Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 1/10 nk. 28-29
  • Ezali mabe kofanda esika moko liboso ya kobalana?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ezali mabe kofanda esika moko liboso ya kobalana?
  • Lamuká!—2010
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • “Mosuni moko”
  • “Bóboya pite”
  • Libala ezali likabo ya Nzambe ya bolingo
    “Bótikala na kati ya bolingo ya Nzambe”
  • Lolenge ya komibongisa mpo na libala oyo ekolónga
    Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota
  • Soki libala elingi kopanzana
    Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota
  • Biblia elobi nini mpo na libala?
    Biyano na mituna ya Biblia
Makambo mosusu
Lamuká!—2010
g 1/10 nk. 28-29

Biblia elobi nini?

Ezali mabe kofanda esika moko liboso ya kobalana?

OKOSOMBA kazaka to robɛ kozanga komeka yango? Mbala mosusu te. Mpo, na nsima soki elamba yango ekoki yo te, okomona ete obebisi ntango mpe mbongo na yo kaka mpamba.

Bato mingi bazalaka na makanisi ya ndenge wana mpo na libala. Bamonaka ete eleki malamu mwasi ná mobali báfanda esika moko liboso bámipesa mpo na kobalana. Balobaka ete ‘soki esimbi te, mwasi ná mobali bakoki kokabwana kozanga mindɔndɔ mpe kobimisa mbongo ebeleebele oyo basɛngaka mpo na koboma libala.’

Mbala mosusu bato oyo bakanisaka ndenge wana bamonaki ndenge moninga moko anyokwamaki na libala ya mabe. To bamoná ndenge bato oyo bazali na libala oyo ezangi bolingo bazalaki na mitungisi. Na yango, bakoki komona ete kofanda esika moko liboso ya kobalana ezali likambo ya bwanya.

Likanisi ya Biblia na likambo yango ezali nini? Mpo na koyanola, tosengeli liboso kotala oyo Liloba ya Nzambe elobi mpo na libala.

“Mosuni moko”

Biblia ezwaka libala na motuya mingi, mpe yango esengeli kokamwisa biso te, mpo ezali ebongiseli oyo Yehova Nzambe ye moko asalaki mpe atyaki. (Ebandeli 2:21-24) Banda na ebandeli, Yehova akanaki ete na nzela ya libala, mwasi ná mobali bakokóma “mosuni moko.” (Ebandeli 2:24) Nsima ya kozongela mokapo ya Biblia oyo emonisi likambo yango, Yesu abakisaki ete: “Oyo Nzambe akangisi esika moko moto akabola yango te.”​—Matai 19:6.

Ya solo, mabala mosusu ekoki kokufa.a Nzokande, soki libala ekufi, ezali te mpo libala ezali ebongiseli mabe; kasi ezali nde mpo molongani moko to bango mibale batosi te ndai na bango ya libala.

Tópesa ndakisa: Mobali moko ná mwasi basombi motuka, kasi babateli yango te na kolanda malako ya moto oyo asalaki yango. Soki motuka ebebi, ezali foti ya nani? Ya moto oyo asalaki motuka to ya baoyo basombaki yango, kasi babatelaki yango te ndenge esengeli?

Ezali mpe bongo mpo na libala. Ntango mwasi ná mobali bazali kobatela boyokani na bango mpe bazali na ekateli ya kosilisa mikakatano na bango na kolanda mitinda ya Biblia, ezali mpasi mpo libala na bango ekufa. Bakoyoka ete bazali na kimya mpo molongani mokomoko amipesi na molongani na ye. Na yango, libala ekozala esika oyo bolingo ezali.

“Bóboya pite”

Atako bongo, bato mosusu bakoki komituna boye: ‘Mpo na nini te kofanda liboso esika moko? Komeka koyeba boyokani oyo bokozala na yango liboso ya komipesa ndenge wana ekolakisa te ete moto azali kozwa libala ete ezali eloko moko mosantu?’

Eyano ya Biblia ezali polele. Paulo akomaki boye: “Bóboya pite.” (1 Batesaloniki 4:3) Liloba “pite” elimboli lolenge nyonso ya kosangisa nzoto libándá ya libala. Yango ezali mpe kosangisa nzoto kati na mwasi ná mobali oyo bafandi esika moko, ata soki bazali na likanisi ya kobalana. Na yango, na kolanda Biblia, ezali mabe mwasi ná mobali báfanda esika moko​—ata soki bazali na likanisi ya kobalana mosika te.

Likanisi ya Biblia esilá ngala? Bato mosusu bakoki kokanisa bongo. Mpo na mikili mingi, kofanda esika moko​—bózala na likanisi ya kobalana to te—​ezali mabe te. Kasi, tókanisa mbuma oyo yango ebimisaka. Bato oyo bafandaka esika moko kozanga kobalana, bazwá sekele ya libota ya esengo? Bazali na esengo mingi koleka bato oyo babalaná? Basi ná mibali oyo bafandaka esika moko liboso ya kobalana, mingi kati na bango batikalaka nde sembo nsima ya kobalana? Baankɛtɛ emonisi ete ezali bongo te. Kutu, emonisaki ete bato mingi oyo bafandaka esika moko liboso bábalana bazalaka na matata mingi na libala na bango mpe babomaka libala mingi koleka.

Bato mosusu ya mayele bakoki koloba ete baankɛtɛ yango ekosi. Mwasi moko oyo azali moto ya pisikoloji akomaki boye: “Ya liboso, bato oyo baponi kobala kozanga báfanda esika moko bakeseni ná bato oyo bandimi kofanda esika moko liboso bábalana.” Alobaki ete likambo ezali te ya kofanda esika moko; likambo ezali nde ya “komona ete kobala ezali na motuya mingi.”

Ata soki ezali solo, ezali kaka komonisa ntina ya komona libala ndenge Nzambe amonaka yango. Biblia elobi boye: “Libala ekumisama na kati ya bato nyonso.” (Baebre 13:4) Ntango mwasi ná mobali balapi ndai ya kotikala mosuni moko mpe na nsima bakumisi libala, bakómaka na boyokani oyo ekoki kokatana noki te.​—Mosakoli 4:12.

Soki tozongeli ndakisa oyo topesaki na ebandeli, ebongi mpenza komeka kazaka to robɛ liboso ya kosomba yango. Kasi, yango ekokani te na kofanda esika moko. Esɛngi nde kozwa ntango oyo ekoki mpo na koyeba moto oyo olingi akóma molongani na yo. Likambo yango ya ntina mingi, kasi oyo bato mingi babosanaka, ezali moko ya basekele mpo na kozala na libota ya esengo.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Biblia epesi moto nzela ya koboma libala mpe kobala lisusu kaka soki molongani na ye asangisi nzoto epai mosusu.​—Matai 19:9.

OSILÁ KOMITUNA?

◼ Mpo na nini Biblia elobi ete kosangisa nzoto ezali kaka mpo na bato oyo babalaná?​—Nzembo 84:11; 1 Bakorinti 6:18.

◼ Bizaleli nini osengeli koluka epai ya molongani?​—Ruta 1:16, 17; Masese 31:10-31.

[Etanda na lokasa 29]

“AZALI KOSALELA NZOTO NA YE MOKO LISUMU”

Biblia elobi boye: “Moto oyo asalaka pite, azali kosalela nzoto na ye moko lisumu.” (1 Bakorinti 6:18) Na bambula oyo eleki, bosolo ya maloba yango emonani na ndenge bamilio ya bato bakufi na sida mpe na bamaladi mosusu oyo ezwamaka na kosangisa nzoto. Kasi esuki wana te. Baankɛtɛ emonisi ete bilenge oyo basangisaka nzoto bazali konyokwama na makanisi mpe koluka komiboma mingi koleka. Kindumba mpe ememaka na bazemi oyo moto alingaki te, oyo ntango mosusu etindaka moto aluka kosopa yango. Soki totali makambo nyonso wana, tokoki koloba ete mitinda ya Biblia na ntina etali etamboli esilá ngala te.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto