“Bómimonisa bato ya botɔndi”
◼ Mbala na mbala, Biblia elendisaka basambeli ya Nzambe bápesaka matɔndi. Nzembo 92:1 elobi ete: “Ezali malamu kotɔnda [Yehova].” Ntoma Paulo mpe apesi biso etinda oyo: “Bómimonisa bato ya botɔndi.”—Bakolose 3:15.
Tozali na bantina mingi ya kozala bato ya botɔndi. Robert Emmons, molakisi na iniversite ya Californie na engumba Davis, alobi ete: “Makambo oyo bato bayekoli na likambo yango emonisi ete kozala na botɔndi esalisaka moto alonga mikakatano ya mokolo na mokolo, mingi mpenza mitungisi ya makanisi, mpe esalisaka ye asepela na ndenge oyo azali.”
Zulunalo moko (Time) emonisi litomba mosusu, elobi boye: “Bato oyo balobaka ete bazalaka na botɔndi . . . bazalaka na makasi ya kosala makambo mingi mpe batalelaka makambo na ndenge ebongi, batungisamaka mingi te na makanisi, mpe babɛlaka mpenza te maladi ya motó lokola bato mosusu.”
Likambo ya mawa, Biblia esakolaki ete na “mikolo ya nsuka,” bato mingi bakozala “bato oyo bamilingaka bango moko” mpe “bato bazangi botɔndi.” (2 Timote 3:1-5) Baklisto ya solo bakoki kosala nini mpo elimo yango ekɔtela bango te? Yehova, Mokomisi ya Biblia, alobi boye: “Ngai nazali [Yehova], Nzambe na yo, ye oyo akolakisa yo mpo na litomba, ye oyo akokamba yo na nzela ekoki na yo kotambola na yango.” (Yisaya 48:17) Soki tozali kotosa mibeko ya Nzambe, tokomibatela na bampasi oyo ekómelaka bato oyo balukaka kaka matomba na bango moko. Longola yango, toyebi malamu ete Yehova amonaka milende na biso mpe akopambola biso mpo na yango. (Baebele 6:10) Matomba nyonso wana ezali kotinda biso ‘tópesa Yehova matɔndi.’—Nzembo 107:8, NW.