Ndako oyo ekabwani—Ndenge koboma libala esalaka bilenge
BATO oyo bayekolaka makambo ya libota bazalaki kokanisa ete bayebi batoli ya kopesa bato. Soki bato bazali na matata na mabala, bazalaki kopesa bango toli oyo: ‘Osengeli koluka mingimingi nde bolamu na yo’; bazalaki mbangumbangu kobakisa boye: ‘Komitungisa te mpo na bana. Bakomesana. Ezali kutu malamu bázala na baboti oyo babomá libala na esika báfanda na baboti oyo bazali koyokana te!’
Nzokande, bapesi-toli mosusu oyo bazalaki liboso koloba ete koboma libala eleki malamu bandimi ete bazalaki komikosa. Lelo oyo, bazali koloba ete, ‘Koboma libala ezali etumba. Moto moko te azangaka kozoka; ata mpe bana.’
Lokuta ya koloba ete koboma libala ezali pɛtɛɛ
Bakoki kosalela yango filme moko oyo ezali kosepelisa bato. Likambo nini? Papa ná mama bazali koboma libala. Mama azwi lotomo ya kobatela bana mpe na nsima abali mobali mosusu oyo mwasi akufá, oyo atikalá na bana. Pɔsɔ na pɔsɔ libota yango oyo ezangá boyokani ezali kokutana na mokakatano moko nsima ya mosusu—bazali kosilisa yango kozanga mpasi na boumeli ya miniti 30 na filme yango oyo ezali mpe na makambo ya kosɛkisa.
Mbala mosusu filme ya ndenge wana ekoki kosɛkisa. Kasi, na ndenge ya solo, koboma libala ezali likambo ya kosɛkisa te. Kutu, ezali likambo moko oyo esalaka mpasi mingi. Na buku na ye (Emotional Infidelity), Gary Neuman akomaki boye: “Koboma libala ezali nde kofundana. Moto moko azali kofunda mosusu na Leta. Na miniti kaka oyo ondimi koboma libala, ondimi kotika kozala na bokonzi likoló ya mwana na yo. Ondimi mpe kotika kozala na bokonzi likoló ya mbongo na yo, mpe mbala mosusu ya esika oyo okofanda. Moto mosusu akoki koyokanisa bino mpo bósilisa likambo yango, ntango mosusu mpe te. Nsukansuka, mopaya moko boye, oyo babengi zuzi nde akoyebisa yo mbala boni okobanda komona mwana na yo mpe mbongo boni okotikala na yango. Likambo ya mawa, zuzi yango azali kokanisa mpenza lokola yo te.”
Mbala mingi, koboma libala ezalaka kaka kozwa mokakatano moko na esika ya mosusu. Ya solo, makambo nyonso, banda na esika ya kofanda tii na makambo ya mbongo, ekoki kobongwana—mpe mbala mosusu ekobeba nde kobeba. Bakisá mpe makambo oyo koboma libala esalaka bana.
Koboma libala mpe bilenge
Koboma libala ekoki kobulunganisa bana, ata soki bazali na mbula nini. Bato mosusu balobaka ete esalaka bilenge eloko te. Bakanisaka ete ezali bongo mpo bilenge basili kokola mpe bazali pene ya kolongwa na ndako ya baboti na bango. Nzokande, bato ya mayele bamoni ete koboma libala esalaka bilenge mabe. Bamoni ete mpo na bantina wana, koboma libala ekoki kobulunganisa mingi nde bilenge.a Tótalela makambo oyo elandi:
◼ Wana bazali kokola mpo bákóma mikóló, bilenge bazalaka na likama mingi, mbala mosusu kutu koleka ntango bazalaki bana mike. Mposa na bango ya koluka kozwa bonsomi ekosa yo te: bilenge bazalaka mpenza na mposa ya kozwa makasi na kati ya libota ya malamu.
◼ Na ntango mpenza oyo bilenge bazali koluka kosala boninga ya bato oyo bakoli, koboma libala ekoteya bango ete bákeba na bizaleli lokola kotyela basusu motema, kozala sembo, to kolinga. Na nsima, ntango bakokóma mikóló, bakoki koboya kosala boninga makasi na bato.
◼ Ezali solo ete mpasi etindaka bana ata ya mbula nini básala makambo ndenge na ndenge, kasi mbala mingi bilenge basalaka nde makambo ya mabe koleka, na ndakisa mobulu, komɛla masanga mpe bangi.
Elingi koloba te ete bilenge oyo baboti na bango babomi libala bakozala na boyokani malamu te na bato to bakozala malamu te na bomoi. Bakoki kolonga na bomoi, mingimingi soki bazali na boyokani na baboti nyonso mibale.b Kasi, kondima ete koboma libala ‘eleki malamu mpo na bana’ ndenge bato mosusu bakoki koloba, to ete ekosilisa matata nyonso oyo ezali na kati ya babalani, ezali kozanga mayele. Kutu, bato mosusu bamonaka ete esɛngaka básololaka mingi na molongani na bango ya “matata” nsima ya koboma libala koleka ndenge bazalaki kosolola liboso, mpo na makambo mikemike lokola mbongo ya bana to kobatela bana. Soki ekómi boye, koboma libala esilisaka mikakatano ya libota te; ememaka yango kaka na esika mosusu.
Likambo ya misato ya kosala
Okosala nini soki libala na bino ezali na matata mpe okanisi koboma yango? Lisolo oyo emonisi bantina mpenza oyo esengeli kotinda yo otalela lisusu likambo yango. Koboma libala ezali te nkisi oyo esilisaka mikakatano nyonso ya libala.
Kasi, tóyokana malamu: tolobi te ete ondima kaka kofanda na libala ya mabe. Likambo mosusu ya kosala ezali: Soki libala na yo ezali na mikakatano, mpo na nini te kosala makasi mpo na kobongisa yango? Koboya likanisi yango mbala moko te; koloba te ete libala na yo ekoki kobonga te. Omituna mituna oyo:
◼ ‘Na ebandeli, bizaleli nini ebendaki ngai epai ya molongani na ngai? Bizaleli yango ezali lisusu te?’—Masese 31:10, 29.
◼ ‘Nakoki lisusu kolamwisa mayoki oyo nazalaki na yango liboso tóbalana?’—Loyembo ya Salomo 2:2; 4:7.
◼ ‘Ata soki molongani na ngai asali nini, ngai nakoki kosala nini mpo nasalela batoli oyo ezali na nkasa 3 tii 9 ya zulunalo oyo?’—Baroma 12:18.
◼ ‘Nakoki koyebisa molongani na ngai (na monɔkɔ to na mokanda) ndenge nakolinga ete boyokani na biso ebonga?’—Yobo 10:1.
◼ ‘Tokoki kosolola na moninga moko oyo akɔmɛli, oyo akoki kosalisa biso tómityela mikano ya malamu mpo na kobongisa libala na biso?’—Masese 27:17.
Biblia elobi boye: “Moto ya ekɛngɛ atyaka likebi na matambe na ye.” (Masese 14:15) Esengeli kotosa etinda wana kaka te ntango ya kopona molongani, kasi mpe na ntango ya kotalela oyo esengeli kosala mpo na kobongisa libala oyo ezali na matata. Ya solo, ndenge lisolo oyo ezali na lokasa 9 emonisi yango, mabota ya malamu mpe ezalaka na mikakatano: bokeseni ezali nde na ndenge ya kosilisa yango.
Tópesa ndakisa: Kanisá ete omati na motuka mpo na mobembo moko molai. Ntembe ezali te ete okokutana na mikakatano na nzela, na ndakisa, mbula to mopɛpɛ makasi, mituka ekangi nzela, mpe bisika oyo bakangi nzela. Mbala mosusu kutu okoki kobunga. Okosala nini? Okobaluka mpe okozonga to okoluka nde ndenge ya kolonga mokakatano yango mpe kokoba mobembo? Na mokolo oyo obalaki, obandaki mobembo oyo eyebanaki ete ekozanga mikakatano te, mpo Biblia elobi ete “bato oyo bakobalana, bakomona pasi.” (1 Ba-korentien 7:28, Bible na lingala ya lelo oyo) Motuna ezali te ya koyeba soki mikakatano ekobima, kasi nde ndenge nini okosala soki ebimi. Okoki koluka ndenge ya kolonga mokakatano mpe kokoba kokende liboso? Ata soki ozali komona ete libala na yo ekobonga lisusu te, okomeka koluka lisalisi?—Yakobo 5:14.
Ebongiseli ya Nzambe
Libala ezali ebongiseli ya Nzambe oyo esengeli kozwama na lisɛki te. (Ebandeli 2:24) Soki ozali komona ete mikakatano eleki yo motó, kanisá makambo oyo tolobeli na lisolo oyo.
1. Meká kolamwisa lisusu bolingo oyo oyokaki na ebandeli.—Loyembo ya Salomo 8:6.
2. Kanisá oyo yo okoki kosala mpo na kobongisa libala na yo, mpe salá yango.—Yakobo 1:22.
3. Yebisá molongani na yo polele kasi na limemya—na monɔkɔ to na mokanda—makambo oyo okanisi ete bosengeli kosala mpo na kobongisa libala na bino.—Yobo 7:11.
4. Ndimá lisalisi. Osengeli te kobongisa libala na yo kaka na makasi na yo moko!
[Maloba na nse ya lokasa]
a Lisolo oyo ezali kolobela mingimingi bilenge, kasi koboma libala esalaka mabe ata na bana oyo bazali mike. Mpo na koyeba makambo mosusu, talá Lamuká! ya 8 Desɛmbɛ 1997, nkasa 3-5, nkasa 5-8, nkasa9-12, mpe ya 22 Aprili 1991, nkasa 3-5, nkasa 6-11, nyonso na Lifalanse.
b Mbala mingi esalemaka bongo te, mingimingi soki moboti moko asundoli libota to soki emonani polele ete azali kokokisa mikumba na ye te to azali moto mabe.—1 Timote 5:8.
[Etanda/Elilingi na lokasa 19]
‘NA MBALA OYO EKOSIMBA’
Bato ya mayele bamonisi ete mbala mingi, mabala ya mibale ekufaka mingi koleka oyo ya liboso, oyo ya misato kutu koloba te. Na buku na ye (Emotional Infidelity), Gary Neuman apesi ntina moko. Akomaki boye: “Soki ozalaki na mikakatano na libala na yo ya liboso, elimboli kaka te ete oponaki molongani ya mabe. Mokakatano ezali nde yo. Olingaki moto yango. Bosalaki elongo mpo bózala na oyo bozali na yango to oyo bozali na yango te.” Neuman asukisi ndenge nini? “Malamu nde kolongola mokakatano mpe kotikala na molongani na yo na esika ya kolongola molongani na yo mpe kotikala na mokakatano yango.”
[Etanda na lokasa 21]
SOKI LIBALA EKUFI
Biblia endimi ete makambo mosusu ya mpasi koleka ekoki komema na koboma libala.c Soki esalemi bongo na libota na bino, ndenge nini okoki kosalisa bana na yo ya bilenge bámesana?
Yebisá mwana na yo ya elenge likambo oyo esalemi. Soki likoki ezali, baboti nyonso mibale basengeli kosala yango. Bino mibale bóyebisa mwana ete bozwi ekateli ya koboma libala. Bósalisa ye amona mpenza ete ezali foti na ye te mpe ete bino mibale bokokoba kolinga ye.
Bótika kobunda—etumba esili. Baboti mosusu bakobaka kobunda ata ntango molai nsima ya koboma libala. Ndenge moto moko ya mayele alobaki yango, bakómaka “bato oyo babomá libala na miso ya Leta kasi na mitema, bazali se kobunda mpo balongaki te kobongisa makambo mpo báyokana lisusu malamu.” Kosala bongo ezangisi bana kaka baboti te, mpo Papa ná Mama bazali ntango nyonso kobunda, kasi ezali mpe kolendisa bango bábimisaka matata kati na baboti yango mibale mpo bango básala oyo balingi. Na ndakisa, mwana mobali akoki koyebisa mama na ye ete: “Papa atikaka ngai nazonga ndako na ngonga nyonso oyo nalingi. Mpo na nini yo osalaka bongo te?” Lokola mama akolinga te ete “monguna” alonga ye, ye mpe akotikela mwana nzela.
Tikelá mwana nzela ya koloba. Bilenge bakoki kokanisa ete, ‘Lokola baboti na ngai batikaki kolingana, bakoki mpe kotika kolinga ngai’ to ‘Soki baboti na ngai babukaki mibeko, mpo na nini ngai te?’ Mpo na kokitisa kobanga ya mwana na yo to kosembola makanisi na ye ya mabe, pesá ye mabaku mingi ya koloba. Kasi kebá: Azwa esika na yo te mpe komona ye te lokola moto oyo okoki koyebisa makambo mpo okitisa motema na yo. Azali nde mwana na yo, kasi te moto oyo oyebisaka basekele na yo.
Lendisá mwana azalaka na boyokani malamu na molongani na yo ya kala. Moto oyo obomi na ye libala azali molongani na yo ya kala, kasi azali te moboti ya kala ya mwana na yo. Koloba mabe mpo na ye ebebisaka makambo. Buku moko (Teens in Turmoil—A Path to Change for Parents, Adolescents, and Their Families) elobi boye: “Soki baboti baponi kosalela mwana na bango lokola bibundeli na etumba na bango ya koboma libala, basengeli kolikya kobuka mbuma oyo baloni.”
Kobosana bamposa na yo moko te. Ntango mosusu, makambo ekoki koleka yo motó. Kasi, kolɛmba nzoto te. Kobá kosala makambo oyo esungaka yo. Soki ozali mokristo, kobá komipesa na makambo ya elimo. Kosala bongo ekosalisa yo ná mwana na yo bókoba kozala na bokatikati.—Nzembo 18:2; Matai 28:19, 20; Baebre 10:24, 25.
[Maloba na nse ya lokasa]
c Na kolanda Biblia, kaka kosangisa nzoto na libándá ya libala nde ekoki kopesa moto ndingisa ya koboma libala mpe kopesa ye nzela ya kobala moto mosusu. (Matai 19:9) Soki molongani moko asali ekobo, molongani mosusu, kasi te bandeko ya libota to bato mosusu, nde akokata soki ekozala malamu nde aboma libala.—Bagalatia 6:5.
[Elilingi na lokasa 20]
Salá makasi okokisa ndai oyo osalaki mokolo ya libala
[Elilingi na lokasa 21]
Soki moto na moto azali na ngala na ye ya kobatela mwana, lendisáká mwana na yo ya elenge ayokanaka malamu na molongani na yo ya kala