Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 10/07 nk. 11-12
  • Nazali moombo ya masanga lisusu te

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nazali moombo ya masanga lisusu te
  • Lamuká!—2007
  • Masolo mosusu
  • Tiká likanisi ya Nzambe na oyo etali masanga etambwisa yo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2023
  • Bokatikati na likambo etali komɛla masanga
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Ndenge nini Bakristo basengeli kotalela masanga?
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
  • Kosolola na bana na likambo etali masanga
    Lisalisi mpo na libota
Makambo mosusu
Lamuká!—2007
g 10/07 nk. 11-12

Nazali moombo ya masanga lisusu te

Soki bato bazali komɛla mwa masanga na ntango ya kolya to na fɛti, ebakisaka mpenza esengo. Nzokande, komɛla masanga ememelaka bato mosusu mikakatano makasi. Tótalela lisolo ya mobali moko oyo amilongolá na boombo ya masanga.

ATA lelo, nayokaka mpasi mpo na kolobela matata oyo ezalaki ntango nyonso na libota na biso. Soki tata ná mama babandi komɛla masanga, nsukansuka tata azalaki kobɛta mama. Mbala mingi, makofi ya tata ezalaki mpe kozwa ngai. Ntango bazwaki ekateli ete bákabwana, nazalaki na mbula minei mpamba. Nazali koyeba lisusu ete bamemaki ngai nakende kofanda epai ya nkɔkɔ ya mwasi oyo abotá mama.

Nazalaki komona ete ata moto moko te alingi ngai. Ntango nakómaki na mbula nsambo, nazalaki kokɔta na ndenge ya kobombana na eteni ya ndako epai bazalaki kobomba vinyo oyo ezalaki kosalema na ndako; nazalaki komɛla vinyo yango mpe nazalaki komona ete ezali kokitisa mawa na ngai. Mokolo moko, ntango nazalaki na mbula 12, mama ná nkɔkɔ ya mwasi baswanaki makasi mpo na ngai. Mama asilikaki makasi mpe abwakelaki ngai kanya oyo balɔkɔtaka na yango matiti. Napumbwaki mpe ezwaki ngai te! Wana ezalaki mbala ya liboso te oyo namonaki liwa na miso. Bampota oyo nazokaki na nzoto ezalaki eloko te soki nakokanisi yango na mpasi makasi oyo nazalaki koyoka na motema.

Ntango nazalaki na mbula soki 14, nazalaki komɛla ntango nyonso. Nsukansuka, na mbula 17, nakimaki ndako. Soki namɛli, nazalaki komona ete nakoki kosala nyonso oyo nalingi; nakómaki moto ya matata mpe nazalaki kobimisa mobulu na banganda ya mboka. Na bomoi na ngai, komɛla nde ezalaki kosepelisa ngai mingi koleka makambo mosusu nyonso. Na mokolo moko mpamba, nazalaki komɛla ata litrɛ mitano ya vinyo, mwa milangi ya masanga mpe masanga mosusu ya makasi.

Ntango nabalaki, momeseno na ngai ya komɛla enyokolaki mwasi na ngai mingi. Nkanda ekolaki makasi na motema mpe nazalaki kobɛta ye ná bana; nazongisaki bongo momeseno mabe oyo nazalaki komona epai ya baboti na ngai. Nakoki koloba ete mbongo nyonso oyo nazalaki kozwa ezalaki kosila kaka na masanga. Lokola tozalaki na kiti te, mbeto mpe te, ngai ná mwasi na ngai tozalaki kolala na nse. Namonaki ete bomoi ezali na ntina te mpe nazalaki kosala eloko moko te mpo na kobongisa bomoi ya libota na ngai.

Mokolo moko, nasololaki na Motatoli ya Yehova moko. Natunaki ye ntina oyo bampasi ezali mingi na mokili, mpe Motatoli yango alakisaki ngai na Biblia elaka ya Nzambe ya kolongola mikakatano nyonso na mokili. Yango etindaki ngai nandima koyekola Biblia na Batatoli. Ntango nakómaki kosalela mateya ya Biblia mpe natikaki momeseno ya komɛla mingi, libota na ngai ebongaki mpenza. Atako bongo, namonaki ete soki nalingi kosalela Yehova Nzambe na ndenge ebongi, nasengelaki naino komilongola na boombo ya masanga. Nabundanaki na likambo yango na boumeli ya sanza misato, mpe nsukansuka natikaki masanga. Sanza motoba na nsima, nazwaki batisimo mpo na komonisa ete namipesi na Nzambe.

Ntango namilongolaki na boombo ya masanga, nazwaki likoki ya kofuta banyongo na ngai nyonso. Nasombaki ndako mpe motuka, oyo esalisaka biso na kokende na makita ya boklisto mpe na mosala ya kosakola ndako na ndako. Nsukansuka, nakómaki mpe komona ete nazali moto ya malonga.

Ntango mosusu na bafɛti, batunaka ngai soki nakomɛla masanga. Nzokande, bato mingi bayebaka te ete nabundaka etumba monene mpe soki namɛli ata moke kaka, nakoki kozongela mimeseno na ngai ya kala. Mposa ya masanga esilá te. Yango wana, esɛngaka nabondela na motema mobimba mpe nazala na ekateli makasi mpo naboya masanga. Soki nayoki mposa ya komɛla, namɛlaka mingi nde biloko mosusu oyo ezali masanga to vinyo te. Banda mbula zomi, litangá ata moko te ya masanga ekɔtá na monɔkɔ na ngai.

Yehova akoki kosala makambo oyo moto akoki te. Na lisalisi na ye, nazwi bonsomi oyo nakanisaki te ete nakoki kozwa! Bampota oyo nazoká na motema ntango nazalaki mwana esalaka ngai mpasi tii lelo mpe nasalaka ntango nyonso makasi nalɛmba nzoto te. Atako bongo, sikoyo nazali na boyokani malamu na Nzambe, nazali na baninga ya solosolo na lisangá mpe na libota ya malamu oyo nazali kosambela na bango elongo. Mwasi na ngai mpe bana na ngai basungaka ngai mingi na etumba oyo nabundaka mpo nazongela masanga te. Mwasi na ngai alobaka boye: “Liboso, bomoi na ngai ezalaki mpasi mingi. Lelo oyo, nazali kotɔnda Yehova mingi na ndenge ngai, mobali na ngai mpe bana na biso mibale tozali na esengo na libota na biso.”​—Euti na motángi moko.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 11]

Ntango nazalaki na mbula soki 14, nazalaki komɛla ntango nyonso

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 12]

Yehova akoki kosala makambo oyo moto akoki te

[Etanda/​Bililingi na lokasa 12]

BIBLIA ELOBI NINI MPO NA MASANGA?

◼ Biblia elobi te ete komɛla masanga ezali mabe. Elobi ete ‘vinyo esepelisaka motema ya moto’ mpe ezali likabo oyo Nzambe apesá bato. (Nzembo 104:14, 15) Emonisi mpe ete vinyo elakisaka bozwi mpe libateli. (Mika 4:4) Kutu, likamwisi ya liboso oyo Yesu Klisto asalaki ezalaki nde kobongola mai ekóma vinyo na fɛti moko ya libala. (Yoane 2:7-9) Mpe ntango ntoma Paulo ayokaki ete Timote ‘abɛlabɛlaka,’ alendisaki ye ete amɛlaka “mwa vinyo.”​—1 Timote 5:23.

◼ Biblia elobi ete komɛla masanga koleka ndelo nde ezali mabe:

“Balangwi-masanga . . . bakozwa libula ya bokonzi ya Nzambe te.”​—1 Bakolinti 6:9-11.

“Bólangwaka vinyo te, na kati na yango misala ya mbindo ezali.”​—Baefese 5:18.

“Banani na mpasi? Banani na mawa? Banani na kowelana? Banani na koimaima? Banani na mpota na mpamba? Banani na miso motane? Baoyo bakoumelaka komɛla masanga, baoyo bakokenda komekaka vinyo esanganisami ndenge na ndenge. Talá vinyo te wana ezali motane, wana ezali kongɛnga kati na kɔpɔ, wana ekomɛlama na motindo molulami. Na nsuka ekokata lokola nyoka, ekozokisa lokola etupa. Miso na yo ekomonamona makambo na kokamwa, mpe motema na yo ekobimisa bilobaloba.”​—Masese 23:29-33.

Ndenge tomoni na lisolo oyo touti kolobela, bato mosusu oyo bazalaki komɛla kolekisa ndelo bazwá ekateli malamu ya kotika mpenza komɛla.​—Matai 5:29.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto