Bombá yango mpo na koyekola
Katá, gumbá na ndambo mibale mpe bombá
LOKASA 11 YOZEFE
MITUNA
A. Tondisá bisika oyo etikali mpamba. Bandeko ya Yozefe babengaki ye “․․․․․,” mpe batɛkaki ye na boombo na shekele ya palata ․․․․․.
B. Ntango mwasi ya Potifare atyaki ye mbamba mpo asangisa na ye nzoto, Yozefe alobaki na mpiko nyonso ete: “Ndenge nini nakoki kosala mabe monene boye mpe . . .”
C. Mpo na nini Farao akómisaki Yozefe mokonzi ya mibale ya Ezipito?
[Etanda]
4026 L.T.B. Adama akelami
Azalaki na bomoi na mobu soki 1700 L.T.B.
1 T.B.
98 T.B. Mokanda ya nsuka ya Biblia ekomami
[Karte]
Bazwi ye na Dotane, bamemi ye na Ezipito
Dotane
EZIPITO
YOZEFE
NA MOKUSE
Mwana ya liboso ya Yakobo mpe Rashele. (Ebandeli 35:24) Bandeko na ye bayokelaki ye zuwa mpe batɛkaki ye na boombo na Ezipito, epai alekisaki mbula 13 na boombo mpe na bolɔko. Na esika Yozefe azongisela bandeko na ye mabe na mabe, alimbisaki bango mpo babongolaki motema. (Ebandeli 50:15-21) Atako azalaki mosika na mboka na ye, apesaki Yehova lokumu mpe atikalaki pɛto na bizaleli, azalaki makasi na mosala mpe azalaki moto ya kotyela motema.—Ebandeli 39:1-23.
BIYANO
A. Molɔti-ndɔtɔ, 20.—Ebandeli 37:19, 28.
B. “. . . kosalela mpenza Nzambe lisumu?”—Ebandeli 39:9.
C. Ayebaki ete elimo ya Nzambe nde ekómisaki Yozefe moto ya bwanya mpe ya mayele.—Ebandeli 41:38-41.