Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 4/11 nk. 4-6
  • Nani mpenza atambwisaka misala ya bilimo mabe?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nani mpenza atambwisaka misala ya bilimo mabe?
  • Lamuká!—2011
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bademo bazali banani?
  • Mibatelá!
  • Batoli oyo ebatelaka
  • Ezali mabe kozala na boyokani na bilimo mabe?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Koluka koyeba makambo oyo eleki mayele ya bomoto ezali kaka lisano mpamba?
    Mituna oyo bilenge batunaka
  • Ndimá lisalisi ya Yehova mpo otɛmɛla bilimo mabe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2019
  • Bikelamu ya elimo—Bakoki kosala biso mabe to malamu?
    Biblia eteyaka mpenza nini?
Makambo mosusu
Lamuká!—2011
g 4/11 nk. 4-6

Nani mpenza atambwisaka misala ya bilimo mabe?

MPO na Mozalisi na biso, Biblia elobi ete: “Nzambe azali pole mpe molili ezali ata moke te na bomoko elongo na ye.” (1 Yoane 1:5) Yango ezali mpenza solo mpo na Nzambe. Na yango, Nzambe ya solo nde atambwisaka misala ya bilimo mabe? To ezali na nde nguya moko ya mabe oyo esalaka yango?

Misala ya bilimo mabe oyo eyebani mingi ezali: Kosakola makambo oyo ebombaná mpe misala ya bademo, na ndakisa kotala minzoto, koyekola badati oyo moto abotamaki mpe kotala mabɔkɔ, mpe bonganga-nkisi, mpe kosolola na “bakufi” mpe kolɔka. Misala yango ebandá kala mpenza, mingi na yango ebandaki na Babilone ya kala, epai bilembo ya kobeba na yango, ezali na Irak. (Yisaya 47:1, 12, 13) Misala yango epalanganaki na mokili mingi ya ntango wana mpe ekɔtá na mimeseno mpe mikili mingi.

Tótalela likambo moko oyo esalemaki na Filipi, engumba moko ya Masedonia ya kala. Kuna, mwa etuluku moko ya bakristo, oyo ntoma Paulo mpe monganga Luka bazalaki elongo na bango, bakutanaki na elenge mwasi moko oyo azalaki kosakola makambo oyo ebombaná. Yoká ndenge Luka, moko ya bakomi ya Biblia, amonisaki epai nguya ya mwana mwasi yango ezalaki kouta. Akomaki ete: “Mwana mwasi moko ya mosala oyo azalaki na elimo moko, demo moko ya kosakola makambo oyo ebombaná, akutanaki na biso. Azalaki kokɔtisela bankolo na ye mosolo mingi na mosala ya kosakola makambo oyo ekoya.”​—Misala 16:16-18.

Ya solo, nguya ya mwana mwasi wana ezalaki kouta te epai ya Yehova, Nzambe ya solo, kasi epai ya demo moko, elimo moko ya mabe. Yango wana, Paulo ná baninga na ye baboyaki koyoka ye. Mbala mosusu, ozali sikoyo komituna boye: ‘Bademo bazali banani? Mpe bautá wapi?’ Lisusu, yoká biyano oyo Biblia epesi.

Bademo bazali banani?

Ntango molai liboso Yehova akelá bato, akelaki ebele mpenza ya bikelamu ya elimo, elingi koloba “bana ya Nzambe” na likoló. (Yobo 38:4, 7) Ndenge moko na bato, bazali na bonsomi ya kopona, mpe na boumeli ya ntango molai, bango nyonso batikalaki sembo epai ya Nzambe. Kasi, ntango wana ya esengo esukaki na mbalakaka. Ndenge nini?

Ntango Nzambe asilisaki kokela bato, anzelu moko abandaki kolula eloko oyo ezalaki ya ye te, elingi koloba losambo. Anzelu wana mabe asalelaki nyoka mpo na kokosa Eva, mwasi ya liboso mpo atosa Mozalisi na te. (Ebandeli 3:1-6) Biblia ebengaka anzelu yango motomboki, “nyoka ya ebandeli, oyo babengi Zabolo mpe Satana.” (Emoniseli 12:9) Yesu alobelaki ye lokola “mobomi” oyo “akangamaki makasi te na solo,” mpe abakisaki ete: “Ntango alobaka lokuta, alobaka na kolanda makanisi na ye moko, mpo azali moto ya lokuta mpe tata ya lokuta.”​—Yoane 8:44.

Na nsima, “bana [mosusu ya elimo] ya Nzambe ya solo” balandaki Satana na botomboki yango. (Ebandeli 6:1, 2) Na nsima, balobelamaki lokola “baanzelu oyo basumukaki” mpe “baanzelu oyo babatelaki te esika na bango ya ebandeli kasi basundolaki esika na bango moko ya kofanda mpenza,” to esika na bango na likoló. (2 Petro 2:4; Yuda 6) Bakómaki kobengama bademo. (Yakobo 2:19) Kutu, bazali na ekateli ya kopɛngwisa ebele ya bato na losambo ya solo, ndenge bapɛngwisaki Bayisraele mingi na ntango ya kala. (Kolimbola Mibeko 32:16, 17) Ndenge ezalaki na ntango ya kala, lelo oyo mpe, Satana ná bademo na ye basalelaka na mayele, lokuta ya mangomba.​—2 Bakorinti 11:14, 15.

Mibatelá!

Atako bilimo mabe bazali na nguya oyo eleki ya bato, tokoki, na lisalisi ya Nzambe, ‘kotɛlɛma bango’ mpe kolonga. (1 Petro 5:9) Kasi, mpo na kozwa lisalisi yango, tosengeli koyekola makambo oyo Nzambe azali kosɛnga mpe kotosa yango. Na ntina na bakristo ya mikolo na ye, ntoma Paulo akomaki ete: “Biso . . . tozali kotika te kobondela mpo na bino mpe kosɛnga ete bótonda na boyebi ya solosolo ya mokano na ye na bwanya nyonso mpe bososoli ya elimo, mpo na kotambola na ndenge oyo ebongi na Yehova mpo bósepelisa ye mpenza.”​—Bakolose 1:9, 10.

Na kati ya baoyo bazwaki “boyebi [yango] ya solosolo” tokoki kotánga bato mingi ya engumba ya Efese oyo bazalaki kosala misala ya maji. Yoká ndenge koyeba solo esalisaki bango. Biblia elobi ete: “Ebele ya baoyo bazalaki kosala misala ya maji basangisaki babuku na bango esika moko mpe batumbaki yango na miso ya bato nyonso.” Babuku yango ezalaki ya motuya “ya mbongo ya bibende ya palata nkóto ntuku mitano (50 000),” ezalaki mbongo mingi mpenza! (Misala 19:17-19) Ndakisa ya bato wana oyo bamonisaki molende, ekomamaki mpo na litomba na biso.​—2 Timote 3:16.

Batoli oyo ebatelaka

Ezali na makambo mosusu oyo tokoki kosala mpo na komibatela na bademo. Tótalela batoli ya Biblia oyo elandi:

“Bóndimaka te liloba nyonso oyo emonani lokola nde euti na Nzambe, kasi bómekaka maloba yango mpo na komona soki euti mpenza na ye.” (1 Yoane 4:1) Makambo mosusu oyo bato oyo batalaka minzoto, bato ya bikelakela, mpe banganga-nkisi balobaka ekoki kozala ya solo. Na ndakisa, mwana mwasi ya mboka Filipi oyo azalaki na demo alobaki solo ntango alobaki mpo na Paulo mpe baninga na ye ete: “Bato oyo bazali baombo ya Nzambe Oyo-Aleki-Likoló, baoyo bazali kosakwela bino nzela ya lobiko.” (Misala 16:17) Kasi, Paulo ná baninga na ye bandimaki te ete mwana mwasi yango akende elongo na bango. Kutu, Paulo apesaki nde mitindo ete elimo yango ebima epai ya mwana mwasi yango. Mekáká mateya oyo mangomba eteyaka na kokokanisa yango na oyo Biblia elobaka.​—Misala 17:11.

“Yango wana, bómikitisa liboso ya Nzambe; kasi bótɛmɛla Zabolo, mpe akokima bino.” (Yakobo 4:7) Bademo bazali banguna ya Nzambe mpe banguna na yo. Koluka kutu te koyeba misala na bango ya molili. Kasi, omikitisa liboso ya Nzambe na kotosa mibeko na ye ya bolingo, mpo ezali kilo te. (1 Yoane 5:3) Na ndakisa, Nzambe alobaki na ekólo Yisraele ya kala ete: “Epai na yo moto azwama te . . . oyo azali kosakola makambo oyo ebombaná, moto ya misala ya maji to moto oyo azali koluka bilembo ya makambo oyo ekoya to moto oyo azali nganga-nkisi, to moto oyo azali kolɔka bato mosusu to moto oyo azali kotuna moto oyo asololaka na bilimo to moto oyo asalaka mosala ya kosakola makambo ekoya to moto oyo azali kotuna bakufi. Mpo moto nyonso oyo azali kosala makambo yango azali eloko moko oyo Yehova ayiná, mpe ezali mpo na makambo yango oyo eyinamá nde Yehova Nzambe na yo azali kobengana bango liboso na yo.” (Kolimbola Mibeko 18:10-12) Likanisi ya Nzambe ebongwani te.​—Bagalatia 5:19, 20.

“Maloba ya kolɔka ezali te oyo ekoki kosala [basaleli ya Yehova] mabe.” (Mitángo 23:23) Baoyo nyonso balingi kosepelisa Nzambe basengeli kobanga bademo te. Ya solo, bilimo wana mabe “balɛngaka” liboso ya Nzambe mpo bayebaka ete azali na nguya ya makasi mingi koleka, oyo nsukansuka akosalela yango mpo na koboma bango. (Yakobo 2:19) Nzambe ‘akomonisa makasi na ye mpo na bolamu ya baoyo motema na bango ezali mobimba epai na ye,’ mpe “akopesa nzela ata moke te ete moyengebene atengatenga.”​—2 Ntango 16:9; Nzembo 55:22.

“Bato ya bomoi bayebi ete bakokufa; kasi bakufi bayebi ata eloko moko te.” (Mosakoli 9:5) Liloba ya Nzambe eteyaka ete bakufi bakufaka mpenza solo! Tosengeli kobanga bango te, mpo bakoki kosala moto moko te mabe. (Yisaya 26:14) Mpo na kokosa bato, mbala mosusu bademo bamimonisaka lokola bilimo ya bato oyo bakufá, yango nde ntina oyo bato bakoki komona ete “elimo” ya moto moko ya boboto oyo azalaki na bomoi ezala ntango mosusu ndenge moko te na moto oyo bayebaki.

“Bokoki te kolya na ‘mesa ya Yehova’ mpe na mesa ya bademo.’” (1 Bakorinti 10:21, 22) Baoyo nyonso balingaka mpenza Yehova bakoboya babuku, bafilme, mpe masano ya video oyo elobelaka misala ya bademo to oyo etindaka bato bálinga misala ya bademo mpe mateya na bango.a Nzembo 101:3 elobi ete: “Nakotya eloko moko te ya mpambampamba liboso ya miso na ngai.” Lisusu, mbala mingi, masano ya misala ya bademo ekumisaka misala ya mobulu mpe ya mbindo, oyo ‘baoyo balingaka Yehova’ baboyaka.​—Nzembo 97:10.

Bademo basalaka makasi ntango nyonso mpo bato báyeba te ndenge mpenza bazalaka. Kasi balongi mpenza na mobimba te. Na lisalisi ya Biblia, Yehova amonisi polele ndenge bazalaka, elingi koloba, bakosi ya mabe mpenza mpe banguna oyo banyokolaka bato. Bakeseni mpenza na Yehova Nzambe, Mozalisi na biso! Ndenge lisolo oyo elandi emonisi yango, alingaka biso, ntango nyonso ayebisaka biso solo, mpe alingaka ete tózala na esengo libela na libela.​—Yoane 3:16; 17:17.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Lisosoli ya bato nyonso esalaka ndenge moko te; nakotalela mateya ya lingomba oyo moto na moto alandá mpe ndenge oyo akɔmeli na makambo ya Nzambe, ekoki kosala ete azala na lisosoli boye to boye. Likambo ya ntina ezali ete moto azala na lisosoli ya pɛto liboso ya Nzambe mpe abɛtisa lisosoli ya basusu libaku te, ata mpe ya bato ya libota na ye. Baroma 14:10, 12 elobi ete: “Biso nyonso tokotɛlɛma liboso ya kiti ya kosambisa ya Nzambe.”

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto