liboso. Na ndakisa, okoki komituna boye: ‘Makoki nini nazali na yango oyo ekosalisa ngai nakokisaka bamposa na ngai ntango nazali kosala mosala ya mobongisi-nzela?’

Banda bomwana, Kelly, oyo azali sikoyo na mbula 27, azalaki kaka na mokano moko: kokóma mobongisi-nzela. Ntango akómaki na mbula soki 18 to 19, abandaki koluka mosala oyo akosala na bomoi na ye. Alobi boye: “Nasengelaki kopona mosala oyo ekobanda kosunga ngai na mosala ya mobongisi-nzela.”

Kelly ayekolaki mosala ya monganga ya mino. Alongaki kutu na momekano ya Leta. Atako bongo, abosanaki te mokano na ye ya libosoliboso. Alobi boye: “Mokano na ngai ezalaki ya kozala mobongisi-nzela. Makambo mosusu nyonso ezalaki na nsima.” Kelly azali mobongisi-nzela tii lelo oyo. Alobi boye: “Namonaka ete nazwaki ekateli ya malamu koleka.”

Lukáká lisalisi

Soki ozali kokende na esika oyo okómá naino te, ata soki bayebisaki yo nzela oyo osengeli kolanda, na ntembe te soki okómi na esika mosusu okotuna kaka bálakisa yo nzela. Ezali se ndenge moko ntango ozali kotalela bomoi na yo. Tuná makanisi ya bato mosusu. Masese 20:⁠18 elobi boye: “Myango nyonso mikokokisama na toli.” Baboti na yo bakoki mpenza kosalisa yo. Okoki mpe kosolola na baklisto oyo bakɔmɛlá na elimo, oyo bomoi na bango ezali komonisa bwanya ya Nzambe. Roberto alobi boye: “Sololá na mikólo oyo bazali bandakisa ya malamu na lisangá na bino to ya masangá mosusu oyo ezali mosika te na bino. Bakoki koyebisa yo makambo mosusu oyo ozalaki ata kokanisa te.”

Koleka bato nyonso, Yehova Nzambe azali na mposa ya kosalisa yo opona bomoi ya malamu koleka. Na yango, sɛngá ye asalisa yo ‘okoba kososola soki mokano na ye ezali nini’ mpo na bomoi na yo. (Baefese 5:​17) Soki omitiki na mabɔkɔ ya Yehova na motema na yo mobimba, “ye akotambolisa yo.”​—⁠Masese 3:⁠5, 6.

Okoki kokuta masolo mosusu ya “Mituna oyo bilenge batunaka . . .” na Internet, na esika oyo: www.watchtower.org/ypf

MAKAMBO OYO OSENGELI KOTALELA

◼ Makoki nini ozali na yango?

◼ Okoki kosalela makoki yango mpo na kopesa Yehova nkembo?

◼ Wapi lolenge ya mosala ya ntango nyonso oyo osepeli na yango na kati ya oyo batángi na lisolo oyo?

[Etanda na lokasa 19]

NZELA YA MABE

Biblia elobi boye: “Baoyo balingaka kaka kozala bato ya bomɛngo bakweaka na kati ya komekama mpe na motambo mpe na bamposa mingi ya bozoba mpe oyo eyokisaka mpasi, oyo ezindisaka bato na kati ya libebi mpe na likama.” Nzela ya bomengo etondi na mabulu! Nsukansuka, ekómaka nzela ya mabe, oyo ekomema yo na banyongo, mitungisi mpe ata koboma yo na elimo.​—⁠1 Timote 6:⁠9, 10.

[Etanda/Bililingi na lokasa 20]

MOBONGISI-NZELA YA SANZA NA SANZA

Ezali moklisto oyo azali na etamboli malamu mpe amibongisi mpo na kolekisaka ngonga 70 to koleka sanza na sanza na mosala ya kosakola. Mateya oyo babongisi-nzela bazwaka mpe ndenge babimaka mingi na mosala ya kosakola esalisaka bango bákóma bateyi ya malamu mpenza.

MOSALA YA BETELE

Bandeko ya Betele basalaka na babiro ya filiale ya Batatoli ya Yehova, epai bapesaka mabɔkɔ mpo na kobongisa, kobimisa mpe kotindela bandeko ya masangá mikanda. Misala nyonso na Betele ezali bulɛɛ.

KOKENDE KOSALA EPAI BAZALI NA MPOSA MAKASI YA BASAKOLI

Babongisi-nzela mosusu bakendaka kosala epai bazali na mposa makasi ya basakoli ya Bokonzi. Bamosusu bayekolaka minɔkɔ mosusu mpe bakendaka na mboka mopaya to na masangá oyo esalelaka minɔkɔ yango mpo na kosakola kuna.

BASALI YA BOLINGO MALAMU NA MBOKA MOPAYA

Basali ya bolingo malamu na mosala ya botongi bakendaka na mikili mosusu mpo na kopesa mabɔkɔ na kotonga Bandako ya Bokonzi mpe babiro ya filiale. Mosala wana ya bulɛɛ ekokani na oyo ya bato oyo batongaki tempelo ya Salomo.​—⁠1 Mikonzi 8:​13-​18.

ETEYELO MPO NA KOBONGISA BASUNGI

Bankulutu mpe basaleli na misala ya makoki, oyo babalá te, balandaka mateya na boumeli ya pɔsɔ mwambe mpo na koyeba kotambwisa masangá mpe kokólisa makoki ya koloba liboso ya bato mingi. Bandeko mosusu oyo bazwaka mateya yango basalaka kaka na bikólo na bango, kasi bamosusu bakendaka kosala na mboka mopaya.

MOSALA YA MISIONƐRƐ

Babongisi-nzela ya makoki, oyo bazali nzoto kolɔngɔnɔ mpe makasi, bazwaka mateya mpo na kokende kosakola na mboka mopaya. Kozala misionɛrɛ ezali bomoi moko ya malamu mpe ya esengo.

[Etanda/Elilingi na lokasa 20]

NAKOSALA NINI NA BOMOI NA NGAI?

Filme yango, oyo esalemi na Batatoli ya Yehova, elobeli masolo ya kitoko mpenza oyo basololaki na bilenge ya Allemagne, ya Angleterre, ya Brésil mpe ya États-Unis. Mosika te, ekobima na minɔkɔ mwa mingi.

[Elilingi na lokasa 19]

“Mikano na yo nde ekosalisa yo.” ​— Michael, ndeko moko

ya Betele

[Elilingi na lokasa 20]

“Nazwaki ekateli moko ya malamu koleka.”​—⁠ Kelly, oyo azali mobongisi-nzela banda mbula motoba

[Elilingi na lokasa 21]

“Sololá na bandeko oyo bazali bandakisa malamu.”​—⁠ Roberto, ndeko moko ya Betele

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto