Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 7/09 nk. 14-16
  • Mosala ya kotambwisa nzoku

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mosala ya kotambwisa nzoku
  • Lamuká!—2009
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ndenge oyo balakisaka nzoku
  • Kobatela nzoku
  • Ndenge esalaka soki enyokwami
  • Zolo ya nzoku
    Lamuká!—2012
  • Mpɛmbɛ ya Nzoku: Ezali na motuya nini?
    Lamuká!—1998
Lamuká!—2009
g 7/09 nk. 14-16

Mosala ya kotambwisa nzoku

EUTI NA MOKOMI NA BISO NA INDE

NTANGO motambwisi moko ya nzoku azalaki kolamba pembeni ya Ebale Narmada, afandisaki mwana na ye na katikati ya zolo mpe mabɔkɔ ya nzoku na ye oyo azalaki kopema. Buku moko (Project Elephant) elobi ete mwana yango azalaki mbala na mbala komeka kokima, kasi “na boboto, nzoku yango oyo azalaki kopema azalaki kolinga mwana yango na zolo na yango mpe kozongisa ye esika oyo tata na ye atikaki ye. Tata akobaki kolamba mpe emonanaki ete azalaki na kondima mpenza ete mwana azali kobatelama malamu.”

Banzoku babandá kosalela bato mosala banda kala mpenza, banda soki na mobu 2 000 liboso ya ntango na biso (L.T.B.). Na ntango ya kala, bato bazalaki koteya banzoku mingimingi mpo na bitumba. Lelo oyo na Inde, bateyaka banzoku mpo na kosala mosala. Basalelaka bango mpo na kokata banzete, na bafɛti ya mangomba mpe ya mabala, mpo na kosala piblisite, na masano ya cirque, ata mpe mpo na kosɛnga biloko. Ndenge nini basalaka mpo banzoku yango batosaka bato? Mpe ndenge nini balakisaka bango?

Ndenge oyo balakisaka nzoku

Na Inde, ezali na bisika mingi oyo ebongisamá mpo na kobatela bana ya nzoku oyo bakangi, oyo basundolami, to oyo bazokaki na zamba. Moko ya bisika yango ezali na Koni, na etúká ya Kerala. Kuna, balakisaki bana ya nzoku mpo bákóma kosala misala. Motambwisi-nzoku asengeli libosoliboso koluka ete mwana ya nzoku akóma kotyela ye motema. Koleisa mwana ya nzoku ezali likambo ya ntina mpo akóma kotyela moto motema. Mwana ya nzoku ayebaka mongongo ya motambwisi na ye, mpe ntango abengi ye mpo aleisa ye, akimaka mbangu mpo na kozwa miliki mpe pɔtɔpɔtɔ ya millet. Mbala mingi, balakisaka bana ya nzoku kosala misala kaka soki bakómi na mbula soki 13. Na nsima, babandaka kosala mosala soki bakómi na mbula 25. Na etúká ya Kerala, guvɛrnema etyá mobeko ete bátika kosalisa nzoku misala soki akómi na mbula 65.

Mpo na kotambwisa nzoku kozanga likama, motambwisi asengeli kozwa formasyo ya malamu. Ebongiseli oyo ebatelaka banzoku na Trichur, na etúká ya Kerala, elobi ete motambwisi-nzoku ya sika asengeli kozwa formasyo ya makasi sanza misato to koleka. Formasyo yango esukaka kaka na kopesa mitindo te. Esɛngaka mpe koyekola bomoi ya nzoku mobimba.

Esɛngaka ntango mingi koleka mpo na kolakisa nzoku ya mokóló. Motambwisi azalaka naino na libándá mpe abandaka kolakisa nzoku oyo azali na kati ya lopango ayeba mitindo oyo azali kopesa ye na maloba. Na etúká ya Kerala, motambwisi-nzoku asalelaka mitindo mpe bilembo soki 20 mpo nzoku na ye asala mosala oyo alingi. Soki motambwisi apesi mitindo ya polele na mongongo makasi, kaka na ntango yango, atindiki nzoku na mwa nzete na ye mpe alakisi yango mosala ya kosala. Soki nzoku atosi mitindo yango, akopesa ye mwa mbano. Soki molakisi-nzoku amoni mpenza ete nzoku ekómi komesana na ye, akobanda kokɔta na kati ya lopango mpe kosimbasimba ye. Likambo yango ekolisaka boyokani kati na bango mibale. Nsima ya mwa ntango, akoki kobimisa nzoku libándá, kasi na ekɛngɛ, mpo nzoku azali naino na bizaleli ya nyama ya zamba. Tii ntango bamoni polele ete nzoku akómi mpenza kotosa, bakangaka ye minyɔlɔlɔ na kati ya nzoku mibale oyo emesaná na bato, ntango bakei kosukola yango to kotambwisa yango mwa moke.

Soki nzoku asimbi mitindo oyo bazali kopesa na maloba, motambwisi akofanda na mokɔngɔ ya nzoku mpe akómaka koteya ye oyo asengeli kosala soki atindiki ye na misapi to na litindi. Mpo nzoku ekende liboso, motambwisi akofina nzoku na nsima ya matoi na yango na misapi na ye mibale ya minene ya makolo. Mpo ezonga nsima, akofina yango na mapeka na yango mibale na matindi na ye. Mpo nzoku ebulungana te, esengeli kaka ete motambwisi moko apesa ye mitindo na maloba. Nzoku asimbaka mitindo nyonso nsima ya mbula misato to minei. Na nsima, akoki kobosana mitindo yango ata moke te. Atako bɔɔngo ya nzoku ezali moke na kotalela bonene ya nzoto na yango, ezali nyama moko ya mayele mingi.

Kobatela nzoku

Esɛngaka kobatela nzoku mpo azala ntango nyonso nzoto kolɔngɔnɔ mpe kosala ete azala na esengo. Esɛngaka Kosukola ye mokolo na mokolo. Ntango motambwisi azali kosukola nzoku, asalelaka mabanga mpe bamposo ya kokoti oyo ebongisami malamu mpo na konika mposo na ye oyo ezalaka pɛtɛpɛtɛ mpe ezokaka mpambampamba.

Na nsima, bapesaka yango bilei. Motambwisi alambaka pɔtɔpɔtɔ ya blé, ya millet mpe matiti mosusu oyo bapesaka banyama. Bilei ya solosolo ezalaka bambu, mandalala mpe matiti ya mobesu. Nzoku asepelaka mpe soki babakiseli ye karɔtɛ ya mobesu mpe koko. Banzoku balekisaka ntango na bango mingi na kolya. Basengelaka na kilo 140 ya biloko ya kolya soki mpe litre 150 ya mai mokolo na mokolo! Mpo na kobatela boyokani malamu na nzoku, motambwisi asengeli kokokisaka bamposa wana.

Ndenge esalaka soki enyokwami

Mwa nzoku ya Inde endimaka te bátambwisa yango to básalisa yango mosala oyo eleki makasi. Banzoku bakoki kobalukela batambwisi oyo bazali kopesa bango bitumbu, ezala na maloba to na ndenge mosusu. Zulunalo moko ya Inde (Sunday Herald) elobelaki nzoku moko ya mobali oyo azali na mpɛmbɛ milai, oyo “atombokaki . . . mpo batambwisi banyokolaki ye. Nzoku yango oyo motambwisi azalaki kobɛta esilikaki makasi . . . mpe esengelaki kotɔbɔla yango bankisi mpo elala.” Na Aprili 2007, zulunalo moko (India Today International) elobaki boye: “Kaka na sanza mibale oyo euti koleka, banzoku ya mibali koleka 10 etombokaki na bafɛti; kobanda na sanza ya Yanuali ya mobu eleki, batambwisi 48 babomamaki na banyama oyo batombokaki.” Makambo ya ndenge wana esalemaka mingi na eleko oyo nzoku ya mibali ekómaka na mposa makasi ya kosangisa nzoto. Ntango yango, banzoku ya mibali ekómaka nkandankanda mpe na mbalakaka esilikelaka banzoku mosusu ya mibali mpe bato. Eleko yango ekoki koumela mikolo 15 tii ata sanza misato.

Likambo mosusu ekoki kotinda nzoku asilika ezali ntango batɛki ye mpe akómi na motambwisi mosusu. Emonanaka polele ete alingi kaka motambwisi na ye ya kala. Mpo nzoku amesana na esika na ye ya sika, mbala mingi motambwisi ya liboso akendaka na ye tii na esika yango. Kuna, batambwisi yango mibale bakosala elongo tii ntango motambwisi ya sika akomesana na bizaleli ya nzoku yango. Ntango motambwisi akufi mpe mosusu azwi mokumba, mikakatano ekoki kozala kutu makasi koleka. Kasi, nsukansuka, nzoku amesanaka mpe andimaka motambwisi wana.

Atako bato mosusu bakoki kobanga nyama wana monene, nzoku oyo ateyami malamu atosaka nkolo na ye oyo azali na boboto. Soki motambwisi azali kosalela nzoku makambo na boboto, ekozala kutu na mposa ya kokanga yango na minyɔlɔlɔ te ntango motambwisi na yango azali te. Eloko motambwisi asengeli kosala ezali kaka kotya nsɔngɛ moko ya lingenda na ye na lokolo ya nzoku mpe nsɔngɛ mosusu na mabelé mpe koyebisa nzoku ete akende epai te. Na botosi nyonso, nzoku akotɛlɛma kaka esika wana na lingenda yango. Ndenge tomonisaki na ebandeli ya lisolo, boyokani kati na nzoku ná motambwisi na ye ekoki kokamwisa mpe kosepelisa. Ya solo, motambwisi ya malamu akoki kotyela nzoku na ye motema.

[Etanda/​Elilingi na lokasa 16]

MOTO ABƆKƆLAKA NZOKU BANDA KALA

Kobɔkɔla banzoku ebandá kala mpenza. Mbala mosusu, ndakisa oyo eyebani mingi ya ntango ya kala ezali oyo ya Hannibal, général moko ya basoda na engumba Carthage. Na ekeke ya misato L.T.B., Carthage, oyo ezali na nɔrdi ya Afrika, ezalaki kobundisa Loma na bitumba oyo eumelaki mbula nkama; bitumba yango ebengamaki guerres puniques. Hannibal ayanganisaki basoda na engumba Carthagène, na Espagne mpo na kokɔta na Loma. Akatisaki liboso bangomba ya Pyrénées mpo na kokɔta na mboka oyo ezali lelo France. Na nsima, na etumba oyo zulunalo moko (Archaeology) ebengi “moko ya bitumba ya kala oyo esɛngaki mpiko mingi,” limpinga na ye ya basoda 25 000 ná banzoku 37 ya Afrika mpe banyama ebele oyo ezalaki kokumba biloko, bakatisaki bangomba Alpes mpe bakɔtaki na Italie. Basengelaki kobunda na malili, na nɛjɛ, na mabanga oyo ezali kolongwa na ngomba mpe na bato oyo bazalaki kolinga bango te, oyo bazalaki kofanda na bangomba. Mobembo yango ezalaki mpasi mingi mpo na banzoku. Banzoku yango nyonso ekufaki na mbula ya liboso oyo Hannibal asalaki na Italie.

[Eutelo ya bafɔtɔ]

© Look and Learn Magazine Ltd/The Bridgeman Art Library

[Maloba mpo na kolimbola elilingi na lokasa 15]

Motambwisi azali konika mposo ya nzoku na ye oyo ezalaka pɛtɛpɛtɛ mpe ezokaka mpambampamba

[Eutelo ya bafɔtɔ]

© Vidler/mauritius images/age fotostock

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 15]

© PhotosIndia/age fotostock

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto