Mpo na kosolola na libota
Nini ezangi na elilingi oyo?
Tángá 2 Bakonzi 5:1, 9-16, 20-27. Sikoyo, talá elilingi oyo. Biloko nini ezangi? Komá biyano na yo na milɔngɔ oyo ezali awa na nse. Kangisá madodo mpo elilingi emonana, mpe na nsima tyá yango langi.
1. ․․․․․
2. ․․․․․
3. ․․․․․
[Etanda]
(Talá mokanda)
MPO NA KOSOLOLA:
Makambo nini mibale ya lokuta Gehazi alobaki?
LISALISI: Tángá 2 Bakonzi 5:22, 25.
Nani ayebaki ete Gehazi azali kokosa?
LISALISI: Tángá 2 Bakonzi 5:25, 26; 2 Ntango 16:9; Baebre 4:13.
Mpo na nini osengeli kolobaka lokuta te?
LISALISI: Tángá Masese 12:22; Yoane 8:44.
MAKAMBO YA KOSALA NA LIBOTA:
Bótánga lisolo ya Biblia elongo. Soki likoki ezali, moto moko atánga maloba ya moto oyo azali kobɛta lisolo; moto ya mibale, maloba ya Elisha; moto ya misato, maloba ya Naamane ná basaleli na ye; mpe moto ya minei, maloba ya Gehazi.
Bombá yango mpo na koyekola
Katá, gumbá yango na ndambo mibale mpe bombá
LOKASA 8 HIZIKIYA
MITUNA
A. Hizikiya azalaki na mbula boni ntango akómaki mokonzi ya Yuda?
B. Yehova abakisaki mbula boni na bomoi ya Hizikiya na ndenge ya likamwisi?
C. Tondisá esika oyo ezali mpamba. Lokola Hizikiya azalaki kobondela mpe azalaki sembo, Yehova atindaki anzelu moko aboma basoda ․․․․․ ya Asiri.
[Etanda]
Mobu 4026 L.T.B. Adama akelami
Azalaki na bomoi na bambula ya 700 L.T.B.
Mobu 1 T.B.
Mobu 98 T.B. Mokanda ya nsuka ya Biblia ekomami
[Karte]
Afandaki na Yerusaleme
ASIRI
Yerusaleme
HIZIKIYA
NA MOKUSE
Mokonzi ya sembo oyo abongisaki lisusu tempelo mpe afungolaki yango, abebisaki biloko ya losambo ya lokuta, mpe alendisaki bato básala Elekeli. (2 Bakonzi 18:4; 2 Ntango 29:3; 30:1-6) Atako tata na ye, Mokonzi Ahaza, apesaki ndakisa ya mabe, Hizikiya “akangamaki se na Yehova.”—2 Bakonzi 18:6.
BIYANO
A. Mbula 25.—2 Bakonzi 18:1, 2.
B. Mbula 15.—2 Bakonzi 20:1-6.
C. Nkóto 185.—2 Bakonzi 19:15, 19, 35, 36.
● “MPO NA KOSOLOLA NA LIBOTA” biyano ezali na lokasa 20
BIYANO YA MITUNA YA LOKASA 30
1. Likalo ya Naamane.
2. Basaki ya palata.
3. Bilamba.