Motuya ya solosolo ya makila
“Makila etambolaka na nzoto ya moto nyonso mpe ezali eloko ya ntina mingi mpo na bomoi. Makila ebatelaka bomoi ya moto nyonso, azala mondɛlɛ to moindo, to mpe azala moto ya lingomba nini.”—Prezida ya Likita monene ya ONU.
TOKOKI koloba ete moto yango akosi te. Makila ezali na ntina mingi mpo na bomoi ya moto nyonso. Ezali eloko ya motuya mingi. Kasi, yo mpe okanisaka ete kobenda makila na nzoto ya moto moko mpo na kotya yango na nzoto ya moto mosusu ezali malamu mpe ezali na makama te?
Ndenge masolo eleki emonisi yango, balopitalo ya mikili mosusu ezali na ebongiseli mpe mibeko ya malamu, kasi ezali bongo te na mikili to bisika mosusu, mpe bato mingi bayebaka te ete kozongisa makila ezali na makama mingi. Longola yango, minganga nyonso basalelaka makila ndenge moko te; mokomoko asalaka makambo na ndenge oyo ayekolá, na kotalela mayele na ye ya mosala, mpe na ndenge oyo atalelaka makila. Kasi, minganga mingi bakómi kokakatana mpo na kozongisa bato makila. Mingi bakómi kosepela kosalela mayele mosusu na esika ya kozongisa makila.
Likambo yango etindi biso tózongela motuna oyo totunaki na ebandeli ya lisolo ya liboso. Mpo na nini makila ezali na motuya mingi? Lokola minganga mingi bakómi kokakatana mpo na kozongisa makila, ezali nde na likambo mosusu ya ntina oyo makila ekokisaka?
Ndenge oyo Mozalisi atalelaka makila
Nzambe apesaki mobeko moko na ntango ya Noa, nkɔkɔ ya bato nyonso. Ntango apesaki bato ndingisa ya kolyaka nyama, apekisaki bango kolya makila. (Genese 9:4) Ayebisaki bango mpe ntina ya mobeko yango; alobaki ete makila ezali molimo to bomoi ya ekelamu. Na nsima alobaki boye: “Bomoi ezali na kati ya makila.” Na miso ya Mozalisi, makila ezali eloko ya bosantu. Makila emonisaka bomoi, likabo ya motuya mingi oyo ekelamu mokomoko azali na yango. Nzambe azongelaki etinda yango mbala na mbala.—Levitike 3:17; 17:10, 11, 14; Deteronome 12:16, 23.
Ntango lisangá ya boklisto esalemaki, eleki sikoyo mbula soki 2 000, mwa moke na nsima baklisto bazwaki mobeko ete “báboya . . . makila.” Mobeko yango ezalaki te mpo na kobatela bango na maladi, kasi mpo ete makila ezali eloko ya bosantu. (Misala 15:19, 20, 29) Bato mosusu balobaka ete mobeko wana epekisaki kaka kolya makila; kasi, soki ezali bongo elingaki koloba te ete “báboya” makila. Tópesa ndakisa moko: soki monganga apekisi yo masanga, okanisi ete ekozala mabe te soki omitɔbɔli ntonga na misisa mpo okɔtisa masanga na nzoto?
Biblia elobeli mpe likambo mosusu oyo ezali komonisa mpo na nini makila ezali eloko ya bosantu. Makila ya Yesu Klisto, oyo ezali komonisa bomoi na ye oyo apesaki mpo na kobikisa bato, ezali eloko esimbi elikya ya baklisto. Na nzela na yango, Nzambe akoki kolimbisa masumu ya bato mpe bakoki kozwa elikya ya bomoi ya seko. Ntango moklisto aboyi makila, azali mpenza komonisa ete andimi ete kaka makila ya Yesu Klisto nde ekoki kosikola ye mpe kobikisa bomoi na ye.—Baefese 1:7.
Batatoli ya Yehova bayebani na mokili mobimba ete batosaka mitinda yango ya Biblia na ntina na makila. Bandimaka te bázongisa bango makila to biloko mosusu oyo ezalaka na kati ya makila lokola globule rouge, plasma, globule blanc, mpe plaquette. Biblia elobi likambo moko te mpo na biloko mosusu mikemike oyo ekoki kouta na biloko wana minei mpe bankisi oyo babakisi biloko wana. Yango wana, Motatoli mokomoko azwaka ekateli ya kondima to koboya yango. Kasi, lokola Batatoli baboyaka bázongisa bango makila, yango elingi nde koloba ete baboyaka nkisi nyonso ya monganga to mpe bamonaka ete bokolɔngɔnɔ ya nzoto mpe bomoi ezali na ntina te? Soki moke te!—Talá etanda “Batatoli ya Yehova mpe bokolɔngɔnɔ ya nzoto.”
Banda mwa bambula, minganga mingi bazali koloba ete Batatoli bazwi matomba mingi ndenge bazali kotosa mobeko wana ya Nzambe. Na ndakisa, monganga moko oyo asalaka lipaso ya bɔɔngɔ amonaki ete eleki malamu kosalela mayele mosusu na esika ya kozongisa makila. Alobaki boye: “Yango ezali likambo eleki malamu, kaka mpo na Batatoli ya Yehova te, kasi mpo na bato nyonso.”
Kozwa ekateli monene mpo na kolɔngɔnɔ ya nzoto ekoki kozala mokakatano mpe ezalaka pɛtɛɛ te. Mpo na likambo etali kozongisa makila, Dave Williams, monganga ya maladi ya mimpululu, oyo azali mpe mokambi ya lopitalo moko, alobaki boye: “Ezali na ntina mingi tótosa mposa ya moto na moto, . . . mpe tosengeli mpenza kokeba na biloko oyo tozali kokɔtisa na nzoto na biso.” Toli yango ebongi mpenza mpo na mikolo na biso koleka na eleko mosusu nyonso.
[Etanda/Bililingi na lokasa 11]
Bankisi oyo esalisaka makila emema oxygène na nzoto
Na kati ya selile mokomoko ya makila oyo babengi globule rouge ezali na bamolekile ya hémoglobine soki milio 300. Hémoglobine ezwaka mwa eteni mingi (1/3) ya globule rouge mobimba oyo ekɔmeli. Hémoglobine mokomoko ezalaka na proteini na yango ná eteni mosusu oyo babengi hème oyo ezalaka na atome moko ya fer. Ntango makila oyo ezali kotambola na kati ya nzoto eleki na mimpululu, oxygène oyo moto abendaka ntango azali kopema ekɔtaka na globule rouge mokomoko mpe esanganaka na bamolekile ya hémoglobine. Nsima ya mwa basegɔnde, hémoglobine etikaka oxygène yango na nzoto mobimba mpe na bongo, ebatelaka bomoi ya baselile ya nzoto.
Lelo oyo, na bisika oyo basalaka bankisi, bakómi na likoki ya kobenda hémoglobine oyo ezali na kati ya globule rouge ya makila ya moto to ya ngɔmbɛ. Ntango babendi yango, bazali kolekisa yango na bamasini oyo ezali kolongola yango bosɔtɔ nyonso, kobakisa yango biloko mosusu, kopɛtola yango, kosangisa yango na biloko mosusu, mpe nsukansuka kotya yango na basashɛ. Nkisi yango (oyo endimami naino te na bikólo mingi) ekoki kosalisa mpo na komema oxygène na nzoto. Lokola eteni ya hémoglobine oyo babengi hème nde epesaka makila langi ya motane, sashɛ ya nkisi wana emonanaka na miso lokola kaka sashɛ ya makila to ya globule rouge.
Globule rouge ebombamaka kaka na esika ya malili mpe ebebaka nsima ya mwa bapɔsɔ; nzokande, bakoki kobomba nkisi wana ata na armware ya ndako mpe kosalela yango ata nsima ya basanza mingi. Lisusu, lokola kopɛtola globule rouge mpe kosangisa yango na biloko mosusu elongolaka mposo na yango, soki bazongisi moto nkisi yango, nzoto na ye eboyaka yango te, ata soki azali na motindo nini ya makila (groupe sanguin). Atako bongo, lokola baklisto balingaka kotosa mobeko ya Nzambe mpo na makila, mingi bakakatanaka mpo na kondima nkisi yango oyo ememaka oxygène. Mpo na nini? Lokola basalaka nkisi yango na biloko oyo babendi na makila, ezali na makambo mibale oyo etungisaka lisosoli ya baklisto. Ya liboso, nkisi yango esalaka mosala ya libosoliboso oyo globule rouge esalaka. Ya mibale, nkisi yango ezalaka na hémoglobine mingi na kati. Yango wana, ntango monganga akomeli ye nkisi yango to nkisi mosusu ya ndenge wana, moklisto asengeli kokanisa malamumalamu liboso ya kozwa ekateli. Asengeli komanyola etinda ya Biblia oyo elobi ete makila ezali eloko ya bosantu mpe kobondela Yehova apesa ye mayele. Moklisto oyo azali mpenza na mposa ya kozala na boyokani malamu na Yehova, asengeli koyoka lisosoli na ye oyo eteyami na Biblia mpo na kozwa ekateli.—Bagalatia 6:5.
[Elilingi]
HÉMOGLOBINE
[Etanda/Elilingi na lokasa 12]
Mayele oyo ekómi kosepelisa bato mingi
Zulunalo moko (The Wall Street Journal) elobi ete “na balopitalo mingi, minganga bango moko bakómi kosɛnga kosala bato lipaso kozanga ete bázongisa bango makila.” Zulunalo yango ebakisi boye: “Mayele yango oyo, liboso bazalaki kosalela yango kaka mpo na Batatoli ya Yehova, ekómi mpo na bato mingi lelo oyo; kutu, balopitalo mingi ezali kolimbwela bato ndenge oyo bango basalaka lipaso kozanga kozongisa moto makila.” Na mokili mobimba, minganga bazali komona matomba ebele, mingimingi epai ya bato ya maladi, ntango bazali komeka mayele mosusu na esika ya kozongisa bango makila. Lelo oyo, ebele ya minganga bazali kosalisa bato kozanga kozongisa bango makila.
[Etanda/Elilingi na lokasa 12]
Batatoli ya Yehova mpe bokolɔngɔnɔ ya nzoto
Na mokili mobimba, bato bayebi ete Batatoli ya Yehova, oyo bamosusu kati na bango mpe bazali minganga, bandimaka te bázongisa bango makila to biloko oyo babendaka na kati ya makila. Baboyaka makila mpo balandaka mateya to mobeko ya moto moko oyo azali mokonzi na bango to bakanisaka ete maladi ya moto ekoki kosila soki kaka azali na kondima? Te.
Batatoli ya Yehova bayebi ete bomoi ezali likabo ya Nzambe mpe basakanaka na yango te; basalaka makasi bátosa mibeko ya Biblia mpo bandimaka ete Biblia ezali mokanda “epemami na Nzambe.” (2 Timote 3:16, 17; Emoniseli 4:11) Biblia elendisaka basaleli ya Nzambe báboya misala mpe mimeseno oyo ebebisaka nzoto to oyo ekoki kotya bomoi ya moto na likama, na ndakisa kolekisa ndelo na kolya, komɛla likaya to tumbako, komɛla masanga mingi, mpe komɛla bangi.—Masese 23:20; 2 Bakolinti 7:1.
Soki tozali kobatela pɛto nzoto na biso mpe bisika oyo tofandaka mpe tozali kosala ngalasisi mpo tózala nzoto kolɔngɔnɔ, tozali nde kolanda mitinda ya Biblia. (Matai 7:12; 1 Timote 4:8) Ntango Motatoli ya Yehova moko abɛli, akendaka na lopitalo mpe andimaka nkisi oyo minganga bakopesa ye mpe ndenge mosusu oyo minganga bamoni ete ebongi mpo básalisa ye. (Bafilipi 4:5) Kasi, batosaka mobeko ya Nzambe oyo elobi ete “bókoba koboya . . . makila”; yango wana basɛngaka na minganga básalela mayele mosusu na esika ya kozongisa bango makila. (Misala 15:29) Mbala mingi, soki minganga bandimi kosalela mayele mosusu, basalisaka malamu koleka.