Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 10/12 nk. 28-29
  • Kobosanaka te kopesa matɔndi!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kobosanaka te kopesa matɔndi!
  • Lamuká!—2012
  • Masolo mosusu
  • Bato bazali koluka likabo eleki malamu ya kopesa basusu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2017
  • Mpo na nini kopesaka mersi?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Ozali na elimo ya kokaba?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Mpo na nini likabo yango ezali na valɛrɛ mingi?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2017
Makambo mosusu
Lamuká!—2012
g 10/12 nk. 28-29

Kobosanaka te kopesa matɔndi!

OYEBI lisusu mbala ya nsuka oyo ozwaki mokanda ya botɔndi? Ozali mpe koyeba mbala ya nsuka oyo otindaki yango?

Lelo oyo, lokola bato mingi bakómi kosolola na nzela ya Internet, bato mosusu bakomaka lisusu mikanda te mpo na kopesa matɔndi. Ya solo, kopesa “matɔndi” na nzela ya mokanda ezali mpenza lolenge moko ya komonisa moto ete osepeli na boboto oyo amoniseli yo. Talá mwa makambo oyo okoki kosala mpo na kopesa matɔndi.

1. Komá mokanda yango na mabɔkɔ mpo ezala mpenza ya yo.

2. Komá nkombo ya moto oyo ozali kopesa ye matɔndi.

3. Nsima ya kozwa likabo, tángá likabo yango mpe monisa ndenge okani kosalela yango.

4. Na nsuka ya mokanda yango, zongelá kopesa matongi lisusu.

Moto oyo azwi mokanda ya botɔndi ayokaka malamu mpenza.

Yango wana, mbala ya nsima oyo moto akosalela yo likambo moko ya malamu to akopesa yo likabo moko, monisá ete osepeli mingi na likabo yango. Kobosanaka te kopesa matɔndi!

[Etanda/​Bililingi na nkasa 28, 29]

Mama-leki Maria, (2)

Matɔndi mingi mpo na montre oyo ebɛtaka ngonga mpo na kolamusa! (3) Lokola nalalaka mpɔngi mingi, nabandi kosalela yango malamu. Nasepelaki mingi komona yo pɔsɔ eleki, mpe nakanisi ete okómaki malamu. Tokosepela komona yo lisusu mosika te.

Matɔndi mingi lisusu mpo na likabo wana ya kitoko! (4)

Ngai mwana ya ndeko na yo,

Jean

[Elilingi]

(1)

[Etanda na lokasa 29]

LIKANISI

[Etanda na lokasa 29]

● Kolobelaka likabo ya mbongo polele te. Na ndakisa, na esika ya kolobela motuya ya mbongo oyo ozwaki, okoki koloba boye: “Matɔndi mingi mpo na likabo na yo ya bolingo. Nakani kosalela yango mpo na . . .”

● Lobelá kaka makambo etali likabo yango mpe ndenge oyo osepeli na yango. Ntina ya kolobela makambo ebeleebele oyo etali konje to kokende na lopitalo ezali te.

● Komilelalela te mpo na mokakatano oyo ozwi mpo na likabo yango. Na ndakisa, ekozala malamu te koloba “matɔndi mpo na linzanza ya kotumba mampa, kasi ekoki te na fur na ngai ya kotumba mampa!”

[Etanda na lokasa 29]

Biblia ezali kolendisa biso tópesaka matɔndi. (Luka 17:11-19) Elendisi mpe biso ‘tóbondelaka Nzambe ntango nyonso,’ mpe ebakisi boye: “Na makambo nyonso bópesaka matɔndi.”​—1 Batesaloniki 5:17, 18.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto