Kozongisa bato makila ekoumela lisusu?
“Kozongisa moto makila ekozala kaka lokola kotambola na zamba ya monene, epai nzela oyo bato balekaka eyebani malamu, kasi esengeli kozala ntango nyonso ekɛngɛ, likama ekoki kobima ata na esika nini mpe ekoki kozwa moto nyonso oyo azali kotambola ngulungulu.”—Ian Franklin, molakisi oyo ateyaka ndenge ya kozongisa makila.
NA BAMBULA ya 1980, ntango minganga bayebaki ete sida, maladi oyo ezali koboma bato na mokili mobimba, ezali kopalangana mpe na nzela ya makila, babakisaki milende mpo na kotala malamumalamu makila liboso bázongisa yango epai ya moto. Atako bongo, mikakatano ya minene ezali kaka. Na sanza ya Yuni 2005, ebongiseli ya ONU mpo na bokolɔngɔnɔ ya nzoto (OMS) eyebisaki boye: “Likoki ya kozongisama makila ya malamu . . . ezali ndenge moko te na mikili ndenge na ndenge.” Mpo na nini?
Na mikili mingi, ezali na ebongiseli moko te to mpe mibeko na ndenge ya kobenda makila, kosala yango ekzame, komema to mpe kobomba yango mpo na kobatela bato na makama na yango. Kutu, ntango mosusu bazali kobomba makila na bisika oyo ekoki kozwa mikrobe, na ndakisa na bafrigo ya ndako mpe na mwa basanduku oyo batyaka biloko mpo ebomba malili! Lokola mibeko ezali te, moto akoki kozwa mikrobe ata na makila ya moto oyo afandaka mosika mpenza.
Mokakatano mpo na kozwa makila ya malamu
Na bikólo mosusu, minganga bazali koloba ete bandimisami mpenza ete makila oyo bazali kozongisa bato ezali ya malamu. Kasi, esengeli kaka kofungola miso. Na États-Unis, bibongiseli misato oyo ekɔngɔlaka mpe ebombaka makila ekabolaki mokanda moko oyo elobaki boye: “LIKEBISI: Lokola makila mpe biloko ndenge na ndenge oyo babendaka na makila euti na nzoto ya moto, ekoki kozala na biloko oyo ememaka maladi, na ndakisa bavirisi. . . . Kopona malamu moto oyo akopesa makila mpe kosala makila yango baekzame, ekoki kolongola makama nyonso te.”
Ntina wana, Peter Carolan, mokonzi moko ya ebongiseli ya Croix Rouge, alobaki boye: “Tokoki te kondimisama mpenzampenza ete makila moko ezali na mikrobe ata moke te.” Abakisaki boye: “Ekozala ntango nyonso na bamikrobe oyo lelo oyo tozali naino na bamasini te mpo na komona yango.”
Bongo soki mikrobe mosusu ebimi lokola mikrobe ya sida oyo, ntango eyebani naino te, ezali kopalangana mpe bato mosusu bazwi yango na makila oyo bazongisi bango? Na likita moko ya minganga oyo esalemaki na sanza ya Aprili 2005, na engumba Prague, na République tchèque, Doktɛrɛ Harvey Klein, ya ebongiseli ya États-Unis mpo na bokolɔngɔnɔ ya nzoto alobaki ete likambo yango esengeli kotinda biso tókanisa malamu. Abakisaki boye: “Nandimi te ete na balaboratware epai bazali kolekisa makila na bamasini mpo na kokabola biloko na yango ndenge na ndenge bakozala na makoki ya kosala likambo oyo basalaki te ntango mikrobe ya sida ebimaki, elingi koloba komona na ntango malamu mikrobe oyo ekoki kozwa ebele ya bato na nzela ya makila mpe kopekisa yango epalangana.”
Mabunga ya minganga mpe ndenge nzoto esalaka nsima ya kozongisama makila
Na mikili ya bozwi, wapi makama oyo eleki minene na ntango bazali kozongisa moto makila? Ezali mabunga oyo minganga basalaka mpe ndenge oyo ntango mosusu nzoto eyokanaka te na makila oyo batye yango. Zulunalo moko (Globe and Mail) elobaki ete na ankɛtɛ moko oyo esalemaki na Canada na mobu 2001, bamonaki ete bankóto ya bato balingaki kokufa mpo minganga basalaki mabunga ndenge na ndenge, na ndakisa “ntango balingi kosala moto ya maladi ekzamɛ ya makila, babendaki makila epai ya moto mosusu, to babambaki likoló ya sashɛ ya makila papye oyo ezalaki na makambo oyo basengelaki kotya na sashɛ mosusu, to mpe ntango basɛngi makila, bazongisaki yango moto mosusu.” Na États-Unis, mabunga ya ndenge wana ebomaki bato soki 441 kobanda 1995 tii 2001.
Nzoto ya moto oyo bazongisi ye makila oyo euti epai ya moto mosusu ekoki koboya makila yango ndenge nzoto mosusu eboyaka enama moko oyo euti na nzoto ya moto mosusu. Lokola nzoto ya moto esalemá na likoki ya komibatela, ntango mosusu ekoki koboya enama oyo balingi kotya yango, oyo euti na nzoto ya moto mosusu. Bato mosusu soki bazongisi bango makila, biloko oyo ebundisaka mikrobe na kati ya nzoto ekoki kobeba. Likambo wana esalaka ete nsima ya lipaso, bato ya ndenge wana bábɛla bamaladi mpo na mikrobe oyo efandaki na nzoto kasi ezalaki kosala mabe moko te. Yango wana, Profesɛrɛ Ian Franklin, oyo totángaki maloba na ye na ebandeli, alendisi minganga “bákanisaka malamumalamu liboso ya kozongisa moto makila.”
Makanisi ya minganga
Sikoyo, lokola minganga bayebi makambo nyonso oyo touti kolobela, mingi na bango bazali kosepela mpenza te kozongisa bato makila. Buku moko ya minganga (Dailey’s Notes on Blood) elobi boye: “Minganga mosusu balobi ete makila oyo euti na nzoto ya moto mosusu ezali nkisi oyo ekoki kobimisa makama mpe bakopekisa yango soki balandeli yango mpenza ndenge balandelaka nkisi mosusu.”
Na mobu 2004, Bruce Spiess, molakisi ya mosala ya monganga na iniversite, alobaki boye mpo na likambo etali kozongisa bato oyo bazali kosala bango lipaso ya motema biloko oyo euti na makila: “Mikanda mingi te [ya minganga], mbala mosusu mpe ata moko te, elobi ete kozongisa makila esalisaka moto ya maladi akóma malamu.” Kutu, akomaki ete mbala mingi kozongisa moto biloko wana “ekoki kosala mabe mingi na esika esala malamu mpo na maladi nyonso, longola kaka epai ya moto oyo azali kobima makila mingi”; likambo wana ebakisaka “likama ya kozwa maladi ya mpema, ya kozwa mikrobe, kokangama motema mpe kobɛla maladi ya paralize.”
Bato mingi bakamwaka na koyoka ete ndenge oyo minganga basalaka mpo na kozongisa makila ezali ndenge moko te na bisika nyonso. Eleki naino mikolo mingi te, Gabriel Pedraza, monganga moko ya Chili, ayebisaki baninga na ye ete “momeseno ya kozongisa makila elimbolamaka malamu te,” mpe ezalaka “mokakatano mpo na . . . kosalela mitinda oyo minganga nyonso bandimaka.” Yango wana, Brian McClelland, mokambi ya biro ya ebongiseli oyo etalelaka makambo ya kozongisa makila na ekólo Écosse, asɛngaki minganga “bábosanaka te ete kozongisa makila ezali lokola kotya moto enama mosusu mpe ete basengeli kokanisa malamu liboso ya kozwa ekateli yango.” Apesaki minganga likanisi ete bámitunaka liboso motuna oyo, “Soki ezalaki ngai moko to mwana na ngai, nalingaki kondima bázongisa makila?”
Minganga mingi bazali kokanisa lokola monganga oyo alobaki na mokomi moko ya Lamuká! boye: “Biso minganga oyo tozongisaka bato makila tolingaka te bázongisa biso moko makila to bábenda biso makila mpo bázongisa moto mosusu.” Soki minganga bazali kokanisa bongo, ndenge nini bato ya maladi basengeli kotalela likambo yango?
Minganga bakotika kozongisa makila?
Nsima ya kotánga nyonso oyo tolobi, mbala mosusu okomituna ete, ‘Soki kozongisa moto makila ezali na ebele ya makama boye, mpo na nini batikaka te likambo ya kozongisa bato makila, mingimingi lokola bazali na likoki ya kosalela mayele mosusu?’ Ntina moko ezali ete minganga mingi balingaka mpenza te kobongola ndenge na bango ya kosalisa bato mpe bayebaka te mayele oyo bamosusu bazali kosalela na esika ya kozongisa bato makila. Lisolo ya zulunalo moko ya minganga (Transfusion), elobaki ete “minganga bazwaka ekateli ya kozongisa makila mpo yango nde mayele bayekolá na kelasi, ekómá momeseno na bango, mpe yango nde likanisi ya liboso oyo eyelaka bango na motó ntango kaka batali moto ya maladi.”
Likambo mosusu ya ntina mingi ezali mpe mayele ya monganga oyo azali kosala lipaso. Beverley Hunt, monganga na lopitalo moko ya Londres, na Angleterre, akomi ete “ndenge oyo minganga mosusu basalaka lipaso esalaka ete moto abimisa makila mingi; kasi ezalaka bongo te epai ya minganga mosusu, mpe ekómi komonana ete ezali na ntina mingi kolakisa minganga oyo basalaka lipaso mayele oyo basengeli kosalela mpo moto abima makila mingi te.” Bato mosusu balobaka ete mayele oyo bakoki kosalela na esika ya kozongisa makila esɛngaka mbongo mingi; kasi balapolo ezali komonisa ete ezali bongo te. Kutu, minganga mingi bazali na likanisi moko na Doktɛrɛ Michael Rose, oyo alobaki boye: “Moto ya maladi oyo basali ye lipaso kozanga kozongisa ye makila, ye nde azwi lisalisi oyo eleki malamu.”a
Okolinga ete yo mpe ozwa lisalisi ya monganga oyo eleki malamu, boye te? Soki boye, makanisi na yo eyokani na oyo ya bato oyo batikelaki yo zulunalo oyo. Tozali kolendisa yo otánga masolo oyo elandi mpo na koyeba ndenge oyo batalelaka likambo ya kozongisama makila.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá etanda “Mayele mosusu na esika ya kozongisa makila,” na lokasa 8.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 6]
‘Kanisá malamumalamu liboso ya kozongisa moto makila.’—Ian Franklin, molakisi na iniversite
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 6]
“Soki ezalaki ngai moko to mwana na ngai, nalingaki kondima bázongisa makila?”—Brian McClelland
[Etanda/Elilingi na lokasa 7]
TRALI ezali koboma bato mingi
Na ebandeli ya bambula ya 1990, minganga bamonaki ete bato mosusu, soki bazongisi bango makila, mimpululu na bango ebebaka makasi na ndenge oyo ekoki koboma bango; minganga babengaka likambo yango TRALI. Lelo oyo, eyebani ete mbula na mbula, maladi yango ezali koboma bankama ya bato. Kasi, minganga bazali kokanisa ete bato oyo bazali kokufa mpo na yango bazali mingi koleka, mpamba te mafulume mingi bayebi te bilembo oyo emonisaka ete moto azali na maladi yango. Atako eyebani mpenza te mpo na nini nzoto ya bato mosusu esalaka ndenge wana, zulunalo moko (New Scientist) elobaki ete emonani ete makila oyo epesaka maladi yango “eutaka mingimingi epai ya bato oyo bazongisaki bango makila ya bato ndenge na ndenge, na ndakisa . . . bato oyo bazongisaki bango makila mbala mingi.” Lapolo moko elobi ete na États-Unis mpe na Angleterre, TRALI ezali maladi oyo ezali koboma bato mingi oyo bazongisi bango makila, mpe ezali “mokakatano monene mpo na bakambi ya bisika oyo babombaka makila, koleka kutu bamaladi oyo eyebani mingi, na ndakisa sida.”
[Etanda na lokasa 8, 9]
Biloko oyo ezalaka na kati ya makila
Mbala mingi, ntango moto apesi makila mpo bázongisa yango epai ya moto mosusu, makila yango ezalaka mobimba, elingi koloba na biloko na yango nyonso. Nzokande, na bisika mosusu, ntango babendi makila, bakozwa kaka plasma. Atako na mikili mosusu bazongisaka makila mobimba, minganga mingi bakabolaka biloko minei oyo ezalaka na kati ya makila mpe na nsima batalaka soki ezali na mikrobe to te liboso bázongisa yango na nzoto ya moto mosusu. Tólobela naino biloko yango minei ya minene oyo ezalaka na kati ya makila, mosala oyo mokomoko na yango esalaka, mpe soki ezalaka mingi ndenge nini na kati ya makila.
PLASMA yango nde eloko eleki mingi na kati ya makila (52-62%). Ezali mai ya mwa motane oyo ezali na baselile ya makila, baproteini mpe biloko mosusu mikemike mpe etambolaka kati na yango.
Na kati ya plasma tokokuta mai (91,5%), baproteini (7%); na kati ya baproteini tokokuta albimine (4%), globiline (3%) mpe fibrinogene (na nse ya 1%). Longolá yango, na kati ya plasma, tokokuta mpe biloko mosusu ya mikemike na ndakisa, bavitamini, bagaze mpe bongo na bongo (1,5%).
GLOBULES BLANCS yango ezalaka moke mpenza (na nse ya 1%). Yango nde ebundisaka mikrobe oyo ekoki kopesa nzoto maladi.
PLAQUETTES yango mpe ezalaka moke mpenza na kati ya makila (na nse ya 1%). Yango nde esalaka ete ntango moto azoki mpota, mwa moke na nsima, makila ekangama mpe etika kotanga.
GLOBULES ROUGES yango ezalaka mwa mingi na kati ya makila (38-48%). Baselile yango ememaka oxygène na kati ya binama nyonso ya nzoto mpo ekufa te mpe ebimisaka gaze ya mabe oyo babengi gaz carbonique.
Se ndenge bakoki kokabola biloko ndenge na ndenge oyo ezalaka na kati ya plasma, bakoki mpe kosala bongo na biloko mosusu ya ntina oyo ezalaka na kati ya makila. Na ndakisa, hémoglobine ezali moko ya biloko mikemike oyo ezalaka na kati ya globule rouge.
[Etanda]
PLASMA
MAI 91,5%
PROTEINI 7%
ALBIMINE
GLOBILINE
FIBRINOGENE
BILOKO MOSUSU 1,5%
BILOKO OYO ETONGAKA NZOTO
HORMONES
BAGAZE
ELEKTROLITE
BAVITAMINI
BOSƆTƆ
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Lokasa 9: Bililingi ya biloko oyo ezalaka na kati ya makila: This project has been funded in whole or in part with federal funds from the National Cancer Institute, National Institutes of Health, under contract N01-CO-12400. The content of this publication does not necessarily reflect the views or policies of the Department of Health and Human Services, nor does mention of trade names, commercial products, or organizations imply endorsement by the U.S. Government
[Etanda/Elilingi na lokasa 8, 9]
Mayele mosusu na esika ya kozongisa makila
Ekoki sikoyo mbula motoba, bandeko ya bakomite mpo na boyokani na minganga (comités de liaison hospitaliers) bazali kopesa minganga ná basali mosusu ya balopitalo kasɛti-video moko oyo ezali na motó ya likambo Stratégies alternatives à la transfusion: simples, sûres, efficaces; lelo oyo, basili kokabola bankóto ya bakasɛti-video yango na minɔkɔ soki 25.b Na kasɛti-video yango, minganga minene na mokili bazali kolimbola mayele ndenge na ndenge oyo bazali kosalela mpo na kosalisa bato ya maladi kozanga ete bázongisa bango makila. Yango ebendi likebi ya bato mingi. Na ndakisa, nsima ya kotala kasɛti-video yango na nsuka ya 2001, biro monene ya makambo ya makila na ekólo Angleterre etindaki mokanda moko ná kasɛti-video yango epai ya bakambi ya bisika nyonso ya kobomba makila mpe minganga nyonso oyo bayekolá makambo ya makila. Balendisaki bango bátala kasɛti-video yango mpamba te bato mingi “bakómi kondima ete moko ya mikano oyo minganga basengeli komityela mpo na kosalisa bato malamu ezali ya koboya kozongisa makila mbala nyonso oyo likoki ezali.” Mokanda yango elobaki ete “likanisi [ya kasɛti yango] ezali malamu mingi mpe ezali yango nde biro ya makambo ya makila ezali kolendisa mpenza.”
[Maloba na nse ya lokasa]
b Sololá na Motatoli ya Yehova mpo na kotala DVD Des alternatives à la transfusion—Documentaires, ebimisami na Batatoli ya Yehova.
[Etanda/Elilingi na lokasa 9]
Fractionnement—Mayele ya kosalela biloko mikemike oyo euti na makila
Lelo oyo, minganga bazali na likoki ya komona biloko mikemike oyo ezalaka na kati ya makila mpe kokabola yango moko na mosusu. Ndakisa oyo ekoki kosalisa biso tókanga ntina ya likambo yango: Mai ya mbu ezalaka kaka mai mpamba te, ezalaka na biloko mingi. Na kati ya biloko yango mai nde elekaka mingi (96,5%); nzokande, bakoki kozwa biloko mosusu na kati, na ndakisa magnésium, brome, mpe mungwa. Ezali mpe bongo mpo na plasma, eloko oyo eleki mingi na kati ya makila. Plasma yango moko ezali mingimingi na mai (90%); kasi na kati na yango bakoki mpe kobimisa biloko mosusu ya mikemike, na ndakisa baproteini ndenge na ndenge lokola albimine, fibrinogene, mpe globiline ndenge na ndenge.
Monganga akoki kopesa moto ya maladi nkisi oyo ezali nde biloko oyo babendi na kati ya plasma. Moko na biloko yango ezali cryoprécipité, oyo ezalaka na vitamini mingi. Mpo na kozwa yango, batyaka plasma na esika ya malili makasi mpo ekóma ngalasi, mpe na nsima, babimisaka yango mpo ngalasi esila mpe ezonga maimai. Eteni wana ya plasma oyo esanganaka na mai te ezalaka na biloko mingi oyo ekangaka makila mpe bapesaka yango moto oyo azali kobima makila mpo ekangama. Mayele mosusu oyo bazali kosalela ezali nkisi oyo babakisi biloko oyo ezalaka na makila; biloko yango ekoki kozala moke to mingi.c Basalelaka baproteini mosusu ya plasma na bankisi ya ntonga mpo nzoto ebakisa makasi ya kobundisa mikrobe. Biloko euti na makila oyo minganga bazali kosalela mingimingi ezali baproteini oyo babendaka na plasma.
Zulunalo moko (Science News) eyebisi ete “lelo oyo, bato ya siansi bayebi kaka mwa bankama ya baproteini oyo ezali na makila ya moto; nzokande, baproteini yango ekoki kozala bankóto.” Lokola bazali ntango nyonso koyekola makila mpe mayele ezali kobakisama, ekoki kozala ete na mikolo ekoya bakosala bankisi mosusu na baproteini yango ya makila.
[Maloba na nse ya lokasa]
c Na bankisi mosusu, bazali mpe kobakisa biloko mosusu oyo babendi na makila ya banyama.
[Elilingi na lokasa 7]
Minganga bakebaka mingi ete makila ezwa bango na nzoto te