Mituna oyo bilenge batunaka . . .
Nakosala nini soki moto moko asɛngi ngai tósangisa nzoto?
“Bilenge basi mpe mibali babimaka elongo kaka mpo na koyeba soki bakoki kokóma tii na kosangisa nzoto mpe soki bakoki kosangisa nzoto na bato boni.”—Penny.a
“Bilenge mibali balobelaka likambo yango polele. Bamikumisaka ete basangisaka nzoto na bilenge basi ebele atako bazali na elenge mwasi oyo balinganaka na ye mingi.”—Edward.
“Baoyo bazalaki kosɛnga ngai nasangisa na bango nzoto bazalaki koyebisa ngai yango polele. Ata soki nazalaki koboya, bazalaki kotika te!”—Ida.
ESIKA na esika ezali na nkombo oyo babengaka bato oyo basangisaka nzoto kaka mpo na kosilisa mposa mpe nsima na yango bakabwani. Na ndakisa na États-Unis, babengaka bango hookups. Elenge mwasi Akiko alobi ete na Japon, babengaka bango na nkombo oyo basalelaka mpo na kobenga biloko oyo moto asombi na restora mpo akende kolya yango esika mosusu. Elenge yango abakisi boye: “Basalelaka mpe liloba sefre, oyo euti na [maloba ya Lingelesi] ‘sex friend,’ oyo elimboli moninga ya kosangisa na ye nzoto. Yango elingi koloba ete boninga na bino esuki kaka na kosangisa nzoto.”
Ezala nkombo nini babengaka momeseno yango, ndimbola na yango ezali kaka moko: bato mibale bazali kosangisa nzoto kaka mpo na kosilisa mposa na bango mpe nsima na yango bakabwani.b Bilenge mosusu kutu bamikumisaka ete bazali na bato na bango oyo basangisaka na bango nzoto mpe esukaka kaka wana, esɛngaka te bákangama na bango. Elenge mwasi moko alobaki boye: “Kozala na moninga ya ndenge wana elakisi ete okoki kosangisa nzoto ntango nyonso olingi; mpe ntango ozwi eloko oyo olingaki, obendi nzoto.”
Lokola ozali moklisto, osengeli ‘kokima pite.’c (1 Bakolinti 6:18) Yango wana, osalaka makasi okima makambo oyo ekoki komema yo na kobuka mobeko ya Nzambe. Kasi, ntango mosusu komekama yango moko nde elandaka yo. Cindy alobi boye: “Na eteyelo, bana mibali mingi bazalaki kosɛnga ngai nasangisa na bango nzoto.” Likambo yango ekoki kokómela yo ata na mosala. Margaret alobi boye: “Na mosala, mokonzi na ngai azalaki kosɛnga ngai nasangisa na ye nzoto. Lokola azalaki kotya ngai mbamba, natikaki mosala yango!”
Nzokande, osengeli kokamwa te soki mposa wana mabe eyeli yo, mpamba te Biblia elobi ete: “Motema ezali na bokosi koleka biloko nyonso mpe na mabe mingi.” (Yilimia 17:9) Yango nde ekómelaki elenge mwasi moko na nkombo Lourdes. Alobi boye: “Nazalaki kosepela mpenza na mwana mobali oyo asɛngaki ngai nasangisa na ye nzoto.” Likambo yango ekómelaki mpe Jane. Alobi ete: “Nazalaki kolinga [mwana mobali yango] mingi. Ezalaki mpasi mpenza koboya kosangisa na ye nzoto, kasi naboyaki.” Edward, oyo tolobeli na ebandeli ya lisolo oyo, ye mpe andimi ete kotikala pɛto ezali pɛtɛɛ te. Alobi boye: “Bilenge basi mingi basɛngaka ngai nasangisa na bango nzoto. Lokola nazali moklisto, koboya kosala yango ezali mpenza etumba monene mpo na ngai. Ezali mpasi mpenza koyebisa bango ete naboyi!”
Soki esilá kokómela yo oyoka lokola Lourdes, Jane, mpe Edward kasi osalaki oyo ezali sembo na miso ya Yehova Nzambe, topesi yo longonya. Ntango mosusu, koyeba ete ntoma Paulo mpe azalaki ntango nyonso kobundisa bamposa ya mabe ekoki kolendisa yo.—Baloma 7:21-24.
Wapi mitinda ya Biblia oyo osengeli kobosana te soki moto moko asɛngi yo bósangisa nzoto?
Yebá ntina oyo kosala bongo ezali mabe
Biblia emonisi ete ezali mabe bato oyo babalaná te básangisa nzoto. Pite ezali mpenza lisumu monene; yango wana bato oyo bazali na momeseno ya kosala yango “bakozwa libula ya bokonzi ya Nzambe te.” (1 Bakolinti 6:9, 10) Mpo oboya kosangisa nzoto soki basɛngi yo, osengeli mpenza kotalela likambo yango ndenge Yehova atalelaka yango. Osengeli mpenza kozala na ekateli ya kotikala pɛto.
“Nandimi mpenza ete kolanda nzela ya Yehova ezali bomoi oyo eleki malamu.”—Karen, Canada.
“Moto akoki kobungisa makambo mingi soki aboyi kolanda mitinda ya Yehova oyo etali bizaleli malamu kaka mpo na kozwa bisengo ya mwa ntango mokuse.”—Vivian, Mexique.
“Kobosana te ete ozali na baboti, na baninga ebele mpe na bandeko ya lisangá. Okopesa bato wana nyonso mpasi na motema soki ondimi kosala likambo ya ndenge wana!”—Peter, Grande-Bretagne.
Ntoma Paulo akomaki ete: “Bókoba kotalela malamumalamu mpenza oyo ekoki kondimama epai ya Nkolo.” (Baefese 5:10) Soki ozali kotalela pite ndenge Yehova atalelaka yango, okozala na likoki ya ‘koyina mabe,’ ata soki yango ezali kobenda nzoto na yo ya kozanga kokoka.—Nzembo 97:10.
◼ Bavɛrsɛ oyo okoki kotánga: Genese 39:7-9. Omoni ete Yozefe aboyaki na mpiko mpenza kosangisa nzoto atako bazalaki kotya ye mbamba mpe omoni eloko oyo esalisaki ye.
Koyoka nsɔni te mpo na bindimeli na yo
Bilenge mingi bayokaka nsɔni te komonisa ete likambo oyo bandimaka ezali malamu mpe balukaka kolongisa yango. Lokola ozali moklisto, ozali na libaku malamu ya kolongisa nkombo ya Nzambe na nzela ya etamboli na yo ya malamu. Koyoka nsɔni te mpo ondimaka ata moke te kosangisa nzoto liboso ya kobala.
“Monisá polele na ebandeli mpenza ete ozali na mitinda ya bizaleli malamu oyo olandaka.”—Allen, Allemagne.
“Osengeli koyoka nsɔni te mpo na bindimeli na yo.”—Esther, Nigeria.
“Baninga na yo bakotyola ekateli na yo ya koboya kosangisa nzoto soki ozali koyebisa bango ete: ‘Baboti na ngai bakondima te nakóma na mwa moto na ngai.’ Osengeli koyebisa bango ete yo nde olingi likambo yango te.”—Janet, Afrika ya Sudi.
“Na eteyelo ya ntei epai nazalaki kotánga, bana mibali bayebaki ngai malamu; bayebaki ete ata soki bameki ndenge nini, nakondima te.”—Vicky, États-Unis.
Kokangama na bindimeli na yo ezali elembo oyo emonisaka ete ozali kokɔmela na elimo.—1 Bakolinti 14:20.
◼ Vɛrsɛ oyo okoki kotánga: Masese 27:11. Omoni ete, na nzela ya makambo osalaka, okoki mpenza kolongisa likambo oyo eleki makambo nyonso, elingi koloba kosantisama ya nkombo ya Yehova, boye te?
Kangamá na ekateli na yo!
Koboya ezali na ntina mingi. Kasi, bato mosusu bakoki kokanisa ete oboyi mpenzampenza te, olingi nde bábondela yo.
“Soki moto azali kosɛnga yo osangisa na ye nzoto kasi oboyi, akoki komona ete ezali kaka mwa mokakatano oyo otyeli ye mpo asala nyonso alonga yango; ekotinda ye atya yo mbamba.”—Lauren, Canada.
“Makambo na yo nyonso—na ndakisa, ndenge na yo ya kolata mpe ya koloba, bato oyo osololaka na bango mpe boyokani na yo na basusu—esengeli komonisa ete oboyi likambo yango.”—Joy, Nigeria.
“Soki oyebisi moto ete oboyi, lobá yango polele mpenza.”—Daniel, Australie.
“Kozala bibangabanga te! Ntango elenge mobali moko atyaki ngai lobɔkɔ na lipeka na makanisi mabe, nayebisaki ye: ‘Longolá lobɔkɔ na yo!’ Natalaki ye na liso moko ya mabe mpe nakendaki na ngai.”—Ellen, Grande-Bretagne.
“Osengeli koloba polele, koyebisa moto ete olingi te likambo oyo azali kosɛnga yo mpe okondima kosala yango ata mokolo moko te. Kozala nsɔnisɔni te na ntango wana!”—Jean, Écosse.
“Mwana mobali moko azalaki ntango nyonso kotungisa ngai ete nasangisa na ye nzoto mpe kobwakela ngai mwa maloba ya kotyola. Kasi mokolo moko, nayebisaki ye polelepolele ete nalingi te. Banda wana, atiká kotungisa ngai.”—Juanita, Mexique.
“Osengeli komonisa polele ete okondima likambo yango ata mokolo moko te. Kondima te bakado ya bana mibali oyo bazali kosɛngasɛnga yo ete osangisa na bango nzoto. Soki ondimi kozwa bakado yango, bakoki komona ete osengeli kondima kosangisa na bango nzoto.”—Lara, Grande-Bretagne.
Yehova akosalisa yo soki ozali kokangama na ekateli na yo. Na kotalela makambo oyo akutanaki na yango, Davidi, mokomi na nzembo, alobaki boye mpo na Yehova: “Epai ya moto ya sembo, okomimonisa sembo.”—Nzembo 18:25.
◼ Vɛrsɛ oyo okoki kotánga: 2 Ntango 16:9. Omoni ndenge Yehova azalaka na mposa makasi ya kosalisa baoyo batyelaka ye motema mobimba?
Monáká mosika
Biblia elobi ete: “Moto ya mayele akososola mabe liboso mpe akomibomba.” (Masese 22:3) Ndenge nini okoki kosalela toli yango? Okosalela yango soki ozali komona mosika!
“Salá nyonso okabwana na bato oyo balobelaka makambo yango.”—Naomi, Japon.
“Boyá baninga to makambo oyo ekoki komema yo na likama. Na ndakisa, nayebi basusu oyo bakweaki na lisumu mpo balangwaki.”—Isha, Brésil.
“Koyebisa bato makambo na yo te, na ndakisa adrɛsi na yo to nimero na yo ya telefone.”—Diana, Grande-Bretagne.
“Kozala na momeseno ya kopesana bizi na bana-kelasi na bino te.”—Esther, Nigeria.
“Kebá na elateli na yo. Bilamba na yo esengeli te kolamusa mposa ya kosangisa nzoto epai ya basusu.”—Heidi, Allemagne.
“Kozala na boyokani malamu na baboti na yo mpe kosolola na bango likambo yango, ekobatela yo mpenza.”—Akiko, Japon.
Talelá malamumalamu elobeli na yo, etamboli na yo, baninga na yo mpe bisika oyo okendaka mingi. Na nsima, omituna boye: ‘Nazali nde kosala mpenza makambo oyo ekoki kotinda bato básɛnga ngai nasangisa na bango nzoto, to nazali nde kosala yango kozanga koyeba?’
◼ Bavɛrsɛ oyo okoki kotánga: Genese 34:1, 2. Omoni ndenge oyo kozala na bisika ya mabe ebimiselaki elenge moko na nkombo Dina mikakatano minene?
Kobosana te, kosangisa nzoto na moto oyo azali mwasi to mobali na yo te ezali mpenza mabe na miso ya Yehova; yo mpe osengeli komona yango mabe. Biblia elobi ete: “Moto ata moko te ya pite to moto ya bosɔtɔ . . . azali na libula na kati ya bokonzi ya Klisto mpe ya Nzambe.” (Baefese 5:5) Soki okangami na makambo oyo ezali sembo, okozala ntango nyonso na lisosoli ya malamu mpe okobatela lokumu na yo. Elenge mwasi moko na nkombo Carly alobi boye: “Mpo na nini ondima ete moto moko azwa yo kaka mpo na kosilisa nokinoki mposa na ye? Kobebisa te boyokani na yo na Yehova oyo osalaka makasi mpo na kobatela!”
Okoki kokuta masolo mosusu ya “Mituna oyo bilenge batunaka . . .” na Internet, na esika oyo: www.watchtower.org/ypf
[Maloba na nse ya lokasa]
a Topesi bango bankombo mosusu.
b Momeseno oyo ekoki mpe kolakisa makambo lokola kosimbasimbana na nzoto mpe kopesana bizi na mposa mabe.
c Pite elakisi ete bato mibale oyo babalani te basangisi nzoto to basaleli nzoto na bango ya mibali to ya basi na ndenge oyo esengeli te, na ndakisa basangisi nzoto na monɔkɔ to na esumbeli, basangisi nzoto mobali na mobali to mwasi na mwasi, to basimbasimbani na nzoto na bango ya mibali to ya basi mpo na komisepelisa.
MITUNA YA KOMANYOLA
◼ Atako nzoto na yo ya kozanga kokoka ekoki ntango mosusu koyoka mposa ya kosangisa nzoto na moto oyo azali mobalani na yo te, mpo na nini kosala likambo yango ezali mabe?
◼ Okosala nini soki moto moko asɛngi yo osangisa na ye nzoto?
[Etanda na lokasa 17]
◼ Biblia elobi ete moto oyo azali na momeseno ya kosala pite “azali kosalela nzoto na ye moko lisumu.” (1 Bakolinti 6:18) Na ndenge nini? Kanisá makambo oyo okoki kolobela na eyano na yo mpe komá yango awa na nse.
․․․․․
Mwa likanisi: Mpo okoka koyanola na motuna wana, tángá buku Comment raisonner à partir des Écritures, lokasa 191, mpe Étude perspicace des Écritures, volimi 1, lokasa 921. Babuku yango nyonso mibale ebimisami na Batatoli ya Yehova.
[Etanda na lokasa 19]
LIYEBISI EPAI YA BABOTI
“Na eteyelo, mwana-kelasi moko asɛngaki ngai tósangisa nzoto. Eumelaki mwa moke liboso nayeba likambo oyo asɛngaki ngai. Na ntango wana, nazalaki na mbula 11 mpamba.”—Leah.
Bana bakómi koyeba likambo ya kosangisa nzoto wana bazali naino na mbula moke. Banda kala, Biblia esakolaki ete na “mikolo ya nsuka bantango ya ndenge mosusu mpe ya mpasi mpenza” ekozala mpe bato ‘bakozanga komipekisa’ mpe ‘bakolinga bisengo na esika ya kolinga Nzambe.’ (2 Timote 3:1, 3, 4) Momeseno oyo tolobeli awa na lisolo ya bilenge, ya kosangisa nzoto na moto oyo azali mobalani na yo te kaka mpo na kosilisa mposa mpe na nsima bokabwani, ezali moko ya makambo mingi oyo emonisi ete esakweli yango ezali kokokisama.
Mokili ya lelo ekeseni mpenza na oyo ya bino ntango bozalaki bana. Atako bongo, tokoki koloba ete mikakatano ezali kaka ndenge moko. Bómitungisa koleka ndelo te mpe bóbanga te ntango bozali komona makambo mabe oyo ekoki kobebisa bana na bino. Bózala nde na mokano ya kosalisa bango básala oyo ntoma Paulo asɛngaki baklisto eleki sikoyo mbula soki 2 000. Alobaki ete: “Bólata molato mobimba ya etumba oyo mouti na Nzambe mpo bókoka kotɛlɛma ngwi liboso ya mayele mabe ya Zabolo.” (Baefese 6:11) Bóyeba ete bilenge baklisto mingi bazali mpenza kosala makasi mpo na kosala oyo ezali sembo atako makambo mabe ezali bisika nyonso. Ndenge nini bokoki kosalisa bana na bino básala mpe bongo?
Na ndakisa, bokoki kozwa lisolo oyo ya bilenge mpe kotalela yango elongo na bana bino. Eteni oyo elobi “Bavɛrsɛ oyo okoki kotánga” ezali mpenza kotinda moto akanisa malamu. Kati na bavɛrsɛ yango, mosusu elobeli bato oyo bakangamaki na oyo ezali sembo mpe matomba oyo bazwaki; mosusu elobeli baoyo baboyaki kotosa mibeko ya Nzambe mpe mikakatano oyo ekómelaki bango. Bavɛrsɛ mosusu ya eteni yango emonisi mitinda oyo ekoki kosalisa bana na bino báyeba ete ná bango ná bino baboti bozali na libaku malamu mpenza ya kotosa mibeko ya Nzambe na bomoi na bino. Bomoni te ete ekozala malamu bóbanda kotalela eteni yango elongo na bana na bino?
Kotosa mitinda ya Nzambe epesaka ntango nyonso matomba. (Yisaya 48:17, 18) Kasi, koboya kotosa yango ememaka kaka mpasi. Babimisi ya Lamuká! bazali kobondela ete Yehova apambola bino na milende oyo bozali kosala mpo na kokɔtisa malamu mpenza mibeko mpe mitinda na ye na mitema ya bana na bino.—Deteronome 6:6, 7.
[Elilingi na lokasa 18]
Osengeli komonisa polele ete okondima likambo yango ata mokolo moko te