Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 4/11 nk. 21-24
  • Esengo ya kozala mobateli ya mpate

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Esengo ya kozala mobateli ya mpate
  • Lamuká!—2011
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mobateli ya mpate mpe bampate
  • Nakómi kobatela bampate ya ndenge mosusu
  • Likita moko ya ntina
  • Nazwi fianse ya mwana ya mobateli ya mpate
  • Nakómi kosalela Yehova elongo na Gulmira
  • Epai tokoki kozwa libɔndisi
    Yekolá epai ya Moteyi Monene
  • Yesu abatelaka bampate na ye
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2018
  • “Oyo ebungi, nakoluka yango”
    Zongelá Yehova
  • Yehova azali Mobateli na biso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
Makambo mosusu
Lamuká!—2011
g 4/11 nk. 21-24

Esengo ya kozala mobateli ya mpate

Lisolo ya Alymbek Bekmanov

Ntango nazalaki na mbula misato, nabandaki kobatela bampate elongo na tata-nkulutu na ngai, mpe nakómaki kolinga kobatela yango. Ntango nakómaki na mbula 17, nakómaki mobateli ya mpate oyo ayebi mpenza mosala. Na nsima, nayekolaki lolenge mosusu ya kozala mobateli ya mpate, kasi ya kobatela nde bato. Tiká nayebisa ndenge kosala mosala yango ememeli ngai esengo mingi mpenza.

NABOTAMAKI na mobu 1972. Libota na biso ya Kirghiz oyo ezalaki na bato ebele, ezalaki kofanda na mboka Chyrpykty, pembeni ya libongo ya Laki Issyk-Koul, laki moko ya kitoko. Zingazinga ya laki yango ezali esika oyo esepelisaka bapaya oyo bayaka na Kirghizstan, oyo ezalaki kala ekolo ya république Union soviétique. Lelo oyo, ngai ná mwasi na ngai Gulmira, tofandaka na Bichkek, mboka-mokonzi ya Kirghizstan, oyo ezali na ntaka ya kilomɛtrɛ 200 kolongwa na esika oyo nakolaki.

Mobateli ya mpate mpe bampate

Ntango nazalaki mwana, tozalaki kokende koleisa bampate matiti na bangomba ya milai na eleko ya prɛnta. Yango ezalaki kosɛnga komata bangomba ya milai, mpe ezalaki kozwa biso mikolo mingi. Babateli mosusu ya mpate bazalaki kopona nzela mokuse mpe bazalaki kokóma noki na esika ya koleisa bampate. Kasi nzela yango ezalaki pene ya mabulu, mpe bampate oyo ezalaki kolongwa moke na nzela, ezalaki ntango mosusu kozoka, ata mpe kokufa.

Na banzela yango, eyebanaki ete bambwa ya zamba ezalaki kolanda bampate to kopanza bango na etonga mpe koboma bango. Na yango, tata-nkulutu aponaki nzela oyo ezalaki malamu mpe na makama mingi te, atako nzela yango ekokaki kozwa biso mikolo mingi. Ntango mosusu nazalaki na mposa ya kotambola nokinoki, kasi tata-nkulutu azalaki kopekisa ngai. Azalaki koloba na ngai ete: “Alymbek, kobosana te ete ozali yo moko te, kasi ná bampate.”

Na bangomba wana ya kitoko, tozalaki kosala mwa mapango mpo na kobatela bampate na butu. Babateli ya mpate mosusu bazalaki kolala wana tii ntango moi ekobima nde bakei koleisa bampate. Na ntango wana oyo bampate ebandaki kolya, moi engalaki.

Mosika te, bampate ezalaki kotɛlɛma esika moko mpe ekitisi mitó na nse, mpe kobundana mpo na kopema. Lokola bakokaki te kolya, balɛmbaki mpe bakondaki. Kasi, tata-nkulutu azalaki kolamuka na ngonga ya minei ya butu, liboso ntɔngɔ etana. Azalaki na mposa bampate na ye balyá matiti na esika ya kitoko liboso moi ebima. Kuna, bazalaki na ntango ya kolya matiti na ntɔngɔ, ntango malili ezali naino. Ndenge bato mingi bazalaki koloba, “Soki otali kaka bampate, okoyeba soki mobateli na yango azali ya ndenge nini.”

Ntango ya malamu mpo na kotalatala mpe kopesa bampate nkisi ezali ntango bazali kopema nsima ya kolya. Moko ya mikakatano minene ya bampate na biso ezalaki banyama nkɛkɛ oyo ezalaki kobwaka makei na motɔlu ya bampate. Soki esalemi bongo, motɔlu yango ekokɔta mikrobe mpe ekobanda kovimba. Soki bamoni yango noki te, mpasi ekoya makasi mpe mpate ekoki koyengayenga mpe kokufa. Tozalaki kotalatala bampate pene na mikolo nyonso mpo tóyeba soki esengeli kopesa bango nkisi. Atako kosala bongo ezalaki kozwa ntango mpe milende, tosepelaki mpo bampate ezalaki na nzoto malamu mpe na esengo.

Na mpokwa nyonso, ntango tozongi na mwa mapango wana, tozalaki kotánga bampate. Mbala mosusu, bampate misato to minei ezalaki koleka na mwa porte ya moke mpo na kokɔta na lopango na bango. Tozalaki na bankama ya bampate, kasi lokola tomesanaki kotánga bampate yango, tokokaki kotánga bampate 800 nsima ya miniti 15 to 20. Atako esɛngaki kosala yango mbala na mbala, kasi tolɛmbaki te!

Soki tomoni ete mpate moko ezangi, tata-nkulutu azalaki kozwa mondoki mpe mwa nzete ya kobatela bampate mpe kokende koluka mpate yango, ata mpe kobima na nse ya mbula mpe na molili kaka mpo na koluka mpate wana moko. Azalaki kobelela na mongongo makasi. Mongongo na ye ezalaki kokimisa banyama mabe ya zamba. Soki mpate eyoki mongongo na ye, ezalaki komona ete ekómi na libateli.

Topesaki mpate mokomoko nkombo, na kotalela na ndenge ezali komonana mpe bizaleli na yango. Na kati ya etonga, ezalaki ntango mosusu komonana ete bampate ya mitó makasi ezali. Mpo na ntina moko to mosusu, bazalaki kaka koboya kotosa mobateli ya mpate. Mbala mosusu, bampate mosusu ezalaki kolanda mpate ya motó makasi. Na yango, esengelaki mobateli ya mpate asembola mpe apesa bampate ya mitó makasi disiplini. Na ndakisa, akokaki kotika mpate ya ndenge wana yango moko na lopango. Nsima ya mwa ntango, bampate mosusu ezalaki kotosa mpe kolanda litambwisi ya mobateli ya mpate. Mpate oyo ezalaki kaka motó makasi, ezalaki kokɔta na nzungu.

Nakómi kobatela bampate ya ndenge mosusu

Na mobu 1989, nabandaki koyekola masano ya kobunda mpe nakómaki kosala yango malamu mpenza. Na mbula oyo elandaki nakɔtaki na limpinga ya basoda ya Union soviétique. Ntango nazalaki kosala na Russie, baninga na ngai ya masano ya bitumba basalaki etuluku moko ya bato ya mobulu. Ntango nazongaki na Kirghizstan, bayebisaki ngai ete soki nakɔti na etuluku na bango, nakozanga eloko te. Kasi, na ntango yango, nakutanaki na Batatoli ya Yehova.

Batatoli ya Yehova bayanolaki na mituna oyo ezalaki kotungisa ngai bandá bomwana, na ndakisa mpo na nini bato bakufaka? Ntango tozalaki kosolola, nayaki komona ete liwa eutaki na lisumu ya Adama, moto ya liboso. (Baroma 5:12) Nayekolaki mpe na Biblia ete Yehova, Nzambe ya solo atindaki Yesu mwana na ye mpo asikola biso mpe ete soki tondimeli Yehova mpe mwana na ye, tokoki kolimbisama na masumu oyo tosangolaki. Yango ekoki kopesa biso nzela ya kozala na bomoi ya seko na Paradiso awa na mabele, ndenge Nzambe akanaki mpo na bato na ebandeli.​—Nzembo 37:11, 29; 83:18; Yoane 3:16, 36; 17:1-5; Emoniseli 21:3, 4.

Biyano ya Biblia oyo Batatoli ya Yehova bapesaki na mituna na ngai, ezalaki polele mpe lokola nakangaki ntina, yango etindaki ngai naloba ete, “Ezali mpenza bongo!” Banda wana, nakabwanaki na baninga na ngai wana ya kala. Bazalaki mbala na mbala kosala nyonso mpo nazongela bango, kasi mposa na ngai ya koyekola mpe kosalela mateya ya Biblia ezalaki makasi, yango wana nakokaki kotɛmɛla masɛnginya na bango.

Na ntango wana, mwasi moko oyo azalaki kobikisa bato na nzela ya mabondeli, oyo ayebanaki mingi na mboka wana, azalaki koya kotala mama. Mokolo moko, ntango nakómaki na ndako, nakutaki mwasi yango azali kosala bikelakela. Alobaki na ngai ete nazali na nguya moko boye mpe alendisaki ngai nakende na ndako-nzambe ya bamizilma mpo nazwa bikelakela, mpe alobaki ete: “Bikelakela yango ekosalisa yo.” Etikalaki moke nandima maloba na ye, ete nakozwa likabo ya kobikisa bato.

Na mokolo oyo elandaki, nakendaki epai ya Batatoli ya Yehova oyo bazalaki koyekola na ngai Biblia mpe nayebisaki bango ndenge mwasi wana alobaki na ngai. Balakisaki ngai na Biblia ete Yehova ayinaka lolenge nyonso ya bikelakela mpo ezali na boyokani na bilimo mabe. (Kolimbola Mibeko 18:9-13) Esalaki mwa babutu mingi, nakokaki kolala te mpo bademo bazalaki kotungisa ngai. Ntango Batatoli ya Yehova balakisaki ngai kobondela na ndenge oyo eyokani na mokano ya Yehova, eumelaki te, natikaki kolɔta bandɔtɔ wana ya nsɔmɔ. Nandimaki mpenza ete namoni Mobateli ya solosolo ya bampate, oyo ezali Yehova.

Nayekolaki ete Davidi, moto oyo akomaki mikanda mingi ya na nzembo na Biblia, azalaki mpe mobateli ya mpate ntango azalaki elenge. Abengaki Yehova “Mobateli na ngai” mpe nakómaki koyoka ndenge Davidi ayokaki mpo na Yehova. (Nzembo 23:1-6) Nazalaki na mposa ya komekola Yesu, Mwana ya Yehova, oyo abengami “mobateli . . . ya bampate.” (Baebre 13:20) Na liyangani moko oyo esalemaki na Bichkek, na ebandeli ya mobu 1993, nazwaki batisimo mpo na komonisa ete namipesi epai ya Yehova.

Likita moko ya ntina

Bandeko na ngai mingi ná mpe bato ya kartye, babandaki kokutana mpo na koyekola Biblia. Bato soki 70 ya mboka na biso bazalaki kokutana pene na Laki Issyk-Koul. Ndeko na ngai moko, oyo azalaki mokonzi ya bankumu ya mboka na biso, asepelaki makasi. Alobaki ete akobongisa likita moko ya monene oyo biso tokoya mpo na kolimbwela bato mpo na nini tokómi kondima makambo wana. Kasi, bakonzi ya mangomba ya mboka yango, babandaki kotinda bato ya mboka bátɛmɛla mosala na biso ya kosakola. Basalaki mwango mabe mpo na kotinda bato oyo bakoya na likita yango bábalukela biso.

Na mokolo ya likita yango, bato soki nkóto, oyo bamosusu bautaki na bamboka misato ya pembenipembeni, bayangaki. Batatoli ya Yehova bazalaki mingi te; moko na bango abandaki kolimbola mateya ya Biblia oyo tondimaka. Miniti ata mitano ekokaki te, moto moko atɛlɛmaki mpe abandaki kotuna mituna na mongongo makasi mpo na kotumola biso. Babandaki koloba na biso makambo ya lokuta mpe kofinga biso, mpe batombokisaki bato mpo básala biso mabe.

Na ntango wana, yaya na ngai moko ya mobali, oyo abandaki koyekola Biblia, akɔtelaki biso. Moto nyonso azalaki kobanga mpe kokima ye mpo bayebaki ete azalaka makasi na bitumba. Na mpiko nyonso, atɛlɛmaki na kati ya bato yango mpe Batatoli ya Yehova, mpe tobimaki wana kozanga ete mobulu esalema. Na bambula oyo elandaki, mingi ya baoyo bayaki na likita wana bakómaki Batatoli ya Yehova. Lelo oyo, na kati ya bato 1 000 ya mboka na biso, bato soki 40 bazali Batatoli ya Yehova.

Nazwi fianse ya mwana ya mobateli ya mpate

Nsima ya liyangani moko monene ya Batatoli ya Yehova, oyo esalemaki na Moscou, na Russie, na sanza ya Yuli 1993, nakutanaki na Gulmira, Motatoli moko ya Yehova, oyo autaki na mboka Kirghiz. Bato ya libota na ye bazalaki mpe kobɔkɔla bampate. Na mobu 1988, wana mosala ya Batatoli ya Yehova epekisamaki naino na Union soviétique, Aksamy, Motatoli moko ya Yehova, abandaki koyekola Biblia na mama ya Gulmira. Na bambula ya 1970, Aksamy akómaki Motatoli ya Yehova ya liboso ya Kirghiz.

Eumelaki te, Gulmira abandaki koyangana na boyekoli ya Biblia oyo Aksamy azalaki kosala na mama na ye. Na mobu 1990, bango nyonso mibale bazwaki batisimo mpe bakómaki Batatoli ya Yehova. Lokola Gulmira asepelaki mingi na makambo oyo ayekolaki, eumelaki te akómaki komipesa mingi na mosala ya kosakola.

Na mbula mibale oyo elandaki, nakutanaki na Gulmira mbala mingi te, mpo nazalaki kofanda na ntaka ya kilomɛtrɛ 160. Na sanza ya Marsi 1995, nazwaki ekateli ya koyeba ye malamu, yango wana, mokolo moko nakendeki na ndako na bango mpo nayebisa ye likambo yango. Nayokaki mpasi ntango nayebaki ete akolongwa wana mokolo oyo elandaki mpo akende kosala na biro ya Batatoli ya Yehova na Russie, oyo ezalaki na ntaka ya kilomɛtrɛ koleka 5 600.

Na ntango wana, nakómaki mobongisi-nzela, elingi koloba nakómaki kosakola mingi mpe nabandaki koyekola monɔkɔ ya Russe, mpo tozalaki naino ata na mokanda moko te na monɔkɔ ya Kirghiz. Na boumeli ya mbula misato, ngai ná Gulmira, tozalaki kokomelana mikanda mpe toyokanaki mpo na kotánga mikapo ya Biblia kaka ndenge moko, mpo tolendisanaka na makanisi yango. Na ntango wana, nazalaki na lisangá ya liboso ya monɔkɔ ya Kirghiz, na engumba Balyktchy.

Nakómi kosalela Yehova elongo na Gulmira

Na mobu 1998, Gulmira ayaki konje na Kirghizstan, mpe tobalanaki. Na ntango wana, babengaki biso tókende kosala na biro ya Batatoli ya Yehova na Russie. Nazalaki mpenza na esengo ndenge nabandaki koyekola monɔkɔ ya Russe! Na nsima, batindaki ngai nakende kosala na ekipi ya babongoli na monɔkɔ ya Kirghiz, oyo ezalaki kobongola mikanda na monɔkɔ yango. Nabondelaki Yehova, nasɛngaki ye bwanya mpe motema molai. Mpe na ntembe te, Gulmira, moninga na ngai ya mosala azalaki mpenza kosalisa ngai.

Na mobu 2004, biro ya Batatoli ya Yehova etindaki ekipi na biso ya babongoli na Bichkek, epai batyaki ngai na komite oyo etambwisaka mosala ya Batatoli ya Yehova na ekólo Kirghizstan. Na ntango wana, masangá ya monɔkɔ ya Kirghiz ezalaki nsambo mpe oyo ya monɔkɔ ya Russe ezalaki koleka 30. Lelo oyo, masangá ya monɔkɔ ya Kirghiz ezali koleka 20 mpe ezali na bituluku mingi ya monɔkɔ yango, oyo Batatoli mingi (1/3) na kati ya Batatoli soki 4 800 ya Kirghizstan, bayanganaka kuna.

Ngai ná Gulmira, tomonaki malamu tóyekola Lingelesi, mpo yango elingaki kosalisa biso na mosala na biso. Yango esalaki ete bábenga biso na biro monene ya Batatoli ya Yehova na États-Unis na mobu 2008. Kuna, tozwaki mateya oyo ebongisamaka mpo na Bandeko oyo batambwisaka mosala ya kosakola ya Batatoli ya Yehova na bikólo ndenge na ndenge.

Lelo oyo, ngai ná Gulmira, tozali mpenza na likoki ya kosalisa bato ya Kirghizstan, báyeba Nzambe. Makambo oyo tokutani na yango na mosala na biso, esalisi biso tómona libosoliboso ete Yehova azali Mobateli ya mpate ya bolingo. Namoni mpenza na miso kokokisama ya maloba oyo ya Nzembo, oyo elobi ete: “Yehova azali Mobateli na ngai. Nakozanga eloko te. Alalisaka ngai na bisika ya koleisa banyama oyo etondi na matiti; Atambwisaka ngai na bisika ya kopema oyo ezali na mai mingi. Azongiselaka molimo na ngai makasi. Akambaka ngai na banzela ya boyengebene mpo na nkombo na ye.”​—Nzembo 23:1-3.

[Elilingi na lokasa 23]

Bampate na biso na esika ya kolya matiti

[Elilingi na lokasa 23]

Tozalaki kotánga bampate mpokwa nyonso mpo na koyeba soki ekoki

[Elilingi na lokasa 24]

Ngai ná Gulmira, lelo oyo

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto