Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 1/11 nk. 12-13
  • Nzambe abɔndisaki ngai na bampasi na ngai nyonso

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nzambe abɔndisaki ngai na bampasi na ngai nyonso
  • Lamuká!—2011
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Nazwi libɔndisi ya solosolo
  • Nazali kobundana na mikakatano
  • Nakómi na bomoi ya malamu mpe ya esengo
  • Botondi mpo na lisungi ya sembo ya Jéhovah
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Jéhovah apesaki ngai makasi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Nazali na elikya kitoko atako nazali ebɔsɔnɔ
    Lamuká!—2000
  • Tozali Banzambe te, Banganga-nkisi mpe te
    Lamuká!—1994
Makambo mosusu
Lamuká!—2011
g 1/11 nk. 12-13

Nzambe abɔndisaki ngai na bampasi na ngai nyonso

Lisolo ya Victoria Colloy

Monganga moko ayebisaki mama boye: “Tokoki kosala eloko mosusu te mpo na mwana na yo. Ekosɛnga atambola na banzete (béquilles) mpe alata baaparɛyi oyo esembolaka makolo bomoi na ye mobimba.” Nabulunganaki makasi! Nakoki kosala nini soki nakotambola lisusu te?

NABOTAMAKI mokolo ya 17 Novɛmbɛ 1949, na engumba Tapachula, na etúká ya Chiapas, na Mexique. Nazalaki mwana moko ya esengoesengo mpe ya nzoto kolɔngɔnɔ, mwana ya liboso na libota ya bana minei. Kasi ntango nakómaki na sanza motoba, natikaki mbala moko konguluma mpe nazalaki koningana lisusu malamu te. Sanza mibale na nsima, nazalaki lisusu kokoka koningana te. Minganga ya engumba bamitungisaki mpo bana mosusu ya Tapachula bazalaki mpe kobɛla kaka ndenge wana. Na yango, monganga moko oyo asalisaka maladi ya mikuwa autaki na engumba Mexico mpe ayaki kotalela biso. Amonaki ete maladi na biso ezali bukabuka.

Ntango nakómaki na mbula misato, basalaki ngai lipaso na loketo, mosusu na mabɔlɔngɔ, mpe mosusu na makɛsi (cheville). Nsima ya mikolo, maladi yango ezwaki mpe lipeka na ngai na ngámbo ya lobɔkɔ ya mobali. Ntango nakómaki na mbula motoba, bamemaki ngai na engumba Mexico mpo básalisa ngai na lopitalo moko ya bana. Mama azongaki kosala na ferme moko na Chiapas, na yango natikalaki na engumba Mexico ná nkɔkɔ na ngai ya mwasi. Kasi, mbala mingi, nazalaki kokɔta lopitalo.

Ntango nakómaki pene na mbula mwambe, nabongaki mwa moke. Kasi makambo ebebaki lisusu, mokemoke nazalaki koningana lisusu mpenza te. Na nsima minganga balobaki ete nasengeli kosalela banzete mpe kolata baaparɛyi oyo esembolaka makolo bomoi na ngai mobimba.

Banda ntango nazalaki na mbula 7 tii ntango nakómaki na mbula 15, basalaki ngai lipaso mbala 25. Ezalaki na mokuwa ya mokɔngɔ, na makolo, na mabɔlɔngɔ, na makɛsi, mpe na misapi ya makolo. Nsima ya lipaso nyonso, bazalaki kosalisa ngai mpo binama na ngai ezongela koningana malamu. Nsima ya lipaso moko, batyaki makolo na ngai sima. Ntango balongolaki sima, ezalaki kosɛnga nasala bangalasisi ya mpasi mpenza.

Nazwi libɔndisi ya solosolo

Ntango nazalaki na mbula 11, mama na ngai ayaki kotala biso nsima ya lipaso moko. Ayekolaki ete Yesu abikisaki bato ya maladi mpe atambwisaki ata bibɔsɔnɔ. Apesaki ngai nimero moko ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, zulunalo oyo Batatoli ya Yehova babimisaka, epai atángaki makambo yango. Nabombaki yango na nse ya kuse kasi mokolo moko, ebungaki. Mafulume bamonaki yango mpe bazwaki yango. Batyolaki ngai mpo natángaki yango.

Pene na mbula moko na nsima, mama autaki lisusu na Chiapas mpe ayaki kotala ngai. Na ntango wana, akómaki koyekola Biblia na Batatoli. Amemelaki ngai buku Paladiso ebunga na paladiso ekozwama.a Mama alobaki boye: “Soki olingi kozala na bomoi na mokili ya sika oyo Nzambe alaki epai Yesu akobongisa nzoto na yo, osengeli koyekola Biblia.” Na yango, ntango nazalaki na mbula 14, nabandaki koyekola Biblia na Batatoli atako nkɔkɔ azalaki kotɛmɛla ngai. Na mbula oyo elandaki, basɛngaki ngai nalongwa na lopitalo yango mpo ezalaki kaka mpo na bana mike.

Nazali kobundana na mikakatano

Nakómaki konyokwama na makanisi. Lokola nkɔkɔ azalaki kotɛmɛla ngai, esɛngaki nazonga kofanda na baboti na ngai na Chiapas. Nzokande, mikakatano ezalaki na ndako mpo papa azalaki kolangwa masanga. Na boumeli ya mwa ntango, namonaki ete ntina ya kozala na bomoi ezali te. Nakómaki na makanisi ya komɛla pwazɔ. Kasi lokola nakobaki koyekola Biblia, nabongolaki makanisi. Elaka oyo Biblia epesi ete ekozala na paradiso awa na mabele, epesaki ngai esengo.

Nabandaki koyebisa basusu elikya kitoko oyo ezali na Biblia. (Yisaya 2:4; 9:6, 7; 11:6-9; Emoniseli 21:3, 4) Nsukansuka, na mokolo ya 8 Mai 1968, ntango nazalaki na mbula 18, nazwaki batisimo lokola Motatoli ya Yehova. Banda 1974, na nalekisaka ngonga koleka 70 sanza nyonso mpo na koyebisa basusu elikya oyo etindaki ngai natikala na bomoi.

Nakómi na bomoi ya malamu mpe ya esengo

Na nsima, ngai ná mama tokendaki kofanda na engumba Tijuana, pene na ndelo oyo ekaboli Mexique ná États-Unis. Ngai ná mama tofandaka na esika oyo ebongi mpo na biso. Nakoki naino kotambola na ndako na banzete mpe baaparɛyi oyo esembolaka makolo, mpe nasalelaka kiti ya bibɔsɔnɔ mpo na kolamba, kosokola mpe kongoma bilamba na ngai. Mpo na mosala ya kosakola, nakendaka na mwa motuka na ngai oyo etambolaka na kura mpe oyo babongisá mpo ekokana na bamposa na ngai.

Longola koteya bato mateya ya Biblia na babalabala mpe na bandako, nakendaka mbala mingi na lopitalo mpe kuna nasololaka masolo ya Biblia ná bato oyo bazali kozela monganga na libándá. Soki nasilisi kosolola na bango, nakendaka na zando na mwa motuka na ngai mpo na kosomba biloko oyo tosengeli na yango mpe na nsima nazongaka na ndako mpo na kosalisa mama na kolamba mpe na misala mosusu ya ndako.

Mpo na kozwa mwa mbongo, natɛkaka bilamba ya tombola. Mama azali sikoyo na mbula 78 mpe akoki kosala mingi te mpo motema na ye ekangamaki mbala misato. Na yango nalandelaka makambo ya nkisi na ye mpe kolya na ye. Atako tozali na nzoto malamu mingi te, tosalaka makasi mpo na koyangana na makita. Bato koleka 30 oyo nayekolaki Biblia na bango na boumeli ya bambula bazali lelo kopesa mabɔkɔ na mosala ya kosakola.

Nandimaka ete nsukansuka elaka oyo ya Biblia ekokokisama: “Na ntango yango [na mokili ya sika oyo Nzambe alaki] motɛngumi akopumbwa lokola serfe.” Liboso na yango, maloba ya Nzambe oyo ebɔndisaka ngai: “Kobanga te, mpo nazali na yo. Kotala epai na epai te, mpo nazali Nzambe na yo. Nakopesa yo makasi. Nakosalisa yo mpenza. Nakosimba yo mpenza na lobɔkɔ na ngai ya mobali ya boyengebene.”​—Yisaya 35:6; 41:10.b

[Maloba na nse ya lokasa]

a Ebimisamaki na Batatoli ya Yehova na 1958 kasi lelo ebimisamaka lisusu te.

b Victoria Colloy akufaki mokolo ya 30 Novɛmbɛ 2009, azalaki na mbula 60. Mama na ye akufaki mokolo ya 5 Yuli 2009.

[Elilingi na lokasa 12]

Ntango nazalaki na mbula 7, nalati baaparɛyi oyo esembolaka makolo

[Elilingi na lokasa 13]

Na mosala ya kosakola, nazali kotambwisa mwa motuka ya kura oyo babongisá mpo na ngai

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto