Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 10/09 lok. 30
  • Makambo mazali koleka na mokili

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makambo mazali koleka na mokili
  • Lamuká!—2009
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Komɛla masanga ntango ozali na zemi
  • Kosala bilanga ezali malamu mpo na nzoto
  • Apumbwaka kozanga kopema
  • Ndenge ya kokanga miyibi ya fololo babengi cactus
  • Mayele oyo ndɛkɛ babengi barge rousse esalelaka ntango epumbwaka
    Lamuká!—2013
  • Okoki kosala nini mpo otika komɛla masanga koleka ndelo?
    Makambo mosusu
Lamuká!—2009
g 10/09 lok. 30

Makambo mazali koleka na mokili

◼ “Russie ezali na batɔni soki miliare mibale ya salite, mpe esika ya kobwaka yango ezali te.”​—RIA NOVOSTI, RUSSIA.

◼ Na ekeke oyo ya 21, bato oyo batambolaka na bamasuwa na bango na mbu mpo na koyiba na bamasuwa bazali se kobakisama. Kaka na 2007, “likambo yango esalemaki mbala 263.”​—THE WALL STREET JOURNAL, U.S.A.

Komɛla masanga ntango ozali na zemi

Zulunalo moko ya Allemagne (Süddeutsche Zeitung) emonisi ete mbula na mbula na Allemagne, bana soki 10 000 babotamaka na maladi mpo na masanga oyo bamama na bango bamɛlaki ntango bazalaki na zemi. Bana soki 4 000 kati na bango bakómaka mpenza bibɔsɔnɔ. Sabine Bätzing, mokonzi moko oyo atalelaka makambo ya bilangwiseli alobi boye: “Ezali na ndelo moko te na masanga oyo mwasi ya zemi akoki komɛla kozanga kotya mwana na ye na likama. Minganga, basi oyo babotisaka, mpe basi ya zemi basengeli koyeba ete soki mwasi azali komɛla ata masanga moke ntango azali na zemi, ekoki kobebisa bɔɔngɔ mpe nzoto ya mwana.”

Kosala bilanga ezali malamu mpo na nzoto

Zulunalo moko (Psychology Today) elobi boye: “Bato ya mayele bamoni ete kolona bilanga yo moko​—ata soki ezali moke to monene—​ezali na matomba mingi mpo na nzoto koleka ndenge tokoki kokanisa.” Bato ya mayele bamoni ete ntango tozali kosala bilanga, “tomɛlaka to topemaka ba bactéries oyo ezalaka na mabele, oyo ekoki koyeisa makasi likoki ya nzoto na biso ya komibatela na bamikrobɛ (système immunitaire).” Yango wana, zulunalo yango emonisi ete “emonani mpenza ete komɛla to kopema ba bactéries oyo ezalaka na mabele ezali na litomba mpo na nzoto na biso ndenge moko na kolya mbuma mpe ndunda.”

Apumbwaka kozanga kopema

Bato ya mayele na États-Unis balobaki ete “ndɛkɛ oyo babengi barge rousse epumbwaki ntango molai kozanga kopema.” Na lisalisi ya satelite, bamonaki ndenge bandɛkɛ yango ezalaki kosala mobembo na yango ya mbula na mbula mpo na kokatisa Mbu ya Pasifike. Ndɛkɛ yango moko ya mwasi epumbwaki mikolo mwambe, mpe esalaki kilomɛtrɛ 11 650 kozanga kopema, longwa na Alaska tii na Nouvelle-Zélande. Zulunalo moko (The Week) elobi boye: Ntango ekómaki, ndɛkɛ yango ebungisaki gramɛ 700 ya mafuta ya nzoto na yango. Ntango ezongaka, ndɛkɛ yango epumbwaka banda na Nouvelle-Zélande tii na Chine, mpe na nsima ezongaka na Alaska​—mobembo ya kilomɛtrɛ 29 000. Bato yango ya mayele balobi ete: “Soki ndɛkɛ yango esalaka ntaka ya kilomɛtrɛ 29 000 mbula na mbula, ekoki kopumbwa kilomɛtrɛ 463 000, bomoi na yango mobimba.”

Ndenge ya kokanga miyibi ya fololo babengi cactus

Miyibi bazali mpenza kosilisa bafololo ya cactus na Parkɛ ya Saguaro, na Arizona, na États-Unis. Jim McGinnis, moto moko oyo asalaka na departema ya makambo etali bilanga alobi boye: “Moto nyonso alingi kozala na saguaro na lopango na ye.” Yango wana, ezali likambo ya kokamwa te komona motuka moko na esobe ememi fololo yango. Miyibi bayibaka mingi cactus oyo ezali na molai ya mɛtrɛ moko to mibale, oyo bakoki kotɛka na dolare nkóto moko to koleka. Mpo na kosilisa moyibi yango, bakonzi bazwi mayele ya kotya mwa masini moko na banzete ya cactus. Masini yango ekomonisa soki nzete yango ezali ya moto ye moko to ayibi yango na parkɛ.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto