Mituna oyo bilenge batunaka
Ndenge nini nakoki koyeba baboti na ngai malamu?
Jessica ná baboti na ye bazalaki kolya elongo na baninga. Wana bazali kolya, moko na mikóló oyo bazalaki wana alobi na mama ya Jessica ete: “Okondima te! Mokolo moko namonaki Richard—oyebi ye, mobali oyo bolinganaki na ye ntango tozalaki na eteyelo ya ntei.”
Jessica akamwaki makasi. Naino ayoká lisolo ya Richard te!
“Ee, Mama, olinganaki na moto mosusu liboso olingana na Papa? Nayebaki yango te!”
LOKOLA Jessica, yo mpe osilá koyoka likambo ya baboti na yo, oyo ekamwisaki yo? Soki ezali bongo, mbala mosusu etindaki yo omituna makambo nini mosusu oyebi te na ntina na bango!
Mpo na nini makambo mosusu ekoki kozala, oyo oyebi te na ntina na baboti na yo? Matomba nini okoki kozwa soki oyebi baboti na yo malamu? Mpe ndenge nini okoki kosala yango?
Makambo mingi ya koyeba
Mpo na nini ekoki kozala na makambo mosusu ya baboti na yo oyo oyebi te? Ekoki kozala mpo ofandaka esika moko na bango te. Jacob,a oyo azali lelo na mbula 22 alobi boye: “Baboti na ngai bakabwanaki ntango nazalaki na mbula 8. Banda wana, nazalaki komona papa mbala mingi te na mbula mobimba. Ezali na makambo na ye mingi oyo nakolinga koyeba.”
Ata soki ofandá na baboti na yo banda bambula mingi, mbala mosusu bayebisá yo makambo na bango nyonso te. Mpo na nini? Lokola biso nyonso, mbala mosusu baboti bakoki koyoka nsɔni mpo na mabunga oyo basalaki kala. (Baroma 3:23) Longola yango, bakoki komona ete soki babimisi makambo ya mabe oyo basalaki, okobanda kopesa bango limemya lisusu te, to mpe okobanda komona ete okoki kosala makambo ndenge olingi.
Kasi, mbala mingi, ezali na makambo mosusu oyo baboti na yo bayebisá yo te kaka mpo lisolo ya ndenge wana ebimá naino te. Elenge mobali moko na nkombo Cameron alobi boye: “Ezali likambo ya kokamwa moto afanda na baboti na ye banda bambula mingi kozanga ayeba makambo na bango nyonso!” Mpo na nini te koluka ndenge ya kolobisa baboti na yo? Tótala matomba minei oyo okoki kozwa soki osali yango.
Litomba #1: Mbala mosusu, baboti na yo bakosepela na likebi oyo ozali kotyela bango. Na ntembe te bakosepela ete ozali kokanisa bango kino kolinga koyeba makambo ya bomoi na bango. Nani ayebi soki bakoyebisa yo te makambo yango na ndenge oyo ekomonisa ete bazali komitya na esika na yo!—Matai 7:12.
Litomba #2: Okoyeba ntina oyo baboti basalaka boye to boye. Na ndakisa, kala baboti na yo bazalaki na bozwi mingi te? Mbala mosusu yango wana omonaka ete balingaka kobimisa mbongo mpambampamba te, atako yo omonaka ete balekisi.
Koyeba makanisi ya baboti na yo ndenge wana ekoki kosalisa yo. Elenge mobali moko na nkombo Cody alobi boye: “Lokola nayebi ndenge baboti na ngai batalelaka makambo, liboso naloba, nakanisaka ndenge maloba na ngai ekoki kosala bango.”—Masese 15:23.
Litomba #3: Ekoki kosalisa yo olobelaka makambo na yo kozanga kobanga. Bridgette, elenge moko ya mbula 18 alobi boye: “Nazalaki kobanga koyebisa Papa mpo na mwana mobali moko oyo nazalaki kolinga. Kasi, ntango nayebisaki ye likambo yango, abɛtelaki ngai lisolo na ye ntango alingaki moto mpo na mbala ya liboso mpe ndenge azalaki komiyoka. Ayebisaki ngai kutu ndenge akabwanaki na mwana mwasi yango mpe mpasi oyo ayokaki. Yango elendisaki ngai nayebisa ye likambo na ngai malamumalamu.”
Litomba #4: Okoki kozwa liteya. Makambo oyo baboti na yo bakutaná na yango na bomoi ekoki kosalisa yo oyeba ndenge ya kosala liboso ya mitungisi mpe mikakatano. Joshua, elenge ya mbula 16, alobi boye: “Nalingaka koyeba ndenge oyo baboti na ngai balongaka koleisa mpe kolatisa, kolinga mpe kosalisa na elimo bato ya libota monene boye, oyo bazali na bamposa ekeseni. Nakoki koyekola makambo mingi na likambo yango.” Biblia etuni motuna oyo: “Bwanya ezalaka nde epai ya mibange te mpe mayele na bolai ya mikolo te?”—Yobo 12:12.
Bandisá lisolo
Soki olingi koyeba baboti na yo malamu, okosala ndenge nini? Talá mwa makanisi oyo.
Poná ntango ya malamu. Esɛngaka kaka te koyokana mpo na kosolola. Okoki kobimisa lisolo kaka boye. Ekoki kozala ntango bozali kobɛta bale, bozali kosala mosala moko, to ntango bozali kotambola na makolo to na motuka na baboti na yo. Cody, oyo tolobelaki liboso alobi boye: “Nasololaki malamu na baboti na ngai ntango tozalaki kosala mobembo na motuka. Ya solo, ezalaka pɛtɛɛ nde kotya écouteur mpo na koyoka miziki to kokende kolala, kasi namonaki ete kobandisa lisolo ebimisaka ntango nyonso matomba!”
Tuná mituna. Yebá ete ata soki ozwi ntango ya malamu, mbala mosusu mama na yo akoyebisa yo kaka na pwasa boye te ndenge alingaki moto mpo na mbala ya liboso, mpe mbala mosusu tata na yo akoyebisa te ndenge abebisaki motuka ya libota. Kasi, baboti na yo bakoki koyebisa yo makambo yango soki otuni bango!—Mpo oyeba mwa mituna oyo okoki kotuna, talá etanda na lokasa 12.
Zalá na bokatikati. Mbala mingi, ntango moboti azali koyanola na motuna oyo otuni ye, akoki kokɔtisa lisolo mosusu. Okoki koyoka mposa ya kozongisa ye na likambo oyo azalaki kolobela, kasi kosala bongo te! Kobosana te, mokano na yo ezali kaka te ya koyeba makambo. Kasi, ezali nde ya koluka kokóma na boyokani makasi na baboti na yo, mpe lolenge moko ya malamu ya kosala yango ezali ya kolobela makambo oyo ezali na ntina mpo na bango.—Bafilipi 2:4.
Yebá kososola makambo. “Makanisi na motema ya moto ezali lokola mai mozindo, kasi moto ya bososoli nde akotoka yango.” (Masese 20:5) Osengeli kozala na bososoli, mingimingi ntango ozali koluka kotoka epai ya baboti na yo makambo oyo bakosepela mpenza te kolobela yango. Na ndakisa, okoki koluka koyeba mabunga oyo papa na yo asalaki ntango azalaki na mbula na yo mpe epesaka ye nsɔni, mpe ndenge oyo akoki kosala mpo na kobongisa yango, soki likambo yango ebimi lisusu. Kasi, liboso olobela likambo ya ndenge wana, okoki koloba ete, “Ekosala yo mabe soki na natuni yo . . .”
Lobáká na mayele. Ntango baboti na yo bazali koyebisa yo makambo na bango, osengeli “koyokaka noki, kowelaka koloba te.” (Yakobo 1:19) Ata ndenge nini, kotyola to kofinga baboti na yo te mpo na makambo oyo bayebisi yo. Maloba lokola “Nakoki kondima te ete osalaki likambo yango” to “Yango wana ozalaka makambo makasi ná ngai!” ekotinda papa to mama na yo aboya koyebisa yo makambo mosusu. Okoyebisa mpe te makambo yango epai ya bato mosusu oyo bazali na libota na bino te.
Ntango ezali kaka!
Makanisi oyo touti kolobela ekoki kosalisa yo oyeba baboti na yo malamu ntango ozali naino kofanda na bango. Bongo soki ofandaka na bango lisusu te? Kaka makanisi yango ekoki kosalisa yo ozongisa boyokani makasi na baboti na yo, to kosala boyokani na moboti oyo oyebaki mpenza te. Esalemaki bongo mpo na Jacob, oyo tolobelaki liboso. Atako sikoyo afandi epai na ye moko, alobi boye: “Nazali koyekola koyeba papa malamu na retare, mpe nazali kosepela na yango.”
Na yango, ezala ofandi na baboti na yo to olongwá na ndako na bango, ntango ya koyeba bango malamu ezali kaka. Mpo na nini te komeka kosalela makanisi oyo epesami na lisolo oyo mpo esalisa yo osala yango?
Okoki kokuta masolo mosusu ya “Mituna oyo bilenge batunaka . . .” na Internet, na esika oyo: www.watchtower.org/ypf
[Maloba na nse ya lokasa]
a Oyo ezali bankombo oyo topesi bango kopesa na lisolo oyo.
MITUNA YA KOMANYOLA
◼ Makambo nini oyo tolobeli na lisolo oyo okolinga kotuna baboti na yo?
◼ Ndenge nini koyeba baboti na yo malamu ekoki kosalisa yo omiyeba yo moko malamu?
[Etanda/Elilingi na lokasa 12]
Tuná baboti na yo mituna lokola oyo:
LIBALA: Ndenge nini yo ná Mama (to Papa) bokutanaki? Nini ebendaki yo epai na ye? Bofandaki wapi liboso ntango bobalanaki?
BOMWANA: Obotamá wapi? Yo ná bandeko na yo bozalaki ndenge nini? Baboti na bino bazalaki kosalela bino makambo makasimakasi to te?
KELASI: Liteya nini ozalaki kolinga mingi na kelasi? Oyo wapi ozalaki kokoka te? Ezalaki na molakisi moko oyo ozalaki kolinga mingi? Mpo na nini ozalaki kolinga ye mingi?
MOSALA: Mosala nini osalaki liboso na bomoi na yo? Ozalaki kosepela na yango? Soki okokaki kopona mosala mosusu, ekozala mosala nini?
MAKAMBO OYO ALINGAKA: Soki ozalaka na likoki ya kokende kotala ata mboka nini na mokili, okokende mboka nini? Likambo nini to mosala nini okolinga koyekola?
MAKAMBO YA ELIMO: Baboti na yo bazalaki bakristo? Soki bazalaki bakristo te, nini etindaki yo obanda kosepela na Biblia? Mikakatano nini okutanaki na yango ntango obandaki kotosa mitinda ya Biblia?
MAKANISI: Mpo na yo, nini ezali na ntina mingi mpo na kozala na boninga ya malamu? bomoi ya esengo? mpe libala ya malamu? Toli nini ya malamu koleka bapesá yo?
Meká kosala boye: Poná mwa mituna na kati ya mituna wana mpe meká kokanisa biyano oyo mbala mosusu baboti na yo bakopesa. Na nsima, tuná bango mituna yango mpe talá soki biyano na bango ekokani na oyo yo okanisaki.
[Etanda na lokasa 13]
LIYEBISI EPAI YA BABOTI
Ozali kolya elongo na mobali na yo, na mwana na yo ya mwasi, mpe baninga mosusu ya libota. Ntango bozali kosolola, moninga na yo alobeli moto moko oyo bolinganaki na ye—kasi boboyana—liboso okutana na mobali na yo. Oyebisá naino mwana na yo ya mwasi likambo yango te. Sikoyo alingi koyeba likambo yango malamu. Okosala nini?
Mbala mingi, ezalaka malamu koyoka mituna oyo mwana akotuna. Mbala nyonso oyo mwana atuni mituna mpe azali koyoka biyano na yo, ezalaka nde lisolo, likambo oyo baboti mingi balingaka.
Kasi, makambo nini ya bomoi na yo ya kala osengeli koyebisa mwana na yo? Ya solo, okoki kosepela kobomba makambo oyo epesaki yo nsɔni. Atako bongo, soki likoki ezali, koyebisa mabunga mpe mikakatano na yo mosusu ekoki kosalisa mwana na yo. Na ndenge nini?
Tózwa ndakisa moko. Mokolo moko, ntoma Paulo alobelaki makambo na ye; alobaki boye: “Ntango nalingi kosala oyo ezali malamu, oyo ezali mabe nde ezali epai na ngai. . . . Ngai moto ya mawa!” (Baroma 7:21-24) Yehova Nzambe apesaki maloba wana mpe atindaki ekomama mpe ebatelama na kati ya Biblia mpo na litomba na biso. (2 Timote 3:16) Ya solo, ezali mpenza mpo na litomba na biso, mpo nani akoki koloba ete maloba wana ya Paulo etali ye te?
Ndenge moko mpe, soki bana na yo bazali koyoka makambo ya malamu mpe mabunga na yo, yango ekoki kosalisa bango bámona ete bazali kaka lokola yo. Ezali solo ete obɔkwamaki na eleko moko te ná bango. Kasi, atako bileko ebongwani, bato bazali kaka bato; mitinda ya Biblia mpe ebongwani te. (Nzembo 119:144) Kolobela mikakatano oyo okutaná na yango—mpe ndenge oyo osalaki mpo na kosilisa yango—ekoki kosalisa bana ya bilenge báyeba ndenge ya kosala liboso ya mikakatano oyo bango bazali kokutana na yango. Elenge mobali moko na nkombo Cameron alobi boye: “Soki oyebi ete baboti na yo bakutanaki na mikakatano lokola oyo yo moko ozali kokutana na yango, ekosalisa yo omona ete baboti na yo bazali kaka lokola yo.” Abakisi ete: “Ntango okokutana na mokakatano, okomituna soki baboti na yo mpe bakutanaki na yango liboso.”
Likebisi: Lisolo nyonso esɛngaka kaka kosuka na toli te. Ya solo, okoki kobanga ete mwana na yo akóma na makanisi ya mabe to aluka ata kolongisa mabunga oyo asalaka, oyo ekokani na oyo yo osalaki. Kasi, na esika oloba makambo oyo olingi ete mwana na yo asimba na lisolo yango (“Yango wana osengeli soki moke te . . .”), yebisá ye nde na mokuse ndenge ozali komiyoka. (“Soki nayebaki, nasengelaki te kosala likambo boye to boye mpamba te . . .”) Na ndenge yango, mwana na yo ya mobali to ya mwasi akoki kozwa liteya na makambo oyo ekómelaki yo kozanga amona ete ozalaki kopesa ye toli.—Baefese 6:4.
[Etanda na lokasa 13]
“Mokolo moko, nayebisaki mama na ngai ete namiyokaka malamu ntango nazali na baninga na ngai ya kelasi koleka ntango nazali na bandeko ya lisangá. Mokolo oyo elandaki, nakutaki likoló ya mesa, mokanda Mama akomelaki ngai. Na mokanda yango, ayebisaki ngai ete ye mpe azalaki koyoka lokola azangi baninga na kati ya lisangá. Alobelaki bato oyo Biblia elobeli, oyo basalelaki Nzambe ata ntango bazalaki na moto moko te ya kolendisa bango. Apesaki mpe ngai longonya mpo na milende na ngai ya koluka baninga ya malamu. Nakamwaki komona ete nazali moto ya liboso te ya kokutana na mokakatano yango. Mama na ngai mpe akutanaki na mokakatano yango, mpe nazalaki na esengo mingi ya koyeba yango mpe nalelaki. Makambo oyo mama ayebisaki ngai elendisaki ngai mingi, mpe epesaki ngai makasi ya kosala oyo ezali malamu.”—Junko, mbula 17, Japon.
[Elilingi na lokasa 11]
Sɛngá baboti na yo balakisa yo bafɔtɔ to biloko na bango mosusu ya kala. Mbala mingi, yango ekoki kobandisa lisolo