“Masini oyo eleki bamasini nyonso na mokili”
BƆƆNGƆ ya bebe ebengami “masini oyo eleki bamasini nyonso na mokili,” mpe yango ezali solo. Ntango kaka mwana abotami, alingaka kokanga na motó makambo nyonso oyo azali komona, mingongo nyonso oyo azali koyoka, mpe kosimba eloko nyonso oyo ezali pembeni na ye.
Libosoliboso, mwana atyaka likebi na ye mingi epai ya bato mosusu; atalaka bilongi na bango, ayokaka mingongo na bango, mpe asepelaka básimba ye. Buku moko (Babyhood) ya mokomi Penelope Leach elobi boye: “Baankɛtɛ mingi esalemaki mpo na koyeba biloko nini mwana asepelaka mingi kotala, mingongo nini ebendaka mingi likebi na ye, mpe biloko nini asepelaka kosimba mbala na mbala. Mingimingi, ayekolaka makambo wana nyonso epai ya mokóló moko oyo abatelaka ye.” Ezali likambo ya kokamwa te soki tolobi ete baboti bakokisaka mokumba moko ya ntina mingi mpo na kosalisa mwana akola!
“Nazalaki koloba lokola mwana moke”
Baboti mpe minganga oyo basalisaka bana mike bakamwaka mingi na ndenge oyo mwana oyo abotami sika ayekolaka monɔkɔ moko kaka na koyoka yango. Bato ya siansi bamonaki ete nsima ya mwa mikolo, mwana ayebaka mongongo ya mama na ye mpe alingaka yango koleka mongongo ya moto mosusu; nsima ya mwa bapɔsɔ, ayebaka kokesenisa monɔkɔ ya mboka ya baboti na ye na minɔkɔ mosusu; mpe nsima ya mwa basanza, akoki koyeba ndenge maloba ekatanaka, mpe na ndenge yango, kokesenisa maloba oyo ezali koyokana malamu ná oyo ezali koyokana malamu te.
Ntoma Paulo akomaki boye: “Ntango nazalaki mwana moke, nazalaki koloba lokola mwana moke.” (1 Bakorinti 13:11) Mwana moke alobaka ndenge nini? Mingimingi abimisaka maloba oyo ezali koyokana malamu te. Maloba yango ezali kaka makɛlɛlɛ ya mpamba? Te, ezali kaka makɛlɛlɛ ya mpamba te! Na buku na ye (What’s Going On in There?—How the Brain and Mind Develop in the First Five Years of Life), doktɛrɛ Lise Eliot amonisi ete koloba ezali “likambo ya mpasi oyo esɛngaka ete ebele ya misisa ya mbɛbu, ya lolemo, ya edáda, mpe ya enama oyo babengi larynx, oyo ezalaka na kati ya mongongo, eningana mbangumbangu mpe nzela moko.” Abakisi boye: “Atako elobeli ya babebe emonanaka kaka lokola lolenge moko ya kobenda likebi ya bato, esalisaka mpe bango bámesana koningisa misisa ntango bazali koloba.”
Ntango bana balobaka ndenge wana, baboti na bango bazongiselaka bango na komekola elobeli ya bana mike, mpe kosala bongo ezali na ntina. Soki moboti azali komekola mbala na mbala elobeli ya bana mike, akotinda mwana na ye aloba. Na ndenge yango, mwana azali koyekola ndenge nini basololaka; yango ekosalisa ye bomoi na ye mobimba.
Mikumba ya baboti ebongwanaka
Kobanda kaka ntango mwana abotami, mokolo na mokolo baboti na ye basalelaka ye makambo nyonso oyo alingi. Soki aleli, moto moko asengeli koleisa ye. Soki aleli, moto moko asengeli kolongola ye bilamba oyo ebebi mpe kolatisa ye bilamba mosusu. Soki aleli, moto moko asengeli komema ye. Kolɛngɛla mwana ndenge wana ezali mabe te mpe ezali na ntina. Ezali lolenge ya libosoliboso oyo baboti bakokisaka mokumba na bango ya kobatela mwana na bango.—1 Batesaloniki 2:7.
Soki totaleli makambo oyo touti kolobela liboso, ezali mpenza mabe te soki bebe azali kokanisa ete ye nde moto aleki ntina, mpe ete mikóló mosusu—mingi mpenza baboti na ye—bazali wana kaka mpo na kolɛngɛla ye. Kotalela makambo ndenge wana elongobani te kasi ezali mpenza mabe te. Kobosana te ete, esili koleka mbula mobimba, bozalaki kosalela ye bongo mikolo nyonso. Yango wana, azali komimona lokola mwa mokonzi moko boye oyo azali koyangela bato ebele ya mikóló oyo bazali wana kaka mpo na kosalela ye. John Rosemond, mopesi-toli na makambo ya libota, akomi boye: “Ezwaka ata mbula mibale te mpo na koteya mwana akanisa ete ye nde azali mokonzi; kasi mpo na kosembola makanisi ya ndenge wana ezwaka ata mbula zomi na motoba to koleka! Mpe likambo ya kokamwa, yango ezali mokumba ya moboti: liboso azalaki koteya mwana na ye andima likambo yango oyo ezali solo te, mpe na nsima, na boboto nyonso, azali koteya ye ete likambo yango ezali mpenza lokuta.”
Ntango mwana akómi na mbula mibale, abandi koyeba ete baboti na ye bazali lisusu kolɛngɛla ye te kasi bakómi nde koteya ye. Sikoyo mwana akómi koyeba ete baboti na ye bazali lisusu kolanda mitinda na ye te, kasi ye nde asengeli kolanda oyo ya bango. Mwana azali lisusu na bokonzi te, mpe mbala mosusu azali kosepela te na ndenge oyo makambo ebongwani. Akómi na nkanda, mpe azali kaka koluka kokonza baboti na ye. Ndenge nini?
Ntango mwana akómi kosala bipale
Ntango bana mingi bakómaka na mbula pene na mibale, bizaleli na bango ebongwanaka mpenza; mbala mingi bakómaka kosala bipale. Na ntango yango baboti batungisamaka mingi mpenza! Na mbala moko, mwana akómaka kosalela mingi maloba lokola “Te!” to “Naboyi na ngai!” Lokola azali kobunda na mayoki oyo ezali kobulunganisa ye, mbala mosusu amikangelaka nkanda mpe akangelaka baboti na ye nkanda. Ntango mosusu alingi kozala mosika na yo, ntango mosusu alingi kozala pembeni na yo. Baboti bayebaka te nini basengeli kosala, mpo bamonaka ete nyonso oyo bazali kosala ezali kosimba te. Mpo na nini mwana akómi kosala bongo?
Kanisá naino mbongwana monene oyo ekɔti na bomoi ya mwana. Liboso ezalaki, soki kaka aleli, mokóló moko ayei nokinoki. Kasi sikoyo abandi komona ete “bokonzi” na ye ezalaki kaka ya ntango moke mpe esengeli asala makambo mosusu ye moko. Mokemoke, akómi koyeba ete esengeli atosa, ndenge emonisami na maloba oyo ya Biblia: “Bana, bótosaka baboti na bino na makambo nyonso.”—Bakolose 3:20.
Na ntango wana ya mpasi, baboti basengeli kokoba kozala na bokonzi likoló ya mwana na bango. Soki basali yango na lisɛki te kasi na bolingo nyonso, mwana akoyeba kotosa bango. Mpe makambo oyo azali koyekola ekosalisa ye mpo akola malamu.
Bizaleli malamu
Ezala banyama, ata mpe bamasini ekoki koyeba maloba mosusu mpe komekola yango. Nzokande kaka moto nde azali na likoki ya kokanisa likoló ya bomoi na ye mpe ya komitalela. Yango wana, soki mwana akómi na mbula mibale to misato, akómaka na ndakisa komikumisa, koyoka nsɔni, mpe koyeba ete amemi ngambo. Yango ezali makambo ya liboso oyo ezali komonisa ete abandi kokóma mokóló oyo ayebi kokesenisa malamu ná mabe, elingi koloba akoki kolongisa makambo ya malamu, ata soki basusu bazali kosala makambo ya mabe.
Kaka na ntango wana, baboti bamonaka mbongwana mosusu oyo ekokamwisa bango. Mwana na bango akómi koyeba ete likambo boye to boye ekoki kosepelisa basusu to te. Ntango azalaki na mbula mibale, azalaki kotala kaka ndenge bana mosusu bazali kosakana, kasi sikoyo akómi kosakana elongo na bango. Ayebi mpe ntango nini baboti na ye bayokaka esengo mpe akoki kosala likambo moko mpo na kosepelisa bango. Na ntango wana, ekoki kozala mpasi te mpo na koteya ye makambo mosusu.
Mwana oyo azali na mbula misato abandi koyeba kokesenisa solo ná lokuta, malamu ná mabe, koleka ndenge ezalaki liboso. Emonani polele ete yango ezali ntango oyo baboti basengeli kosalisa bana na bango bákóma mikóló ya malamu.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 5]
Nsima ya mwa mikolo, mwana ayebaka mongongo ya mama na ye mpe alingaka yango koleka mongongo ya moto mosusu
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 6]
Mwana oyo azali na mbula misato abandi koyeba kokesenisa solo ná lokuta, malamu ná mabe, koleka ndenge ezalaki liboso
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 6]
MPO NA NINI BANA MOSUSU BASALAKA BIPALE?
Mokomi John Rosemond akomaki boye na buku na ye (New Parent Power): “Baboti mosusu bakanisaka ete bana na bango basalaka bipale mpo bapesaka bango te biloko oyo basɛngaka. Yango wana, baboti yango bamonaka ete soki basalaki to balobaki eloko moko oyo etindi mwana alela to asilika, basengeli kosala nokinoki mpo na kokitisa motema na ye. Bamonaka ete basalaki mabe ndenge baboyaki kopesa mwana eloko oyo asɛngaki, yango wana bapesaka ye yango. Lokola baboti bamonaka ete ezalaki mabe ndenge babɛtaki mwana, bapesaka ye biloko mingi koleka oyo asɛngaki, mpo báyoka te ete bamemi ngambo. Mayele wana esimbaka. Mwana atikaka kosala bipale, motema ya moboti ekitaka, mpe lokola mwana amoni ete soki azali kolela to kosilika mingi akozwa biloko oyo azali na mposa na yango, akolela lisusu mingi koleka.”